Nsango: 60-1206 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA#
Category Archives: Uncategorized
20-1108 Eleko Na Lingomba Ya Efese
20-1101 Emononeli Ya Patámo
20-1025 EMONISELI YA YESU KLISTO
20-1011 Mokambi
NSANGO: 62-1014E Mokambi
20-1004 Epimelo Ya Moto Oyo Abongi Be
NSANGO: 62-1014M Epimelo Ya Moto Oyo Abongi Be
20-0920 Malakisi Na Ntina Na Mose
Nsango: 56-0513Malakisi Na Ntina Na Mose
BranhamTabernacle.org
PDF
themessage.com/ln/sermonsdownload
20-0912 BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA
Mokolo ya 12 septembre 2020
Balingami Bameli-mai ya Libulu oyo Epunjaka,
Komela mai na Libulu oyo Epunjaka ezali kitoko mingi mpenza. Liloba ya pio, ya peto, ya pembe, oyo ezali kouta na Liziba na Mai na Bomoi, esika tokoki komela Yango ntango nyonso mitema na biso ezali na mposa na yango. Ayaki pe asilisaki mposa na mai ya milimo na biso, na mabele ekauki pe ezanga mai.
Ntango tozali na mitungisi ya ndenge na ndenge, tokoki komela mai. Ntango etumba ezali kokoma makasi, tokoki komela mai. Ntango tozali na bosenga ya lobiko na nzoto, tokoki komela mai. Ntango nyonso, bisika nyonso, tokoki kofina bouton ya koyoka liteya pe tokoyoka Tata kolobela biso ete : Mbote, baninga, eloko nini bozali na bosenga na yango lelo, lobiko-na-nzoto? Bozali na bosenga ya koyeba solo-solo ete bozali bana na Ngai ya mibali pe basi oyo bapesami Lokumu-ya-bana? Bozali na bosenga ya kozwa eyano na motuna oyo bozali na yango na motema? To bolingi bobele kofanda na nsé ya epakolami ya Molimo Mosanto pe komela, komela, komela kino milimo na bino ekobondisama nye?
Liloba na Ye, Nsango Oyo, ezali kotia biso mbala moko liboso ya Molimo Mosanto. Ntango mosusu tosalaka makasi nyonso mpo na komeka kokota liboso na Bozali na Ye, kasi toyebi ete bobele na ngonga oyo tozali kofina bouton ya koyoka liteya , tozali na nsé ya Epakolami ya Molimo Mosanto. Yango esili komonisamela biso, pe tondimi na bomoto na biso nyonso ete, Ezali Mongongo Na Nzambe nde ezali kolobela biso mbala moko longwa na bibebu ya moto oyo YE aponaki. Mpo na nini moto oyo azali na mayele nyonso akoki kolinga komela mai oyo euti na liziba mosusu?
Ntango toyokaka ba-bandes oyo, Ekendaka kino na ba-mboka ya bapakano, pe bisika nyonso na mokili, esika nyonso oyo bato bazali koyoka yango. Ezali kobenga moto nyonso oyo azali na bolembu, molimo nyonso oyo esili kobunga, nzoto nyonso oyo ezali kobéla, Momboto nyonso oyo esila kobongisama liboso, pe ezali kolobela bango ete:”Bokoki kozua eloko oyo bozali na bosenga na yango, soki bobeti ntembe te pe bondimi Liloba moko na moko, mpo Ezali ngai moto nazali koloba te, Ezali YE nde azali kosalela ngai mpo na kolobela bino.”
Bokanisa naino sikawa, soki bobikaki kalakala na bileko oyo eleki, na ntango ya yiki-yiki ya basakoli pe maloba bazalaki koloba, na ngambo nini bokokaki kolinga kozala, na eleko oyo wana?
Malamu, bosengeli kopona lolenge moko lelo oyo. Azali komibongisa mpo na kobota Liloba ebongi be esika wana, pe Liloba ezali koya mpo na Mwasi-na-libala Liloba. Lokola mwa—mwasi azali eteni ya mobali, oyo elongolamaki na ye, na boye, ekosengela na Lingomba kozala Lingomba oyo ezali koumela-na-Liloba, Liloba moko na moko ya Biblia; ba-systemes te, ba-dogmes te, to eloko moko oyo ebakisami na Yango. Ekosengela kozala na kati ya Liloba ya mongondo oyo ezangi mbindo, oyo ya peto.
Olingaki mpenza kosala nini na eleko oyo wana, olingaki kozua ngambo ya ba-systemes, ya ba-dogmes, na banganga-nzambe na bango, to olingaki kozala kati na baoyo batikalaki na Liloba oyo emonisamaki na eleko wana?
Alobaki ete tozali kotonga etutu te, tozali kotonga ndako. Mpo na kotonga ndako, bosengeli kotonga yango yengebene na mwango, soki bongo te, ndako na yo ekobeba. Mwango na biso ezali Liloba. Liloba na Nkolo eyaka na mosakoli na Ye, eyaka ata moke te na banganga-nzambe; Eyaka na basakoli. BOBELE mosakoli nde azali molimboli ya bonzambe ya Liloba Yango. Boye nani akotonga Ndako na Ye?
Esengeli ete mopakolami moko aya longwa na Lola, atindama awa na nse mpo na kosala yango. Ezalaka bongo, na eleko moko na moko.
Mbala moko lisusu, mokili, pe baponami na Ye, bazali koleka na mpasi ya kobota. Botala bobele makambo oyo Alobelaki biso ete ekosalema na mokili pe na Lingomba na Ye na eleko oyo. Tozali komona yango kokokisama na miso na biso. Na eleko moko na moko, Tata atindaki batindami na Ye: Polo, Irenée, Martin, Colomban, Luther, Wesley, pe na eleko na biso, William Branham. Elongo na motindami moko na moko, mokili, na lolenge ya nzoto pe ya molimo, ezalaki koyoka mpasi ya kobota.
Esengeli na mpasi, na mitungisi, pe na nkaka kasi sikawa mpasi ya kobota ya suka pe ntango ekomi pene. Tozali komona lolenge mokili ekomi, yiki-yiki kati na mabota. Tozali komona yiki-yiki oyo ezali likolo na Mwasi-na-libala na Ye mpo na kotikala na ba-bandes pe kondima Liloba moko na moko. Ezali mpasi, kasi Ezali kobotama ya Mwasi-na-libala na Ye. Konetolama ekomi pene.
Mbala moko lisusu, tokosangana na ngonga ya 13h00’, ngonga ya Jeffersonville, mpo na komela mai longwa na Liziba-na-mai oyo ezali Kopunja-punja, mpo na koyoka Liloba, wana Ye akolobela biso ete sikawa tozali koleka na Mpasi ya Kobota ya suka, eteyami mokolo ya 24 janvier 1965.
Ndeko Joseph Branham
Elimbolami Uto Na
https://branham.org/articles/9112020_TheEaglesGatheringTogether
20-0906 Mabulu Matobwani
Nsango: 65-0123 Mabulu Matobwani
BranhamTabernacle.org
PDF
themessage.com/ln/sermonsdownload
BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA
Mokolo ya 5 septembre 2020
Molingami Mwasi-na-libala Oyo atondi na nsai,
Nazali mpenza kozongisa matondi mpo tosengeli na biso komipesa na mayele na biso moko te, kasi tozali na makoki ya kofanda na bisika ya Likolo na bozali ya Molimo Mosanto mpo na komela mai longwa na Liziba na Bomoi na Ye oyo ekaukaka te. Ezali libulu na mai oyo ezali kopunja-punja na kati na biso kino na Bomoi na seko.
Ezali mpasi mpo na biso kososola ntina nini moto oyo azali na makoki ya komela mai ya Peto na Libulu ya peto akoki kosepela komela mai oyo euti na engongolo esalemi na moto, na nzela ya tuyau esalemi na moto, longwa na ebombelo esalemi na moto, na filtre oyo esalemi na moto likolo na yango, mpo na kopekisa ba-nyama ya minene kokota na kati, na ntango oyo ezali na Liziba ya komela moko oyo esili kotatolama ete ezali Mai na Peto oyo euti na ngwende na Nzambe.
Toyebi na Kotanga Liloba na Nsango-malamu ya Yoane ete,
“Na ebandeli Liloba ezalaki, pe Liloba ezalaki elongo na Nzambe, pe Liloba ezalaki Nzambe.” “Pe Liloba elataki nzoto, pe efandaki elongo na biso.”
Azalaki Motatoli ya Solo pe ya Sembo mpo na Liloba ya Seko ya Tata. Azalaki Mosakoli pe akokaki koloba bobele makambo oyo Tata alobaki ete Ye aloba. Alobaki,”Tata na Ngai azali na kati na Ngai.” Yango nde likambo Yesu Mongombo alobaki,”Tata na Ngai azali na kati na Ngai.”
Na Emoniseli, Liloba elobi na biso ete tobongola ata Liloba moko na yango te, lokola Ewa asalaki. Alobaki ete kosala yango ekomema lisumu pe kufa.
“Soki moto abakisi eloko moko na makambo oyo, Nzambe akobakisela ye malozi oyo ekomami na mokanda oyo; pe soki moto alongoli eloko moko na maloba ya mokanda ya lisakoli oyo, Nzambe akolongola eteni na ye na Buku na Bomoi pe na mboka mosanto, pe na makambo oyo ekomami na mokanda oyo.”
Mosakoli na biso alobelaki biso ete Liloba ba Nzambe ezali na bosenga ya ndimbola moko te. Nzambe alobaki Yango, Esengeli kosalema. Alimbolaka Liloba na Ye moko. Biblia elobi na biso ete Esengeli na ndimbola moko te. Ye alobaki:”Tika ete pole ezala,” pe pole ezalaki. Na sima Alobaki:”Mongondo akokumba zemi,” azwaki yango. Yango esengeli na ndimbola moko te. Na sima Alobaki:” Na mikolo ya suka, Nakosopa Molimo na Ngai likolo na nzoto nyonso”, pe Asalaki yango. Yango esengeli na ndimbola moko te.
Liloba elobi na biso lisusu ete na eleko moko na moko Nzambe atindaka mosakoli moko, pe mosakoli yango alobaka Liloba na Ye. Mosakoli yango azalaki Liloba mpo na eleko yango. Toyebi lisusu ete Liloba na Nzambe eyaka bobele na mosakoli na Ye pe mosakoli yango azali molimboli ya Liloba na bonzambe.
Na sima, mosakoli na Ye amonisaka Liloba yango na bato. Bato bandimaka Liloba moko na moko. Oyo wana ezali Nzambe na kati na mosala, Dieu azali kosala mosala na nzela ya Molimo na Ye.
Na boye, tozongela yango na bokuse:
• Nzambe azali Liloba.
• Nzambe alobaka Liloba na Ye mbala moko na mosakoli na Ye.
• Mosakoli alobaka Liloba na Nzambe, liloba na ye moko te, Liloba na Nzambe.
• Mosakoli amonisaka Liloba na Nzambe na bato.
• Liloba na Nzambe esengeli na ndimbola moko te.
• Bato bandimaka Yango.
• Ezali Nzambe na kati na mosala.
Na sima, soki ngai “NAFINI BOUTON YA KOBETA”, nakoyoka:
• Nzambe kolobela ngai mbala moko.
• Liloba na Ye.
• Elobami na nzela ya mosakoli na Ye.
• Yango esengeli na ndimbola moko te.
NKEMBO, tosili Kososola Emononeli.
Koyoka Nsango Oyo ezali nzela oyo esili kobongisama mpo na Mwasi-na-libala na Ye na eleko oyo. Yango esilaki kotiama na ba-bandes pe kobatelama mpo ete Mwasi-na-libala amela longwa na Libulu-na-mai ya Peto. Koyoka Nsango Oyo ezali kofanda na nse ya mosanda ya monene koleka nyonso, mpo ezali Liloba na Nzambe mpenza oyo elobami mbala moko na biso longwa na Nzambe.
Yango esengeli kozala mwango na Nzambe mpo na Mwasi-na-libala na Ye na mikolo oyo ya suka.
Tosangana elongo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville mpo na komela longwa na Liziba ya Bomoi Yango oyo Ekaukaka te wana Akolobela biso ete tosengeli ata moke te komela longwa na Mabulu Matobwani, oyo eteyami mokolo ya 23 janvier 1965; Ye asili kobongisa Mai na Peto longwa na Liziba na Ye.
Ndeko Joseph Branham
Euti Na:
https://branham.org/articles/942020_TheEaglesGatheringTogether