23-0723 ELEMBO YA LIBOSO

Nsango: 63-0318 ELEMBO YA LIBOSO

BranhamTabernacle.org

Balingami…nakobianga bino Mwasi na Libala,

Nzambe, Mokeli Monene, Alifa na Omega, Fololo na Lobwaku, Fololo na Sosana na Salona, Monzóto na Kongenga na Ntongo, Tata, Mwana, mpe Molimo Mosanto, Likonzi ya Moto, Nzambe Ye moko, ayaki na mabelé mpe alobaki na biso na nzela na bibebu ya moto, NKEMBO!, atiaki Yango likolo ya bande, boye bokokaki koyoka Ye kobianga bino…” BINO” MWASI NA YE YA LIBALA.

Bomona yango na makanisi na bino baninga na ngai. Nkolo na biso Yesu Klisto, kotala yo kati na liso mpe koyebisa yo: “Ozali Mwasi na Ngai ya libala. Na lingi yo. Nazilaki yo ntango molai mingi. Mpo na ngai, obongi be. Ozali mosuni ya mosuni na ngai, mokua ya mokua na ngai. Naponaki yo liboso násála Mabelé to minzóto. Nalingi yo mingi mpenza. Tokolekisa Seko na Seko elongo. Sasaipi, Nazali Koya mpo na yo.”

Yango kaka esengelaki épesa moko na moko na biso Konetolama kati na Kondima. Zabolo akokoka nde kobwakela yo nini, koyebisa yo nini, kotia nini likolo na yo, ete eyokisa yo mpasi? ELOKO MOKO TE, OZALI MWASI NA LIBALA YA KLISTO! Ozali Liloba na Ye likomi mosuni, ozali Mrs. Yesu Klisto.

Moto akokoka nde boni, na monoko ata nini, kokoma mpe kolimbola oyo yango elingi koloba epai na biso? Okokoka kaka te. 

Ezali na esika te kati na mokili okokoka kozala na lokumu mpe libaku lilamu koyoka Maloba maye bobele Ozala na Emoniseli ya solo mpe OFINA PLAY. Makambo manene koleka mokili ezalaki kozila úta na ebandeli ya ntango, mazali kosalema mpenza sikawa, mpe tozali eteni na yango. Azilaki mokolo oyo, ngonga oyo, bato baye; BINO, kokokisa mpe kokomisa bokokisi ya Etandelo na Ye Monene.

Emoniseli ya libombami ya Bilembo Nsambo, Nkáké komonisama, bobongi be na biso, Adama na ye oyo azongisami mobimba, Boyei na Ye, makambo manso maye mazali komonisama mpe mazali kosalema SIKAWA, kati na BINO, MWASI NA YE YA LIBALA!

Na mokolo ya Mose te. Na mokolo ya Noa te. Na mokolo ya Yesu te, na mokolo kútú ya Yoane to ya Paulo te; Ezali kokóma sikawa, SIKAWA MPENZA, NA BINO.

Tolingi kozanga Yango Te. Tolingi tomilengele mpo na Boyei na Ye. Mpo na kosala yango, topesamaki motindo ya kokende na LILOBA mpo na biyano na biso. Likanisi na ngai te, to likanisi soko mabanza ya moto moko te, kasi oyo Liloba na Nzambe lindimisami elobi.

Toyebi ete Mwasi na libala asengeli koloba “amen” na Liloba moko na moko mpe kosangana elongo lokola Moko. Na boye tosengeli totala kati na Liloba ya Nzambe komona nini ekosangisa Mwasi na libala elongo.

Mpe ezali na Nkake Nsambo ya libombami koya oyo ikomami kútu ata moke te. Ezali solo. Mpe nandimi yango, na nzela ya Nkáké yango Nsambo ikomonisama na mikolo ya nsuka na ntina ete íyeisa Mwasi na libala elongo mpo na Kondima ya Konetolama. 

Bobele wana Ezali kati na Liloba. Nkáke Nsambo ikomonisama na mokolo na biso na ntina ete íyeisa Mwasi na libala elongo mpo na kondima ya konetolama.

Nsima motuna molandi tolingi toyeba mozali: Nkáke nde nini?

Ntango, oyo “engulumaki.” Bokanisa, lokito ya makelele makasi ya Nkáké kobeta ezali Mongóngó moko Nzambe. Yango nde Biblia elobi, bomoni, “lokito ya Nkáké.” Bakanisaki ezalaki nkáke, kasi Ezalaki Nzambe. Asosolaki yango, mpo ete emonisamaki epai na Ye. Bomoni? Ezali Nkáké.

Na bongo Nkáké izali Mongóngó ya Nzambe oyo ekomema Mwasi na libala elongo mpe kopesa bango (BISO) kondima ya konetolama. Wana nde eyano na biso.

Nani nde azali Mongóngó ya Nzambe epai na Mwasi ya libala? William Marrion Branham.

Sikawa, nazali kaka ndeko na bino, na nzela na ngolu ya Nzambe, kasi ntango Mwanje na Nkolo akiti na nse, na bongo, ekomaka, Mongóngó na Nzambe epai na bino… Nakoki koloba eloko te kati na ngai moko, kasi oyo Atalisaka ngai, nalobaka yango. Bondima yango mpe botala nini ekokóma. 

Bondima yango mpe botala nini ekokóma na Lomingo loye, lokola tozali koyangana elongo, kozua konetolama kati na kondima, koyoka Ye Konguluma epai na Mwasi na ye ya libala.

Bosili boyoka “kofanda sasaipi kati na bisika na Likolo”? Ekozala nini! Soko tokoki koyoka boye, kofanda na nse awa na mabelé, liboso Konetolama éya, kati na motindo oyo tozali na yango sasaipi; mpe tokoki kosepela, mpe kotelema nzinga nzinga na bitutú, mpe kotelema na nse ya mbula, bobele koyoka Oyo; ekozala ko boni ntango tomoni Ye kofanda wana! Oh, oo! Oh, ekozala ntango moko ya nkembo.

Zángá te kati na ntango oyo ya nkembo. Obiangami koyangana elongo na biso lokola tozali koyoka; Elembo Ya Liboso 63-0318, na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

St. Matai 10:1/11:1-4/24:60/28:19

St. Yowane 12:23-28

Misala 2:38

2 Batesaloniki 2:3-12

Baebele 4:12

Emoniseli 6:1-2/10:1-7/12:7-9/13:16/19:11-16

Malaki Mikapo Ya 3 Mpe Ya 4

Danyele 8:23-25/11:21/9:25-27