Nsango: 60-0515E Kotiama Lokumu Ya Mwana #1
- 26-1025 Kotiama Lokumu Ya Mwana #1
- 25-0504 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #1
- 21-0620 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #1
- 18-0603 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #1
- 16-0221 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #1
Molingami Sembo kati na Klisto Yesu,
Ntango ya nkembo nini oyo tozali kozala na yango. Tozali na nse ya bozili na etingia monene poso na poso lokola tozali kosangana elongo zingazinga na Mongongo na Ye. Likanisi na biso ya molimo nyoso lizangi mobulungano. TOYEBI mpenza Azali Nani. TOYEBI mpenza Azali nini. TOYEBI mpenza tozali ba nani; libota moko monene ELONGO NA YE!
“Apesaki moto kozala nzambe moke.” Zambi Azali Tata Nzambe, mpe Asalaki moto nzambe moke, na bongo Azali lisusu na Ye moko te, Azali kobika elongo na libota na Ye. Elah, Elah, Elohim. Sikawa, sikawa Azali Yawe. Yawe, elingi koloba, “Oyo Azali kobika elongo na libota na Ye.”
Libota na Ye Mwasi ya libala azali kobongisama be na nzela ya Mongongo Yawe Ye Moko. Ayekolisaki biso lolenge ya kobundisa monguna moko na moko oyo azali koyela biso etumba; boni tokoki kokweisa mpe kolonga ye na Liloba, mpo ete Liloba na Ye lizali kobika mpe kofanda kati na biso. Apesaki biso endimiseli ete, “TOZALI LILOBA”. Na bongo likambo nyoso likolomba biso na Nkombo na Ye, tokoki kozua yango soko tondimi…MPE TONDIMI!
Alobaki mpe Amonisaki biso lolenge ya kokoma Matongi ya mibali mpe basi babongi be ete tokoka kozala esika ya kofanda wapi Azali kobika. Agangaki bo lisweswe, mpe Agangaki bo lisweswe koyanganisa Mwasi na Ye ya libala molingami elongo koyebisa biso Azali Mokambi na biso, mpe Azalaki kotambolisa mpe kokamba biso na nzela ya mwanje na Ye ya mabele mokambi, William Marrion Branham.
Sikawa Azali na lilakisi mosusu godi Alingi kolakisa biso. Alingi koyebisa ete tozali bana na Ye baoyo totiami na bokonzi ya bana. Nkombo na biso ezali bobele lokola Nkombo na Ye. Tosili tobimi na Kanana, tobimi na mokili, mpe tozali SASAIPI kofanda elongo kati na bisika ya Likolo, kolia Mana mabombami, mabatelamaki.
Sikawa Akoyebisa biso oyo tosengeli kosala komibongisa mpo na Liteya na Ye likolanda, mpe oyo ekoki kokoma soko tosali yango.
Tosengeli kozala kati na mabondeli mpe tobelemi mpo ya Liteya; Koyangana elongo biso mpenza lokola babulami koyoka Mongongo na Ye, tobatisami na Molimo Mosanto, totondi na mapamboli ma Nzambe; makanisi mabe te; likambo moko te moko kotemela mosusu; koloba kati na bolingo mpe boyokani; Kozala kati na lobanzo moko, na esika moko elongo kati na bisika ya Likolo na nse ya lolenge ya molimo ya Likolo; masumu na biso nyoso na nse ya Makila, kati na kosambela ebongi kwa; maboko mpe mitema na biso itombwi likolo epai ya Nzambe, kosambela elongo kati na bisika ya Likolo.
Soko tosali makambo wana, oyo nde ekosalema Lomingo loye:
● Kobika na malali
● Koyeba makambo liboso
● Emoniseli
● Bimononeli
● Nguya
● Ndemo
● Ndimbola
● Bwanya
● Mayele
● Mapamboli ya Likolo
● Esengo ezangi maloba mpe etondi na Nkembo
Motema nyoso mokotondisama na Molimo Mosanto. Nsima na pwasa kouta na Likolo lolaka lokola lokito ya mopepe makasi lokopambola biso na mapamboli nyoso ya molimo.
Nde likambo likosalema Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, wapi Nzambe Apesi esika ya motuya monene epai wapi Mwasi ya libala akoki koyangana elongo koyoka Mongongo na Ye na lobanzo moko, na esika moko, na maboko mpe mitema na biso itombwi likolo epai ya Nzambe, kosambela elongo kati na lolenge ya Likolo kati na molimo.
Ndeko Joseph Branham
Liteya: Kotiama Na Bikonzi Ya Bana #1 60-0515E
Makomi:
Yoele 2:28
Baefese 1: 1-5
I Bakolinti 12: 13
I Petelo 1: 20
Emoniseli 17 : 8
Emoniseli 13