NSANGO: 60-0522M Kotiama Lokumu Ya Mwana #3
- 26-1108 Kotiama Lokumu Ya Mwana #3
- 25-0518 Kotiama Lokumu Ya Mwana #3
- 21-0704 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #3
- 18-0701 Kotiama Lokumu Ya Mwana #3
- 16-0228M Kotiama Lokumu Ya Mwana #3
Balingami Baoyo Batiami na Bokonzi ya Bana,
Makonzi ya mokili mazali koyebisa bato, “Bomibongisa, bomibongisa mpo na mokolo ya libebi. Bobomba bilei mpe mai mpo na libota na bino mpo bozala na bisaleli mpo na oyo ezali koya.” Mokili ezali na nsomo. Nini ekosalema? Lobi ekomema nini?
Tozali komona lisakolli kokokisama liboso ya miso na biso. Mokili ezali kopanzana. Bobangi mpe mobulu ezali kopalangana na mokili mobimba, zambi bayebi te oyo ezali koya. Ntango ekoya ekomema nini? Tokoki kosala nini? Oyo nde nsuka?
Na ntango yango moko, Tata Nzambe azalaki kokebisa mpe kobongisa biso mpe lokola. Asili abombi bilei mpe mai na biso mpo na biso, mpe tozalaki kolia mpe komela uta na libulu na biso ya etoko. Tobongisami, mpo na mokolo ya libebi te, kasi mpo na Konetolama!!
Mwasi ya libala ya Klisto azalaki naino na esengo mpe kimia ndenge oyo liboso te. Tata Nzambe azali koloba na Mwasi na Ye moke na mokili mobimba, “BOBANGA TE, bosepela. Bozali baponami na Ngai. Nazali kobongisa bino mpo na Konetolama, Mokolo ya Libala na bino. Nazali kolongola bino na mobulu oyo. Bozali bana na Ngai mibali mpe basi batiami na bokonzi ya bana. Litondi ya ntango ezali koya.”
Yubile nini tozali na yango. Liloba nyoso toyoki ezali eteni moke ya libanga ya wolo mpo na biso. Tozui Yango mpe tokobi kopetola Yango mpe kopetola Yango lisusu mbala na mbala. Na nsima tolobi:
“Mosanto, mosanto, mosanto, epai na Nkolo.” “Mosanto, mosanto, mosanto, epai na Nkolo.” “Mosanto, mosanto, mosanto, epai na Nkolo.”
Miso na biso matiami na Kalvari, mpe eloko moko te ekopekisa biso! Tozali kotambola na nzela monene ya Mokonzi, wana topakolami mafuta ya motuya mingi, kokota na Esika Mosanto koleka.
Ntango monguna azali komeka koyebisa biso ete tobungi mpe tozali Mwasi na Ye ya libala te, tofini kaka Play mpe Ye azali koganga epai na biso mpe koloba:
Bolongola yango na makanisi na bino ete bozali kobunga mpe bozali kosala boye, mpe bozali kobanga boye. Bobanga eloko moko te, zambi azali komeka koyebisa bino epai bozali, bozali ba nani, ndenge botelemi.
Mokili ezali kati na BOBANGI, mpe na ntango yango moko Tata Nzambe azali koloba na biso, “Bobanga ELOKO MOKO TE, Nazali koyebisa bino bozali ba nani mpe epai bozali kokende.” …NKEMBO!!
Na bolembu na biso ya bato tozali kokweya mokolo na mokolo. Tozali kosala mabunga mingi. Tozali kosala makambo mingi oyo tosengeli kosala te. Na nsima zabolo azali kobeta biso mpe kobeta biso, koloba ndenge nini tokoki kozala Mwasi ya libala.
Kasi tozali makasi. Toyebi mpenza oyo tosengeli kosala: Kofina Play koyoka oyo Tata Nzambe azali koloba.
Sikawa, mbala mosusu osali makambo mabe, mpe mbala nyoso osali likambo mabe okofutama mpo na yango. Ee, tata, okobuka oyo okoni! Kasi yango ezali na likambo moko te na lobiko na yo. Ntango obotami na Molimo ya Nzambe, ozali na Bomoi ya Seko mpe okoki kokufa lisusu te lokola Nzambe Akoki kokufa te. Ozali eteni ya Nzambe, ozali mwana ya Nzambe.
Esepelisaki Nzambe kobongisa biso liboso. Esepelisaki Nzambe kokomisa biso Bana mibali mpe Bana basi. Esepelisaki Nzambe kotia biso na bokonzi ya bana. Esepelisaki Nzambe kopesa biso Emoniseli ya solo ya oyo Azali mpe oyo tozali. Esepelisaki Nzambe kokamata mwanje na Ye na nsima ya ezipelo ya ntango mpe komonisa ye BISO na ngambo mosusu mpo tosepela mpe tozala na BOBANGI TE.
Mawa ezali ete, ba bande oyo ezali mpo na moto nyoso te. Ezali mpo na lingomba ya mosakoli kaka…Nkembo, nde biso. Monuti nyoso tokoki, mpe ntango nyoso toyangani elongo, nyoso tolingi kosala ezali kaka Kofina Play mpo na koyoka Mongongo ya Nzambe.
Basusu bazali na yango malamu. Bamonaka na bango kaka te lokola biso, bazui yango kaka ndéngé moko, kasi epai na biso… Ezali malamu mingi kotala yango; zambi toyebi ete Yango nde nzela Tata Nzambe apesi mpo na lelo.
Mokolo na mokolo mokili mpe bato na yango bakomi na mawa mingi. Nyoso emonani molili tuu mpe londende. Kasi mpo na Mwasi ya libala, mokolo na mokolo ememaka kolamukiisama na nzela ya Emoniseli. Tozali na kopema, totondi na Molimo Mosanto na Ye, kofanda elongo kati na bisika ya likolo.
Bosila ndele komituna ndenge ezalaki na mokolo ya Pentekoste ntango mopepe ya makelele makasi eyaki mpe Molimo Mosanto atondisaki ndako, mpe moto nyoso kuna?
Banza lisusu te. yaka komibakisa na biso Lomingo oyo na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola Azali koyanganisa ba mpongo na Ye elongo, kotondisa eteni ya ndako na bino na Molimo Mosanto na Ye, mpe kobongisa biso mpo na Koya na Ye ya noki na koleisa biso bilei na Ye bibombamaki. Bokozala kolia mpe komela uta na ndako na Ye ya ebombelo, Mongongo ya Nzambe likolo na ba bande.
Ndeko Joseph Branham
Liteya: Kotiama Na Bokonzi Ya Mwana #3 60-0522M
Makomi:
Matai 28:19
Yoane 17:7-19
Misala 9:1-6, Mikapo 18 mpe 19
Baloma 8:14-19
1 Bakolinti 12:12-13
Bagalatia 1:8-18
Baefese Mokapo ya Liboso
Baebele 6:4-6, 9:11-12