Nsango: 60-0518 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2
- 26-1101 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2
- 25-0511 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2
- 20-0620 Kotiama na bokonzi ya mwana # 2
- 18-0617 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2
- 16-0224 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2
Molingami wa Motema Mpenza,
Bomilengeli, bana mibali mpe bana basi ya Nzambe oyo bomonisami mpe boyambami kotiama na bokonzi ya bana, kofanda elongo kati na bisika ya likolo, kosangana na Mwasi ya libala uta mokili mobimba, mpo na koyoka Mongongo ya Nzambe kolobela bino monoko na litoyi?
Ee!!! Tomilengeli koyoka Mongongo ya Nzambe koyebisa biso mpenza ba nani tozali.
Nabiangi bino “balingami ya motema mpenza” zambi bozali yango. Boza—bozali bolingo mpenza na ngai. Boyebi nini? Tika… Tala Likomi oyo eyei. Paulo alobaki, “Nazali na zuwa likolo na bino (Lingomba na Ye) na zuwa ya Nzambe, zambi nasili nabalisi bino.” Tala yango, ezali yango. Yango nde. “Zambi nabalisi bino, nabandisi bino na Klisto, lokola moseka peto.”
Nkembo na Nzambe, mwanje na Ye abalisi biso na Ye. Tozali baseka peto na Liloba na Ye, Etinda oyo, na Mongongo na Ye na ba bande. Sikawa tobalisami na Klisto.
Tokozala tobelemi mpe na bozili na etingia monene mokolo mwa Lomingo. Tokoswa mosapi na biso mino, tokofina bomoto na biso, mpe tokobenda mitema na biso. Tokozala mbala moko lisusu, kokumisa Nkolo na koganga, tokoganga “amen, aleluya”, kaka lokola ntango minzoto na ntongo iyembaki esika moko mpe bana ya Nzambe bagangaki na esengo elongo, ntango bamonaki etandelo ya lobiko, ntango Nzambe atiaki bankombo na biso na Buku na Ye liboso ya bozali ya mokili.
Tokoki nde kososola ete Tata Nzambe azalaki kozila, uta ebandeli ya mokili kino mokolo oyo, MPO NA BISO? Amonaki epai tokomonisama na mikolo ya nsuka, mpe azalaki kozila mpe kosuma mpo totelema na nguya ya Molimo Mosanto mpo na komonisa biso makambo mabombamaki kino lelo oyo.
Na bileko nyoso, basakoli bazilaki kino mikolo oyo ya nsuka mpo makambo oyo mamonana. Tata Nzambe alobaki ete azalaki kozila mpo lingomba na Ye likola uta eleko ya Luther, eleko ya Baptisiti, eleko ya Methodisiti, eleko ya Pentekoste, mpe sikawa kino libanga ya nsuka ya moto kokita. Na nsima Litongi lisili.
Mikolo millakamaki, oyo Nkolo alobaki mpe azilaki mingi, mizali sikawa kosalema mpe kokokisama liboso na biso… MPE KATI NA BISO. Tozali sikawa kati na Klisto Yesu, kofanda kati na kimia ya Likolo, mapamboli ya Likolo, Molimo ya Likolo, epai wapi nyoso ezali ya biso. Tozali na mokili ya elaka mpe tozali na bozwi mobimba ya makambo nyoso.
Momboto na Ye ya liboso ekomaki na bokoli mobimba mpe moningisamaki liboso ya Mwasi na Ye ya libala. Molimo Mosanto azongaki epai ya Tata Nzambe mpe alobaki boye na ntina na mwanje na Ye ya nguya:
Mwanje na Yo azali kokola kati na ngolu! Azali kobuka nkoni. Azwi bampate wana mpe akoki kokamba bango bobele lokola Yo. Akopesa bango matiti mabe te. Akopesa bango bisaniya soki moke te. Ntango bakoya koloba, ‘Tolingi kokota na lingomba,’ alobi, ‘Kanga monoko na yo, ozali na bosenga na yango te! Te, mobali. Oyo osengeli na yango nde, “Bobongola mitema mpe bobatisama, moko na moko na bino, na Nkombo ya Yesu Klisto, mpo na bolimbisi ya masumu na bino. Bokozwa likabo ya Molimo Mosanto.”’
“Oo, alobi yango solo?”
“Ee, Tata, alobi yango solo.”
“Boye, yango nde ndenge Nakomaki Yango.”
“Yango nde ndenge alobi Yango.”
“Oyebi nini? Namonaki Episkopo Mokonzi songolo-pakala koyebisa ye ete ‘akoki te koya na engumba oyo mpe kosala losambo.’ Kasi, Oyebi, nakambaki ye moke, nalobaki, ‘Kende ata bongo.’ Bayebisaki ye ete aloba mpe asala ete alongola ba bande na ye nyoso, mpe atika yango kobima te.’ Tokendaki ata ko bongo!”
“Nde Mwana na Ngai oyo Nayambi oyo nazalaki kozila. Sikawa nakoki koloba na nzela na ye mpe komonisa makambo nyoso na Ngai mabombami epai ya bampate na Ngai.”
“Tata Nzambe ya kokamwa.”
“Sikawa olingi napesa Yo lapolo na ntina na bana na Yo mosusu?”
“Ee, bazali ndenge nini?”
“Oo Tata… Okosepela mingi na bango. Bazali lokola tata na bango. Ba Episkopo mikonzi wana bazali naino koyebisa bango makambo wana moko, kokende te na mangomba ya ba bande mpo na koyoka Mongongo na Yo. Balobi ete ba bande ezali Mongongo ya ntina koleka te oyo basengeli koyoka, ezali na mingongo mosúsu ya ntina koleka sikawa.”
“Oyebi oyo bampate na Yo bayebisi bateyi wana?”
“KANGA MONOKO NA YO, TOZALI KOTIKALA NA BA BANDE, TOZALI KOTIKALA NA MONGONGO YA NZAMBE.”
“Bazali solo kosala bongo?”
“Ee, Tata, bazali kaka lokola Yo.”
“Oo, kitoko nini oyo. Yango esepelisi Ngai mingi. Nazalaki kozila bango uta kala. Sikawa bango mpe babongisami mpo na KOTIAMA NA BOKONZI YA BANA!!”
“Bakozala na esika na bango ya mosala Lomingo oyo na ngonga ya 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpo na koyoka Mongongo na Yo. Bakozala basangani mpe bayangani uta mokili mobimba mpe bakobianga moto nyoso amibakisa na bango.”
“KITÓKO MINGI, NAKOZALA WANA ELONGO NA BANGO.”
Ndeko Joseph Branham
Ekaniseli: Bóbósana te na ntina ya Mbóngwáná ya Ntango ya Moi.
Liteya: Kotiama Na Bokonzi Ya Mwana #2 60-0518
Makomi:
Genese 1:26
Baefese Mokapo ya Liboso
Baloma 8:19
Bagalatia 1:6-9
Baebele Mokapo ya Motoba
Yoane 1:17