Category Archives: Uncategorized

26-0816 ELEKO NA LINGOMBA YA TWATILA

Nsango: 60-1208 ELEKO NA LINGOMBA YA TWATILA

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála Ya Klisto,
Tíká tóya elongó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka 60-1208 Eleko Ya Lingómba Ya Twatíla.

Ndeko Joseph Branham

26-0809 Eleko Na Lingomba Ya Pelegamo

Nsango: 65-1207 Eleko Na Lingomba Ya Pelegamo

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála Ya Klisto,
Tiká tóya elongó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka 60-1207 Eleko Ya Lingómba Ya Pelegámo.

Ndeko Joseph Branham

26-0802 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA

Nsango: 60-1206 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA#

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála Ya Klisto,

Tóya elongó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka 60-1206 Eleko Ya Lingómba Ya Sumulúna.

Ndeko Joseph Branham

26-0726 Eleko Na Lingomba Ya Efese

Nsango: 60-1205 Eleko Na Lingomba Ya Efese

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála Ya Klisto, tíká tóya elongó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka 60-1205 Eleko Ya Lingómbá Ya Efese.

Ndeko Joseph Branham

26-0712 EMONISELI YA YESU KLISTO

Nsango: 60-1204M EMONISELI YA YESU KLISTO

BranhamTabernacle.org

Balingami Ebólo Ya Bato Ya Lisakoli,

Bóní tolingí Liloba, EMÓNISELI! Litómbá ya Emóniseli ya sóló NYOSO na nzela ya Molimó Mosanto epai ya mondimi ya sóló ekokí sokí te kobétama nsété koleka. Emoniseli elingí koloba koleka bomoi epai ya Mwasi ya libála; zambí likoló ya LIBÁNGÁ OYO, EMÓISELI, Nakotonga Lingómbá na ngai, mpe na ngolu mpe mawa ya Nzambe, tozali Lingóbá na Ye na Emóiseli na Ye ya sólo.

Búku ya Emóniseli ebongísámí te mpo ya moto nyoso. Ezalí na moto moko te oyo akokí kosósola Yango. Ezali Buku ya masakoli ekomámákí mpo na yango, mpe ekokï kosósolama bobélé na, ebólo moko ya bato ya lisakoli: BISO, Mwasi ya libála ya Yesu Klisto.

Ezali Búku bobélé moko oyo Klisto Ye moko akomákí kati na Biblia mombimba, kasi Atindaki mpe Ayéisaki Yango na nzela ya mwanje na Ye epai ya mosali na Ye Yoane. Bayéoli bayébákï te sóló oyo itiámákí na masíni. Emónisámélákí bango libosó te. Ata Yesu akokákí te koyébisa bango esíká na Ye kati na Yango; mpámba te Tatá amónisákí yango na Ye te.

Kasi sikawa, nsima ya kúfa mpe kosékwa na Ye, mpe na ntango oyo godi, Azali na makokí ya koyésa Emóiseli oyo ya Ye moko epai ya Yoane, oyo nkémbo mpe bozali na Ye kati na lingómbá ekolinga koloba mpe kosála.

Kasi ata sikawa, nsima ya mbúla nkóto mibalé, mokili enyatí-nyatí baí teolojï bayékólá mpe bakakólá, kasi moko te azali na ndimbola ekoki mpe Emóniseli ya mabómbamí maye makomámáki kati na Búku ya Emóniseli kino na lelo oyo, kino ntango oyo, ntango Nzambe atíndákí mwanje yango moko na mabelé komónisa nyoso na Yango epai na BISÓ Mwasi na Ye ya libála moponami.

Komeka kosósola bonéne ya ndéngé Nzambe aponákí ngai, mpe Aponáki yo; kozala na Emóniseli ya Sóló ya Liloba na Ye ezali koleka ndimbólá ya moto. Na ntango ezali na mingi baoyo balobi ete bazali kolanda Etindá mpe balobí ete bandimí Nzambe atindákí mosakoli, bazali te na Emóniseli mobimba kati ya koyéba likámá ya kozánga kokómisa Mongóngó na Ye mongóngó ya litómbá koleka baSENGÉLÏ KOYOKA. Kozala na Emóniseli oyo ya Mongóngó na Ye lelo oyo ezali sóló mpenzá Mayaka ya motúya monéné.

Nzambe aponákí bisó komónisa EMÓNISELI YANGO YA SÓLÓ epai na bisó. Ntina wana, tozali LINGÓMBÁ na Ye ya SÓLÓ, Limpinga na Ye liyébí kológama te oyo Satána azángi nguya libosó na Yango, mpe apotání nde kopotana. Na Emóniseli na Ye ya Sóló kati na bomoi na bisó, bikuke ya ewélo bikokí te kolónga libosó na bisó kasi tokolónga likoló na yango. Ezali na ELOKO MOKO TE oyo ekokí kotélema libosó na bisó.

Emóniseli ya Sóló mpe mobimba mpo ya lelo ezali koyéba litómbá ya Mongóngó ya Nzambe mpo ya mokolo na bisó. Soko kokende na losámbo, kozala moto ya losámbo, kosála mbeka, kobóndela, mpe kokúmisa Nzambe nde nyoso Nzambe Aséngí na boye Nzambe akokáki kozala na libúngá kokwéisa Kaïna wana esálákíye kaka mpenza eloko elobákï Ye ásála.

Oyo nde Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde elingi koloba epai na bisó:

Emóniseli ya likambo mobimba etiámákí nsima awa na lipámbolí epai na ye oyo azali kotanga Yango mpe koyóka Yango, na elakeli mabé epai na baoyo bakobakisa to kolongola. Ezali mobeko mobimba, oo, etémelo. Eloko moko te ekoki kobakisama na Yango. Mpe ntango moto moko amekí kolongola eloko ata nini longwa na Yango, to kobakisa eloko moko na Yango, Nzambe alobí Akolongola eténi yango moko longwá na Búku ya Bomoi, bomóni? Akolongola eténi na ye na Yango soko abakisákí na Yango.

Lokola libosó naino soko moké te, Nzambe apési bisó NZELA EBONGÍ BE tóakisa te to tólongola te na Liloba na Ye. Apésí bisó libakú malámu ya koyóka Mongóngó na Ye lokola Azali koloba mpe komónisa Liloba na Ye epai na bisó. Ekokí na yango kaka te kozala na eloko ézala nini koleka yango.

Oyo nde EMÓNISELI YA SÓLÓ mpo ya lelo.

Nasepeli koleka mpe nazali kozila na etíngiá monéne mpo na nyoso Nkóló azali na yango na ebómbelo mpo na bisó lokola tozali koyóka, kotánga, mpe koyékola Bileko Nsambo Ya Lingómbá. Nzambe akomákí Yango, mpe atíndákí mwanje na Ye koyebisa Yango epai na Yoane, na nsima Azilákí bisó tózala awa na mabelé na ngonga oyo mpenza na ntina ete Ákoka kotinda mwanje yango moko epai na bisó komónisa Yango!

Etíkálá soki moké te kozala na ntango ata moko ya nkémbo kati na lisoló ya mokili oyo koleka lelo. Etíkálá soki moké te kozala na lokúmu monéne epésámélá moto koleka kozala na libakú malámu koyóka Mongóngó ya Nzambe ye moko. Etíkálá soki moké te kozala na ntango Mwasi ya libála akokákí kosangisama elongó na nzela ya Mongóngó na Ye banso na ntango yango moko.

Bóíléngela, Nzambe akopésa bisó kútu Emóniseli ya Ye moko koleka mpe baoyo tozali: limpingá na Ye liyébi kolóngama te, baponami na Ye, Mwasi oyo alongólámí kati ya ba mosúsu, Molingami na Ye ya motéma Azalákí kozila útá na ebandeli ya ntango.

Eloko moko te ekokí kolongola yango na bisó. Ezuí lóngo kati na mitéma mpe bomoto ya biso lokóla libosó naino soko moké te. Ekómí sikawa likambo ya sóló oyo ezali kopésa bisó Kondima ya konétolama.

Tokobanda mobembo na bisó monéne Lomíngo oyo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Litéya ya libosó: 60-1204 Emóniseli Ya Yesu Klisto.

Nalingi Náyíkisa yo mpiko ózua búku na yo ya Bileko Nsambo Ya Lingómbá, tángá yango kati na kímia ya eténi na yo ya ndako mpe yékólá yango, mokapo moko, nsima ya mosúsu, póso na póso. Tokozala tosangání elongó koyóka Mongóngó na Ye, na nsima koyéka Liloba na Ye.

Ndeko Joseph Branham

26-0705 Edene Ya Satana

Litéya: 65-0829 Edene Ya Satana

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála Oyo Abongí Be,

Nzókandé komóna kozímbisa ya mongúná, totíkálá ata moké te kozala na mokolo lokola oyo tozali kobíka kati na yango sikawa. Ezali mokolo ya mayéle mabé, ya kozímbisa ya koleka. Mpe ntango Namóní yango, ezali komema oyo, ete, moklisto asengélí ázala na kokéba-keba lelo koleka lolengé atikálá ndéle kozala na eleko ata nini.

Ndeko Branham alobákí maloba oyo epai ya Mwasi ya libála elekí mbúla 61 lelo oyo. Kozímbisa ya mongúná ezalakí lolengé nini mbúla 61kala kokokana na sikawa? Kotia yango na loléngé mosúsu ya komóna makambo, tómbwá ya mabongi ya zébi ezalakí bóní eleki mbúla 61 kokokanisa na loléngé ezali lelo?

1961 ezalákí ebandeli ya kowélana kati ya bisáleli mpe bibuneli ya mipepe, ba odinatéle izaláki na litongi ya bonéne ya eténi ya ndako na motindo ete izalákí kosála na nzelá ya bilekelo polélé mpe ba kálati itobwání-tobwání oyo esengéláki bobélé na ba nganga-zébi ya boyébi mingi kosálisa yango mosálá. Ba telefóne itiámákí na bitutú mpe ikangámákí na singa ya mbengi milaí makási, ba Talanzisitólo minéne, masíni ya bokomi mikandá ya ebeteli ya mekaníki, bisíká ya bokótisi nkásá ya bokomeli mpe ba masíni ya mekaníki ya botángi mitúya.

Kasi lelo tozali na Etenéte, makambo ya Mayéle Mabongísámí na moto mazali na makokí ya kosála misálá ya boyemi, ya bokomi, mpe mazali kosunga na misálá bobélé na ntango esengélámí na yango. Pépo iúlání na bondóki lokola likongá komema bato kokende na Mars. Smartphone ya bonéne kokoka kokóta kati ya libenga, ba sáa ya kokámwa, mpe bisáleli ndéngé na ndéngé ya masíni ya mipepe oyo ikangísí moto na nkóto ya ba makiási na mokili mobimba na ekanganeli ya singa te oyo na mbala moko ikangisí moto na bato yango na nzela ya mongóngó, nkomá, mpe video. Basungi ya bikeko.

Mayéle mabé mpe kozímbisa ya mongúná ezali lokola libosó naino soko moké te. Mombóto mabé ya Satána ekómi na kokémba na yango mobimba mpe esáli Edéne ya Satána. Kasi na ntango yango moko, Nzambe azalí na Mwasi ya libála oyo akómí na kokémba mobimba, Mombóto na Ye ya Bokonzi oyo amíbongisí Ye moko na bofándáká Kati na bozali ya Mwana, Liloba na Ye, Mongóngó na Ye.

Nzambe ayébákí Asengélákí kopesa nzela ya kobátela Mwasi na Ye ya libála na eleko oyo ya kozímbisa, eleko mabe. Nzela ebongí be na motindo ete bakosengela te komítúna, kobánza-banza, to kozua Liloba ya moto ata nani na esiká ya Liloba lizangí kobébisama.
Ayébákí ete bakosengela komíyókela Mongóngó ya Nzambe, zambí Akébisakí bisó ekozala pene mpenza na loléngé ete ekozímbisa ata Baponami mpenzá soko ekokoka.

Bato bakokákí kopakolama, kotóndisama na Molimó Mosanto, mpe kozala lokutá. Asengélákí kopésa nzela. Ntina wana, Asálákí NZELA EBONGÍ BE mpo ya Mwasi na Ye ya libála, oyo elingaki komónana lokola ete ekokí te ntango Abandaki kotia Mongóngó na Ye na masíni na 1947; ete na kosímba ya mosapi ya bango, mokili bákokaki komíyókela Liloba moko na moko Alobákí, ata na lokóta ya bango moko. Ekozala te na MITÚNÁ, TE NA KOMÍTÚNA-TUNA. BAKOKAKI KOMÍYÓKELA YANGO ELOBÍ NKOLÓ.

Abongísákí kútu nzela ete Akokákí kosangisa Mwasi na Ye ya libála longwá na mokili mobimba koyóka Mongóngó na Ye, banso na ntango yango moko, mpo bákoka kozala na likanisi moko, na lobánzo moko, koyóka Ye koloba.

Asengélákí kozua motindami na Ye, kasi Atíkákí Mongóngó na Ye, Liloba na Ye libongí be mpo ya Mwasi na Ye ya libála alongí be. Na boyókáká mpe na botíkáláká na Mongóngó na Ye, bakoyéba ete bakokí te kozímbisama.

Mpe yang’oyo: Nde bongo Nzambe Atongí Lingómbá na Ye, Liloba moko na mokó éngébéné na loléngé na Yango! Moto akobika bobélé na kwanga te, kasi na Liloba nyoso libimí na monoko ya Nzambe.”

Toyébí ete oyo ezali Kondima Liloba nyoso Molimó Mosanto alobí, nde epai ngai, Nazali na lokúmu monéne koleka epésámélá ndéle moto. Nakokí koyóka, na matói na ngai, MONGÓNGÓ mpenza KOLOBA Liloba moko na moko kobima na mokoko ya Nzambe.

Ezali na nzela mosúsu te mpo na ngai. Nzambe apésá nzela mingi mpo ya kobikisa bana na Ye, kasi mpo ya ngai, Nzambe apésá NZELA EBONGÍ BE KOBONGISA BE MWASI NA YE YA LIBÁLA.

Lelo, Satána azali kobúka eténi ya Likomi oyo ezali mpo ya lelo oyo. Akoyebisa bino ete nyoso Yesu asálákí ezalákí malamu be. Akoyebisa bino ete nyoso Ndeko Branham asálákí ezalakí malamu be, mpe azalaki mosakoli ya Nzambe. Kasi ntango ekómí ete báyókisa Mongóngó yango mpenza endimisámí ya Nzambe kati ya lingómbá na bango, bakoloba ete yango ezali mpo ya lelo te, ezali nde mosálá ya botéi.

Nde nyoso asengélí kosála, bomóní, ezali ete ámema bato Kondima Yango bongo, mpe nde—nde nyoso. Zambí, “Okoki te kolongola Liloba moko na Yango, to kobakisa Liloba moko na Yango.” Kasi yango nde asálaka.

Mokambi na bino na molimó atiáka nini na esíká ya libosó kati na lingómbá na bino? Mongóngó ya motúya koleka Mwasi ya libála asengeli koyóka lelo nde nini? Bokokí kozala bobélé na 1 ya Monéne.

A. Mongóngó ya batéyi?
B. Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde?

“Mombóto moko na moko esengéli kotówa kokokana na loléngé na yango.” Nde bongo Nzambe Atongákí Edéne na Ye.

Natéméli te batéi kotéya. Nayébí mpe Nandimí, Nzambe abiángí bango. Kasi epai na ngai, botéi ya solo ekoyébisa Eyánganelo na bango ete Mongóngó likoló ya ba bánde nde Mongóngó ya litómbá koleka ba SENGÉLÍ koyóka, na ntina wana basengeli koyókisa ba bánde kati ya lingómá na bango, zambí yango nde MONGÓNGÓ MONÉNE.

Kasi mpo na ngai mpe ndako na ngai, mpe Eyánganelo ya Branham, tokotíkala na NZELA YA NZAMBE EBONGÍ BE EPÉSÁMÍ. TOKOFINA na bisó PLAY mpe koyóka Mongóngó ya Nzambe.

Nalingaki kobiánga mokili mobimba koya komíbakisa na bisó koyóka Mongóngó yango Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola mbala moko lisúsu tozali kosangana zingázingá ya nzela ya Ye eponámí epésámí mpo ya lelo.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: Edéne ya Satána 65-0829

Makomi ya kotánga libosó ya boyóki Litéya:
2Timoté 3: 1-9
Emóniseli 3:14
2 Batesaloniki 2: 1-4
Yisaya 14: 12-14
Matái 24: 24

26-0628 Ekongoleli Ya Moto Oyo Akanisaka

Nsango: 65-0822E Ekongoleli Ya Moto Oyo Akanisaka

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya Libála Ya Klisto,
Tika tóya elongó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka 65-0822E Ekongoleli Ya Moto Oyo Akanisaka.

Ndeko Joseph Branham

26-0621 KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

Nsango: 65-0822m KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Mokonzi,

Na bongo Mwasi ya libála lelo azuámí longwá na nzóto ya Klisto, oyo ezali kobíka mpe kosála mpeza bobele lokóla elobákí Ye ete Ekosála mpo ya lelo oyo, Mwasi ya libála, Mwasi ya Mokonzi; Mokonzi mpe Mwasi ya Mokonzi.

Ntango Yesu akómákí Liloba wana mobimba, nde tozalákí NDÉLE eténi na Ye. Ezali na zábolo te, nguya te, eloko ata moko te ekokoka ndéle kolongola yango na bisó. Yango nde likonzí epai wapi bomoto botingámí.

Kolamukisa ya lolengé nini oyo Mwasi ya libála azali kozua na Litéya moko na moko tozali koyóka. Ezali koleka maloba mokúfi akokí kobimisa. Ezali te na elílíngi ata moké ya ntembe, Nzambe aponákí bisó mpe apésákí bisó Emóniseli ya SÓLÓ ya Liloba na Ye mpo ya lelo. Na ntina wana, toyébí tozali ba nani, Mokonzi Mwasi na Ye.

Mongóngó ya Nzambe koloba na Mwasi na Ye ya libála likoló ya ba bánde ezali kobongisa be Mwasi na Ye ya libála. Ezali na lotómo mosúsu te, mongóngó mosúsu te; Ezali na elóko moko te oyo ekokí kobongisa be Mwasi na Ye ya libála kasi Nzambe Ye moko koloba na nzela ya bibebú ya moto mbala moko alimá na Mwasi na Ye ya libála. Basúsu bakokí kolinga kozua eloko mosúsu na esiká wana, kasi Mwasi na Ye ya libála a Kondimana na eloko mosúsu ata nini te kasi MONGÓNGÓ na Ye, mokandá na Ye ya bolingo epai ya Mwasi na Ye ya libála; mpámbate ba Mpate na Ye Balingí koyóka sé Mongóngó na Ye.

Bato balobí ete tozali kopésa motúya mingi likoló ya mosakoli. Ezali nde likambo ya kokámwa ete bato bazangí Kondima ete Tatá monéne ya Likoló Ye moko atiéláki mpenza mwanje na Ye motéma na motindo ete Atiákí litómbá ya ndéngé wana likolo ya eténi moko na moko na ntina na ye; loléngé alátákí, lolengé asálákí makambo, ezaleli na ye, mitíndo na ye ya kobíka makambo.

Alátisákí kútu ye na motindo ya bilambá alátákí; loléngé na ye, mposá na ye, likambo moko na moko káka lokola asengélákí kozala, aponamákí mpenza na loléngé lobongákí be na Nzambe Ye moko mpo ya bisó…e bongó óloba ete tozali kopésa lokúmu mingi na mosakoli.

Epai na bisó, Mongóngó likoló ya ba bánde ezali Liloba ya moto te, sokí te Elobámí na moto, soko ete ememámí na moto, soko nde Émónísámí na moto. Ezali Liloba ya Nzambe emónísámí na Nzambe Ye moko, Molimboli ya Ye moko, Klisto komímónisa Ye moko kati na Liloba na Ye Moko.

Bókó bakokí koyóka, kasi bayébí mobimba te. Okokí koyebisa bango, kotálisa bango kasi bakokí na bango káka komóna te. Tolingi bango, tozali kobóndela mpo na bango, kasi oyo Nzambe Amónísí bisó ezali Bobongi be na Ye.

Bótála mamá na momekano monéne mpo ya kokabwana monéne kati ya Mwasi ya libála ya Klisto lelo baoyo balobí ete bazali na Emóniseli ya sóló ya Etíndá monéne oyo ya ntango ya nsúka.

Ndimbolá ya emekeli Monéne: Motúná sé moko ya mokáno, ya likambo, to elóko oyo na Lombángu ezali komónisa lolengé, motíndo, to etémelo ya eloko moko (to moto moko).

Tiká ya libosó Náloba mbala moko lisúsu, Nandimaka botéi ya sóló bobiángámí na Nzambe. Ezali na boséngá, mpe na esíká, mpo ya mosálá moko na moko. Makomi malobí ete mosálá ya mibáli oyo ezali mpo ya bobongi be ya babúlami, kasi Elobí te ete moko na moko kati ya bótáno ya botéi ekobongisa be babulami.

Ndeko Branham polélé-polélé ayébisi bisó ete kati na eleko moko na moko batéi bakendeke libándá na molongó, na bongo BAkokákí nde kobongisa be Mwasi ya libála boni?

Ezali na ebelé na ebelé ya batéi, balakisi, bantómá mpe basakoli baoyo batéyá ete bandimí Etíndá oyo ya ntango ya nsúka mpe ete Ndeko Branham azalaki Mongóngó ya Emóniseli 10:7, baoyo sikawa balobí ete ezali lokutá, azali mozímbisi, bísó nde binzambe-nzambe.

Baoyo bazalaki batéi bapésamélákí limemia na biyanganelo minéne baoyo batámbólá mokili mobimba mpe batéyá. Batalámákí lokola bakambi minéne kati ya bó5 ya botéi, kotéyáká kati ya makita mpe kati ya masámbo na Amerika mobimba. Bazalaki na mosálá monéne na míso ya bato, mpe babiláki mpe bandimaki bango kozala bato minéne ya Nzambe.

Na nsima ezali na batéi lelo baoyo bayébání lokóla batéi ya sóló kati ya bó5 ya botéi baoyo balobí ete bandimí Etíndá oyo na bozóngéláká ndambo ya maloba na Yango mpe na botéyáká Yango, kasi balobí mpe ete Etíndá oyo ezali Etémelo te. Mikolo ya Etíndá ya moto moko misílí koleka. Bó5 ya botéi nde bosengeli sikawa kobongisa be Mwasi na libála, mpe ezali libúngá koyókisa ba bánde kati ya losámbo, kozóngela mwa biténi ya maloba.

Toyébí ekozala na bapakolami ya lokutá na ntango ya nsúka; mosakoli akebisaki bisó ete tokuka Koyéba bango. Botéi na bango ekopakolama. Bakozala na Molimó Mosanto, na bongo bakozóngela maloba ya Etíndá ya ngonga oyo. Bakozala PENE MPENZA ete ekozimbisa ata Baponami mpenza soko nde ekokákí.

Oyo wana ezali bibongiseli te. Bakokaki te kobanda kozímbisa baponami. Na bongo, esengélí ézala kútu pene koleka wana. Oyo elingí koloba te ete Motéi NYOSO abúngí nzela, ezali Yango te. Ezali na bato minéne ya Nzambe baoyo bazali kotéya mpe kolakisa sóló, kasi ezali na eloko moko oyo mondimi moko na moko asengélí koyeba mpe komítúna:

Motéi oyo ozali kolanda akokí nde kosála libúngá?
Okokí nde Kondima amen na Liloba moko na moko azali kotéya?
Ondimí ete Liloba moko na moko azali kotéya ezali Yango Elobí Nkoló?
Ezali nde ete mongóngó na ye nde Mongóngó ya litómbá osengélí koyóka?
Akokí nde kotéya eloko ya libúngá?
Akokí nde kobúnga nzelá ata nsima ya kotéya Etindá mpo ya mbúla 30? Akokí nde kokwéa? Akokí nde koyebisa yo mabúngá?
Akokí nde kozímbisama?

Sikawa mítúná mitúná yango moko na ntina na Mongóngó ya Nzambe okokí koyóka likoló ya ba bánde.

Etíndá likoló ya ba bánde ekokí nde kosála libúngá: TE
Okoki nde Kondima mpe koloba AMEN na Liloba moko na moko lilobí ye? EE
Ekokí nde kokwéa? TE
Akokí nde kotéya mabúngá? TE
Ekokí nde koyébisa yo mabúngá? TE
Okoki nde kotingamisa Sékó na Sékó na yo likoló na Liloba moko na moko ozali koyóka…EE!!!
Ezali nde Mongóngó ya Nzambe: EE

Mpo ya nini Nazali koloba makambo oyo? Komónisa polélé ete bato NYOSO bakokí, mpe bazali kosála mabúngá, kasi MONGÓNGÓ YA NZAMBE likoló ya ba bánde ekokí kosála libúngá te. Nde ntina Ezali MONGÓNGÓ elekí na motúya OSENGÉLÍ KOYÓKA. Nde ntina esengéli na batéi báyókisa ba bánde na masámbo na bango. Ezali NZELA EBONGÍ BE YA NZAMBE EPÉSÁMÍ Afungólí mpo ya Mwasi na Ye ya libála.

Ya sóló, Nandimí okokí koyóka basúsu, kasi Mongóngó bobélé moko OSENGELÍ KOYÓKA mpe Kondima Liloba nyoso nde Mongóngó likoló ya ba bánde. Mongóngó wana nde BOBÉLÉ MOKO tokoki koloba AMEN na Liloba nyoso.

Nde mobeko ya Nzambe, osengélí Kondima Liloba nyoso, mpe Liloba ozali koyóka likoló ya ba bánde nde LILOBA SÉ MOKO endimisamákí na Likonzí ya Móto ete ezali sóló. Nzambe alobákí ete William Marrion Branham nde molimboli BOBÉLÉ MOKO ya bonzambe ya Liloba na Ye, mpámbate Ezali Liloba na ye te, Ezali Liloba ya Nzambe.

Bóngólá te litónó to mokonza ata moko. Moto moko te abongi be bongo. Bobélé Liloba ya Nzambe nde ebongí be bongo. Ata ntango tososóli te oyo tozali koyóka, tosengeli kaka Kondima ete yango nde Mongóngó mondimísámí ya Nzambe epai na Mwasi na Ye ya libála.

Ya sóló, Molimó Mosanto azali kokamba bato ya Nzambe.
Ya sóló, Molimó Mosanto abiángí bango kozala babáteli mpe batéyi mpe balakisi; Ezali solo, kasi babongí be te. Kasi Nzambe Afungóli nzela ete okokí koyóka LILOBA LIBONGÍ BE ntango sé ntango boyangání.

Na bato, na batéi, Balingí eloko mosúsu na esiká na yango lelo. Okokí nde kokanisa moto moko ásálela motéi moko oyo bazali kosálela Ndeko Branham?…”Nakopesa yo minúti 30 mpe bongo osengelí kotelemisa, Nazali na litéya Nasengélí komema. Bokokí koyóka ba bánde ntango sé ntango. Nayebí nini eyánganelo oyo bazali na yango boséngá oyo ekokani mpo ya lelo.” Mingi bakokí kutu te koyókisa ata eténi ya bánde, mpe balobí ezali libúngá koyókisa Mongóngó ya Nzambe kati na masámbo ya bango.

Moto moko akokí nde kobánza kati na makanisi na ye malamu motéi moko ámílukela bilonga, elonga ata ya ndéngé nini kobóya koyókisa bato Mongóngó ya Nzambe kati ya losámbo na ye zambí andimí ete asengélí kotéya? Balobaka yango, kasi bandimí te ete ezali Mongongo ya Nzambe, soko bongo te bakokaki soko moké te komílukela ekimelo kozánga koyókisa ba bánde.

Boni nde moto ábeta tólo koloba ete andimi oyo ezali Mongóngó ya Nzambe mpe álinga te koyókisa yango kati na losámbo na ye? Boni nde bato baoyo babétí tólo ete bandimí ete ezali Mongóngó ya Nzambe koloba mpe bázánga kopésa motíndo epai ya babáteli na bango ete báyókisa ba bánde kati na masámbo ya bango? Zambí bazali na molimó yango moko.

Zalá Nikodeme te mpe koloba, “Namóní yango mpe Nandimí yango. Ezali Mwana ya Moto komímónisa kati ya mosuni ya moto. Ezali Yango Elobí Nkoló. Ezali Etíndá Ebongí Be. Ezali Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde, kasi Nakoki na ngai kaka te kokitisa botéi na ngai mpe Náloba ete Mongóngó wana nde oyo eleki na litómbá mingi mpo ya lingómba na ngai koyóka.

Bandeko mibali mpe basi, ekokí kozala ete ozángi Kondimana na ngai kaka mpenza likoló na oyo. Nasengi yo te óndimana na ngai. Eloko sé moko, simbá yango bobélé na motéma na yo. Oyo oyebísí ngai; Nakonfima yango. Soko batéi balobí na masámbo na bango ete bandimaka te koyókisa ba bánde kati ya masámbo ya bango, ezali malamu, ndeko na ngai. Léísá bango oyo nyoso osepelí koléisa bango.

Nazali komeka manso na ngai Kotíkala alimá na Liloba, zambí ba Mpate balingí eloko mosúsu te kasi Biléi ya ba mpate mpe tondimi Mongóngó likoló ya ba bánde nde Biléi ya bisó ya ba Mpate. Nde oyo tobíkaka na yango: Liloba nyoso likobimaka na…Ezali káka te Liloba sikawa mpe nsima moké; kasi Liloba nyoso libimí na monoko ya Nzambe lilobámí likoló ya ba bánde; nde oyo tozali kobíka na yango.

Nzambe álimbisa ngai mpe ólimbisa ngai soko Nabétisí yo libakú to Nalobákí eloko moko ya libúngá. Oyo ezali na yango bobélé oyo tondimí mpe tomóní ezali Sóló tozali kobíka na yango. Nzambe Apésí bisó NZELA EBONGÍ BE koyóka Mongóngó na Ye mpe tolingi yango.

Lokolo ntango nyoso, Nabiángí moto nyoso oyo alingí komíbakisa na bisó koyóka Mongóngó wana na ntango yango moko, áya komíbakisa na bisó na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, wapi to kosangana lokola Lisangá Moko koyóka:65-0822M Klisto Amónísámí Kati Na Liloba Na Ye Moko.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotánga libosó ya boyóki Litéya:

Esode 4: 10-12
Yisaya 53: 1-5
Yilimia 1: 4-9
Malaki 4:5
St. Luka 17:30
St. Yoane 1:1 /1:14/ 7:1-3 /14:12 / 15:24 / 16:13
Bagalatia 1:8
2 Timote 3:16-17
Baebele 1:1-3/ 4:12 / 13:8
2 Petelo 1:20-21
Emóniseli 1:1-3 / 10:1-7 / 22:18-19

26-0614 Mpe Oyébí Yango Te

Nsango: 65-0815 Mpe Oyébí Yango Te

BranhamTabernacle.org

Balingami Baoyo Baponámí,

Mbótámá ya sika nde Klisto, nde emóniseli. Nzambe amónísí yo libómbami Oyo monéne, mpe yango nde Mbótámá ya sika. Sikawa okosála nini ekosíla yo koyéisa ebólo wana elongó ? Epai wapi emóniseli Ezali mpenza kati na boyókani.

Nzambe azali koyanganisa ebólo na Ye ya ba Mpongo nyoso elongó Kati na boyókani mpenza, komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libála.

Nzela ya Nzambe ya kozala na mokonzi, lokola Dawidi azalákí, ezalaki alimá, mpe bongo na likanisi moko kati ya likambo. Lokola mokambi moko kati na libóndo ya masweswe, to bongo na bongo, okoki te kozua mibalé to misáto na bango. Na nsima, obúlúngánísí bango nyoso elongó, okosúka na likanisi ya motíndo ata nini.

Na bongo tosengélí kosála nini, Nkólo?

Nsúka ya likambo bosengeli kosala ezali sé kosála ete Mongóngó na Ngai moyébana; báyeba yango; mpo ete ba mpate na Ngai bayébí Mongóngó na Ngai.

Mongóngó na Yo ebongí be mpo ya lelo ko nde nini, Nkóló?

Soko Nabétisí bino libakú na bolobáká bongo, bólimbisa Ngai, kasi, Nayókakí lokola ete yango etémélámákí, kasi, Nazalí Mongóngó ya Nzambe epai ya binó.

Tondimaka yango na mitéma ya bisó nyoso. Nde loléngé toyókaka, Nkóló.

Bazali te na boséngá ya kotálisa likambo ata nini na nzela ya zébi, to kotúna Mofalisái to Mosadukái, to eloko nini mosúsu, na ntina na yango. Nalobákí yango, bandimí yango, zambí ba mpate na Ngai bayókaka Mongóngó na Ngai.

Mongóngó likoló ya ba bánde ezali ko nini epai ya Mwasi na Yo ya libála?

Oyo ezali Mongóngó ya Nzambe na loléngé ya mokandá, zambí Oyo nde emóniseli mobimba ya Yesu Klisto, Kondimana ya Kala mpe Kondimana ya sika itíámí elongó. Amen. Nde yango.

Ba bánde izali naino kaka na litómbá lelo?

Nayebí ete nsima ya Ngai kolongwa na mabelé oyo, ba bande wana mpe ba búku wana ikokóba kobíka, mpe mingi na bino bilengé bana bokokúta, na mikolo mikoyá, ete oyo ezali mpenza Sóló,…

Nkólo, toyébí ete ba bánde mpe ba búku izali lotómo na Yo lozali kobíka, mpe ya bomoi oyo Otíkélákí Mwasi na Yo ya libála.

Mpo ya nini ba bánde nde MONGÓNGÓ YA MOTÚYA KOLEKA mpo ya bisó koyóka?

Tozali kati na eleko ya kozímbisa koleka tobíká ndéle kati na yango. “Ekozimbisa ata Baponami mpenzá soko nde ekokoka,” zambí bazali na kopakolama, bakokí kosala likambo ata nini lokola nyoso kati na bango.

“Ézala nani akobakisa Liloba moko na Oyo to kolongola Liloba moko na Yango.” Osengeli kozala na Liloba ya nsúka esiká moko boye.

Na bongo Liloba na bisó ya nsúka esengeli kozala Liloba ya Nzambe. Omónísí na bisó ete Liloba ya Nzambe mpe Mongóngó ya Nzambe bazali eloko yango moko. Mongóngó nde makanisi mpenza ya Nzambe malobámí, lokola Osálákí na basakoli ntango Okomákí Biblia; kasi na mikolo oyo ya nsúka, Obátélí Liloba na Yo, Mongóngó na Yo, na bobómbáká Yango mpe na botiáká Yango likoló ya bánde. Na boye, Mongóngó na Yo elobámí likoló ya ba bánde nde Liloba ya nsúka ya Mwasi ya libála.

Bato bakanísí te ete ezali na litómbá koyókisa Mongóngó kati na losámbo ya bango lelo. Balakísámí kati ya masámbo na bango ete Ndeko Branham alobá soki moké te koyókisa ba bánde kati ya losámbo, Balingi káka koyóka batéi kotéya mpe kozóngela biténi ya Liloba.

Mpe soko lingómbá nde Liloba na yo ya nsúka, etálí ata yo te oyo nyoso moto ata nani alobí. Yango nde Liloba na yo ya nsúka. E Nzambe, sungá oyo kozinda na kati! Epai na Ngai, eloko mobimba ezali libúngá. Liloba ya Nzambe nde Liloba ya nsúka. Ézala nini Liloba yango elobí, na bongo ezali sóló.

Azalakí kozila bábianga Ye. Nde oyo Azali kozila na mpókwa oyo, ete óbiánga Ye. Bótála, ntango bayékoli wana Babiángákí Ye kati na bondeko na bango zíngázingá ya mesa,…

Moto akokí nde koloba, koluka bilonga, to komisálela bikimelo, oyo alobí polélé ete andimí Etíndá oyo ya ntango ya nsúka, bázánga koyókisa ba bánde kati ya masámbo ya bango wana ezali bango na libakú malamu ya koyóka MONGÓNGÓ MPEZA YA NZAMBE? Ezali Maloba Nzambe alobákí na nzela ya mbebu ya moto na nzela ya mosakoli na Ye mopakolami. MONGÓNGÓ SÉ MOKO mondimísámákí na nzela ya Likonzí ya Móto, etátólámí na boyébáká sekelé ya motéma, elakísámí na nzela ya bilembo mpe bikámwiseli, ete EZALÍ Mongóngó ya Nzambe epai ya Libóta oyo.

Boni nde moto ATA NANI akokákí komílukela elonga, ndimbolá, to kozánga kozala na mpósá ya koyóka Mongóngó ya Nzambe ntango nyoso bayángání?

Nkoló Tíká te ete Názua Mingóngó na Yo likoló ya bánde lokola eloko moko boye oyo eyéi na mabongi na Ngai. Tiká ete ntango nyoso Náyébisa epai ya mokili ete Ezali Mingóngó SÉ MOKO basengélí koyóka. Tiká ete Nálobela Mwasi na Yo ya libála, NYOSO BASENGELI NA YANGO EZALI MONGÓNGÓ NA YO LIKOLÓ YA BA BÁNDE.

Tolingaka bondeko. Tolingaka kosolola na ntina na Yo mpe kozóngela biténi ya Liloba na Yo, kasi ezali na eloko moko te monéne koleka Okokákí kosála mpo ya Mwasi na Yo ya libála longólá bobélé kopesa bisó Liloba na Yo likoló ya Liloba, Emóniseli ya Mongóngó na Yo, na nsima Koyéba TOZALI BA NANI, MWASI NA YO YA LIBÁLA SÉMBO.

Boni Nakokákí kokóba me kokóba, kozala na bondeko na ntina ya emóniseli monéne Nzambe Apésí bisó. Ezali na nsúka te; kasi eloko elekí monéne Nakokaki kosála ezali kobiánga yo óya komíyókela Mongóngó ya Nzambe elongó moko na eténi ya Mwasi ya libála mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: 65-0815 Mpe Oyébí Yango Te.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotánga:
Emóniseli 3:14-19
Bakolose 1: 9-20