22-1023 MITUNA MPE BIYANO #4

Nsango: 64-0830E MITUNA MPE BIYANO #4

BranhamTabernacle.org

Molingami Ndeko Joseph, 

1.     Nayokaki yo koloba ete ondimaka LILOBA MOKO NA MOKO ya Etinda oyo ezali YANGO ELOBI NKOLO.

Longwa na bozindo na motema na ngai mpe na mosisa moko na moko ya bomoto na ngai NANDIMAKA YANGO. Ezali Mongongó mpenza na Nzambe kosolola mbebu na litói na Mwasi na Ye ya libala.

Nzambe Alobaki na nzela na mosakoli na Ye mpe alobaki:

Boye mpe elobi Ngai, na Nkombo na Yesu Klisto! Bakisa eloko moko te. Longola te, tia makanisi na yo moko na Yango te. Lobá bobele oyo elobami likolo na ba bande wana. Sala bobele oyo Nkolo Nzambe apesaki motindo kosala. Bakisa na Yango te.

Soko obetaka tólo ete ondimaka Etinda oyo ya ntango na nsuka, osengeli mpe kondima LILOBA MOKO NA MOKO mpo na kozala Mwasi na Ye ya libala. Satana amekaka kopekisa Yango na nzela na batei mpe alobaka: “Ntango Ndeko Branham azalaki kobeta masoló ya bokila to bolobaká ete ‘bozali na molámbi malamu koleka kati na mboka’, to ‘Nazali na Likomi te mpo na yango, kasi Nakoyebisa bino oyo Nakanisi;’ Bopusami te kondima eteni wana. Molimo Mosanto azali awa kokamba biso kososola nini ezali mpe nini ezali Liloba te.” EZALI ZABOLO YANGO MOKO OYO ASOLOLAKI NA EWA MPE ALOBAKI, SOLO MPENZA…ALINGAKI KOLOBA TE ETE LILOBA MOKO NA MOKO. Eyokani lokola eyebani?

 Bazali kosala mpenza oyo APESAKI MOTINDO na bango ete basala te. Alobaki LOBA OYO ELOBAMI likolo na ba bande, tía makanisi na yo to lisosoli na Yango te. Alobaki te: “nyoso LONGOLA SE eteni oyo mpe eteni oyo wana, mpe mobateli na yo akoyebisa yo ntango ezalaki Molimo Mosanto kosolola mpe ntango ezalaki kaka ngai.” Nazali bobele mwa libanga moke na libongo kati na mabanga manene.

2.     Okanisaka ete Ndeko Branham mpe/ to ba bande na ye bazali etemelo?

Ndeko Branham azali Etemelo na ngai te kasi Etinda alobaki likolo na bande ezali solo mpenza Etemelo na ngai.

Bato mingi bakoloba ete ezali solo te, Biblia ezali Etemelo. Moninga na ngai, Biblia mpe Etinda likolo na bande bazali se eloko moko. Ezali motema mpenza ya Etinda. Etinda likolo na ba bande ezali ndimbolá ya Biblia. Bazali moko mpe eloko moko.

Likambo petee ezali: 1. Biblia ezali Liloba. 2. Liloba liyaka epai na mosakoli. 3. Mosakoli azali bobele ye moko nde molimboli ya Liloba na bonzambe. 4. Mosakoli na biso, William Marrion Branham, azali Liloba na Nzambe limonisami mpo na mokolo na biso mpe atindamaki kolimbola Liloba. 5. Liloba na Nzambe ezali na bosenga na ndimbola te.

Oyo Asololaka na nzela na mosakoli na Ye likolo na bande EZALI NDIMBOLA NA LILOBA NA YE.

Biblia eyebisi biso ete Azalaki koya lisusu mpe kobika kati na mosuni kaka lokola asalaki elongo na Abalayama mpe Yesu Klisto. Alobaki ete azalaki naino na makambo mingi ya koyebisa biso. Alobaki ete Akolinga komonisa mabombami manso manene maye mabombami kati na Liloba. Alobaki ete ezalaki na bosenga na ndimbola te. Alobaki soko moke te ete akokaki kotinda ebólo moko kokamba to kosangisa bato na Ye, YE YEMOKO ALINGAKI KOKAMBA BATO NA NZELA NA MOSAKOLI NA YE LOKOLA ASALAKI YANGO NTANGO NYOSO. LILOBA NA YE LIKOKI KOBONGWANA TE.

3.      Ondimaka ete babateli basengeleki koyokisa bato ba bande na mangomba na bango?

Mobateli moko na moko asengeli kosala lolenge akambami na Nkolo kosala, lokola lingomba moko na moko ezali nsómi. Nandimaka mpe Nalobaki yango mbala mingi likolo na eteyelo, ete babateli basengelaki bazongisa Ndeko Branham na biteyelo na boyókisaká bato ba bande. Nalobá soki moke te ete basengeli kotika koteya, kaka koyokisa bato ba bande. Kasi bazali kosalela ekimelo ya lolenge nyoso eyebi kobanzama te koboya koyokisa bato Mongóngó na Nzambe na mangomba na bango.

Nakotika mosakoli áloba lolenge Nayokaka na ntina na babateli baoyo bakolinga te koyokisa bato Mongóngó wana kati na mangomba na bango.

Sasaipi, Ndeko Junior Jackson azali na makoki ya kozanga koyokana na yango. Alingaka lingomba na ye…Bato nyoso balingaka kosolola minoko na sika mpe makambo kati na eyanganelo. Oyo wana ezali kpókósó ya Ndeko Junior; etali—etali ye. Kasi Junior Jackson andimaka Etinda oyo lolenge moko ba…moto ata nani kati na biso andimaka. Azali moko na biso.

4.      Ondimaka ete batei basengelaki kotika koteya?

 Te, Nalobá yango soki moke te soko ete Nadimaka yango te. Liloba eyebisi biso mpe Ndeko Branham azalaki mpenza polele likolo na Mateya oyo ya mituna mpe biyano mpo na batei kokóba liboso.  

Namiyokaka kaka Nakambami, mpo na lingomba na ngai, koloba na lombangu liboso; to na nzela na mokanda mpo na sikawa, na nsima kofina play mpe koyoka Mongóngó bobele MOKO na Nzambe mondimisami mpo na lelo.

Nalobaki mbala mingi ete Nazali na lotómo monene koleka kati na mokili, Nasengeli koyeisela lingomba na ngai Mongóngó na Nzambe mokolo na Lomingo nyoso.

5.      Bato bazali koloba ete soko olandi manáka ya boyoki ya Eyanganelo ya Branham te ozali Mwasi na libala te?

Nalobá yango SOKI MOKE TE to kútu Nakanisá yango te, bandeko na ngai mibali mpe basi. Ye oyo akoloba likambo lokola oyo azali na libunga. Lokola mobateli na Eyanganelo ya Branham, Namiyoki kokambama koyokisa bato ba bande ya Ndeko Branham. Nandimaka ete Yango nde Mongóngó bobele moko ekosangisa Mwasi na libala.

Lokola Nalobaki liboso, Nandimaka nyoso likolo na ba bande ezali Oyo Elobi Nkolo mpe ezali na bosenga na ndimbola te. Nakoki koloba amen na Liloba moko na moko Nayokaka. Nandimaka ete William Marrion Branham atindamaki kobianga Mwasi na libala kobima. Esika na ngai kati na lotómo na misala mitano ezali kotalisa bato epai na motindami yango na nsima kofina play. Eloko monene ezali te oyo eleki koyoka Mongóngó yango. Epakweli eleki monene ezali likolo na ba bande, boye mpo na nini Nakosepela kopesa lingomba na ngai eloko mosusu?

Mokolo na Lomingo nyoso Napesaka mbela na mokili mobimba koyoka Liteya Nkolo Atiaki na motema na ngai koyokisa bato kati na losambo. Moto nyoso atombelami boyei bolamu koyoka na ntango moko.

Nazali kosalela lokola mokambi na ngai oyo Ndeko Branham alobaki likolo na ba bande.

Mpe tozali na nzela oyo ya telephone sasaipi, oyo ezali malamu mingi, mingi. Bato bakoki kofanda bobele na ba ndako na bango to na bango…bayangani na bisika na bango, mangomba na bango, mpe bongo na bongo, mpe koyoka losambo. Nalingaka yango.

Sasaipi, mobateli, Nalingi ete oyeba ete, ete, oyo ezali kaka mpo na eyanganelo na ngai nde Nazali koloba makambo oyo. Mpe Nazali na makoki ya kosala yango, zambi Natiamaki na Molimo Mosanto kokengela ba mpate oyo.

Liteya oyo, mpe Mateya mosusu nyoso Nasololaka likolo na yango, matindameli eyanganelo na ngai. Ezali te mpo na eyanganelo na yo kaka soko balingi kozua Yango. Kasi Etindameli bato oyo awa.

Mpe yango ezali mokili mobimba. Mpe bato bakolamuka na midi ya butu kati na butu, kati na bikólo ya kala, bazali kobatela monyolólo na libondeli wana na ntango moko. Na maloba polele nkóto zomi kati na ba nkóto na nkóto na ba nkóto bazali kobondela na ntango moko. Nzambe akangami koyoka; bozali bobele—bozali bobele kozingela Lola na ekumbaki ya libondeli, bomoni, Akosengela koyoka.

6.  Ezali nde mabe kokende na losambo?

Nalobá yango soki moke te to Nandimá yango te. Soko Nándimaka yango mpo na nini Nakokaki kozala na losambo? Na Eyanganelo ya Branham tozalaka na losambo mbala 3 na mpóso moko kino ekómaki mpenza mpasi mpo na ngai kozala na koyangana mingi bongo mpóso na mpóso mpe kosala mosala na VGR. Nsima tozalaki na koyangana 2 na mpóso moko kati na Eyanganelo kino makoki ya kobatela bato ezalaki lisusu te. Bongo tokendeki na litongi na biso tosalelaki mpo na bilengé, oyo ezalaki esika ya masano.

Nkolo atiaki na motema na ngai kopesa liyebisi mokolo na Lomingo moko na ntóngo. Nalobaki ata soko bakangi bikuke ya losambo oyo mokolo moko, tokozanga eloko moko te lokola mobateli na biso akokaki koloba na biso esika se esika tozalaki. Sanza moko nsima, tozalaki na COVID oyo ekangaki mangomba na mokili mobimba.

Nayokaki kokambama na ntango yango ete ezalaki libaku malamu kobongisa esika ya masano, lokola tozalaki na bosenga na esika ya losambo. Na bongo, tozalaki na kosepela na ba ndako na biso, tosanganaki mpe koyoka mosakoli na Nzambe likolo na bande elongo na eteni ya Mwasi na libala na mokili mobimba, wana losambo lozali kobongisama.

Tozali kosilisa litongi bobele sasaipi, kasi kaka lokola ntango Ndeko Branham azalaki awa na Eyanganelo ya Branham, tosili kokólisa etemelo ya mituka totongáki. Tokosengela bobele kobondela mpe komona boni Nkolo akokamba.

Nayebi ete ezali na mituna mosusu mingi, mingi na mitema na bato. Ezali na makambo ebelé Nalobaki masosolamaki mabe. Soko Ndeko Branham asosolamaki mabe, koleka mingi boni Nakososolama mpe mabe?

Nakokaki kozala na libunga na oyo Nalobaki. Nakokaki koloba yango malamu koleka to Nazalaki polele mingi na lolenge Namemáki yango. Kasi ezali na eloko moko NAYEBI ezali solo, ETINDA OYO EBONGI BE. Osengeli te koyoka ngai to lolenge Nalobaka, kasi oSENGELI KOFINA PLAY MPE KONDIMA LILOBA MOKO NA MOKO.

Mbala moko lisusu, Nabiangi yo komibakisa na Eyanganelo ya Branham mokolo mwa Lomingo oyo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Mitúna Mpe Biyano # 4 64-0830E.

Ndeko Joseph Branham