All posts by admin5

26-0621 KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

Nsango: 65-0822m KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Mokonzi,

Na bongo Mwasi ya libála lelo azuámí longwá na nzóto ya Klisto, oyo ezali kobíka mpe kosála mpeza bobele lokóla elobákí Ye ete Ekosála mpo ya lelo oyo, Mwasi ya libála, Mwasi ya Mokonzi; Mokonzi mpe Mwasi ya Mokonzi.

Ntango Yesu akómákí Liloba wana mobimba, nde tozalákí NDÉLE eténi na Ye. Ezali na zábolo te, nguya te, eloko ata moko te ekokoka ndéle kolongola yango na bisó. Yango nde likonzí epai wapi bomoto botingámí.

Kolamukisa ya lolengé nini oyo Mwasi ya libála azali kozua na Litéya moko na moko tozali koyóka. Ezali koleka maloba mokúfi akokí kobimisa. Ezali te na elílíngi ata moké ya ntembe, Nzambe aponákí bisó mpe apésákí bisó Emóniseli ya SÓLÓ ya Liloba na Ye mpo ya lelo. Na ntina wana, toyébí tozali ba nani, Mokonzi Mwasi na Ye.

Mongóngó ya Nzambe koloba na Mwasi na Ye ya libála likoló ya ba bánde ezali kobongisa be Mwasi na Ye ya libála. Ezali na lotómo mosúsu te, mongóngó mosúsu te; Ezali na elóko moko te oyo ekokí kobongisa be Mwasi na Ye ya libála kasi Nzambe Ye moko koloba na nzela ya bibebú ya moto mbala moko alimá na Mwasi na Ye ya libála. Basúsu bakokí kolinga kozua eloko mosúsu na esiká wana, kasi Mwasi na Ye ya libála a Kondimana na eloko mosúsu ata nini te kasi MONGÓNGÓ na Ye, mokandá na Ye ya bolingo epai ya Mwasi na Ye ya libála; mpámbate ba Mpate na Ye Balingí koyóka sé Mongóngó na Ye.

Bato balobí ete tozali kopésa motúya mingi likoló ya mosakoli. Ezali nde likambo ya kokámwa ete bato bazangí Kondima ete Tatá monéne ya Likoló Ye moko atiéláki mpenza mwanje na Ye motéma na motindo ete Atiákí litómbá ya ndéngé wana likolo ya eténi moko na moko na ntina na ye; loléngé alátákí, lolengé asálákí makambo, ezaleli na ye, mitíndo na ye ya kobíka makambo.

Alátisákí kútu ye na motindo ya bilambá alátákí; loléngé na ye, mposá na ye, likambo moko na moko káka lokola asengélákí kozala, aponamákí mpenza na loléngé lobongákí be na Nzambe Ye moko mpo ya bisó…e bongó óloba ete tozali kopésa lokúmu mingi na mosakoli.

Epai na bisó, Mongóngó likoló ya ba bánde ezali Liloba ya moto te, sokí te Elobámí na moto, soko ete ememámí na moto, soko nde Émónísámí na moto. Ezali Liloba ya Nzambe emónísámí na Nzambe Ye moko, Molimboli ya Ye moko, Klisto komímónisa Ye moko kati na Liloba na Ye Moko.

Bókó bakokí koyóka, kasi bayébí mobimba te. Okokí koyebisa bango, kotálisa bango kasi bakokí na bango káka komóna te. Tolingi bango, tozali kobóndela mpo na bango, kasi oyo Nzambe Amónísí bisó ezali Bobongi be na Ye.

Bótála mamá na momekano monéne mpo ya kokabwana monéne kati ya Mwasi ya libála ya Klisto lelo baoyo balobí ete bazali na Emóniseli ya sóló ya Etíndá monéne oyo ya ntango ya nsúka.

Ndimbolá ya emekeli Monéne: Motúná sé moko ya mokáno, ya likambo, to elóko oyo na Lombángu ezali komónisa lolengé, motíndo, to etémelo ya eloko moko (to moto moko).

Tiká ya libosó Náloba mbala moko lisúsu, Nandimaka botéi ya sóló bobiángámí na Nzambe. Ezali na boséngá, mpe na esíká, mpo ya mosálá moko na moko. Makomi malobí ete mosálá ya mibáli oyo ezali mpo ya bobongi be ya babúlami, kasi Elobí te ete moko na moko kati ya bótáno ya botéi ekobongisa be babulami.

Ndeko Branham polélé-polélé ayébisi bisó ete kati na eleko moko na moko batéi bakendeke libándá na molongó, na bongo BAkokákí nde kobongisa be Mwasi ya libála boni?

Ezali na ebelé na ebelé ya batéi, balakisi, bantómá mpe basakoli baoyo batéyá ete bandimí Etíndá oyo ya ntango ya nsúka mpe ete Ndeko Branham azalaki Mongóngó ya Emóniseli 10:7, baoyo sikawa balobí ete ezali lokutá, azali mozímbisi, bísó nde binzambe-nzambe.

Baoyo bazalaki batéi bapésamélákí limemia na biyanganelo minéne baoyo batámbólá mokili mobimba mpe batéyá. Batalámákí lokola bakambi minéne kati ya bó5 ya botéi, kotéyáká kati ya makita mpe kati ya masámbo na Amerika mobimba. Bazalaki na mosálá monéne na míso ya bato, mpe babiláki mpe bandimaki bango kozala bato minéne ya Nzambe.

Na nsima ezali na batéi lelo baoyo bayébání lokóla batéi ya sóló kati ya bó5 ya botéi baoyo balobí ete bandimí Etíndá oyo na bozóngéláká ndambo ya maloba na Yango mpe na botéyáká Yango, kasi balobí mpe ete Etíndá oyo ezali Etémelo te. Mikolo ya Etíndá ya moto moko misílí koleka. Bó5 ya botéi nde bosengeli sikawa kobongisa be Mwasi na libála, mpe ezali libúngá koyókisa ba bánde kati ya losámbo, kozóngela mwa biténi ya maloba.

Toyébí ekozala na bapakolami ya lokutá na ntango ya nsúka; mosakoli akebisaki bisó ete tokuka Koyéba bango. Botéi na bango ekopakolama. Bakozala na Molimó Mosanto, na bongo bakozóngela maloba ya Etíndá ya ngonga oyo. Bakozala PENE MPENZA ete ekozimbisa ata Baponami mpenza soko nde ekokákí.

Oyo wana ezali bibongiseli te. Bakokaki te kobanda kozímbisa baponami. Na bongo, esengélí ézala kútu pene koleka wana. Oyo elingí koloba te ete Motéi NYOSO abúngí nzela, ezali Yango te. Ezali na bato minéne ya Nzambe baoyo bazali kotéya mpe kolakisa sóló, kasi ezali na eloko moko oyo mondimi moko na moko asengélí koyeba mpe komítúna:

Motéi oyo ozali kolanda akokí nde kosála libúngá?
Okokí nde Kondima amen na Liloba moko na moko azali kotéya?
Ondimí ete Liloba moko na moko azali kotéya ezali Yango Elobí Nkoló?
Ezali nde ete mongóngó na ye nde Mongóngó ya litómbá osengélí koyóka?
Akokí nde kotéya eloko ya libúngá?
Akokí nde kobúnga nzelá ata nsima ya kotéya Etindá mpo ya mbúla 30? Akokí nde kokwéa? Akokí nde koyebisa yo mabúngá?
Akokí nde kozímbisama?

Sikawa mítúná mitúná yango moko na ntina na Mongóngó ya Nzambe okokí koyóka likoló ya ba bánde.

Etíndá likoló ya ba bánde ekokí nde kosála libúngá: TE
Okoki nde Kondima mpe koloba AMEN na Liloba moko na moko lilobí ye? EE
Ekokí nde kokwéa? TE
Akokí nde kotéya mabúngá? TE
Ekokí nde koyébisa yo mabúngá? TE
Okoki nde kotingamisa Sékó na Sékó na yo likoló na Liloba moko na moko ozali koyóka…EE!!!
Ezali nde Mongóngó ya Nzambe: EE

Mpo ya nini Nazali koloba makambo oyo? Komónisa polélé ete bato NYOSO bakokí, mpe bazali kosála mabúngá, kasi MONGÓNGÓ YA NZAMBE likoló ya ba bánde ekokí kosála libúngá te. Nde ntina Ezali MONGÓNGÓ elekí na motúya OSENGÉLÍ KOYÓKA. Nde ntina esengéli na batéi báyókisa ba bánde na masámbo na bango. Ezali NZELA EBONGÍ BE YA NZAMBE EPÉSÁMÍ Afungólí mpo ya Mwasi na Ye ya libála.

Ya sóló, Nandimí okokí koyóka basúsu, kasi Mongóngó bobélé moko OSENGELÍ KOYÓKA mpe Kondima Liloba nyoso nde Mongóngó likoló ya ba bánde. Mongóngó wana nde BOBÉLÉ MOKO tokoki koloba AMEN na Liloba nyoso.

Nde mobeko ya Nzambe, osengélí Kondima Liloba nyoso, mpe Liloba ozali koyóka likoló ya ba bánde nde LILOBA SÉ MOKO endimisamákí na Likonzí ya Móto ete ezali sóló. Nzambe alobákí ete William Marrion Branham nde molimboli BOBÉLÉ MOKO ya bonzambe ya Liloba na Ye, mpámbate Ezali Liloba na ye te, Ezali Liloba ya Nzambe.

Bóngólá te litónó to mokonza ata moko. Moto moko te abongi be bongo. Bobélé Liloba ya Nzambe nde ebongí be bongo. Ata ntango tososóli te oyo tozali koyóka, tosengeli kaka Kondima ete yango nde Mongóngó mondimísámí ya Nzambe epai na Mwasi na Ye ya libála.

Ya sóló, Molimó Mosanto azali kokamba bato ya Nzambe.
Ya sóló, Molimó Mosanto abiángí bango kozala babáteli mpe batéyi mpe balakisi; Ezali solo, kasi babongí be te. Kasi Nzambe Afungóli nzela ete okokí koyóka LILOBA LIBONGÍ BE ntango sé ntango boyangání.

Na bato, na batéi, Balingí eloko mosúsu na esiká na yango lelo. Okokí nde kokanisa moto moko ásálela motéi moko oyo bazali kosálela Ndeko Branham?…”Nakopesa yo minúti 30 mpe bongo osengelí kotelemisa, Nazali na litéya Nasengélí komema. Bokokí koyóka ba bánde ntango sé ntango. Nayebí nini eyánganelo oyo bazali na yango boséngá oyo ekokani mpo ya lelo.” Mingi bakokí kutu te koyókisa ata eténi ya bánde, mpe balobí ezali libúngá koyókisa Mongóngó ya Nzambe kati na masámbo ya bango.

Moto moko akokí nde kobánza kati na makanisi na ye malamu motéi moko ámílukela bilonga, elonga ata ya ndéngé nini kobóya koyókisa bato Mongóngó ya Nzambe kati ya losámbo na ye zambí andimí ete asengélí kotéya? Balobaka yango, kasi bandimí te ete ezali Mongongo ya Nzambe, soko bongo te bakokaki soko moké te komílukela ekimelo kozánga koyókisa ba bánde.

Boni nde moto ábeta tólo koloba ete andimi oyo ezali Mongóngó ya Nzambe mpe álinga te koyókisa yango kati na losámbo na ye? Boni nde bato baoyo babétí tólo ete bandimí ete ezali Mongóngó ya Nzambe koloba mpe bázánga kopésa motíndo epai ya babáteli na bango ete báyókisa ba bánde kati na masámbo ya bango? Zambí bazali na molimó yango moko.

Zalá Nikodeme te mpe koloba, “Namóní yango mpe Nandimí yango. Ezali Mwana ya Moto komímónisa kati ya mosuni ya moto. Ezali Yango Elobí Nkoló. Ezali Etíndá Ebongí Be. Ezali Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde, kasi Nakoki na ngai kaka te kokitisa botéi na ngai mpe Náloba ete Mongóngó wana nde oyo eleki na litómbá mingi mpo ya lingómba na ngai koyóka.

Bandeko mibali mpe basi, ekokí kozala ete ozángi Kondimana na ngai kaka mpenza likoló na oyo. Nasengi yo te óndimana na ngai. Eloko sé moko, simbá yango bobélé na motéma na yo. Oyo oyebísí ngai; Nakonfima yango. Soko batéi balobí na masámbo na bango ete bandimaka te koyókisa ba bánde kati ya masámbo ya bango, ezali malamu, ndeko na ngai. Léísá bango oyo nyoso osepelí koléisa bango.

Nazali komeka manso na ngai Kotíkala alimá na Liloba, zambí ba Mpate balingí eloko mosúsu te kasi Biléi ya ba mpate mpe tondimi Mongóngó likoló ya ba bánde nde Biléi ya bisó ya ba Mpate. Nde oyo tobíkaka na yango: Liloba nyoso likobimaka na…Ezali káka te Liloba sikawa mpe nsima moké; kasi Liloba nyoso libimí na monoko ya Nzambe lilobámí likoló ya ba bánde; nde oyo tozali kobíka na yango.

Nzambe álimbisa ngai mpe ólimbisa ngai soko Nabétisí yo libakú to Nalobákí eloko moko ya libúngá. Oyo ezali na yango bobélé oyo tondimí mpe tomóní ezali Sóló tozali kobíka na yango. Nzambe Apésí bisó NZELA EBONGÍ BE koyóka Mongóngó na Ye mpe tolingi yango.

Lokolo ntango nyoso, Nabiángí moto nyoso oyo alingí komíbakisa na bisó koyóka Mongóngó wana na ntango yango moko, áya komíbakisa na bisó na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, wapi to kosangana lokola Lisangá Moko koyóka:65-0822M Klisto Amónísámí Kati Na Liloba Na Ye Moko.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotánga libosó ya boyóki Litéya:

Esode 4: 10-12
Yisaya 53: 1-5
Yilimia 1: 4-9
Malaki 4:5
St. Luka 17:30
St. Yoane 1:1 /1:14/ 7:1-3 /14:12 / 15:24 / 16:13
Bagalatia 1:8
2 Timote 3:16-17
Baebele 1:1-3/ 4:12 / 13:8
2 Petelo 1:20-21
Emóniseli 1:1-3 / 10:1-7 / 22:18-19

26-0614 Mpe Oyébí Yango Te

Nsango: 65-0815 Mpe Oyébí Yango Te

BranhamTabernacle.org

Balingami Baoyo Baponámí,

Mbótámá ya sika nde Klisto, nde emóniseli. Nzambe amónísí yo libómbami Oyo monéne, mpe yango nde Mbótámá ya sika. Sikawa okosála nini ekosíla yo koyéisa ebólo wana elongó ? Epai wapi emóniseli Ezali mpenza kati na boyókani.

Nzambe azali koyanganisa ebólo na Ye ya ba Mpongo nyoso elongó Kati na boyókani mpenza, komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libála.

Nzela ya Nzambe ya kozala na mokonzi, lokola Dawidi azalákí, ezalaki alimá, mpe bongo na likanisi moko kati ya likambo. Lokola mokambi moko kati na libóndo ya masweswe, to bongo na bongo, okoki te kozua mibalé to misáto na bango. Na nsima, obúlúngánísí bango nyoso elongó, okosúka na likanisi ya motíndo ata nini.

Na bongo tosengélí kosála nini, Nkólo?

Nsúka ya likambo bosengeli kosala ezali sé kosála ete Mongóngó na Ngai moyébana; báyeba yango; mpo ete ba mpate na Ngai bayébí Mongóngó na Ngai.

Mongóngó na Yo ebongí be mpo ya lelo ko nde nini, Nkóló?

Soko Nabétisí bino libakú na bolobáká bongo, bólimbisa Ngai, kasi, Nayókakí lokola ete yango etémélámákí, kasi, Nazalí Mongóngó ya Nzambe epai ya binó.

Tondimaka yango na mitéma ya bisó nyoso. Nde loléngé toyókaka, Nkóló.

Bazali te na boséngá ya kotálisa likambo ata nini na nzela ya zébi, to kotúna Mofalisái to Mosadukái, to eloko nini mosúsu, na ntina na yango. Nalobákí yango, bandimí yango, zambí ba mpate na Ngai bayókaka Mongóngó na Ngai.

Mongóngó likoló ya ba bánde ezali ko nini epai ya Mwasi na Yo ya libála?

Oyo ezali Mongóngó ya Nzambe na loléngé ya mokandá, zambí Oyo nde emóniseli mobimba ya Yesu Klisto, Kondimana ya Kala mpe Kondimana ya sika itíámí elongó. Amen. Nde yango.

Ba bánde izali naino kaka na litómbá lelo?

Nayebí ete nsima ya Ngai kolongwa na mabelé oyo, ba bande wana mpe ba búku wana ikokóba kobíka, mpe mingi na bino bilengé bana bokokúta, na mikolo mikoyá, ete oyo ezali mpenza Sóló,…

Nkólo, toyébí ete ba bánde mpe ba búku izali lotómo na Yo lozali kobíka, mpe ya bomoi oyo Otíkélákí Mwasi na Yo ya libála.

Mpo ya nini ba bánde nde MONGÓNGÓ YA MOTÚYA KOLEKA mpo ya bisó koyóka?

Tozali kati na eleko ya kozímbisa koleka tobíká ndéle kati na yango. “Ekozimbisa ata Baponami mpenzá soko nde ekokoka,” zambí bazali na kopakolama, bakokí kosala likambo ata nini lokola nyoso kati na bango.

“Ézala nani akobakisa Liloba moko na Oyo to kolongola Liloba moko na Yango.” Osengeli kozala na Liloba ya nsúka esiká moko boye.

Na bongo Liloba na bisó ya nsúka esengeli kozala Liloba ya Nzambe. Omónísí na bisó ete Liloba ya Nzambe mpe Mongóngó ya Nzambe bazali eloko yango moko. Mongóngó nde makanisi mpenza ya Nzambe malobámí, lokola Osálákí na basakoli ntango Okomákí Biblia; kasi na mikolo oyo ya nsúka, Obátélí Liloba na Yo, Mongóngó na Yo, na bobómbáká Yango mpe na botiáká Yango likoló ya bánde. Na boye, Mongóngó na Yo elobámí likoló ya ba bánde nde Liloba ya nsúka ya Mwasi ya libála.

Bato bakanísí te ete ezali na litómbá koyókisa Mongóngó kati na losámbo ya bango lelo. Balakísámí kati ya masámbo na bango ete Ndeko Branham alobá soki moké te koyókisa ba bánde kati ya losámbo, Balingi káka koyóka batéi kotéya mpe kozóngela biténi ya Liloba.

Mpe soko lingómbá nde Liloba na yo ya nsúka, etálí ata yo te oyo nyoso moto ata nani alobí. Yango nde Liloba na yo ya nsúka. E Nzambe, sungá oyo kozinda na kati! Epai na Ngai, eloko mobimba ezali libúngá. Liloba ya Nzambe nde Liloba ya nsúka. Ézala nini Liloba yango elobí, na bongo ezali sóló.

Azalakí kozila bábianga Ye. Nde oyo Azali kozila na mpókwa oyo, ete óbiánga Ye. Bótála, ntango bayékoli wana Babiángákí Ye kati na bondeko na bango zíngázingá ya mesa,…

Moto akokí nde koloba, koluka bilonga, to komisálela bikimelo, oyo alobí polélé ete andimí Etíndá oyo ya ntango ya nsúka, bázánga koyókisa ba bánde kati ya masámbo ya bango wana ezali bango na libakú malamu ya koyóka MONGÓNGÓ MPEZA YA NZAMBE? Ezali Maloba Nzambe alobákí na nzela ya mbebu ya moto na nzela ya mosakoli na Ye mopakolami. MONGÓNGÓ SÉ MOKO mondimísámákí na nzela ya Likonzí ya Móto, etátólámí na boyébáká sekelé ya motéma, elakísámí na nzela ya bilembo mpe bikámwiseli, ete EZALÍ Mongóngó ya Nzambe epai ya Libóta oyo.

Boni nde moto ATA NANI akokákí komílukela elonga, ndimbolá, to kozánga kozala na mpósá ya koyóka Mongóngó ya Nzambe ntango nyoso bayángání?

Nkoló Tíká te ete Názua Mingóngó na Yo likoló ya bánde lokola eloko moko boye oyo eyéi na mabongi na Ngai. Tiká ete ntango nyoso Náyébisa epai ya mokili ete Ezali Mingóngó SÉ MOKO basengélí koyóka. Tiká ete Nálobela Mwasi na Yo ya libála, NYOSO BASENGELI NA YANGO EZALI MONGÓNGÓ NA YO LIKOLÓ YA BA BÁNDE.

Tolingaka bondeko. Tolingaka kosolola na ntina na Yo mpe kozóngela biténi ya Liloba na Yo, kasi ezali na eloko moko te monéne koleka Okokákí kosála mpo ya Mwasi na Yo ya libála longólá bobélé kopesa bisó Liloba na Yo likoló ya Liloba, Emóniseli ya Mongóngó na Yo, na nsima Koyéba TOZALI BA NANI, MWASI NA YO YA LIBÁLA SÉMBO.

Boni Nakokákí kokóba me kokóba, kozala na bondeko na ntina ya emóniseli monéne Nzambe Apésí bisó. Ezali na nsúka te; kasi eloko elekí monéne Nakokaki kosála ezali kobiánga yo óya komíyókela Mongóngó ya Nzambe elongó moko na eténi ya Mwasi ya libála mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: 65-0815 Mpe Oyébí Yango Te.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotánga:
Emóniseli 3:14-19
Bakolose 1: 9-20

26-0607 MAKAMBO MAMONISAMI POLELE NA NZELA YA LISAKOLI

Nsango: 65-0801E MAKAMBO MAMONISAMI POLELE NA NZELA YA LISAKOLI

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libála ya Klisto, tiká tóya elongó Mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka 65-0801E Makambo Mamónisámí Polélé Na Nzelá Ya Lisakoli.

Ndeko Joseph Branham

26-0531 NZAMBE YA EKEKE OYO MABE

Nsango: 65-0801M NZAMBE YA EKEKE OYO MABE

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála Ya Klisto, Moseka moké, Liloba, Etongá:

Boni mitéma na bisó misepelákí ntango toyókákí mwanje na Ye ya nguya koyebisa ete tozali Mombóto ya Nzambe mobongisamáki libosó oyo tokoki kosála eloko mosúsu te kasi kolanda Mongóngó na Ye. Elingí koloba koleka bómoi epai na bisó. Okoki kozua bómoi ya bisó, kasi ókoka te kozua Mongóngó na Ye.Tozali Moko na Liloba na Ye. Tozali Moko na Mongóngó na Ye. Tozali Moko na Ye.

Ezali mpenza komónana likambo ya kokamwisa epai na bisó ete tosósólámí mabe mingi mpe tosekámí mpo ete tolobí tondimaka koyóka na bisó ba bánde; ete ezali Mongóngó ya Nzambe koloba na Mwasi na Ye ya libála. Satána amemi bato na kozímbisama na koleka na motindo ete bakanísí ete awa elobi bisó ete tozali lingómba ya bánde, ezali eloko moko libándá na Liloba, libúngá, mpe tozali kobúngisama, nzókande ntango nyoso Ezali nzelá ya Nzambe ebongí bé epésámí mpo ya Mwasi na Ye ya libála.

Ekokí nde kozala nzela mosúsu boni? Sok’olimboli mabe Liloba moko oyo elobamákí, obúngí na yo. Bakokí kozala na na ntina mpe mpósa alimá, kasi na libúngá. Moto moko akokí kopakolama na Molimó Mosánto mpe naino kozala kati na libúngá.

Soko Nzambe ábongisaka nzelá te ete Mwasi na Ye ya libála bákoka komíyókela Liloba moko na moko, mbe nde nzelá mosúsu ekokákí kozala. Kasi apésákí nzelá mpo ya moto nyoso likoló na mokili kozala na libakú malamu ya koyóka Liloba koloba na ye na boséngá ya ndimbola te, bomanyoli, to bokómisi likambo polélé, Ezali nyoso Yango Elobí Nkoló…MPÚTU!

Tondimání bisó nyoso tosengeli Kotíkala na Liloba mpo ya kozala Mwasi na Ye ya libála.

Nandimí ete nyoso tosengélí na yango ekomámí Áwa mpenza, esengeli káka kolimbolama na Molimó Mosánto. Nandimí te ete moto ata nani na mokili azali na makokí ya kotia ndimbola na ye moko likoló ya Liloba. Nzambe asengélí te na moto ata nani kolimbola Liloba na Ye. Azali molimboli na Ye moko. Alobaki Akosála yango, mpe Asálí yango.

Na polélé, Nkoló alobákí mpe amónisákí epai ya Mwasi na Ye ya libála ete ezali na nzelá mosúsu te kozala Mwasi na Ye ya libála moponami longólá bobélé Kotíkala na Liloba na Ye. Nzambe Ye Moko azali kolimbola Liloba na Ye Moko, mpe moto moko te azali na makokí ya kobakisa ndimbola na ye moko likoló na Yango.

Liloba mpe eyébisí ete MOSAKOLI na Ye nde molimboli ya Liloba na Ye. Azali Mongóngó ya Nzambe epai ya bato. Oyo elobí ye nde Liloba mpo ya mokolo na bisó.

Na boyókáká Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde, tozali lisakoli lizali kokokisama. Ezali na eloko moko te makasi koleka, Mosánto koleka, eloko moko te kokokisama koleka, eloko moko te ebongí be koleka longólá sé kozala koyóka Mongóngó ya Nzambe oyo endimisámí koloba na yo.

Na ntango oyo basúsu bakoki koloba ete ezali na eloko moko te na yango, ba mpongo Bazali Koyangana mpe kosepela na esengo eleki monéne mpenza, na kondimisama ete bazali kobátela Liloba ya Nzambe. Alobaki na bisó soko ozali na masíni ya koyóka na yango bánde, yángánìsa bato elongó, mpe yókísá yango, mpe Bóyóka na bokéngi. Na ngolu mpe mawa na Ye, nde mpenza oyo tozali kosála.

Nzambe abiángákí bisó kobima na eleko oyo mabe mpo ya Nkómbó na Ye. Tozali koleka na mimekano mpe bitumba ebele ya mitíndo mingi lokola libosó naino soko moké te. Satána azali na molongó ya etumba lokola eyébí ye ete ntango na ye ebelemi na nsúka. Okoki komítúna, nakoki kozala koleka na makambo nyoso oyo ndéngé nini, nzokandé Nazali Mwasi na Ye ya libála?

Ozali komónisama, kotiama na epimeli, mpe koyebisa Satána ete, TOZALI MWASI NA YE YA LIBÁLA. Tozali Liloba Kati ya mosuni. Tokoki koloba Liloba mpe ekosálema. Ezali YANGO ELOBÍ NKOLÓ.

Tozali na Mongóngó ya Nzambe koloba na Satána mbala moko alimá mpe koyébisa ye:

Satána, olóngámí. Ozali mokósi. Mpe, lokola mosali ya Nzambe, mpe lokola basáli, topési motíndo ete kati na Nkómbó ya Yesu Klisto, ete ótósa Liloba ya Nzambe, mpe óbima kati ya bato, zambí ekomámí, “ Na Nkómbó na Ngai bakobengana milímó mabé.”

Ézala nini…ÉZALA NINI tosengélí na yango, tosengélí káka kosénga, Kondima mpe Kotíkala bobélé wana. Ekokí kosálema káka wana-wana; ekokí kozala póso moko, sánzá moko, mbúla moko. Ezali likambo te soko nini nde tozali komóna to koyóka na nzóto, ESÍ’EKÓMÁKÍ NA YANGO NDÈLE.

Losámbo moko na moko tozali Koyangana ezali kokóma monéne mpe monéne koleka mpo ya ba Mpóngo ya Nzambe. Toyángáni na likanisi Moko, na lobánzo Moko, wana efándí bisó elongó na bisíká ya Likoló, koyóka Mongóngó koloba na bisó mpe kobongisa bisó bé na nzela ya Liloba na Ye.

Tolingí mpo na yo ete ómíbakisa na bisó Lomíngo oyo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó mbala moko lisúsu mpe komemela bisó ndimbola ya Liloba na Ye Moko.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: Nzambe Ya Eleko Oyo Mabé 65-0801M

Makomi ya kotánga libosó ya koyóka Litéya:
St. Matái Mokapo ya 24 / 27: 15-23
St. Luka 17:30
St. Yoane 1:1 / 14:12
Misala 10: 47-48
1 Bakolinti 4:1-5 / Mokapo ya 14
2 Bakolinti 4: 1-6
Bagalatia 1:1-4
Baefese 2: 1-2 / 4:30
2 Batesaloniki 2:2-4 / 2:11
Baebele Mokapo ya 7
1Yoane Mokapo 1 / 3:10 / 4:4-5
Emóniseli 3:14 / 13:4 / Mikapo 6-8 and 11-12 / 18:1-5
Masese 3: 5
Yisaya 14:12-14

26-0524 KOBENDAMA LIKOLO YA NGOMBA EZALI NINI?

Nsango: 65*-0725E KOBENDAMA LIKOLO YA NGOMBA EZALI NINI?

BranhamTabernacle.org

Balingami Ba Mpongo Baoyo Bazali Koyangana,

Kobéndama monéne níni oyo ezali kosálema kati ya mokili mobimba? Bato longwá na mokili mobimba koyángana na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, kofanda kati na ba ndáko na bango mpe masámbo na bango na lúku-lúku monéne na mitéma, kozila koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba na bango.

Ezali mpenza likambo ya kokámwa mpe elekí mabánza ya moto epai ya mokili bobélé koyóka ba bánde. Balobí tokoki koyóka ba bánde ntángo sé ntángo. Ntína moko ezali te kozala koyóka na ntango yango moko. Osengélí koyóka mosáli, motéi, bobélé ba bánde te. Bakangámí Kati ya mimeseno ya bango.

Likambo ya motindo oyo lisálémá ndéle te Kati na lisoló ya ntango ya mokili. Nini nde ebéndákí bato oyo kosangana nyoso na ntango yango moko koyóka Mongóngó yango kobiánga Mwasi na Ye ya libála? Ezali Nzambe kokokisa Luka 17:30. Ezali Nzambe kokokisa Emóniseli 10:7. Ezali Nzambe komónisa Baebele 13:8, Melikisedeke Kati na mosuni ya moto, lokola esáláki Ye epai ya Abalayama.

Bazali kozila mpe komítúna, Akoloba nini? Nini nde ekosálema ntango akobanda koloba? Balingí kozala wana likoló ya bikanganeli ya biyókeli koyamba eloko ata nini Alobí. Balingí Yango. Balingí báyóka Yango bango nyoso na ntango yango moko elongó na Mwasi ya libála ya mokili mobimba. Zambí bandimí azali mongóngó oyo Nzambe aponákí kozala Mongóngó na Ye kobianga kobima mpe kokamba Mwasi na Ye ya libála.

Ata ko bakeseni na ba ngonga kati ya ntango, kasi bazali nyoso elongó lokola LISANGÁ MOKO, kotía litói, koyóka Mongóngó yango koloba na bango útá na Lingómbá ya Ezalelo ya bango. Bazali kofánda na bozali ya Mwana, kotela mpe kozila Boyei ya Masíya.

Mitéma na bango mizali kobéta nokí-nokí. Molimó Mosanto azali komónisa bango oyo ezali kosálema. Nzambe azilákí tíí lelo oyo komónisa Liloba na Ye mpe koyánganisa Mwasi na Ye ya libála. Ezali kokóma, mpe bazali eténi na Yango. Sóló ya oyo ezali komónana ezali kotanga kati na mitéma ya bango. Batángá mpo na yango kati ya Makomi mpo ya mbúla nkámá na nkámá, kasi sikawa ezali bo sóló. Emóniseli ya Liloba ezali komónana na nzela na bango. Masakoli ya mosakoli mazali kokokisama.

Lokola bafándí na nsé ya kopakolama monéne oyo ya Mongóngó na Ye ya nguya, Ayébísí bango bámíléngela; mpo na mpókwa oyo Akobóndela mpo ya moko na moko na bango. Ayébísí bisó ete ntango Abandí kobóndela, bokende kotia mabóko likoló na bango bazali kobéla, mpo ete bozali ya Nzambe na bisiká nyoso Ezali esiká nyoso elongó na bango, bázala ata wapi: Texas, kuna na California, ngámbo ya likoló kuna na Arizona, Amerika ya Ngelé, ata na ba ndáko ya matíti kati na ba zámba ya ngonda na ngámbo mosúsu ya mokili. Epai sé epai bazali kolanda na biyókeli, bótianela maboko ntango tobandí kobóndela mpe Nzambe akobíkisa moko na moko na bango, soko bandimí, mpo ete ezali Yango Elobí Nkoló.

Basósólí sikawa ete kati ya eleko moko na moko mpe mosakoli moko na moko oyo azalá ndèle to oyo alingákí kozala, ekozala na motángo moko boye ya bato baoyo babongisamákí libosó koyóka Etindá yango, mpe bakolanda Yango. Bibólo ya bato etáli bango te. Etálí bango te kolobamela mabe na mozangi Kondima oyo azali koloba ete ezali libúngá to ezali te nzela ya Nzambe oyo epésámí. Bakobéndana na bango maloba te. Bazali na eloko moko BASENGELI KOSÁLA, yango nde Kondima mpe kozua mwa eténi moko na moko na Yango oyo bakokí, kozindisa Yango na kati pelamókó Malia oyo azalaki kofanda na Makáká ya Yesu. Bayókí nsóni te, bazali mpenza na lipambú koloba ete Nazali mwana mobali to mwana mwasi ya bánde oyo Nafinaka Play.

Mongóngó wana esili kokébisa bango ete ekozala na bapakolami na ntango ya nsúka baoyo bakozala na epakweli monéne, Molimó Mosanto. Bakozóngela ndambo ya maloba ya mosakoli mpe na Etíndá ya ngonga; kobéta tólo ete bazali bandimi, kasi bazali bapakolami ya lokutá.

Bakozala mpenza pene ya mopakolami ya sóló na motindo ete ekozímbisa ata moponami mpenza soko nde ekokákí, kasi bayebí bakokí kozimbisama te, mpambate BAZALI LILOBA. Bazali Mwasi ya libála ya sóló oyo atikálí na Mongóngó ya Nzambe.

Mongóngó yango ezali koyébisa bango ete lelo oyo Ekozala te lilálá ya ngai-ngai to lilálá ya monéne ya bololo. Oyo wana ekozala petee kokesenisa. Kasi ekozala lilálá ya kati-káti, ndámbo lilálá ya ngai, ndámbo lilálá ya elengi, elóko esangisámí. Ekomónana káka lokola lilálá ya elengi, kasi ekozala te, mpámba te etápe wana ya sika ekozala 100% lokola ya ebandeli. Bako TÍKALA na Liloba Mongóngó wana ya ebandeli. Bakondima te kobéta libakú mabé. Bakotíkala na moko, Oyo Nzambe Ye Moko Alobákí kozala MONGÓNGÓ NA YE, LILOBA NA YE, oyo endimisámákí na nzela ya Likonzí ya Móto.

Nini nde ezali kosálema?

Mombóto ya Nzambe ebongísámákí libosó ekokí kosála eloko mosúsu te kasi kolanda mpe koyóka Mongóngó yango, mpámba te Ezali na ntina koleka bomoi epai ya bango. Okoki kozua bomoi ya bango kasi okoki te kozua Mongóngó wana.

Kobéndama ezali nini?

Nzambe, lokola momeseno, kokokisa Liloba na Ye.

Yaka komíbakisa na bisó mpe zalá eténi ya lisakoli ya mosakoli kokokisama Lomíngo oyo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Likomí komónisama.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: 65-0725E “Kobéndama Likoló Ya Ngómbá Ezalí Níni?”

Makomi:
St. Matái 21:1-4
Jekalia 9:9 / 14: 4-9
Yisaya 29:6
Emóniseli 16:9
Malaki 3:1 / Mokapo ya 4
St. Yoane 14:12 / 15: 1-8
St. Luka 17:22-30

26-0517 Bapakolami Na Ntango Ya Suka

Litéya: 65-0725M Bapakolami Na Ntango Ya Suka

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Ba Mpongo baoyo Bazali Koyangana,

Motó káka ya Litéya ya póso oyo ezali komónisa koyebana ya Molimó Mosanto epai ya Mwasi ya libála. Kobánza ete ekozala na mibali baoyo bapakólámí sóló bakotélema lelo oyo na kopakolama ya Sóló ya Molimó Mosanto yango moko oyo azalákí likoló ya mosakoli na bisó, kasi bakozala lokutá.

Liloba liyebísí bisó bakosala bilembo na bikámwiseli, koyamba mbúla yango moko, mapamboli yango moko lokola mosakoli ya soló. Bato bakolinga kotangwa na Liloba ya Sóló lindimísamákí ya mokolo oyo kokende na bilúlélá ya bango moko, komízuela balakisi, konyómotisa matói na bango. Ekozala mpenza pene ya Liloba ya sóló kino ekozala pene mpenza ya kozímbisa Baponami.

Boni mpenza nde kopakolama yango ekozala? Ekozala nde petee kokesenisa oyo ya sóló na oyo ya lokutá? Mosakoli ayebisákí bisó ete Mokonzi Dawidi, moto kokokana na motéma ya Nzambe Ye moko, na kopakolama likoló na ye, azuákí emóniseli ya sóló; kasi ezalakí libúngá.

NINI!! Bótika ézinda na kati mpo ya mwa ntango. Mokonzi aponámi na Nzambe azalaki na kopakolama ya sóló mpe emóniseli ya sóló, kasi azalaki na libúngá! Ba mpate ya Nzambe bakosengela bázala na bokéngi mingi koyeba ete oyo bazali koyóka ezali kopakolama ya sóló to lokutá; zambí Séko na Sékó ya bango etélémí likoló ya mikáno miye.

Toyébí Nzambe atíí batéyi mingi bapakólámí ya sóló kosunga kokamba mpe kobátela Mwasi na Ye ya libála kati na Liloba. Liloba na Ye lilobí bongo, mpe totóndí na matóndí epai ya Nkoló mpo ya moko na moko na bango. Babiángámí kozala babáteli likoló ya bitongá na bango. Basengeli bábátela bango kati ya Liloba. Na bosáláká bongo, basengeli te bázánga koyókisa bitongá na bango Mongóngó BOBELE moko mondimísámákí.

Lokola toútí káka koyóka boni moto nyoso akokí kokende na libúngá, ata na kopakolama ya sóló mpe emóniseli ya sóló. Kasi Mwasi ya libála akokí kozala amíndimísí, mpo ete Nzambe apésákí nzela ebongí be ete bakokí ntango nyoso koyóka KOPAKOLAMA YA SÓLÓ, EMÓNISELI YA SÓLÓ, YANGO ELOBÍ YAWE YA SÓLÓ; SÉ KOFINA PLAY.

“Epai wapi nzóto ebomámí ezali,” Máná mazalí, Liloba lizalí, “Wana nde ba mpongo bakoyangana.”

Epai wapi Nzóto oyo ebomámí ezali, nde epai wapi bisó ba Mpongo tokoyangana. Epai wapi Mosuni ya kotanga makilá ezali, Liloba ya eleko, Etindá ya ngonga. Mpe Ezali na esíká ya pío ya malamu koleka te kolia Máná yango longólá sé koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba Ye moko.

Yango nde Liloba na Ye. “Moto akobika bobélé na kwánga te, kasi na Liloba nyoso.” Bomóní? Oyo abongísámákí libosó ayébí Oyo. “Liloba mopaya, to mongóngó mopaya, bakolanda te.”

Ntina oyo tokosála yango te, mpe tokokí kozímbisama te, ezali mpo ete tozalí Liloba elongó na Emóniseli oyo. Tokoki kozala eloko mosúsu te. Tokokí koyóka eloko mosúsu te. Toyebí eloko mosúsu te.

“NAZALI!” Ezali te “Nazalákí, to Nakozala.” “NAZALI,” eleko beé beé, Liloba sikawa. Ezali te Liloba oyo ezalákí, Liloba oyo ekoyá; Liloba oyo ezali sikawa. Bomóní? Bosimbí yango? “NAZALI!” “NAZALI” nde Liloba. “ Na ebandeli Liloba azalákí, mpe Liloba azalaki mboka na Nzambe.” Ezali sóló? “NAZALI.” “Nzambe atíndakí ngai pelamókó mosakoli na Ye, kondimisa oyo ete ezali sóló. Nazali eyano na Liloba oyo, Ayebisaki ngai kitá awa mpe sálá oyo.”

Mpe ntango asalákí yango, Falo alobakí, “Boye, totóndí na bilengé mibali kati na lisangá ya bisó baoyo bakokí kosála yango, mpe lokóla,” bamekoli.

Yesu alobákí, “Sikawa, ekozóngela lisúsu kati na mikolo ya nsúka,” bomóní, koyambola likambo yango moko.

Masánzoli na Nkoló. Koloba na ntina ya endimiseli mpo ya Mwasi ya libála. Ntango ozali na Emóniseli oyo, na bongo okoyeba ozali Mwasi na Ye ya libála moponami, mobongisami libosó, oyo ya motéma.

Na boyókáká Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde, tozali koyóka Mwana ya Moto, Oyo Azali Klisto. Azali Ye oyo útá na Ye nde tozali koléisama. Tozali kolia te longwá na moto; moto, maloba ma ye makokwéa. Kasi tozali kolia útá na Nzóto-Liloba ya Mwana na Moto liyébí kokwéa te.

Soko olingi kozala 100% óndimisama ete ozali koyóka Yango Elobí Nkoló, yaka komíbakisa na eténi ya Mwasi ya libála Lomíngo oyo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe komónisa bisó nyoso na ntina ya oyo etálí bapakolami na ntango ya nsúka.

Ndeko Joseph Branh

Litéya: Bapakolami Na Ntango Ya Nsúka 65-0725M

Makomi:
St. Matái 5: 44-45 / 7:21 / 24:15-28
St. Luka 17:30 / 18:1-8
St. Yoane 14: 12
Baefese 1:5
II Timoté 3:1-8
Baebele 6: 1-8 / 11:4
Emóniseli 10:1-7 / 16: 13-14
Malakí 4:5
I Mikonzi 22: 1-28
Yilimia: Mikapo 27 & 28

26-0510 Mokolo Ya Mama

Litéya: 59-0510M Mokolo Ya Mama

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála,

Sikawa, Nakanisi ezali na lokúmu koleka te oyo tokokákí kopésa na mamá.

Mamá na bisó nde moto ya libosó elongó na bisó, mpe apésámélákí mokúmbá monéne ya oyo ekozala bisó mpe elekelo ekotámbola bisó mobembo. Apesáméláki motíndo longwá na Nzambe kotía bisó na nzela alimá. Nde ntina ba mamá bazali na mwá esímbeli godi, oyo epésámákí na bangó longwá na Nzambe.

Lipámbolí nini godi ezali na ebómbelo mpo ya bisó Lomíngo oyo, lokola tozali kopésa longónya epai ya ba Mamá nyoso, lokola tozali koyóka mwanje ya nsambo ya Nzambe kotálisa bolingo mpe lokúmu ba mamá na bisó bazali na yango kati na mitéma ya bisó.

Toyebi mokolo nyoso ezali Mokolo ya Mamá, Kasi Lomíngo oyo tokopésa longónya godi epai ya ba Mama nyoso lokola tozali koyóka mosakoli na bisó kopésa bango lokúmu lokola alobákí esili koleka mbúla 67 na mokolo yango mpenza, sánzá ya Mítáno, 10, 1959.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: Mokolo Ya Mamá 59-0510M
Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville

Makomí: Bakolinti ya Libosó 15: 1-4

26-0503 BILÉI YA MOLIMÓ NA NTANGO ELONGÓBÁNÍ

Litéya: 65-0718E BILÉI YA MOLIMÓ NA NTANGO ELONGÓBÁNÍ

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála,

Mongóngó bisó nyoso tolingaka koyóka ekoloba Lomíngo oyo, mpe ekomemela bisó Litéya moko Mokandá ya Bolingo ya godi, káka mpo ya Mwasi ya libála ya Yesu Klisto.

Mongóngó yango eútí káka koloba na mokili mpe ekébísí yango, “Meká te kosálela Ngai mosálá ézánga kozala mokáno na Ngai. NAzali na nzela ebongí be epésámí Nabongisá mpo ya bino, Mwasi na Ngai ya libála. Bókanisa Maloba na Ngai, bóloba bobélé oyo Nalobákí likoló ya ba bánde na Ngai, zambí bozali kokóta kati ya kosámbisa. Mawa etiólami. Kasi bósepela, mpe bótónda na matóndí, zambí Nabongiseli mpe Napesí bino Biléi bibómbámí, Biléi ya Molimó, mpo bókoka kobíka likoló ya bobóto mpe mawa ya Emóniseli ya Yesu Klisto.

Ngángé ezalí sikawa kati na mbóka mpo ya boyóki Mongóngó na Ngai. Bazali kosósola bino te mpámbate bozali koloba ete bozali bato ya ba bánde, mpe bolingaka káka koyóka Mongóngó na Ngai likoló ya ba bánde; kasi NABIÁNGÁKÍ bino kobima mpe Namónisí bino nzela na Ngai ebongí be mpo ya lelo.

Bomíyanganisi na bazangi Kondima te na ntango ya ngángé. Napesákí bino Mongóngó ya Ngai mpo ya kobátela bino na bomoi. Na boyókáká Mongóngó na Ngai, mbeki ya bino ekotikala pámba soki moké te, sokí te ete molangi ya bino ekokaoka, kino mokolo Nakoya mpe kokamata bino lokola Mwasi na Ngai ya libála.

Nde ntina mpenza Nasálákí ete Mongóngó na Ngai étiama na masíni, na ntina ete bózala na esiká ebongí be epésámí mpo bókende Kúná, epai wapi libúngá ezali te, boséngá ya ndimbola te, bobele Mongongo Peto ya Nzambe. Esiká bokokí kokende na ntina ete bókoka koyóka mpenza kaka oyo elobákí Ngai: Yango Elobí Nkoló.

Nakoloba na bino polélé mpenzá mokolo ya Lomíngo. Nalingí ete bóbósana soki moké te oyo Nakoloba na bino. Ba bánde oyo nde Biléi na bino ya Molimó na ntango ekokí. Etóndí na vitamíne koleka mpo ya basúsu na bango, bakokí na bango káka te kozua Yango.Emónísámeli bango te, kasi Naponákí BINÓ, mpe Napésákí bino Emóniseli ya nzela na Ngai ebongí be epésámí.

Epai na bino, Ezali Biléi bibómbámí, wapi bozali kobika likoló ya bobóto mpe mawa ya Liloba ya Bomoi.

Ntango Nazalaki kobika kati ya mosuni kati ya Mwana na Ngai, bakokaki na bango káka te kondima nani nde Nazalaki: Nzambe mpe moto. Nsima Nalakákí ete Nakozonga lisúsu kati na mikolo ya nsúka mpe kobika kati ya mosuni ya moto mbala moko lisúsu lokola Nasalaki libosó ya Abalayama, mpe Nakokita mpe Nakomíkótisa Ngai moko kati ya mosuni ya moto lokola Nasalaki ndéle.

 Bótála oyo bazangakí, ndéle mpe sikawa, kasi Nalingá ata moké te bóbósana. Biléi bibómbámí oyo Nazali koléisa bino, mpe motindami na Ngai, bazali eloko sé moko. Bokokí kokabola bango te. Etíndá na motindami bazali eloko yango moko. Nalobákí na bino kati na Liloba na Ngai yango ekosála Ngai lelo oyo. Nde ntina Ezali mokáno na Ngai kotia Mongóngó na Ngai kati ya masámbo na bino, kati ya ba ndako na bino, epai nyoso ekokende bino; zambí yango nde Mongóngó ya litómbá koleka bosengélí koyóka. Nde Mongóngó SÉ MOKO mondimísámí oyo ekolobaka Yango Elobí Nkoló.

Mawa etíólámí. Bozali sikawa kobika na Liloba na Ngai. Napésí bino Emóniseli ya Nani nde Nazali mpe ba nani nde BOZALI. Esengelákí ézala ata na elílíngí ya ntembe ata ndambo te kati na mitéma mpe makanisi na bino. Bozali Mwasi na Ngai ya libála baoyo botangolami na ba mosúsu, boponámí, Bobongísamákí libosó. Bozali Liloba na Ngai lilobámí oyo ezalaki kati na Ngai na ebandeli.

Bozali na mabóko na bino na Biléi, Biléi ya Molimó, oyo mokili eyebi eloko moko te na ntina na yango. Bozali na mabóko na bino likolo ya lobíko ya nzóto na bisó ntango minganga bakoki lisúsu te; Ezali moko ya Biléi Nalakákí mpe Napésí bino na mikolo ya nsúka.

Nalakákí komónisa ba sekelé ya mitéma na bino mpe kosála makambo oyo. Nazali kati na bino. Bozali eténi na Ngai, mpe Nazali eténi ya bino. Bilembo biye bikolanda bango bakondima.

 Lomíngo oyo Nakozala kosangisa Mwasi na Ngai ya libála longwá na mokili mobimba na Mongóngó na Ngai. Nakoyebisa bino bótianela mabóko. Bóndélá te mpo na yo moko, bóndélá mpo ya moto otíéli mabóko, zambí azali kobóndela mpo na yo. Tokobóndela elongó, mpe ekozala na moto moko te ya bolembú esiká soko nini na mokili mobimba soko bokondima.

Soko ondimí, mpe ozali na ntembe te kati na motéma na yo, Nakosangela:

Satana, olóngámí! Yesu Klisto Alóngaki yo! Asékwakí longwá na bakúfi mpe atélémí kati na bisó na pókwa oyo, kondimisa Etíndá oyo ya mikolo ya nsúka. Bimá kati na bato oyo! Tíká bango, kati na Nkómbó na Yesu Klisto! “Na Nkómbó na Ngai bakobengana milímó mabé,” Mpe obengánámí. Kati na Nkombo na Yesu Klisto, tíká eyánganelo Oyo!

Kobikisama na nzóto ekozala Kati na mokili mobimba lokola libosó naino soko moké te.

Mpo ya nini tózila-Zila lisúsu, ndeko na Ngai mobali, ndeko mwasi, Yango oyo, Molimó Mosanto, Nzambe, awa mpenza, Likambo yango mpenza tosolólákí na ntina na yango.”

Nabiángí mokili koya komíbakisa na bisó Lomíngo oyo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe koyóka Etíndá mpe motindami na Ye komemela bisó Biléi ya Molimó na ntango ebongi, Biléi Bibómbámí mpo ya Mwasi ya libála.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: BILÉI YA MOLIMÓ NA NTANGO ELONGÓBÁNÍ 65-0718E

Motíndami: Momemiami William Marrion Branham

Makomi: 1Mikonzi 17: 1-7 / Amos 3:7 / Yoele 2:28

Malaki 4:4 / Luka 17:30 / St. Yoane 14:12

26-0426 Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda Ya Mokano Na Nzambe

Litéya: 65-0718M Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda Ya Mokano Na Nzambe

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála Oyo Alingámí Koleka,

Ngonga elekí. Ntango ebélémí. Mokáno esengeli kozuama. Nzambe azali kokébisa bana na Ye. Nkolo Nzambe na bisó asolólí mpe andimisí epai na bisó oyo Sóló na Ye na nzela ya Liloba na Ye, mpe na Molimó na Ye. Na nguya te, na makási te, kasi na Molimó na Ngai, mpe Liloba na Yo nde Sóló.

Andimísí polélé-polélé epai ya Mwasi ya libála lelo ete Yesu Klisto azali lolengé moko lobí, lelo, mpe libela. Atalisí mpe Amónísí epai na bisó Etíndá mpe motindami ya ngonga oyo bazali eloko yango moko. Amónísí bisó mabómbami ma Ye manso mazipámákí kati ya Liloba. Alakísí Yango epai na bisó na nzela ya Molimó na Ye Mosanto. Ezali na ntembe ata moké te kati na makanisi, mitéma to milímó na bisó. Mongóngó na Ye likoló ya ba bánde ezali YANGO ELOBÍ NKOLÓ EPAI YA MWASI NA YE YA LIBÁLA.

Nzambe alingísákí ntango nyoso nzelá mingi ya koya epai na Ye. Asálaka mokáno na Ye elingísámí kati ya Mokáno na Ye Ebongí be. Apésákí mpe ntango nyoso MOKÁNO EBONGÍ BE MPE NZELA EBONGÍ BE MPO YA BANA NA YE. Mingi bamekí koyá nzelá ekeséní na bosáléláká Nzambe mosálá nzókandé libándá na Mokáno na Ye ebongí be. Ekokí komónana mpe koyókama lokóla nde mokáno na Ye ebongí be, kasi ezali te éngébéné na Liloba na Ye.

Ata moto monéne, aútí kopakolama, koúta na Bozali mpenza ya Nzambe, azuí emóniseli kosála eloko moko mpo ya Nzambe, mpe alingákí kosála yango mpo ya Nzambe; kasi emóniseli azuaki elongóbánáki te.

Moko na moko na bisó asengeli ázua nzela na Ye ebongí be epésámí. Tokoyéba ko boni soko tozali kati ya Mokáno na Ye ebongí be soko moto moko oyo apakólámí mpenza, oyo aúti kolongwa na bozali Sóló ya Nzambe, na emóniseli, azali te kati ya mokáno ya Nzambe ebongí be?

Ezali na nzela BOBÉLÉ MOKO YA KOYÉBA NA BO SÓLÓ, mpe Nzambe Apésí nzela yango mpo ya Mwasi na Ye ya libála.

Mongóngó ya Nzambe Ye moko eyébisakí lingómbá oyo, mpe bino bato nyoso likoló ya ba bánde, mpe bato baoyo bozali na bikanganelo ya singa na bisíká mosúsu ya mokili, ndéle mpe SIKAWA. Ayebisaki bisó tóyókamela yango ezalaki ye koloba na bokéngi mpenza, mpe mpo na bisó TÓZÁNGA TE KOYÓKA.

Boye elobí Ngai, kati na Nkombo na Yesu Klisto: Bakísá eloko moko te, longólá te, tiá makanisi na yo moko te kati na Yango, Lobá bobélé oyo elobámí likoló ya ba bánde wana, sála na yo káka oyo mpenza Nkoló Nzambe apésákí motíndo kosála; bakísá na Yango te!

Alobákí te, mpe elingí koloba te, ete batéi bakokí te kotéya Liloba, balakisi bakokí te kolakisa Liloba, to babáteli to basakoli kosála oyo tobiangamáki kosála; basengelí kosala yango. Nasengélí kosala yango. Tobiangámáki mpe tobongisamáki kosála yango. Esengeli tótálisa mpe tozóngela maloba ya Etindá mpe motindami oyo epai na bato, zambí Ezali Liloba mpo ya mokolo na bisó.

Kasi Ayébísí bisó polélé-polélé tokoki banso kopakolama, na kopakolama ya solo, kotóndisama na Molimó na Ye Mosanto, na emóniseli longwá na Ye, mpe kozala libándá na mokáno na Ye. Na mokolo ya bisó, Apésí NZELÁ EBONGÍ BE koyeba na bosóló ozali koyóka Mongóngó ya Nzambe, koúta na Nzambe Ye moko. Nde nzela BOBELE MOKO ebongí be.

Batéi basengeli káka te kozóngela maloba mpe kotéya Etindá oyo, tosengeli koyókisa bato Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde. Ezali te na KOPAKOLAMA MONÉNE KOLEKA oyo elekí koyóka Mongóngó ya Nzambe. Ezali na nzela mosúsu te ya koyeba na elílíngí ya ntembe ata ndambo te soko oyo tozali koyóka ezali MPENZA oyo Nzambe alobákí.

Lelo oyo, lokola mokolo mosúsu te kati na lisoló ya mokili, Nzambe apésá nzela oyo esálí ete ékoka te kozánga Yango, Soko ozali Mwasi na Ye ya libála oyo obongísámákí libosó. Endimisamákí mpe emónísamákí na nzela ya Likonzí ya Móto Ye Moko kozala Mongóngó ya Nzambe Ye moko koloba mbala moko alimá na Lingómbá na Ye.

Kati na ba nkóto ya mbúla, bana na Nzambe baúmelá kotálela mpe banyókwámá na nzala ya koyóka Mongóngó ya Nzambe bango moko. Boni bakokákí kosepela bázala wana mokolo wana ntango Yesu atéyákí nkóto na nkóto likoló ya ngómbá. Koyóka boni Alobákí Liloba na Ye na bolingo mpe koyókela mawa. Koyóka boní Atiákí kobéta nsété likoló ya Liloba moko na moko. Boni ekokaki koloba mpe koyikisa mitéma na bango mpiko. Tozali na bomoi sikawa mpe kati na Bozali ya Nzambe koyóka Mongóngó ya Nzambe.

Mokolo moko nokí mpenza tokozónga lisúsu te na motíndo ya bómoi oyo. Tokozónga lokola ekelámu ya kozánga kúfa. Lisúmu ekolímwa nde kolímwa. Satana akokangama mpo na mbúla nkóto mpe tokobíka likoló na mabelé oyo Nkoló Nzambe na bisó Apésí bisó.

Tozali tokokí mobimba 100%. Totíkálá kosepela soko moké te boye libosó to ntembe ata ndámbo te kati na bomoi na bisó. Tozali Moko elongó na Ye mpe Liloba na Ye. TOZALI Liloba na Ye. TOZALI KATI YA MOKÁNO NA YE EBONGÍ BE NA BOTIKÁLÁKÁ NA MONGÓNGÓ NA YE, LILOBA NA YE. Akozala kozónga mokolo sé mokolo sikawa kolongola bisó awa elongó na Ye.

Matóndí Nkoló Yesu!

Nkoló Nzambe na bino Ayebisí bino oyo ezali Sóló. Nkoló Nzambe na binó Andimiseli bino oyo ezali Sóló, na nzela ya Liloba na Ye mpe Molimó na Ye. “Na nguya te, na makási te, kasi na Molimó na Ngai.” Mpe, Molimó, “Nzambe azali koluka baoyo bakosámbela Ye kati ya Molimó mpe kati ya Sóló.” “Liloba na Yo ezali Sóló.” Mpe Andimisí polélé-polélé ete Yesu Klisto azali lolengé moko lobi, lelo, mpe libela. Atálísí Mimbóto ya ntango ya pókwa epai na bino. Amónísí bino Yango, kati ya Liloba. Alakísí Yango epai ya bino, na nzela ya Molimó na Ye.

Na motéma na ngai mobimba Nabiángí moko na moko na bino koya komíbakisa na eténi ya Mwasi na Ye ya libála lokóla tozali kosangana longwá na mokili mobimba na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka Mongóngó na Ye koloba na nzela ya motindami na Ye mwanje ya nsambo mpe komemela bisó Litéya: Komeka Kosálela Nzambe Mosálá Nzókandé Libándá Na Mokáno Ya Nzambe 65-0718M.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotánga libosó ya boyóki Litéya:

Dutelonome 4:1-4 / 4:25-26
1 Ntango 13
1Ntango 15:15
Njembo 22
St. Malako 7:7
Malaki 3
St. Matái 11:1-15
1 Bakolinti 13:1

26-0419 Kopona Mwasi Na Libala

Litéya: 65-0429E Kopona Mwasi Na Libala

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libála Moponami,

Lokola tozali koyóka Litéya oyo, Kopona Mwasi Ya Libála, bókó bakanisí mosakoli azali kaka koloba mpe kopesa bisó malako likoló ya ezaleli mpe litongi mobali asengélákí kozua lokola mobóko ntango azali kopona mwasi oyo alingí ázala mobálani na ye. Ezali solo, yango nde azali kosala, kasi ezali na likambo mpenza mpenza libómbámí, mokandá ya bolingo kati ya Maloba ma Ye. Oyo Azali komónisa Mwasi na Ye ya libála eleki na bozíndó. Nzambe azali koloba na Ye mbala moko alimá, koyebisa Ye nini nde Azalaki koluka kati na Ye mpe mpo ya nini Aponákí Ye longwá na ebandeli. Alingákí Áyéba ete Aponákí Ye kozala MOLINGAMI NA YE MWASI YA LIBÁLA WA MOTÉMA, oyo Alingákí kokabola Sékó na Sékó ya Ye elongó na Ye.

Na ebandeli, Nzambe azalákí koluka-luka Mwasi ya libála oyo akozala na ezaleli yango moko ya Ye. Molimó yango moko na Ye mokomónana kati na Ye Mwasi. Alingákí Mwasi ya libála oyo amítékáki mobimba epai na Ye, mpe Liloba na Ye lilakámí, kino Likanisi mpenza lizalákí kati na Ye likozala kati na Ye Mwasi ya libála. Asengeli áyemama boó ezali Ye.

Alingákí Ye ázala mosuni yango moko na Ye, mikúwa yango moko ya Ye, Molimó yango moko ya Ye, makambo nyoso yango moko, káka mpenza lokola Ye. Bango mibalé bákóma MOKO.

Mwasi yango alingákí te kozala na etaleli ya kanza na líso na ye. Alingákí te koleka-leka na mongóngó mosúsu ata nini. Alingákí kozala solo mpe na motéma mobimba epai na Ye, ézala nani áloba nini. Alingákí kozua Ye na Liloba na Ye. Ézala nini elobí Ye, YE MWASI ALINGÁKÍ KONDIMA LILOBA MOKO NA MOKO, atá ézua ntango molaí boni mpo ékokisama, alingâkí Kondima Yango. Alingákí Kotíkala na Liloba na Ye.

Akolinga Ye, mpe Ye káka. Asengélákí te kopesa ye bozui mingi, Así azuákí Mayaka ya motúya monéne, Emóniseli ya solo ya Ye. Ayébí ete bazalákí MOKO mpe eloko yango moko. Molimó na Ye Mobali akofánda kati na Ye Mwasi. Ézala atá nini Ye Mwasi asengélákí na yango, Akopésa Yango na Ye; nyoso asengélákí kosala ezalaki kosénga mpe kondima, mpe Ye Mobali Akosala yango.

Ayébákí ete Akozala Akeí mpo ya ntango molaí kotongela Ye ndako oyo ekozala na biloko nyoso kokokana na mpósá mpe boúlani na Ye. Azalaki kotonga yango bobele na motindo molingí Ye. Ayébákí ete mokolo moko Akozónga mpo na Ye, lokóla elakákí Ye, na bongo bakozala na Lipati monéne ya Makwéla mpo na mbúla nkóto. Nde, bakokende elongó na Ezalelo kitóko etongákí Ye mpo na Ye kolekisa Sékó na Seko.

Eloko mosúsu te etálí Ye. Alingí na Ye eloko mosúsu te. Akosepela mingi mpe kotia motéma kozala na Emóniseli koyeba Azali nani, mpe Ye Mwasi Azali nani. Ayébí ete Mobali akobátela Liloba na Ye. AKOKOKISAMA, KOYEBA ETE YE NDE APONÁKÍ YE KOZALA MWASI NA YE YA LIBÁLA.

Bandeko na ngai mibáli mpe basi, Nzambe ya ngúyá nyoso ya Lóla mpe ya mabelé atalákí kati na Sékó na Sékó mpe APONÁKÍ YO…YO KOZALA MWASI NA YE YA LIBALA WA MOTÉMA MOPONAMI.

Nabiángí yo koya komíbakisa na ngai mpe eténi ya Mwasi na Ye ya libála Lomíngo loye, lokola Azali koloba kati ya mwanje na Ye ya nguya mpe koyebisa bisó tozali Mwasi ya libála na Ye Moponami.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: 65-0429E / Kopona Mwasi Ya Libála
Ntango: 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville

Makomi:
Genese 24: 12-14
Yisaya 53 :2
Emóniseli 21:9