All posts by admin5

Pásika 2026 -Molúlú Godi Ya Elámbo & Kosukolana Makolo 

Balingami Bandeko Bana mboka Ya Bokonzi,

Pasika oyo ezali kolaka ete ekozala Pásika monéne koleka oyo Mwasi ya libála azuá ndèle. Tozalaki kofanda kati ya Bozali ya Mwana, kotela, koyeba baoyo Ezali bisó. Litóndí ya Yesu Klisto ezali komónisama kati ya moko na moko na bisó lokola Liloba na Ye, Mongóngó na Ye ezali kogánga, longwá na Mpongo kino mpongo, kobiánga bisó kobima tókende na Lipati ya bisó ya Libála.

Mbúla na mbúla na ntango oyo Mwasi ya libála azalaka kati na kozila na etíngiá monéne ya boyéi ya nsúka ya póso ya Pásika. Ntango moko oyo Akosangisa bisó longwá na mokili mobimba mpo ya mikolo minei ya bokóbi, kokúmisa Ye, kotóndo Ye, kosánzola Ye; zambí Asékwí mpe Azali kobíka kati ya moko na moko na bisó. Mobali ya libála mpe Mwasi ya libála bazali kokóma MOKO.

Azali kopesa bisó ntango Godi oyo kokanga mpenza makambo nyoso ya mokili zingázingá na bisó mpe káka kolekisa ntango elongó na Ye. Makambo ya mokili oyo te kobénda bokébi na bisó, lokola tozali kokela mokili mwa bisó moko elongó na Ye. Kokanga bikuke ya bisó, kokanga bisáleli ya bisó nyoso ya nsinga mpe ya mipepe mpe eloko mosúsu ata nini ekobéndaka bokébi na bisó mosiká na Ye.

Pósá monéne koleka moko na moko na bisó azali na yango ezali kobélema na Ye na koleka. Tolingi kobíka bomoi bobónzameli Ye koleka; kozala ntango nyoso kati ya Mokáno mwa Ye mobongí be. Komíléngele mpo ya koya na Ye. Ezali na eloko moko te kati ya mokili oyo, to kati na bomoi na bisó, ézala na litómbá koleka oyo.

Apési bisó libakú malamu godi oyo kolekisa káka ntango elongó na Ye, koloba mpe kobánza likoló na Ye. Kokóta kati ya bozali na Ye mpe kofungwela Ye mitéma mia bisó. EKOZALA NDE YA KOBÓNGOLA BOMOI MPO YA MWASI NA YE YA LIBÁLA!

Ayebi ete ekokí kozala kpókósó mpo ya bókó na bino na bana, libota, mpe mikúmbá misúsu tozali na yango, kasi soko tokosálela Sékónde moko na moko ya nsómí tozali na yango koloba na Ye, kobéndama pene na ye koleka,  kofungola mitéma mia bisó epai na Ye, Ekozala nde na mbóngwáná moko ya ndenge wana kati ya kotámbola ya bisó elongó na Ye, kino tokozala lisúsu lolengé moko te.

Lokola esáláki Ye na mikolo ya Mose wana eyéisáki Ye bana na Ye kati na ba ndako ya bango, Makilá mapakólamákí mpe bazalakí komíléngele mpo ya kobima ya bango; bongo mpe nde nsúka ya póso oyo ya Pásika godi ebongisi Ye ekozala mpo ya moko na moko na bisó.

MOKOLO MWA MINEI

Ezalaki mokolo mwa Minei na mpókwa nde Nkoló Yesu azuákí Elámbo ya nsúka elongó na bayekoli na Ye, kati ya ekaniseli ya Elekeli libosó ya kobima ya bana ya Yisalaele. Libakú malamu nini oyo tozali na yango kosangana elongó na Nkoló kati ya ba ndako na bisó, libosó ya nsúka ya póso ya bisó mosanto, mpe kosenga Ye álimbisa bisó na masúmu ma bisó, mpe ápesa bisó nyoso tosengeli na yango kati ya mobembo na bisó.

Tata na Likoló, tozali na matóndí mpo na oyo, ntango mosúsu koyanganisama elongó, ngámbo oyo ya Sekó na Sékó. Mpe tozali koluka na ntóngó oyo nguya ya sika koúta epai na Yo, kopesa bisó mpiko mpo ya mobembo mozali libosó. Toyangani pelamókó bana ya Baebele basalákí na ntá ntóngó nyoso, kolokota máná mapesámélaki bango kati ya butú, kobatela bango kati ya mokolo mozalaki koya. Toyángani mpo ya Máná ya molimó, na ntóngó oyo, kopesa bisó makasi mpo ya mobembo.

Tika ete banso tóbanda na 6:00 nsima ya nzángá na ntango ya mboka ya bino koyóka Elámbo 62-0204, na nsima mosakoli akomema bisó kati ya molúlú ya bisó godi ya Elámbo mpe Kosukwama Makolo na nsúka ya bánde, oyo ekozala koleka na app Lifeline (na Angelé), to okoki komízuela losámbo na Angelé to na nkótá mosúsu na bonyatáká ekanganeli na nsé awa.

MOKOLO MWA MITÁNO

Tika ete tókende na mabóndeli elongó na mabóta ma bisó na 9:00 na ntóngó, na nsima na 12:00 nsima ya nzángá, kobiánga Nkoló ázala elongó na bisó mpe átóndisa ba ndako na bisó na Molimó Mosanto lokola tozali komíbónzela epai na Ye.

Tika ete mitéma mia bisó mízónga na mokolo wana na Kalvari, elekí pene na mbúla 2000, mpe tómóna Mobikisi na bisó akakémí likoló na ekulúsu. Tika ete tókanisa motúya monéne Afútaki mpo ya bisó. Azalaki Mwana ya Nzambe na lisúmu te, kasi Asengélákí konyókwama lokola moto moko te anyókwámá, zambí masúmu ma bisó matiámákí likoló na Ye.

Asengélákí kotinda Ye na ewélo akwéísámí (Bomóní?), zambí azuaki masúmu ma bisó. Mpe Klisto akúfákí, te lokola moyengebene; Klisto akúfakí mosumúki. Bomóní? Klisto atíkálâ kosúmuka Ye moko te, kasi Azuakí masúmu ma bisó likoló na Ye.

 Nsima na 12:30 nsima ya nzángá, tika ete tókangana elongó kati na ba ndako ya bisó koyóka: 57-0419 Bobongi be

Nsima tika ete tókangana elongó kati na libondeli mbala moko alimá nsima ya losámbo, kati na ekaniseli ya bobákami na ekulúsu ya Nkoló na bisó.

MOKOLO MWA PÓSO

Tika ete mbala moko lisúsu banso tósangana kati na libóndeli na 9:00 na ntóngó mpe na 12:00 nsima ya nzángá, mpe tóbongisa mitéma na bisó mpo ya makambo minéne Akosala mpo ya bisó kati na bisó.

Nakoki koyóka Ye koloba, “Satána, yaka awa!” Azali Mokonzi sikawa. Asémbóli lobóko, Asímbí lifungóla wana ya kúfa mpe ya ewélo longwá na pembeni ya lokéto na ye, Atingámísí yango pembeni na Oyo ya Ye moko lokéto. “Nalingí éyebana epai na yo. Osálá bipale ntango molaí mingi. Nazali Mwana Nzambe ya bomoi oyo abótámí na bongondo. Makila ma Ngai mazali naino kotanga na ekulúsu, mpe nyongo efútámí mobimba! Ozali lisúsu na makoki te. Obótólámí nyoso. Pésá Ngai Mafungóla wana!”

Nambísa na 12:30 nsima ya nzángá, tokoya bisó nyoso elongó koyóka LILOBA: 57-0420 Bokundami.

MOKOLO NINI YA KÁFÚ-KAFU oyo ekozala mpo ya Mwasi na Ye ya libála kati ya mokili mobimba.

Nambísa tiká ete tóya elongó kati na libóndeli mbala moko alimá nsima ya losámbo.

MOKOLO MWA LOMÍNGO

 Tiká ete ya libosó tólamuka na ntá ntóngó lokola esáláki Ndeko Branham na ntóngó wana eyákí moníngá na ye moké, mwa ndeke ya tólo motáné, kolamusa ye na 5:00 na ntá ntóngó. Tiká bobélé ete totóndo Nkoló mpo na kosékwisa Yesu longwá na bakúfi:

Na ngonga ya mitáno na ntóngó oyo, moningá na ngai moké na tólo motáné apombwák na lininísa mpe alamúsákí ngai. Eyokanákí lokola nde mwa motéma na ye molingaki kopasuka, na bolobáká, “Asékwí.”

Na 9:00 na ntóngó, tiká tóya elongó mbala moko lisúsu kati na monyolólo na bisó ya mabondeli, kobondela moto mpo na moninga na ye mpe komíbongisa koyóka Mongóngó ya Nzambe.

Na 9:30 na ntóngó, tokoya elongó koyóka Litéya ya bisó ya Pásika: 65-0418M Ezali Kobima Ya Mói.

Na 12:00 nsima ya nzángá, tokotómbola mingóngó na bisó epai na Ye kotóndo Ye mpo ya nguya ekopesaka bomoi.

Na 3:00 nsima ya nzángá, tiká ete mbala moko lisúsu tósangana kati na libóndeli kotóndo Ye mpo na NSÚKA YA PÓSO MALAMU APÉSÍ BISÓ ELONGÓ NA YE MPE ELONGÓ NA MWASI NA YE YA LIBÁLA LONGWÁ NA MOKILI MOBIMBA.

Epai ya bandeko na ngai mibali mpe basi na ngámbo ya bibale minéne, lokola mbúla eleki, Nalingí kobiánga bino bósangana elongó na bisó na ntango ya Jeffersonville, mpo ya ntango nyoso ya mabóndeli likoló ya manáka oyo. Nayebí nde ata ko bongo, ete koyóka bánde mokolo mwa Minei, mwa Mitáno, mpe mwa póso nsima ya nzángá na ntango ya Jeffersonville ekozala kpókósó makasi mpo ya mingi na bino, na bongo bolimbisi bómíyóka nsómí koyóka Matéya wana na ntango ekokí mpo na bino. Nzokande, Nakolinga atako bongo, mpo ya bisó nyoso tókangana elongó mokolo mwa Lomíngo  na 9:30 na ntóngó, ntango ya Jeffersonville, koyóka Litéya ya bisó ya Lomíngo elongó.

Nalingaki mpe kobiánga bino mpe bana na bino ete bózala eténi ya Misálá ya Creations, journaling, mpe biloko ya bobongisi biléi oyo libóta na yo mobimba bokosepela kosála elongó. Tokanisi ete bokolinga yango lokola nyoso ezuí mobóko likoló ya LILOBA tokozala koyóka na nsúka ya póso oyo.

Mpo ya manáka ma nsúka ya póso, nsango likoló ya komíbongisa mpo ya molúlú ya Elámbo, bisáleli bikosengelama na yango mpo ya misálá ya Creations mpe nsango mosúsu, bómóna bikanganelo awa na nsé.

Tiká tókanga ba telefóne ya bisó mpo na nsúka ya póso ya Pásika, longólá sé kozua bilílí, koyóka Eténi Ya Liloba Útá Na Litéya Ya Mokolo, mpe koyóka ba bánde longwá na Table app, Lifeline app, to bikanganelo bikokí kozuama.

Ezali lokúmu ya lolengé wana mpo na ngai kobianga yo mpe libota na yo koya elongó moko na Mwasi ya libála longwá na mokili mobimba mpo na nsúka ya póso etóndí na LOKÚMU, MASÁNZOLI, MPE LOBÍKO YA NZÓTO. Nandimí ezali sóló mpenza nsúka ya póso oyo ekobóngola bomoi na yo mpo ya libélá.

Ndeko Joseph Branham.

26-0329 MELIKISEDEKE OYO AZALI NANI?

Nsango: 65-0221E MELIKISEDEKE OYO AZALI NANI?

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libála Bomoi Ya Sekó,

Nani nde Mongóngó wana mozali koloba na bisó likoló ya ba bánde?

Tokokí bobélé koyéba eyano na motúna wana na nzela ya Emóniseli koúta na Nzambe. Bobélé Mwasi na Ye ya libála oyo abongísamákí libosó nde akokí kozala na Emóniseli wana. Ntina wana, tosengeli koluka-luka na Liloba na Ye kosósola nani nde Alobaki azalaki moto yango: Molimboli sé moko ya Liloba na Ye. Nani nde alingákí kobúka mpe kofungola Bilembo yango Nsambo? Nani nde alingákí kofungola sekelé nyoso ibómbamáki ya Biblia? Nani nde akobiánga kobima mpe kokamba Mwasi na Ye ya libála? Nani nde akozala na Mongóngó mozángí kokwéa?

Kokokana na Liloba, ezali moto mosúsu te longólá sé Melikisedeke Ye moko. Moto na tatá te soko na mamá te, Oyo azalaki na ebandeli to nsúka ya mikolo te. Nzambe, oyo akómákí mosuni mpe aliákí mosuni mpe lípa ya masángó, amelákí míliki ya mwá ngai, mpe Alobákí na Abalayama. Azalaki moto na bomoto, kobíka kati ya mosuni ya moto.

Liloba yango moko elobákí ete Melikisedèke yango, Moto yango, bomoto yango, akobika mpe komímónisa lisúsu kati na mosuni ya moto bobélé lokola esáláki Ye na Abalayama, nambísa mbala moko lisúsu kati na Yesu Klisto; kasi lelo, kati ya mwanje na Ye ya nsambo motíndami ya Emóniseli 10:7.

Molimó na Ye mokozíkisa héma wana ya mabelé na ntina ete Ákoka koloba mpe komímónisa epai ya Mwasi na Ye ya libála. Nzambe Ye moko kobika mpe koloba kati ya mosuni ya moto. Mombóto na Ye ya libosó ezóngisámí ekómí na kokémba mobimba. Etandelo mobimba ya Nzambe esí ekómákí; Nzambe na moto bazalaki Moko. Nzambe azalaki koloba mbebu na litói na Mwasi na Ye ya libala lokola esálákí Ye na Abalayama.

Ayaki na kati mpe abíkáki kati na yango, kati na Moto ya Melikisedeke, na nsima toyókáki lisúsu na ntina ya Melikisedeke te pámba te Akómákí Yesu Klisto, Melikisedeke, azalakí Nganga kasi akómákí Yesu Klisto, sikawa, olekákí mosiká na yango, zambí kati na lolengé wana Ayébákí maksambo nyoso, nde otikálá koyeba yango naino soko moké te.

NAINO TE…!! Nde tozali ba nani?

Míso ma bisó, litongi na bisó, eloko sé eloko ezalákí bisó, tozalaki kati ya makanisi ma Ye na ebandeli. Libosó ndèle Mwanje, monzóto, Kelúba, to elóko ata nini ézala. Akanísákí yango, Alobákí yango, mpe bisó oyo awa.

Yango nde kozánga nsúka. Tokoki kosósola yango te kati na makanisi ma bisó, kasi ezali Nzambe, Nzambe, kozánga nsúka!

Nzambi tozalaki kati na Ye na ebandeli, nini nde ezali kokómela bisó nsima ya bomoi oyo ya kufa awa na mabelé kokóma na nsúka?

Ntango mokóto oyo ya mosuni mokwéi, ezali na nzóto ya mokili, nzóto ya molimó, nzóto oyo esálémí na mabóko te, sokí te ete ebótámí na mwasi, oyo tozali kokende na yango. Nsima nzoto yango ezóngí mpe ememí nzóto ya nkémbo.

Makambo nini ya bikámwa mazali kati ya ebómbelo mpo ya Mwasi na Ye ya libala. Bótala oyo ezali kosálema sikawa mpenza wana ezali Ye komónisa Liloba na Ye epai ya bisó lokola libosó naino soko moké te. Bétá lisoló ya mokandá ya bolingo epai ya Mwasi na Ye ya libála! Mokolo nini oyo tozali kobíka kati na yango.

Tozali na Emóniseli mpe toyebi ezali Melikisedeke, Mongóngó ya Nzambe, koloba na bisó likoló ya ba bánde. Tozali na Emóniseli ezali Mokáno mwa Nzambe mopesámí mpe mobongí be mpo ya lelo.
Na bongo, toYEBÍ BAOYO EZALI BISÓ MPE TOZALI MWASI NA YE YA LIBÁLA.

Emoniseli yango ezali koyá monéne koleka mpe koleka lisúsu mokolo na mokolo. Mokolo moko na moko mozali koleka mozali komemela bisó esengo mingi koleka, Emóniseli mingi koleka. Mwasi ya libála azali komíléngele na bofándáká kati na bozali ya Mongóngó na Ye, lokola Azali koyebisa Bisó Tozali ba nani, boni Alingí Bisó, boni Akoki kozila te kino ekosila Ye kozala elongó na Bisó!!!

Yaka, ómíléngele na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpo na oyo ebélémí kosálema, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Melikisedeke.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: 65-0221E “Melikisedeke Oyo Azali Nani?”

Makomi ya kotánga:
Genese Mokapo ya 18
Esode 33:12-23
St. Yoane 1:1
Baloma 8:1
2 Bakolinti 5:1
1 Batesaloniki 4: 13-18
Timote ya libosó 3:16 / 6:15
Baebele 7:1-3 / 13:8
Emóniseli 10:1-7 / 21:16

26-0322 Libala Pe Koboma Libala

Litéya: 65-0221M Libala Pe Koboma Libala

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libála, Oyo alongólámí kati ya basúsu, Aponámí, & Oyo Abongisámákí libosó:

Nakanisi lokola elengé mobali ntango Nazalákí kokóla, komeka kopona bánde moko ya koyóka. Ntango ya kotánga mikonza, Nakanísákí ntango nyoso, Nakoyóka na ngai Libála mpe Koboma Libála te, lokola yango ezali na likambo moko te ya kosála na ngai; bobélé babálani.

Na bongo mokolo moko, ntango Nazaláki koyóka Libála mpe Koboma libála, nde Tata apésákí ngai Emóniseli ya Litéya yango. Kopakolama na Ye eyákí na kati ya motéma na ngai. Azali kosolola na ngai. Litéya oyo Ezali mpo na ngai. Azali koyebisa ngai Aponáki ngai libosó ya bozalisi ya mokili. Oyo nde Molúlú ya lipati na ngai ya libála. Nalingi moto mosúsu te bobélé Ye. Nazali sembo mpe Natiélí Ye motéma, mpe Liloba na Ye, mpe Mongóngó na Ye, KAKA. Tozali MOKO.

Ya solo Litéya oyo ezalaki mpo na mingi ya bandeko mibali mpe basi baoyo babálánáki mpe sikawa babomí mabála, mpe Ye koyebisa bango nini nde basengélákí kosála; kasi ezalaki na ndimbola MOBIMBA MPE MONÉNE KOLEKA, ya koleka monéne mingi, ya koleka na nguya mingi.

Ezalákí na Mobáli moko, mpe Azalaki kobiánga mpe koloba na Mwasi na Ye ya libála moponami, o boyiké. MONGÓNGÓ YA NZAMBE MOZALAKI KOBIANGA MWASI LILOBA NA YE PETO, MOSEKA OYO ABÉBÍSÁMÍ TE ÁBIMA. Ye oyo naino asímbámá to ayéísámá mbindo na Mobali moko te. Oyo azali sembo mpe atiélí Ye motéma mpe Liloba na Ye káka. Oyo asepelákí na Ye mobimba mpe Mongóngó na Ye.

Na Ngolu mpe Mawa ma Ye, lelo tokoki koloba, na elilingi ya ntembe ata ndambo te, TOZALI MWASI LILOBA NA YE MOSEKA. NKEMBO!!

 Alingákí Ázala na kondimisama ete makambo ya nyámú—nyamu mázala te mpo na oyo etáli kobiánga Mwasi na Ye ya libála, nde ntina Ayákí Yemoko mpe abíkákí kati ya mosuni ya moto komónisa Liloba na Ye mpe kobiánga Mwasi na Ye ya libála epai na Ye moko. Azalaki Eliejèle oyo alingákí komíponela Mwasi na Ye ya libála.

Kosála ete nzela ya bisó kobúlungana ézala te soko nani nde Azalaki kobandana na bisó, Ye Moko mpenza Andimísáki mbeki na Ye eponamákí na bolobáká na ye longwá na mopepe ya kotimbatimba ekakémákí likoló ya nzeté. Nambísa Alobákí na ye polélé-polélé na nsé Kúná likoló ya Ebale Ohio libosó ya nkóto na nkóto.

Asálákí kútu ete elílí na Ye ézuama elongó na ye kotálisa bongo mpe koyebisa molongo, NALOBAKI NA BINO ETE NAKOYA LISÚSU MPE NAKOBÍKA KATI YA MOSUNI. YE NDE OYO NAPONÁKÍ KOBIKA KATI NA YE, KOBIÁNGA BINO KOBIMA ETE BÓZALA MWASI NA NGAI YA LIBÁLA. EZALI YE TE; EZALI NGAI KOLOBA NA NZELA NA YE. NAZALI SÉ KOSÁLELA MONGÓNGÓ NA YE KOZALA MONGOYA NGAI EPAI NA BINO. NGAI NDE NABIÁNGÁKÍ BINO MPE NAZALI KOBONGISA BINO BE KOZALA MWASI NA NGAI YA LIBÁLA OYO ABONGÍ BE.

Emóniseli ya Etindá Oyo, Liloba na Ye, Mongóngó na Ye, mpe sikawa baoyo EZALI BISÓ ezali koleka maloba moto akokí kolimbola. Nayebí ete boyebí mpenza likambo Nazali koloba. Konetolama kati na kondima ezali kosálema. Mwasi ya libála azali komíléngele na bofándáká kati ya bozali ya Nzambe Ye moko, kobongisama be.

Libakú malamu nini oyo mokili mozali na yango koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba na bango; kofánda mpe koyóka Liloba na Liloba lokola Azali koloba mpe komónisa Liloba na Ye mpe koyebisa bisó oyo ezali bisó. Ezali na eloko moko te lokola kofanda kati na bozali na Ye, na bongo bóya komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Ye koloba na Mwasi na Ye ya libála, Litéya, “Libála Mpe Koboma Libála” 65-0221M.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotánga libosó ya koyóka Litéya:

St. Matái 5:31-32 / 16: 18 / 19: 1-8/ 28: 19

Misálá 2:38

Baloma 9:14-23

Timote ya libosó 2:9-15

Bakolinti ya libosó 7:10-15 / 14:34

Baebele 11:4

Emoniseli 10:7

Genese mokapo ya 3

Lewitiko 21:7

YOBO 14:1-2

Yisaya 53

Ejekiele 44:22

26-0315 Esika Ya Kosambela Oyo Nzambe Aponi

Litéya: 65-0220 Esika Ya Kosambela Oyo Nzambe Aponi

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mamá Yesu Klisto,

Mokolo yango oyo. Ntango yango oyo. Nzambe atíndákí mpongo na Ye ya ngúya na mabelé kobiánga Mamá Yesu Klisto na Ye kobima, koloba na mpe koyebisa Ye, “Yo nde OYO Naponákí. Yo nde OYO Nalingí. Ozali Mwasi Liloba na Ngai moseka Obongí be. Tozali MOKO.”

Bobélé koyóka maloba yango, mitéma ya bisó mizalí kopumbwa na esengo. Kokanisa, kati na mokili mobimba, na ba milió mpe ba milió ya bato na yango, ezali na Mamá Yesu Klisto bobélé MOKO, mpe YO nde Ye, OYO Azali koyéla.

Ezali na esíká ya kosámbela eponámí sé MOKO. Ezali na Etíndá ebongí be oyo eponámí sé MOKO. Ezali na MWASI YA LIBÁLA moponami ABONGÍ BE sé MOKO…MPE BISÓ NDE YANGO!!

Tata azali na esiká ya kosámbela sé MOKO, Nkoló Yesu Klisto; Azali Liloba. Lelo, ezali na esíká sé MOKO epai wapi kúfa ya molimó ekokí kobéta te: nde Liloba. Kúfa ekokí kobéta Liloba te, zambí ezali Liloba ya Bomoi ya Nzambe.

Emóniseli mobimba ya Liloba yango ya Bomoi emónisámeli bobélé Mamá Yesu Klisto. Ezali na esíká sé MOKO eponámi wapi Mama Yesu Klisto akokí kokende mpe koyóka LILOBA LILOBÁMÍ LIBONGÍ BE. Ezali na mosakoli sé MOKO aponámákí kozala Mongóngó ya Nzambe. Ezali na esíká sé MOKO wapi Mamá Yesu akoki kokende mpe koyóka, YANGO ELOBÍ NKOLÓ: KOFINA PLAY.

Pole ekobima na ntango ya pókwa, esiká ya Nzambe sé moko eponámí mpo ya kosámbela. Oo, Etindá oyo ezali koya na nini, Akosála nin? Mpe na mokolo na Ye pole ekobima na ntango ya pókwa, mpe (nini?) Koyamba bana na Ye bázónga na Mboka ya elaká ya solo, na elembo yango moko ya Likonzí ya Móto oyo ekambákí bana ya Yisalaele kati na lisóbé.

Boní nde esengeli na Mwasi na Ye ya libála kozala na bokéngi kolanda mpe koyóka Mongóngó ya Mobáli na Ye koloba na Ye. Ezali na esíká sé MOKO tokokí kokende mpe kozala na kondimisama 100%. Ezali na Mongóngó sé MOKO likoló ya nini tokokí totía Sékó na Sékó ya bisó.

Mamá Yesu Klisto andimaka ete Maloba Ayókaka likoló ya ba bánde ezali Liloba ya Mobali na Ye. Andimaka ete Liloba na Ye lisengeli na ndimbola te. Na bongo, Andimaka ete ezali na esiká sé MOKO epésámí Akoki kokende na yango mpe koloba AMEN na Liloba moko na moko, Mongóngó ya Mobali na Ye likoló ya ba bánde.

Mbala moko lisúsu, Mama Yesu Klisto, longwá na mokili mobimba, akokí koloba, “Lelo oyo, Liloba liye lilobámí, lizalí kokokisama”.

Nzambe Molingami, na nsé Kúná kati ya masóbé Kúná kati ya Tucson, mosiká Kúná kati ya California, likoló Kúná na Nevada mpe Idaho, mosiká Kúná na ngambo ya Ebimelo ya mói mpe zingázingá, na nsé Kúná kati ya Texas; wana mbelá oyo ezali kopésama, bato bafándí na kati—na kati ya masámbo, na bitékelo ya pitoló ya mítuka, ba ndáko, koyóka.

Obiangámí koyá koyóka elongó na Eyánganelo ya Branham na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Nzambe kosolola na Mwasi na Ye ya libála moponami, Litéya:”Esiká Ya Kosámbela Eponámí Na Nzambe” 65-0220

Ndeko Joseph Branham

Makomí: Dutelonóme 16: 1kino 3.

26-0308 Lelo Oyo Likomi Oyo Ekokisami

Litéya: 65-0219 Lelo Oyo Likomi Oyo Ekokisami

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mombóto Ya Bokonzi Ya Likoló Koleka,

Ntango totáléláki mpe tozilákí na etingia monéne yango oyo awa. Tosilí tokómí. Tomóní yango kozipolama libosó ya míso ma bisó. Mokolo na mokolo lisakoli lizali kokokisama, mpe tokoki koloba: LELO OYO LIKÓMÍ LIYE LIKOKISAMI LIBOSÓ YA MÍSO MA BISÓ.

Kolamukisa nini oyo na nzela ya Emóniseli ezali kosálema na Mwasi ya libála. Na Litéya moko na moko tozali koyóka, tozali koyóka kati na mitéma mpe bomoto na bisó, “Boni nde ekokí kozala na makokí ya ézala monéne koleka mpe na bikamwa mingi, Nkólo?” Na mbísa Ayéi kati na bisó mbala moko lisúsu mpe Apakólí bisó lokola tozali koyóka Mongóngó na Ye kobiánga bisó mpe koloba, “Bozali Ba ngai ba motéma. Naponaki bino kozala Mwasi na Ngai ya libála. Lokola Nalakákí bino, Nazali koya mpo ya bino. NAzali na nzela koyá. Nokí tokozala elongó mpo ya Sékó.”

Tozali kogánga útá na mokili mobimba, kozingela Lóla na ba Alelúya, nkémbo, masánzoli, mpe lokúmu na bisó epai ya Ye. Satana así alongamákí na ye. Tatá asili alongólí ntembe ya bisó nyoso, kotatabana ya bisó nyoso, mpe komítúna-tuna ya bisó nyoso mosiká na bisó. Tokokí kosangela na motéma mpe bomoto na bisó mobimba, TOZALI MOMBÓTO YA LIKOLÓ KOLEKA YA BOKONZI YA ABALAYAMA. Mwasi ya libála ya Bokonzi mpo ya Mwana ya Bokonzi oyo alakámákí.

Bozali ya Nkoló etíkálá mpenza kozala na bikámwa koleka wana ezali Ye komónisa bisó Liloba na Ye lokola libosó naino soko moké te. Asangísí Mwasi na Ye ya libála elongó na Liloba na Ye, lokola atíí bisó na Likanisi moko mpe na Lobánzo moko lokola lisangá moko, koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba mpe kobongisa bisó be na Liloba na Ye.

Litéya moko na moko tozali koyóka ezali lokóla etóko ya mái kopasuka kati ya bomoto na bisó; kopunjwapunjwa, kopúsa, mpe kotokota ya mpío malamu longwá na Kíti ya Bokonzi ya Nzambe. Tozali komela, komela mpe komela, kopesa mpio ya kimia na milímó na bisó.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, tozali kokokisama ya Makomi maye malobí Akozala na Mwasi Liloba moseka. Tozali: Lelo oyo Likómí liye likokísámí.

Nzambe Yemoko alobaki longwá na Likoló na mwanje na Ye ya nsambo mpe alobákí: “Lokola Yoane Mobatisi atindamáki kobongisa koyá ya libosó ya Klisto, Etindá na yo ekobongisa koya na Ye ya mibalé, kati ya mokili mobimba.” Mwasi ya libála akoki koloba Lelo oyo Likómí liye likokísámí.

Tokoki nde kosósola ete Mongóngó mpenza ya Nzambe molobámákí na mokolo ya bisó na nzela ya mbebu ya moto, motiámákí na bande mpe mobómbámákí, mpe mobátélamákí na ntina ete Ákoka koloba na moko na moko na bisó, Yango Elobí Nkoló? Akómísákí yango oyo ekokí ete tózala te na boséngá ya kozua Liloba ya moto ata nani, makanisi ya moto ata nani, bibánzá-bánza ya moto ata nani, bobele kofánda mpe koyóka Mongóngó mwa Ye koloba na bisó mbala moko alimá Liloba Peto na Ye.

NINI NDE EZALI KOSÁLEMA LELO?

Mpe M-w-a-n-a ya Nzambe yango moko oyo ayaki na ebimelo ya ntango mpe Amíndimísákí lokola Nzambe oyo amónánákí kati na mosuni, Azali M-w-a-n-a ya Nzambe yango moko oyo na eténi ya mabelé ya elímwelo ya ntango awa, azali komiyébisa kati ya lingómba na mpókwa oyo, lolengé moko lobi, lelo, mpe libela. Pole ya mpókwa ya Mwana eyéi. Lelo oyo Likómí liye likokísámí libosó na bisó.

TOZALI NDE KATI YA MOKÁNO MWA NZAMBE MOBONGÍ BE NA BOLOBÁKÁ MPE BONDIMÁKÁ: “KOYÓKA BA BANDE NDE NZELA NZAMBE APÉSÍ MPO YA MWASI NA YE YA LIBALA”?

EZALI NDE NA ELOKO MONÉNE MINGI KOLEKA KOYÓKA BA BANDE?

Ntango nyoso kati na misáto, lokola Nalobákí lobí na mpókwa, nde Nzambe amítálisaka. Ezalákí na ebólo ya bato ya Sodómo, ba oyo ya Lóta, mpe baoyo ya Abalayama. Ezali na esiká yango moko na mpókwa oyo, mokili mozali kotelema kaka lolengé wana.

Bótala, Oyo wana atíkalákí na Abalayama azalaki Nzambe Yemoko. Basúsu mibalé bazalákí Banje batíndami.

NA BONGO YE NANI NDE AZALI KOLOBA NA BISÓ LIKOLÓ YA BA BÁNDE?

Bótika Nátuna bino likambo moko. Bótala esiká totélémí sikawa. Abalayama abiángákí Moto oyo asolólákí na ye, “Elohim.” Elobelo ya Líebéle Elohim elingí koloba “Oyo Amíkokí Mombimba, Ye Oyo azali Seko na Sékó,” Elohim, Nzambe Yemoko!

BONI EZALI NA LITÓMBÁ KOFINA PLAY?

…”mokolo moko Molimó Mosanto akoya mpe kosála eloko yango moko, mpe koloba liloba moko kotémela Yango ekolimbisama sokí te.” Nde lelo oyo, epai wapi Liloba moko na moko lisengélí kokangama elongó. “Koloba liloba moko kotémela Yango; ekolímbisama te ézala na mokili oyo soko na mokili mokoya.”

Ba Alelúya mpe masánzoli na bisó epai ya Nkoló ya póso eleki ezalaki kaka koléngela bisó tóbongama mpo na oyo ekosálema Lomíngo loye, lokola Mwasi ya libála mbala moko lisúsu azali kosangana mpe koyóka NZAMBE koyíkisa bisó mpiko mpe kopesa bisó endimiseli ete tozali Baponami na Ye, mpe Azali koya noki komema bisó na Lipati monéne ya Makwéla ma bisó, na mbísa Ezalelo ya bisó Ekoya.

Lelo oyo nde mokolo NKÓLO abongísákí; tokosepela mpe kozala na nsai kati na yango.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: 65-0219- “Lelo Oyo Likomí Liye Likokísámí”

Makomi:
St. Yoane Mokapo ya 16
Yisaya 61: 1-2
St. Luka 4: 16

Bolimbisi bóbósana te na ntina ya mbóngwana ya ntango kati ya Jeffersonville na nsúka ya póso oyo.