21-1107 EDENE YA SATANA

Nsango: 65-0829 Edene Ya Satana

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya Libala oy’Angengelami ,

Lokola mokolo ezalaki eumeli koleka, tozalaki tokangani na bikanganelo ya biyokeli, mpe Ayaki na ba ndako na biso mpe abikaki elongo na biso. Kati na bikolo, eteni na nzoto ya Klisto, oyo mosakoli na Ye apesamelaki ndingisa ya koleisa,tofandaki elongo moko na bisika ya Likolo, wana ezalaki Ye kosolola na biso na nzela ya mwanje na Ye ya nguya oyo Atindaki; kongengisa mokili na nzela ya Molimo Mosanto na Ye na nzela na ye, kobenga Mwasi na Ye abima.

Nzambe Atindaki na mokapo ya 18, mwanje ya nguya, sima ya libombami wana koyebana, mwanje na nguya, to, motindami….

Nzambe Atindaki mwanje, motindami ko (sala nini?) kobimisa,”Bobima!” Motindami ya ntango!…

Bobima na kati na ye! Nzambe atindaki ebele…mwanje na nguya, to, motindami. Mpe pole na ye ezalaki na litumu moko ya kobombana te, epalanganaki kongengela mokili mobimba…kongengela mabele, mpe kobimisa mwasi na Ye ya Libala longwa na ye…

Sasaipi, boyebi ete yango ezali solo.Motindami moko atindamaki longwa na Lola, kobimisa baton a Nzambe kolongwa na Babilona. Mpe pole na ye engengisaki mabele, Molimo Mosanto monene.

Poso eleki motei moko ayebisaki eyanganelo na ye ete nalingaki ete bato bandima ete ndeko Branham azalaki mwanje ya Emoniseli 18, kasi atalisaki ete oyo wana ezalaki mwanje kouta na Likolo, mpe ete ekokaki kozala ndeko Branham te. Soko ndeko asalaka kaka oyo mosakoli AYEBISAKI ye ete asala, kotala yango na Liloba elongo, kasi lisosoli na ye TE, MBE AKOKAKI KOYOKA NA SOLO PENZA ETE, EZALAKI NDEKO BRANHAM NDE ALOBAKI ETE AZALAKI MWANJE YANGO.

…Botala, oyo ezali mwanje ya Pole, bokanisa, mwanje ya suka, ezali mwanje na eleko ya lingomba ya Laodikia. Ezali motindami ya Laodikia, oyo wana ezali ya suka, pamba te mokapo oyo elandi mbala moko ezali mokapo ya 19, oyo ezali Mwasi na Libala oyo azali koya.

Bandeko mibali mpe basi, nayinaka koloba makambo oyo mpe natalisa yango polele, pelamoko ndeko Branham azali koloba ete, “Nazali kososolama mabe mingi”. Nalingi koloba te ete batei nyoso nde bazali koloba makambo oyo, soko ete nandimaka ete batei nyoso nde bazali ya lokuta, to soko ete bakokaki koteya te. Te. kasi ebele monene bazali kozimbisa bato wan’ezali bango kotia litomba monene koleka ma lotomo na bango na nzela ya  koteya Liloba na esika ete bafina play elongo moko na bato mpe bayoka PENZA PENZA oyo mosakoli alobi.

Soko y’obongisamaki na Nzambe liboso, ozaki komona yango. Ndenge ya kobombela yo yango ezali te. Okotala mpe okoloba ete, « Ezali na yango kaka polele liboso na miso na ngai ! Nazali kotala yango polele polele. Namoni yango. Yang’oyo, Liloba, Liloba nyoso, Liloba likolo na Liloba. Emonisami liboso na ngai mpe bomoto na ngai mobimba ezingami na kati na yango. »

Tika napesa bino eteni moko ya maloba oyo ya mosakoli, bandeko na ngai batei, yango ezali kaka elimbweli ya oyo ngai, mpe Lingomba oyo Nkolo apesi ngai koleisa, tondimaka mpo na oyo etali koyoka ba bande kati ya losambo.

Mpe soko oyo ezali kotiama na kati ya bande ; epai na batei na esika soko wapi, soko na ntango nini, oyo ezali te kolobamela bino mpo ya kozangela malakisi na bino limemya, oyo ezali kutu kolobamela mpate na bino te. Liteya oyo, mpe mateya mosusu nyoso oyo nazali koteya, ezali kolobamela eyanganelo na ngai. Ezali mpo na eyanganelo na bino te bobele ezala ete balingi koyanba yango. Kasi etindameli bato oyo awa.

Bato bazali kosomba ba bande oyo. Kati na Mokili mobimba bato bazali kosomba yango mpe koyoka yango. Mbala nzike bazali kokoma mikanda. Mpe ntango nyoso nalobaka na bango soko bazali bato ya lingomba moko, « Bomona mobateli na bino ».

Bazali kotalela ngai lokola mobateli na bango na lingomba ya mboka, na bongo nazali koloba na bango ete, « NANDIMAKA KOZWA BA BANDE MPE KOFINA PLAY. Ndeko Branham azali mobateli na biso. Tozali bailingomba na ye ».

Sasaipi, mobateli, nalingi yo oyeba ete, ete, oyo ezali kaka epai na eyanganelo na ngai nde nazali koloba makambo oyo. Mpe nazali na makoki ya kosala bongo, mpo ete  natiami na Molimo Mosanto kozala mokengeli likolo na ba mpate oyo. Mpe mawa na ngai soko nazangi koyebisa bango oyo nandimi kozala solo, mpe nzela nayebi ezali koyela. Kasi ezali mpo na mokili te soko mpo na mangomba mosusu te. Bosala oyo nyoso Nzambe alobi na bino bosala. Nakoyanola mpo na bino te, lokola bino mpe bokoyanola te mpo na ngai. Kasi moto na moto na biso tokoyanola liboso na Nzambe mpo na lotomo la biso.

Nakoyanola liboso na Nzambe mpo na lotomo apesaki ngai. Na mosisa moko na moko ya bomoto na ngai nandimi ete esengeli boyoka Mongongo na Nzambe na nzela ya mateya oy’ebombamaki kati na ba bande kati na biyanganelo na bino. Ezali nzela Nzambe apesi lelo mpo na kokembisa Mwasi na Ye ya Libala. Ezali nzela nse moko mpo na Mwasi ya Libala koyanganisama mpe kobonga be.

Liteya oyo tobelemi koyoka Mokolo ya Lomingo eteyamaki mpe etiamaki na bande mpo na LELO. Ezali Bilei ya Molimo na Ntango elongobani. Tika ete tofungola mitema na biso mpo ete Molimo Mosanto akoka kopakola biso koyoka oyo Ye azalaki kokebisa biso na ntina na yango ete tozala kotalatala na mikolo oyo ya suka.

Ayebisaki biso ete milimo nyoso mibale ikomonana polele na mokolo oyo ya suka. Ayebisaki biso ekozala pene pene penza, na ndenge ete ekozimbisa ata baponami soko nde ekokoka. Mokolo yango oyo.

Botala ntango Yesu ayaki, bomoni, Satana azalaki kati na e bolo wana ya balakisi ya bayuda, mpe na ba labi, mpe na ba nganganzambe, komeka koyebisa bango ete babatela mobeko ya Mose, nzokande Liloba  yango penza ezalaki koyebisa bango ete na mokolo wana, Mwana na Moto akomimonisa, bomoni, ete Akomiyebisa Ye penza. Na bongo bazalaki komeka, ntango nyoso bazalaki basambeli, mpe likolo na mobeko ya Mose…Bomoni eloko asalaki? Azalaki komeka koyebisa bango ete, “Eteni wana ya Liloba ezali na yango kaka solo, kasi moto oyo azali Ye te.” Bomoni ndenge azali mozimbisi? Nde mokolo yango penza ya kozimbisa

Biso TOKOKI KOZIMBISAMA TE, tozali Mwasi ya Libala. ToZALI bana na Nzambe. Tozali eteni ya etani ya Nzambe oyo ezalaki na kati na Ye, tokomi mosuni pelamoko Ye akomaki mosuni, na ntina ete tokoka kozala na boyokani moko na mosusu lokola libota ya Nzambe awa na mabele. Tozali kokanisa yango sasaipi te, kasi tozalaki kuna. Ayebaki yango. Mpe alingaki tokoma bongo na ntina ete akoka komama biso, kosolola na biso mpe kolinga biso, kopesa biso mbote na maboko, KEMBO !!!

Ezali lisusu te oloba ete, « NABANZA NAZALI MWASI NA LIBALA. NALIKII NAZALI MWASI NA LIBALA. » TOYEBI ETE TOZAli MWASI NA YE YA LIBALA.

Molimo Mosanto azali na mosala kati na biso. Ezali bomoi, ko tutuka te ; ezali elembeteli moko ya mosuni te, kasi ezali Moto, Yesu Klisto, Liloba na Nzambe oyo efandi kati na mitema na biso, koyeisa liloba moko na moko ya eleko oyo na bomoi.

Totombeli yo boyei bolamu komibakisa na biso kati na biyokeli ya mipepe mpe na singa Mokolo na Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzange, ntango ya Jeffersonville, wana Molimo Mosanto Azali kongengela biso na Liloba na Ye oyo esololamaki na nzela ya mwanje na Ye, mpe komemela biso Liteya Edene ya Satana 65-0829

Ndeko Joseph Branham.

Makomi ya kotanga

2 Timote 3 :1-9

Emoniseli 3 :14

2 Batesaloniki 2 :1-4

Yisaya 14 :12-14

Matayi 24 :24