21-1031 EKONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA

Nsango: 65-0822e EKONGOLELI YA MOT’OYO AKANISAKA

BranhamTabernacle.org

Balingami Bandimi ya Biblia,

Mokolo nini ya kembo oyo tozali kobika kati na yango. Mitema na biso ezali kopela moto kati na biso wana ezali Ye kosolola na biso mokolo na mokolo na molai na nzela. Klisto asili komimonisa epai na biso na nzela ya Liloba ya Ye. Ezali emoniseli ya Yesu Klisto, Liloba Ye moko Amikomisi mosuni. Ezali Mongongo ya Nzambe kobenga Mwasi na Ye ya Libala.

Tozali na etemelo, liloba ya suka, moboko ;ezali Liloba ya Ye, Biblia. Sasaipi soko “Biblia” ezali etemelo ya biso, tika tomona soko mosakoli alobaki Biblia nde nini.

Alobaki ete Nzambe akomaki Biblia kaka na nzela ya basakoli na Ye. Yango ezalaki nzela na Ye kosala yango. Yango ezalaki nzela azalaki na yango mpo ya komema Liloba ya Ye epai ya bato: Na nzela ya bibebu ya basakoli na Ye. Liloba na Ye eyaki kaka epai ya mosakoli.

Mosakoli azalaki na makanisi na ye ntango nyoso likolo ya oyo Nzambe alobaki; ezali te oyo moto akanisaki, oyo bokonzi ekanisaki, kasi oyo Nzambe akanisaki! Azalaki kaka kobimisa makanisi ya Nzambe kati na Liloba. Ntango Nzambe amonisaki ye makanisi na Ye, ye abimisaki yango polele na nzela ya Liloba likomami.

Na bongo, Biblia mobimba ezali makanisi ya moto te, ekomamaki mpe na moto te, ememamaki na moto te, ekoki mpe ata moke te kolimbolama na moto. Ezali Liloba ya Nzambe elimbolami na Nzambe Ye moko, Molimboli ya Ye moko. Liloba ya Ye.

Sikoyo basakoli oyo balobaki ete, “Ezali ngai te, nazali na eloko ya kosala kati na yango te, kasi ezali OYO ELOBI NKOLO.” Na bongo Biblia ezali OYO ELOBI NKOLO na nzela ya basakoli. Basakoli oyo basololaki mpe bakomaki Liloba kaka te, kasi azalaki mpe ye kaka nde molimboli ya Liloba yango ekomamaki.

Boye, Biblia ezali makanisi penza ya Nzambe ekomami na basakoli. Mosakoli kaka nde molimboli ya moko ya Biblia longwa na Nzambe. Etinda, Liloba, Biblia mpe motindami bazali nse eloko moko. Na bongo, tokosambisama na nzela ya ndimbola ya Biblia elobami na mosakoli.

“Otindamaki lokola mokambi. Mpe Nzambe akoya. Mpe ntango akoya, Akosambisa yo kokokana na oyo olakisaki bango, ya liboso, bakota to bakota te. Tokokota kokokana na malakisi na yo.”

Autaki koloba nini? Akosambisama liboso na nzela ya oyo alakisaki biso. Tokokoka kokota kaka kokokana na malakisi na Ye. Na boye ezali na litomba kosolola kaka oyo ezali likolo na ba bande lokola tokosambisama na nzela na LILOBA NA YE LIKOLO NA BANDE; oyo ezali ndimbola ya Biblia. Bongo okotia kondima na yo mpo na seko na seko nayo likolo ya oyo moto moko boye alobi?

Mpe bango nyoso ba gangaki na motema moko ete, « Toyebi yango ! Tozali kopema na kondimisama. »

Na bongo, Mwasi na Libala azali kopema likolo na liloba nyoso mosakoli alobaki, oyo azalaki molimboli ya makanisi ya Nzambe ekomamaki na basakoli, mpe na mikol’oyo ya suka elobami na Nzambe Ye moko na nzela ya bibebu ya mosakoli na Ye.

« Okolakisa biso epai na Ye, mpe na sima tokozonga biso nyoso na mabele lisusu, kobika libela. »

O bandeko mibali mpe basi, bolamuka liboso ntango eleka. Kobenga na Ye ya suka oyo. Bofungola mitema na bino mpe bomona ndenge bokozala koyoka Mongongo ya Nzambe likolo ya Bande. Soko tokosambisama na Etinda Nzambe asololi na nzela ya motindami na Ye likolo na bande, ndenge nini bozanga komona ete ezali na litomba mpe nzela moko kaka ya kozala alima mpe semba na Liloba na Ye, ezali na bo yokaka Mongongo ya Nzambe likolo ya bande.

Iyo, Nzambe abengaki ntomo 5 ya bateyi, kasi esengeli batia litomba na boyoki ba bande koleka lotomo na bango. Nazali koloba te ete mobateli na yo akoki koteya te soko kolakisa te. Nazali koloba te ete botika kokende na losambo ; esengeli bokende na losambo, kasi wana mobateli na bino azali kotia ba bande te, Mongongo ya Nzambe oyo bokosambisama na nzela na yango, naino mpe liboso na bino mpo koyoka, bozali na ekongoleli ya mabe.

Bomituna bino penza, ntango moteyi azali koyebisa bino ete, esengelaki kaka boyoka ba bande na ba ndako na bino kasi na losambo te, likambo yango ezali penza na ntina ? Nandimi te ete bokondima kozimbisama kino na ndenge wana. Mongongo penza oyo bokosambisama na nzela na yango esengelaki eyokama kaka na ba ndako na bino mpe kati na losambo te ? Ndeko Branham atikala koloba te ete boyoka ba bande kati na losambo, kasi esengelaki boyoka kaka ngai lokola mobateli na bino ntango bozali koya na losambo. Bozali penza ata na ndambo ya emoniseli ?

Eloko nini nde ekokaki kozala na motuya koleka ntango boyei elongo na losammbo na bino kokumisa Nkolo, kokola kati na lisosoli ya Liloba, kobelema na Nzambe, koleka kokembisama na boyokaka Mongongo moko KAKA…KAKA ya Nzambe endimisami.

Bokoki kobanza Yosua ayebisa bana na Isalaele, Nayebi ete tozali na maloba penza penza oyo Mose alobaki, kasi Mose aloba soko moke te ete soko toyangani totanga makomi na ye. Nazali kokamba bino sikoyo mpe nakoyebisa bino maloba ya Mose.

Mpe sima na yango atangaki maloba ya mobeko, mapamboli mpe bilakeli mabe, kokokana na nyos’oyo ekomami kati na mobeko.

Ezalaki na liloba ata moko te kati na nyos’oyo Mose alakaki, oyo Yosua azangaki kotanga liboso na koyangana na libota na Isalaele, elongo na basi, na bana mike, mpe na bapaya oyo bazalaki kati na bango.

Na maloba mosusu, soko Yosua azalaka na masini ya kokotisa maloba na bande na mokolo na ye, ntango azalaki koyanganisa bato elongo mbe akokaki KOFINA PLAY .

Malaki ya 4 ayaki na OYO ELOBI NKOLO, mpe bokosambisama na maloba nyoso elobamaki likolo ya ba bande. Etinda oyo nde ekongoleli ya bino. Boyoka mpe bobika, boboya mpe bokufa.

Ndenge nini tozwa libaku mabe nzokande seko na seko na biso etiami na mondenge ? Tozali na bosenga tozala koyoka Liloba ntango nyoso, na ba ndako na biso, na kati ya mituka na biso, ntango tozali kosukola bilamba, na bolakisaka bana na biso, na bosukolaka mituka na biso, na botambolaka likolo na ngomba, mpe mingi nakoleka, wana eyangani biso na mangomba na biso.

Miyoka somi komibakisa na eteni ya Mwasi na Ye ya Libala, oyo ANDIMI LILOBA NYOSO likolo na bande, wana ezali biso koyoka Liteya : EKONGOLELI YA MOTO OYO AKANISAKA 65-0822E, Mokolo ya Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville. To Boyikisa mobateli na bino mpiko atiaka bande kati na losambo na bino mpo ete bino mpe bokoka koyoka Mongongo yango oyo ekolakisa bino epai na Nkolo na biso Yesu Klisto, mpe na sima tokozonga na mabele lisusu kobika libela. LIKAMBO KOLEKA OYO WANA NA MALAMU EZALI TE

Ndeko Joseph Branham