Eténi Ya Liloba Ya Mokolo
November 5, 2026
Etíndá Ya Ngolu 61-0827
Boye Nzambe asengelaki kokoma moto, mpe Akufaki na mosuni ya moto, na lolenge ya moto oyo abiangami “Yesu Klisto,” mpe yango nde Masiya oyo alakamaki oyo amemaki ngolu. Wna nde epai omoni ete Nzambe mpe Klisto bazali Moto yango moko, Nzambe kofanda kati na Klisto. “Ngai na Tata na Ngai tozali Moko, Tata na Ngai azali kofanda kati na Ngai; ezali Ngai te oyo nazali koloba Liloba, kasi Tata na Ngai oyo azali kofanda kati na Ngai.” Nzambe kati na Klisto! Solo mpenza.
Ngolu elakamaki na elanga ya Edene, mpe ngolu eyaki, ngolu epai ya Adama mpe Ewa. Epai ya kokende ezalaki te, nzela ya kobalukela ezalaki te, kasi ata bongo ngolu esalaki nzela!
Tika naloba oyo, moninga na ngai mosumuki. Mbala mosusu ozali awa ntongo oyo ndumba, mbala mosusu ozali awa ntongo oyo moto oyo alandaka basi, mbala mosusu ozali awa molangi to moto ya masano ya mbongo, to mobomi. Mbala mosusu ozali awa mobali ya mbindo, mwasi ya mbindo. Mbala mosusu ozali mosumuki ya mabe koleka. Olobi, “Nalekisi ntango ya kosikolama.” Te, ozali yango te, soko te olingaki kozala na losambo ntongo oyo te. Ngolu ekosala nzela mpo na yo na ngonga oyo ya molili soko ondimi kaka yango. Adama asengelaki kondima yango, yo mpe osengeli. Ndima yango.
Lipa ya Mokolo na Mokolo
Zambi lisumu likozala na bokonzi likolo na bino te: zambi bozali na nse ya mobeko te, kasi na nse ya ngolu.
Baloma 6:14