Nsango: 62-1014E Mokambi
Molingami Eutelo Ya Nguya,
Nzambe alakaki kotinda mokambi epai na Mwasi na Ye ya libala kati na mikolo oyo ya nsuka na ntina ete Akoka komimonisa kati na mosuni, bobele lokola esalaki Ye ntango Ayaki na mabele kati na Mwana na Ye, Yesu. Ayebisaki biso kati na Liloba na Ye ete Akotinda Eliya mosakoli, oyo akozala Mwana ya Moto komimonisa kati na mosuni ya moto; zambi Azali naino na makambo mingi ya koloba mpe kolakisa biso.
Akoloba mpo na ye moko te; kasi ezala ata nini ekoyoka ye, yango ekoloba ye: mpe akomonisa bino makambo makoya. Zambi akopesa Ngai nkembo: zambi akozua oyo ezali na ngai mpe akotalisa yango na bino.
Atindaki William Marrion Branham kokokisa Liloba na Ye mpe kotonga biso lokola bato kozala Litongi na Yesu Klisto; moto abongi be oyo akokaki kolonga monguna nyoso, mpe alingaki kozala eutelo ya nguya mpo ya Molimo Mosanto kobika na kati.
Nzambe Atikala kozanga ata mbala moko te kotinda ntango nyoso mokambi epai na bato na Ye. Kasi kozala Mwasi na Ye ya libala, osengeli koyamba mokambi wana. Osengeli kondima yango. Osengeli kokende nzela alobi to okosuka na kobunga. Etali te tokanisi nini, nini emonani lokola yango nde emonani malamu, to oyo emonani likambo ya bozoba, topesameli nzela te ya kokabola yango, mokambi azali bobele moko.
Olobi, Ndeko Joseph, Yango nde Molimo Mosanto kokamba biso, ezali Ndeko Branham te. Maloba malobaki ye EZALI Molimó Mosanto kasi Ndeko Branh te; kasi ye nde oyo aponami na Nzambe komonisa Molimo Mosanto kati na ye, mpe kozala mokambi na biso ya mabele.
Mpe sikawa Nzambe ntango nyoso atindaki bakambi na Ye, atikala kozala te na kozanga mokambi, ntango nyoso kati na bileko. Nzambe Azalaki ntango nyoso na moto moko oyo atelemaki na esika na Ye na mabele oyo, kati na bileko nyoso.
Tosengeli toyeba nani nde mokambi yango ya mabele azali oyo atelemi na esika na Ye awa na mabele; wana nde Emoniseli ya solo elali likolo na Liloba na Ye.
Toyebi Molimo Mosanto nde Mokambi Monene oyo Tata atindaki kokamba Mwasi na Ye ya libala, kasi awa Nzambe alobaki ete Atindaka ntango nyoso moto kozala mokambi kotélema na esíká na Ye moko mpe kokamba Mwasi na Ye ya libala.
Mokambi na biso ayebisaki biso ete Kolonelio azalaki moto monene ya lokumu oyo atongaki mangomba. Afutaki makabo mpe abondelaki mokolo nyoso. Kasi ntango Molimo Mosanto ayaki, asengelaki na Mokambi.
Nzambe atindelaki ye Molimo Mosanto. Atindaki Yango kati na moto ya Petelo, “Zambi wana ezalaki naino Petelo koloba Maloba oyo, Molimo Mosanto akweaki likolo na ye.” Nzambe asalelaki Mokambi na nzela ya Petelo. Asalelaki Yango, mpo ete Akambaki Kolonelio na nzela alima.
Ntango Petelo azalaki naino koloba, Molimo Mosanto akweaki likolo na bango. Petelo alobaki,
“Moto akopekisa nde ete baoyo babatisama te?” Bomoni, naino Mokambi azalaki koloba, Petelo te.
Tozali kokambama na moto te; tozali kokambama na Molimo Mosanto, OYO AZALI KOLOBA NA NZELA YA MOTO OYO NZAMBE APONAKI KOZALA MOKAMBI NA BISO YA MABELE.
Molimo Mosanto koloba na nzela ya mwanje na Ye mokambi akoloba ntango nyoso Liloba. Ayebisaki biso, “Nazali na makambo mingi ya koyebisa bino. Bokoki kososola Yango sasaipi te, kasi wana ekoya Ye, Akokamba bino na Yango.”
Yoane akambamaki ntango akomaki Emoniseli. Atambwisamaki na Mokambi. Atambwisamaki mpe na Mokambi koloba ete, “Ye nani akolongola Liloba moko na Yango, to kobakisa Liloba moko na Yango, moto yango mpenza akolongolama, eteni na ye, longwa na Buku ya Bomoi.”
Molimo Mosanto mpe akambaki Ndeko Branham koloba tosengeli koloba bobele oyo ezali likolo ya ba bande; kobakisa te to kolongola te. Mpe apesaki nzela tokoki kosala mpenza kaka oyo alakaki biso tosengeli kosala, Kofina Play.
Sikawa, ebanda boni otia eloko mosusu na esika ya Liloba ya Nzambe, mpe oloba naino ete okambami na Molimo Mosanto.
Tokambami na Molimo Mosanto oyo apesi biso Emoniseli ya oyo ezali Ye, nani nde Atindaki lokola mokambi na Ye ya mabele kobianga Mwasi na Ye ya libala kobima, mpe sikawa libanga yango ya moto: Emoniseli ya baoyo tozali. Ezali koleka maloba ya moto kobimisa yango.
Botala oyo Asalaki mpo na biso, bobele na mwa ba mposo oyo. Alakisaki biso boni kolonga monguna moko na moko oyo ayei liboso na biso. Boni kobenda Mopanga na biso ya KONDIMA mpe kopapa ye na kufa. Tozali na eloko ya kobanga te. Eloko moko te ekokoka kotelema liboso na bisó.
Boni Abombaki Bilei mpo ya Mwasi na Ye ya libala kolia. Ata ntango motindami na Ye azali mosika mpenza, tozali naino na Mokambi oyo mokili eyebi eloko moko te na ntina na wana; kasi epai ya Mwasi na libala, Ezali Bilei ya Molimo na Eleko Esengeli, Mana mabombami tozali kosala na yango lipati mokolo na mokolo.
Atongi biso na matongi ya bato babongi be na ntina ete Akoka kobika mpe kofanda kati ya moko na moko na biso. Atindelaki biso Molimo na Ye Mosanto mpe Amimonisi kati na mosuni, lokola Asalaki eleki mbula 2000, kozala Mokambi na biso, kobika mpe koloba na nzela ya mokambi na Ye ya mabele.
Nazali kobianga moko na moko na bino koya mpe koyoka, “Honk-honk, honk-honk” na Ye, epai wapi Mwasi ya libala akoya mbala moko alima na Honk wana. Ako, “Honk-honk, honk-honk!” mpe ekozala na yubile ya ndenge wana zingazinga na mokili mobimba. Mpo ya nini? Mwasi ya libala ayebi Mongongo ya Mokambi na bango.
Soko olingi kobunga te, yaka koyoka Mokambi na biso wana ezali Ye koloba na nzela ya mokambi na Ye oyo aponamaki Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.
Ndeko Joseph Branham
Liteya:
62-1014E–Mokambi
Makomi:
St. Malako 16:15-18
St. Yoane 1:1 / 16:7-15
Misala 2:38
Baefese 4:11-13 / 4:30
Baebele 4:12
2 Petelo 1:21
Esode 13:21