BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

12.6.2021

>>>21-0613 MOKONZI ABWAKAMI<<<

5.6.2021

Balingami bana mike ya Nzambe,
Tomonaki Nzambe na nguya kofanda kati na Liloba na Ye, kobeta bato ya mayele, baoyo na boyebi mpe basambeli ya eleko oyo na kufa miso; kasi azali komonisa yango epai na biso, bana mike oyo tolingi koyekola, bana mike ya Nzambe. Tokokoka te mpe tokoyoka liloba ya moto mosusu te. Ezali likambo na biso te; to ezali Etinda oyo, ba bande oyo, to eloko mosusu te.

Ntango ayaki mbala ya liboso, Azalaki moto. Ntango ayaki mbala ya mibale kati na ndambo mibale, azalaki moto. Ntango ayaki na lolenge ya Yoane mobatisi, Azalaki moto, ntango Ayei na eleko ya biso, mbala moko lisusu Amimonisi kati na moto. Azali sasaipi komimonisa kati na mosuni mbala oyo lisusu kati ya moko na moko na biso. Mwasi na Ye ya Libala oyo alingi Liloba.

Tozwi yango na mitema na biso. Makanisi na biso mpe bomoto ya biso ezali sasaipi koumela na bozali ya Mwana mpo na kokemba, mpo ete ba mpate bakolingaka biloko ya ba mpate: “ Ba mpate na ngai bakoyokaka Mongongo ya ngai.” Oyo wana nde tozali kobika na yango, liloba moko na moko. Ezali kaka te liloba moko awa mpe moko kuna, kasi Liloba nyos’oyo ekobimaka na monoko ya Nzambe, nde oyo tozali kobika na yango.

Tobotami bana na Nzambe, totondisami na Molimo ya Nzambe. Tozalaki bana ya Nzambe ntango nyoso, mpe tokozala ntango nyoso bana ya Nzambe. Ndenge ya kokabola yango ezali te mpo ete tozali na Bomoi ya Seko. Totikala kobanda te, soko boyebi kosuka mpe te.

Tozali na ekongoleli ya mot’oyo akanisaka: Liloba na Ye, Etinda ya Ye, Mongongo ya Ye, mpe epesi biso koleta ya moto mosantu. Toleti makambo ya Likolo mpe toyambi Liloba yango na mitema ya biso. Tomonaki yango kotalisama liboso na biso, mpe sik’oyo to tozali komona yango kotalisama NA KATI ya biso, mpe bomoto ya biso mobimba ezingami penza na yango.

Ezali ba mosusu bazali kotalela ete moto moko boye amonisa bango ya koleka. Koleka oy’ezali na kati na bande, koleka n’esika ete Malaki ya 4 kaka nde akamba bango. Kasi ayebisaki biso ete ekitaki koleka na nzela ya Luther, na mbisa na nzela ya Wesley mpe ata na bato ya kitela, mpe sik’oyo ezali na miso, ya lisakoli, Malaki 4, mpe kuna ezali na eloko mosusu etikali te ete eya kasi Ye moko koya mpo ya Mwasi na Ye ya Libala.

Mpe atalaki na sima kuna mpe amonaki yango, amonaki moto moko alati elamba ya pembe, azalaki kotambola liboso; mpe sima na yanglo, alobaki ete etalaki…alobaki,” Ndeko Branham, ezalaki yo”. Mpe alobaki ete, “ baye bazalaki kotambola kuna, alobaki,” na sima na yo, ezalaki bato ya langi ndenge na ndenge bamemi bendele; Georgia, Alabama, bisika nyoso ya motindo na motindo, bazalaki kotambola kokende liboso”, koya na motó epai wapi Klisto azalaki komimonisa kati na emononeli. O, Aleluya

Ezali Liloba yango moko kati na mitema na biso mpe ezali kobenda biso kati na yango. Tozali kobimisa kati na biso eloko mosusu nyos’oyo ezali koloba ete, “ Ezali kaka Malaki na 4 te, eloko ya koleka yango ezali. Mibunga ezali kati na Etinda Mikolo ya Etinda ya moto moko eleka kala. Ezali ebongiseli mpe kotemela Liloba soko bozali koyoka bande na mbala moko. Tolingi na biso yango kaka te”. Biso tozali kobika kaka na Liloba ya Nzambe, Liloba nyos’oyo ekobimaka na mokoko ya Nzambe mpo na eleko oyo, yango nde ekongoleli ya biso.

Tososoli ete mosala ya ba bande ezali mpo ya moto nyoso te. Epai na bateyi ata na esika nini to na ntango nini, oyo ezali kolobamela bino te mpo ya kosambisa malakisi ya bino, oyo ezali te mpo ya ba mpate na bino. Liteya oyo, mpe mateya mosusu nyoso alobaki etindameli biso, Eyanganelo ya Ye. Ezali mpo ya EYANGANELO ya yo te, bobele soko balingi kozwa yango. Kasi etindameli biso, Eyanganelo ya Ye.

Napesamelaki makoki ya koleisa ba mpate na Ye. Mpe nazali na lotomo ya kosala nyos’oyo nayebi epusi malamu mpo ya kopesa biloko malamu oyo nayebi.

Nalingaki nayeisa eloko moko polele alima mbala moko lisusu. Nayebi ete ebele bazali koloba makamb’oyo ezali na yango kaka solo te, mpe ezali kolobama mpo na kopengwisa mpe kokosa bato.

• Nazali kotemela mosala ya Baefese 4:11. Natikala koloba te, to kutu kokanisa bongo te. Nzokande ngai natiamaki na mosala na Ndeko Branham ete nazala eteni na mosala yango. Boye nakoki koangana yango ndenge nini.

• Natelemeli kokende na losambo. Natikala koloba yango te, kokanisa bongo te soko kondima yango te. Tozali koyangana elongo kati na Eyanganelo na losambo te mpo ete tozali kotonga mpe tozali na esika te mpo ya koyangana, kasi soko Nkolo Alingi tokoyangana elongo ntango botongi bokosila.

• Esengeli boyoka bande na ntango moko poso nyoso elongo moko na Jeffersonville mpo ete ozala Mwasi na Libala. Natikala koloba te, kondima te, soko kokanisa eloko ya ndenge wan ate. Na bomoi na ngai mobimba natikala koloba kaka FINA PLAY. Epai ya mosala nalobá ete bozongisa Ndeko Branham na eteyelo mpe boyoka ba bande.

Ata ko bongo bateyi ebele bazali koyebisa bato na bango makambo ya motindo oyo, naboyebaka ete nalobá to nakomá eloko ya ndenge yango te. Bazali kaka kotia somo kati na bato mpe kokosa bango.

Esengeli bomituna bino penza, “ Mpo na nini bateyi bazali kotemela koyoka Mongongo na Nzambe na ntango moko?” Bazali koloba ete ezali MABE mpe ebongiseli mpo ya biso nyoso koyoka bande na ntango moko. Eloko nini ezalaki mabe ntango Ndeko Branham Azalaki awa mpe asalaki yango?

Bokanisi ete soko bato bazalaki koyoka “yango” na mosika bango nyoso na ntango moko bakokaki kotemela yango mpe koloba ete ezalaki kotemela Liloba? Eloko moko ezali kolongobana te.
Nzambe Apesi Mwasi na Ye ya Libala ekongoleli, ezali Liloba na Ye, Etinda ya Ye, Mongongo mwa ye. Liloba ezali koya epai ya Mosakoli na Ye. Mosakoli azali molimboli ya Liloba ya Ye. Ezalaka ntango nyoso etinda ya moto moko, ebolo te. Nzambe atindaki Molimo Mosanto na Ye kokamba Mwasi na Ye ya Libala, mpe Molimo Mosanto yango Akotalisa bino epai ya mosakoli ya Ye, oyo APONI kokamba Mwasi na Libala na nzela ya Liloba na Ye. Nzambe ayebi kobongola etandelo na Ye te. Atikalá ntango nyoso kokamba bato na Ye wana emizipaki Ye na kati ya mosuni ya moto.

Mbela etindameli yo, opusami te, ete oya koyangana elongo moko na etonga ya bot’oyo bandimaka LILOBA NYOSO ezali Liloba ya Nzambe elobami na motindami na Ye mwanje ya 7, wan’ezali biso koyoka: Ekongoleli ya mot’oyo akanisaka 65-9822E, na ngonga ya 2:00 PM…, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Mituya 19:9
Baefese 5:22-26

29.5.2021

Nkolo akumisama, ezali ba mpongo koyangana elongo. Mokanda kouta na Eyanganelo ya Branham mpe Ndeko Joseph Branham.
Kososola mokolo na bino mpe etinda na yango; toyokaki bande yango esili koleka mwa ba poso, mpe tozalaki kokoba na lipati ya yango. Ezalaki liteya kitoko mingi.

Kati na liteya wana Ndeko Branham alobaki…

…”Okoki komilingisa te kobakisa eloko to kolongola eloko ( meka te), mpo ete soko omeki komitiela ndimbola ozali nde kolongola eteni na yo na Buku ya bomoi.

Ozali nde komeka koloba eloko moko oyo Molimo Alobi te? Ozali nde kosala ete eyokana lokola eloko moko to ozali kozwa yango kaka nden’elobi mpe kotika yango ndeng’ezali. Ozali nde kosala okati bande awa, olongoli mpe osali makambo, ezali solo te? Olobi nde ete, malamu, nazali kaka koyoka na ngai te ete esengelaki nasala oyo to ntango mosusu nayebi ete lingomba na ngai endimaka yango te.
Yango ezali kaka liloba ya moto moko mpo na yango.

Moto yango moko nde Nzambe.
Akobi koloba na eteni oy’elandi.

Nayebi ete bibongiseli bameka kotelemisa. Kobwaka yango libanda, kobalola, kopusa yango na lokolo mpe eloko ata nini. Kasi na ngolu ya Nzambe, Nazali na nzela ya ngai, kogangaka longwa na ekolo kino ekolo, longwa na esika yoko kino esika esusu, longwa na lingomba lyoko kino lingomba lisusu.

Bima na kati na yango, ezangi koyebana na bato ebele kasi ezali solo.

Nkolo akumisama mpe toyebi ete bazali naino kopusa kobeta yango na makolo ba bango, mpe bazali naino kobimisa yango libanda, mpe kopusa yango libanda, mpe alobaki mpe ete wana ba bande ezali kokutana na bato ndenge na ndenge, alobaki ete, ba mpate balingi yango, kasi ba ntaba bazali kobeta yango na makolo na bango kobwaka yango libanda, boye soko olingi likomi yango okoki kokomela ngai na WatsApp na motango…Nzambe Apambola bino Malamu mingi sik’oyo.

Sik’oyo BA MPONGO KOYANGANA ELONGO, 29.5.2021 EYANGANELO ya Branham & Ndeko Joseph Branham

Molingami Mwasi ya libala ya Etinda ya moto moko,,
Nazali na esengo mingi ete Nzambe Ye mei aponaki mosakoli mpo y’a eleko ya biso liboso ya bozalisi ya mokili. EteAponaki Etinda oyo Akokaki komema mpe aponaki kutu lolenge ya moto yango penza. Atiaki kati na ye oy’ekokaki kobenda bato y’a eleko ya biso.

Na motindami ya Ye aponami, Amonisi epai ya Mwasi ya Ye ya libala oyo ezali bango mpe oyo motindami ya bango azali.
Epai na ba mosusu nyoso, abeti miso na bango na lolanda. Bakoki soko moke te kolongwa na sima y’a ezipelo komona Nzambe oyo Abombami kati na mosuni ya moto.

Atiaki penza motema na Ye likolo na biso, na ndeng’ete Alayisaki mosakoli ya biso na lolenge y’a elamba oy’ezalaki ye: lolenge, posa, mpe makambo manso, kaka ndenge esengelaki azala; aponaki penza ye na ndeng’esengelaki mpo na biso, na ntina ete akoka kobenga Mwasi y’a libala ya Ye.
Moko na mabanga minene ya kotuta libaku monguna azali kosalela lelo ezali kokabola Etinda na Biblia na bolobaka:”Soko ezalaki ete opona kati ya etinda mpe Biblia nde oponi nini?”

Mayele mabe nini oyo y’a zabolo koloba eloko y’a ndenge boye. Soko moto moko atuni yo motuna ya boye, okoki mbala moko koloba ete bazali na emoniseli ya liloba te ezala ata nini.Etinda oyo ezali Klisto Amonisami kati na Liloba na Ye moko.
Maloba penza ya mosakoli ezal:

Sasaipi, tokuti ete Eliya akokaki koloba yango mpo ete Etinda ya ngonga mpe Liloba ya Nzambe, to Motindami, Etinda, – Etinda, mpe Liloba, ezalaki penza eloko moko. Mosakoli, Liloba, Etinda;motindami, Etinda, mpe Etinda
Ezalaki moko. Yesu alobaki ete,”Soko nasali misala oy’ekomami na tina na ngai te, boye bondima Ngai te”. Ezali malamu. Moto nyoso mpe etinda ya ye azali moko.

Okoki te kokabola Etinda na Motindami, bazali eloko moko. Okoki mpe te kokabola Biblia na Etinda, bazali eloko moko.Ezali Nzambe kolimbola Liloba ya Ye.

Tozali na liloba ya suka, etemelo, mpe yango ezali Liloba ya Nzambe. Biblia mobimba ezali Liloba ya moto te, soko ekomamaki mpe na moto te, eyeisamaki mpe na moto te, ekoki mpe komonisama na moto te. Ezali Liloba ya Nzambe emonisami na Nzambe Ye moko, molimboli ya Ye moko, Klisto komimonisa kati na Liloba ya Ye moko

Liloba ya Ye ezali na bosenga ya ndimbola te. Oyo elobi Ye na nzela ya bibebu ya mosakoli ezali Liloba kolimbolama. Akebisaki biso ete tobongola ata litono moko to elobelo moko te, mpo ete ezali Nzambe. Nzambe komonana na lolenge ya mosuni ya moto. Nzambe Ye moko na lolenge ya makomi, lolenge ya mosakoli, amonisami kati na mosuni.

Mpo ya kokoma Biblia, Nzambe atindaki basakoli ya Ye, ezalaki nzela azalaki na yango mpo ya komema Liloba ya Ye epai ya bato, na bolekaka na bibebu ya basakoli na Ye. Basakoli wana bazalaki kokoma Liloba ya Nzambe liyebi kokwea te.

Bazalaki na boyokani ntango nyoso na Nkolo Liloba. Babikaki ntango nyoso na bozali ya Mokolo Liloba, koyeba oyo Buku ekozala. Bazalaki na ekomeli na maboko na bango wana babelemaki kokoma ntango nyoso, kotia na nkomá oyo nyoso Ye Alobaki mpe Akitisaki.

Kasi na mokolo ya biso, Asololi mbebu na litoi na mosakoli ya biso, mpo kobengama na ye ezalaki y’a likolo mingi. Kobengama ya Ye ezalaki komonisa Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki kati na Biblia longwa na Genese kino na emoniseli.

Nyoso ezwami kati na Liloba ya Ye, Biblia, kasi ebombamaki longwa na bozalisi ya mokili mpe moto moko te ayebaki mabombami yango. Bobele sok’ozali n’Etinda oyo mpe ondimi ete ezali ndimbola ya Biblia, soko boye te yo mpe okoyeba Liloba nyoso ya Nzambe te.

Soko tokaboli Biblia na Etinda ya ntang’oyo, tokozala kaka lokola bibongiseli. Tokozala tozali kotanga kasi nabozangaka koyeba to kozwa emoniseli mobimba. Tokokoka soko moke te kokoma Mwasi Liloba ya Ye. Tokozala kozila, kozila mpe kozila kasi tokozwaka biyano soko moke te.

Tokotanga Malaki, Yoane, Luka, Baebele, Emoniseli mpe na mbisa tokotuna:” Wapi ko oyo Nzambe Alakaki ete akoya lisusu na mosuni ya moto mpe kobongola motema ya bana; koyebisa biso makambo mingi oyo tokoki kosimba te; kosolola na biso na nzela ya mwanje ya Ye ya nguya mpe komonisa biso mabombami nyoso oy’ekomami kati na Biblia? Bilembo sambo elingi koloba nini? Solo ya BoNzambe ezali nini, Nkake, Emoniseli ya solo.

Mosakoli na biso motindami kaka nde MOLIMBOLI MOKO YA LILOBA YA NZAMBE KATI NA BONZAMBE Ye nde Nzambe Aponaki ete aloba mpe alimbola Liloba na Ye na nzela na Ye.

Pelamoko Mose, ye azalaki Liloba ya Nzambe na bomoi ezipami kati na mosuni y’a moto epai na biso. Azalaki oyo Nzambe Aponaki mpo ya kobenga Mwasi na Ye Ya Libala

Akebisaki bato mokolo mwa Lomingo loleki:
Liloba ya Ye emonisami epai ya moto moko. Ezalaka bongo ntango nyoso, mosakoli moko ayaki na Liloba ya Nkolo, eleko moko na moko, ntango moko na moko, kati na mobimba y’a makomi. Liloba ezali koya epai ya moko. Na bileko nyoso ndenge moko, ata kati na bileko ya lingomba, longwa na oyo ya liboso penza Lino na oyo y’a suka. Ba mosusu bazali na bisika ya bango, ezali solo, botala, kasi BOTIKALA MOSIKA NA LIKONZI YA MOTO WANA.

Zala mosika na Likonzi yango ya moto. Likonzi yango ya moto ezalaki nini? KOKAMBA BANA. Mokambi na biso Likonzi ya moto ezali Nzambe kosolola na biso ba nzela ya motindami na Ye mwanje ya 7, kokamba biso na mokili ya elaka.

Tozali baponami na Ye. Tozali baponami ya Nzambe. Tozali Mwasi na ye ya Libala oyo abengami. Tozali na emoniseli ya Ye lobi loleki, lelo mpe libela.

Tososoli mokolo na biso mpe motindami na biso. Tososoli baoyo tozali: Liloba ya Ye litalisami. Tozali Mwasi na ye ya Libala oy’amibongisi na Liloba lya Ye limonisami.

Yaka koyoka na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpe koyoka biyano na nyos’oyo ekomamaki mpe ebombamaki kati na Biblia. Yaka mpe zwa Klisto Amonisami kati na Liloba ya Ye moko.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso so ya koyoka
Esode 4:10-12
Yisaya 53:1-5
Yilimia1:4-9
Malaki: 4:5
St. Luka 17:30
St. Yoane 1:1 / 1:14 / 7:1-3 / 14:12 / 15:24 / 16:13
Bagalatia 1:8
2 Timote 3:16-17
Baebele 1:1-3 / 4:12 / 13:8
2 Petelo 1:20-21
Emoniseli 1:1-3 / 10:1-7 / 22:18-19

Kino ntango ekoya. Mpe tozali koyangana zingazinga na liloba oyo y’a lokumu lobi mpe tozali kosala yango lelo mpe lokola, mokolo nyoso, tozala na ndako,to na mosala, tozala na kati na motuka tozali kokumba na balabala; tika tobanzabanza likolo na Liloba y’a Nzambe mpe tokuta Klisto amonisami kati na Liloba ya Ye moko 65-0822M
Nzambe Apambola bino mpe Shalom.

15.5.2021, MOKANDA KOUTA NA EYANGANELO YA BRANHAM & JOSEPH BRANHAM

Balingami baoyo mike,

Tozwi ya biso mokano. Etinda ekokisami. Mwana ya Moto Ayei lisusu na mosuni ya moto kofungola liloba na Ye. Ezipelo ya mimesano epasuki. Ye oyo awa, Likonzi na moto, Atelemi polele liboso na biso, komonisa Liloba ya mokolo oyo. Tozali komona yango, mpe tondimi yango…LILOBA MOKO NA MOKO!!

Toyoki moko na moko na ba bande yango wan’ezali yango kokita. Ekomi polele polele epai na biso wan’ezali biso koyoka moko na moko. Tolukiluki makomi. Liloba na Nzambe emonisameli mpe Endimisameli biso. William Marion Branham Alobaki Yango, mpe Nzambe Akokisaki yango.

Ezali nini? Bozambe ezipami kati na mosuni ya moto. Bokanisa Yango! Likonzi na moto yango moko oy’eyaki likolo na bato yango bakomaki Biblia, Ezali Likonzi na moto yango moko elongo na biso lelo, kolimbola Biblia. Liloba ya Ye, ba Bande oyo, Ezali kokomisa biso lokola Ye mokolo na mokolo. Tozali kobika kati na Bozali na Ye, mpe tozali komikokanisa na Elilingi na Ye wana ezali biso kotambola elongo na Ye mpe Ye kosolola na biso.

Bozali lisusu sima na ezipelo wana te, ba oyo mike, Nzambe Amimonisi polele liboso na bino.

Tozali sima na ezipelo wana te, tozali komona yango polele. Ezali lipa ya eleko bèebé oyo tozali na lipati na yango wan’ezali biso koyangana na mokili mobimba koyoka Mwana na moto kosolola na biso mpe kofungola Liloba na Ye. Ezali biloko ya mondimi oy’ezali KAKA mpo y’a mondimi y’a solo.

Bamosusu balingi biloko bikeseni, kasi biso, esili komonisama, Nzambe atindi Liloba na Ye apai na Moto Moko, likita te, moto moko.

Ezalaka ntango nyoso, mosakoli koya na Liloba na Nkolo, eleko nyoso, ntango nyoso, kati na makomi nyoso. Liloba ezali koya epai na Moko. Na eleko nyoso, ndenge moko, ata na kati na bileko ya Lingomba, longwa na oyo ya liboso penza ti oyo ya suka. Ba mosusu bazali na bisika ya bango, ezali solo, bokeba, bozala mosika na Likonzi na Moto wana.

Tolingi Mongongo na Nzambe oyo etiamaki mpe ebombamaki kati na ba Bande. Liloba oyo ezali na Bose nga NA NDIMBOLA TE, KOYEKOLISAMA TE, KAKA LILOBA PETO, Mana mabombomi.

Kaka ndenge moko Baela balingaki Nzambe; mpe Azalaki kotelema wana liboso na bango, kasi bakokaki komona Ye te mpo na ezipelo. Ezali motindo moko lelo, bakoki komona Ye te mpo na ezipelo na bilongi bango.

Mobali na Libala Ayei na mosuni ya moto mpe Azali koyangana sa biso elongo; Liloba mpe LINGOMBA ya Ye, mpe tozali sasaipi kokoma Moko. Ezali kotalisama y’a emonisameli y’a Mwana y’a Moto, Yesu Klisto kati na mosuni na moto lisusu. Azali koyanganisa biso mpe komema biso na Lipati ya Libala oyo abongisi mpo na Mwasi na Ye.

Boyoka bino baoyo mike, BOZALI LILOBA oyo ekomamaki mpe emonisami. Tata apesi bino emoniseli ya Ye mei mpo na mokolo oyo, mpe sik’oyo, Apesi yo emoniseli ya YO MOKO, Mwasi na libala na Ye Liloba living I be. Loba Liloba, oyebi kotelemisama te.

Etinda oyo ezali Mosala mokoki ya ye moko, moto moko te, ebongiseli moko te pela moko na bileko, kasi YE MOKO KOMIMONISA: Santu Luka 17:30, Malaki 4, Emoniseli 10:7; Baebele 13:8.

Soki bozali Koluka eloko mosusu to moto mosusu kofungolela bino koleka oyo ezali kati na bande, bozangi yango baninga na ngai. Bozonga na Liloba ya ebandeli.Liloba libongi be. Ezali ngai te, ezali mobateli na yo te, EZALI LILOBA OYO, ETINDA OYO, BA BANDE OYO, mpo ete ezali Mongongo ya Nzambe KAKA moko oyo emekami mpe endimisami.

Boya koyoka Mongongo yango komifungola YE Mei Mokolo y’a Lomingo oyo na Ngongo y’a 2 sima y’a nzanga…ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyangana elongo koyoka Nzambe kosolola Etinda ya Ye epai y’a Mwasi na Ye y’a Libala:Kofungolama ya Nzambe 64-0614 M

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso y’a koyoka Liteya

Matayi 24:24
St Luka 17:28-29
St Yoane 14:14
I Bakolinti 12:13
II Bakolinti 3: 6-IIBakolinti 4:3
Bafilipi 2:1-8
ITimote3:16
Baebele 13:8
Emonisameli 10:7 & 19:13
Esode Mikapo y’a 18 & 20
Yoele 2:28
Malaki 4:5

8.5.2021, MOKANDA KOUTA NA EYANGANELO YA BRANHAM & JOSEPH BRANHAM

Molingami Liloba
Mwasi na Libala azali kobelema mpo na kozwa kolamukisa mosusu kati na bomoto na biso. Molimo Mosanto akoyanganisa biso lisusu elongo koyoka Liloba kondimisa biso: Tozali banani, touti wapi mpe tozali kokende wapi.

Azali kondimisa maloba maye manso. Kanisa nano yango, maloba ma Ye manso! Mpe ozalaki Liloba na Ye. Azalaki Liloba, mpe ozalaki eteni ya Liloba na Ye. Mpe, nde ntina otindami awa, kokokisa esika na yo kati na bomoi.

Tozali Liloba ya Ye. Tozali eteni ya Ye. Akanisaki na ntina na biso liboso ya kozalisama na mokili. Tozalaki kati na makanisi na Ye. Tozali na elembeteli na Lola longwa na boyebanaka kala liboso ya bozalisi ya mokili . Speak biso emoniseli ya Ye moko, lobi loleki, lelo, mpe libela.

Boyoka na bokengi, mpo kokoma na suka oyo. Nzambe apusaki na makasi. Ntango ya kosala mosala akoki, esengeli y’ozwa mokano. Mwana na Moto asi Ayei mpe Akokisi makomi nyoso esololamaki na Ye moko. Yo otelemi wapi?

Motuna oyo osengeli omituna lelo ezali: Mwanje oyo ya 7 motindami Nzambe Alobaki ete Akotinda nde Nani? Azaliki na maloba ya kozanga kokwea, to azalaki na yango te lokola alobaki ete azalaki na yango? Akokisaki nde makomi nyoso elobamaki na ntina na Ye mpenza? Etinda asololaki ezalaki nde na mibunga?

Ekomami nde kati na Liloba ete tozali na bosenga ya eloko mosusu koleka oyo elobamaki na mwanje na 7 motindami na Nzambe? Alobaki nde ete Akotinda moto mosusu kolimbola oyo motindami na Ye Alobaki? Liloba elobi nde ete Akotinda ebolo ya bato kokamba mpe koyanganisa Mwasi na libala?Alobi nde ete y’ozanga kondima Liloba nyoso?

Soki olobi ete ondimi: Oyo ezali etinda ya ntango. William Marrion Branham azalaki mwanje ya 7 ya Nzambe oyo atindamaki ko fungola mabombami nyoso. Ezali Mwana na Moto komimonisa. Totala sikoyo mwanje motindami oyo soki alobi Ye azalaki nani.

Sik’oyo, bokanisa, ezalaki Yesu te oyo azalaki ko solola na Abalayama kuna, oyo akokaki koyeba makanisi na motema ya Sala oyo azalaki na sima na Ye. Oyo wana ezalaki Yesu te, Abotamaki nano te. Kasi ezalaki Moto kati na mosusu ya moto, oyo Abalayama abengaki “ Elohim, oyo Monene na Ngoya nyoso”. Komonisa…Mpe Yesu Alobaki ete, “ Lokola ezalaki na mikolo na Sodoma”, botala na bokengi sik’oyo, ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na moto, wan’ekozala Mwana na moto komimonisa”. Ezali lisusu te lokola lingomba, bomoni, lisusu te soki te; Mwasi na libala abrngami, bomoni. “ Na mokolo wana Mwana na moto Akomimonisa”. Kobenga ya Mobali na libala ekoya na nzela oyo, ntango Mwana na moto Akokita mpe akoya na mosuni ya moto kokangisa yango mibale elongo.

Ntango NANI akoya mpe koyanganisa Mwasi na libala? Ebolo ya bato? Mosala? Mwana ya moto akokita mpe kokita na mosuni ya moto kokangisa bango mibale elongo. Mpe Mwana na Mot oyo, moto kati na mosuni ya moto akosala nini? Kokangisa Lingomba na motó, Libala ya Mwasi na Libala.

Toyebi Mwana na moto azali Liloba mpo ya lelo. Kasi NANI nde azalaki moto wana kati na mosuni ya moto oyo Mwana na Moto Amimonisaki na nzela na Ye? Esengelaki ezala mosakoli; mpo ete Liloba Ryska KAKA epai ya mosakoli mpe mosakoli kaka nde molimboli ya Nzambe ya liloba ya Nzambe.

Esengeli Lingomba likoma Liloba, Ye Azali Liloba, mpe bango mibale bayangani elongo, mpe kosala bongo, ekosengela komonisama ya emoniseli ya Mwana na moto. Ezali moyangeli ya lingomba te.

Eloko nini nde esengeli kokangisa Mwasi na Libala na Liloba? Moyangeli ya lingomba moko te, ekosengela:

Komonisama: webster: Eloko moko to moto moko abongwani.
Komonisama: Webster: Emoniseli ya suka ya likambo oyo ebombamaki kala…ya Mwana na moto. Mwana na moto Amimonisaki na nzela ya Nani? WILLIAM MARRION BRANHAM

Bokoki komona mpo na monguna alingi bino bobeta ntembe ete Liloba nyoso elobami ezali te OYO ELOBI NKOLO kasi kaka makanisi ya Ndeko Branham, mabanza na ye, to ezali nde Liloba ya Nzambe?

No kondima nde oyo moto moko akoyebisa bino ete ezali oyo elingi koloba, to bokondima nde oyo mwanje na Nzambe motindami ya 7 alobi? Esengeli omituna yo moko motuna wana.

Na-Na yebi te, Na… Bomoni eloko nalingi koloba? Bomoni, ezali Mwana na moto, Yesu Klisto, Akokita na mosuni ya moto kati na biso, mpe Akokomisa Liloba na Ye solo penza, na ndenge ete ekokangisa Lingomba mpe Ye eloko moko, Mwasi na libala, mpe sima Akokende na ndako na Lipati ya Libala.

Yesu Klisto, Mwana na moto, komimonisa Ye penza na nzela ya motindami na Ye Akokangisa Lingomba mpe Ye moko lokola moto moko mpe tokokende na Lipati ya Libala. Yango wana, ezali polele na monoko ya Ngelesa.

Ezali ngai te nde nazali koloba yango, ezali mabanza na ngai to makanisi na ngai te, miyokela bino moko. Ezali Nzambe kosolola na Mwasi na Ye na Libala na nzela ya motindami na Ye, mwanje ya 7 lokola Alakaki ete Akosala bongo kati na Liloba na Ye. Moto te, Nzambe.

Monguna alobi na yo, “ bazali kosambela moto”. Na beti yo mondenge Santana, tozali kosambela moto te oyo azali koloba, kasi NKOLO YESU KLISTO kosolola na biso na nzela ya oyo Ye moko Aponaki ete Akosolola na nzela na Ye.

Amen. Asili kokangama na Ye, bomoni, tozali kokende na Lipati ya Libala, na Libala te. “…tondisa mosuni na yo…yo moko, na mosuni nyoso ya bato na nguya, mpo ete Libala ya Mwana na Mpate eyei”. Kasi, konetolama, ezali kokende na Lipati na Libala. Ntango Liloba awa ekangani na moto, mpe bango mibale bakomi moko. Mpe bongo ekosala nini? Ezali komonisa Mwana na moto lisusu, ezali te bato ya boyekoli ya Nzambe kati na Lingomba. Mwana na moto! Liloba mpe Lingomba bakomi moko. Oyo nyoso Mwana na moto Asalaki, Azalaki Liloba, Lingomba mpe ezali kosala eloko yango moko.

Yango wana lisusu, Nzambe koyebisa biso oyo Azali kosala sik’oyo. KOYANGANISA BISO NA LILOBA YA YE ELOBAMI NA NZELA YA MWANA NA MOTO. Liloba mpe Lingomba ( Biso) tozali kokoma moko.

Esengeli ondima Liloba moko na moko. Koyoka moto te soko mabanza ya moto te.

Mpe bin’oyo bozali kofanda awa sasaipi, soko bolingi nabenga nkombo na bino, ezalaki Satana mpo na ntango molai komeka kosala ete bobeta ngai ntembe. Bomeka kosala bongo te. Ndeko mwasi, soko osali bongo, malamu, iko…to ngai te, kasi kaka kotia ntembe. Naïma kaka Liloba oyo. Opusami te ondima ngai, kasi ndima Oyo. Omoni? Soko Nalobi Liloba oyo, ezali ya ngai te, ezali ya Ye. Liloba ya ngai ekeseni, kasi Oyo ezali ya Ye.

Ezali Liloba ya William Marrion Branham te, ezali Liloba ya Nzambe, mpe Satana azali kolinga ete obete tembe kaka na liloba moko.

Mpe soko ezali na eloko moko ezali naino kotiama tembe, esengeli emekama kino bokomona oyo ezali solo, elobi, “kangama na yango”. Na elobelo mosusu, “Tingama na yango, tika yango kolongwa te. Kangama Na yango makasi, mpo ekoki koselimwa te”. Kangama Na Oyo ezali malamu, sima na yango komekama ete “ezali solo”. Mpe eloko nyos’oyo emonani ete “ezali ya solo te”, boye bwakisa yango na noki penza, tangwa na yango.

Kaka mibakisa na biso Mokolo mwa Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, koyoka Tata kosolola na nzela ya motindami na ye moponami koyanganisa biso mpo na konetolama lokola Azali koyebisa biso Azali kokokisa Liloba ya Ye 64-0816

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya losambo:
(Malako5:21-43
I Mikonji 10:1-3
I Batesaloniki5:21
Baebele 4:12)
Nakotanga yango mpo na bino.
Santu Malako. Mokapo ya 5 molongo ya 21 kino 43

21 Mpe wana elekaki Yesu na ngambo lisusu na ngambo na ebei na ngambo mosusu, ebele monene bayanganaki epai na Ye: mpe azalaki kati kati na libeke.
22 Mpe, tala moko na bayangeli na sinagoga ayaki epai na Ye nkombo na ye ebengamaki ete Yailo; mpe wana amonaki Ye, akweaki na makolo na Ye,
23 Mpe abondelaki Ye makasi Ye ete, mwana na ngai moke ya mwasi alali na mento Na mpasi ya kufa: Na bondeli yo ete oya kotiela Ye maboko ete abikisama mpe akoboka.
24 Mpe Yesu Akendeki na ye elongo; mpe bato mingi babilaki Ye mpe bazalaki mingi penja.
25 Mpe mwasi moko, oyo azalaki na kotanga na makila mibu zomi na mibale,
26 Mpe anyokolamaki na motindo nyoso na pasi, na maboko na minganga, mpe abungisaki nyos’oyo azalaki na yango, mpe eloko moko esungaki Ye te, kasi pasi elekaki na mabe.
27 Waneyokaki Ye na Tina Na Yesu, ayaki mpe apusaki na makasi kati na bato mpe amamaki elamba na Ye.
28 Mpo Alobaki ete soko na komama elamba na Ye nako ils.
29 Mpe kaka Na ntango wana litanga ya makila na ye ekaukaki, mpe ayokaki na nzoto na Ye ete abikaki na Malala na Ye.

  1. Mpe Yesu, Ayebaki ba mbala moko ete nguya elongwaki na Ye, abongwanaki kati na ebele monene mpe atunaki ete, Nani amami bilamba na ngai?
    31 Mpe bayekoli na Ye balobi na Ye ete, ozali komona bato ebele kopusa yo mpe olobi, Nani asimbi ngai?
    32 Atalaki na zingazinga soko akomona Ye oyo azali likambo oyo
    33 Kasi mwasi wana nde azalaki kobanga mpo na yango ekomaki kati na ye, na kolenga nyoso, ayaki mpe akweaki liboso na ye, mpe alobelaki Ye solo.
    34 Mpe Alobaki na ye ete, mwana mwasi kondima na yo ebikisi yo; kende na kimia mpe bika na pasi na yo
    35 Wana ezalaki naino Ye koloba, moko alongwaki na ndako ya moyangeli ya tempelo mpe alobaki ete, mwana mwasi na yo akufi: mpo na nini okotungisa molakisi?
    36 Esilaki Yesu koyoka maloba mango malobamaki, Alobaki na moyangeli na ntepelo, banga te, ndima kaka
    37 Mpe alingaki te ete moto abila Ye, bobele Petelo, na Yakobo mpe na Yoane ndeko na Yakobo.
    38 Mpe ayaki na ndako ya moyangeli Na ntepelo, mpe amonaki yikiyiki mpe bango bajalaki kolela mpe koganga makasi.
    39 Mpe wan’ekotaki ye na ndako, Alobaki na bango, mpo na nini bozali kosala boye mpe kolela? Mwana mwasi akufi te, kasi azali kolala.
    40 Mpe basekaki Ye koseka penja. Kasi esilaki ye kondimisa bango nyoso libanda, azwaki mama mpe tata na mwana mwasi mpe bango bazalaki elongo na ye, mpe bakotaki epai wapi mwana mwasi azalaki kolala.
    41 Mpe Asimba ko mwana mwasi na loboko, mpe Alobaki na ye ete, Talitha Cumi, ntina Na yango ete mwana mwasi nalobi na yo telema.
    42 Mpe Na pwasa elenge mwasi atelemaki mpo ete azalaki na mbula ZOMI na mibale. Mpe bakamwaki na kokamwa monene.
    44 Mpe alakaki bango ete moto moko te ayeba likambo yango; mpe alakaki ete bapesa ye eloko ya kolia.

I Mikonji10 molongo ya 1 kino 3
Mpe wana mokonzi mwasi ya ngele ayokaki na ntina na lokumu ya Salomona mpo na Nkombo na Yawe, ayaki komeka ye Na mituna makasi.
2 Mpe ayaki na Yelusaleme na engbunduka monene, na kamela mpe na mabanga na motuya mpe wolo mingi: mpe waneyaki Ye epai na Salomona aumelaki kosolola na Ye na oyo nyoso ezalaki na motema na Ye.
3 Mpe Salomona ayebisaki ye mituna nyoso ezalaki na motema na ye: ezalaki Na eloko te ebombanelaki mokonzi oyo azangaki koyebisa ye.

I Batesaloniki 5 milongo 21
Bomeka makambo nyoso; bosimba yango ezali malamu

Baebele mokapo na 4, molongo na 12. Mpo ete Liloba Na Nzambe ezali makasi, mpe Na nguya, ezali na mopotu lokola mopanga moprli bipai nyoso mibale, ezali kotobola bomoto kino lilobgo mpe kobimisa makanisi mpe mposa na motema.

1.5.2021, MOKANDA KOUTA NA EYANGANELO YA BRANHAM & JOSEPH BRANHAM

Molongo ya liboso:

Nakoki koyoka…loboko ya Santana…
Lokola momeki… azali kofina na bolozi…
Azalaki liboso na Tata….
Kosenga tika…. komeka ngai nakoleka…

Mondimo:

Ata Nzambe aboma ngai…Nakotiela Ye motema…
Na bongo nako…monana lokola wolo…
Mpe Nayebi… Mosiloli na ngai azali na bomoi….
Mpo Nazali….koyoka Ye na bomoto na ngai…

Molongo ya mibale:

Nakoki koyoka Tata kolingisa ye…
Nabolobaka mama bomoi na ye te…
Ata onyata Ye Akoningana te…
Akotombwa…likolo ya etumba…

Molongo ya misato:

Ata nanyokwi… Nakoningana te…
Na ngolu na Ye…Nakokoma na suka na yango…
Mpo ngolu na Ye…nde nyos’oyo ekoki…
Mpe Nayebi…ete ba bande ezali solo…

Molongo ya minei:

Ntango Natalaki…zingazinga na ngai…
Mpe elongi na Ye…Nakoki komona te…
Na bongo Nayebi ete na nzela ya lininisa….
Azali kotala ngai motindo moko…

Mondimo:

Ata Nzambe Aboma ngai…Nakotiela Ye motema…
Na bongo nako… monana lokola wolo…
Mpe Nayebi…Mosikoli na Ngai Azali na bomoi…
Mpo Nazali koyoka… Ye na bomoto na ngai…

24.4.2021 BA MPONGO BAZALI KOYANGANA ELONGO, MOKANDA KOUTA NA EYANGANELO YA BRANHAM & JOSEPH BRANHAM

Molingami Mwasi na libala sembo.
Mitema na biso mipambolamaki mpe kondima na biso imataki na misanda ya likolo ya sika, wana efandaki biso elongo na bikima bileki likolo koyoka Tata ko solola na biso kati na motindami na ye ya nguya mpe koyebisa biso:

Mpe nazali kozila mpe nandimi, ete nakobika elongo na bino ntango nyoso. Nandimi ete oyo ezali ntango mokuse koleka tozali na yango, wana ezali biso kotelema elongo boye. Tokozala elongo na seko na seko. Bomoni? Nandimi yango. Na- na- Nandimi yango.
Tondimi yango mpe tozali kopema likolo na yango na mitema na biso mobimba.

Tozali na Likonzi na moto, mosakoli, mpe mana mabombami kokamba biso na mokili ya elaka. Tozali kokembisama na mai ya bomoi oyo ezali na mwa nyama mike ya mikondo te, bikongoleli te, kaka mai mpeto ya etoko ya bomoi. Ezali na esika moko kaka oy’okoki kozwa Mai yango, FINA PLAY.

Boya toyangana mokolo na Lomingo na ngonga ya mibale sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville mpe toyoka: MABULU MATIMOLAMI 640726E mpe tomela, tome la, mpe tomela, longwa na Liziba, wana ekotondisa Ye kopo na biso na ndenge ete ekobanda kosopana sopana.

Ndeko Joseph

17.04.2021

10.04.2021

31.03.2021

27.03.2021

20.03.2021

13.03.2021

06.03.2021

27.2.2021

20.2.2021

13.2.2021

6.2.2021

Mokolo ya 30 janvier 2021

Molingami Mwasi-Mokonzi Ya Lola,

Lolenge nini mpenza tokoki kobanda kotalisa polele makambo oyo ezosalema. Mokolo na mokolo, likomi likolo na likomi, lisakoli likolo na lisakoli ezali kokokisama. Nzambe azali kosangisa Mwasi-Mokonzi na Ye zinga-zinga na Liloba na Ye.

Bandeke ya paradiso basili kobanda koyemba na kati ya mitema na biso. Toyebi ete sikawa ekoumela lisusu mpenza te. Likambo moko ezali kosalema. Ntango yango esili kokoma. Mwasi-na-libala asili komibongisa na nzela ya koyoka nkàke ya Liloba na Ye na nzela ya mwanje motindami ya nsambo ya Nzambe.

Mposo na mposo, tozali kosangana wana tozali kozela na mitema luku-luku pe tozotanga na kozonga sima, 5, 4, 3, 2, 1… FINA BOUTON MPO NA KOYOKA. Mbala moko, Mwasi-na-libala asangani na mokili mobimba. Na sima, Motindami na Ye azolobela biso awa na mokili. Na ntango moko wana, Nzambe azoyokisa lokito ya likambo moko wana longwa na Lola. Ezali Mongongo na Nzambe nde ezali kolobela Momboto na Ye oyo ebongisama liboso, koloba ete:”Bino bozali Mwasi-na-libala na Ngai. Nalingaka bino, Mwasi-Mokonzi na Ngai. Ntango yango ekomi. Bosepela, Nasili kobongisa makambo nyonso mpo na Féti ya libala na biso.”

Sikawa ekomi ngonga ya emoniseli. Makambo nyonso ezali komonisama bobele na boyei na Ye. Ekomi mpenza ntango ya suka ya makambo. Mitema na biso ezali kopumbwa na esengo wana mposo na mposo, Ye azali kopesa biso makabo ya libala mingi mpenza.

Namonaki mwasi moko monene kotelema, azalaki kitoko, alataki elamba ya motuya mpenza lokola mokonzi , nà langi ya violet .” Pe nakomaki mwa moke awa na nsé, “(Azalaki na bokonzi mingi na Etats-Unis; ekoki kozala lingomba Katoliko.:” Mwasi, mwasi moko; nayebi te soki ekozala lingomba Katoliko. Nayebi te. Nakoki koloba te. Likambo bobele moko oyo namonaki, namonaki mwasi yango, suka wana.

Ntango Mwasi-na-libala azalaki koyoka kofungolama ya Bilembo Nsambo, Kamala Harris azalaki kolàpà ndai, mpo na kozala mwasi ya liboso lokola vice-President ya Etats-Unis. Nazali koloba te ete likambo oyo nde ezali kokokisama ya lisakoli yango oyo Ndeko Branham amonaki, kasi ezali mpenza komonana lokola ekokaki kozala yango.

Kamala Harris akoti na lisolo ya mboka lelo, ndenge azali mwasi ya liboso pe azali moto moindo pe moto ya Asie ya Sudi oyo akomi vice-president ya Etats-Unis. Na molulu ya kokota na bokonzi na mbala ya 59, alataki elamba ya violet nà kazàka ya monzoto oyo esalemi na mosoni-bilamba Christopher John Rogers. Likolo na bilamba nyonso wana, abakisaki mayaka ya motuya ya perles ya Wilfredo Rosado. (Zulunale Vanity Fair)

Ntango tozalaki koyoka Bileko Nsambo ya Lingomba, mwanje motindami ya nsambo ya Nzambe asakolaki pe alobelaki biso ete sima na Kennedy, ekozala na President Katoliko mosusu ya Etats-Unis.

Sima na molulu ya kolàpa ndai, Biden akomaki katoliko ya mibale mpo na kokamba Etats-Unis, moto ya liboso longwa John F. Kennedy na mobu 1961. (Zulunale Today)

Ezali na ntango moko te ya motuya koleka na lisolo ya mokili lokola ntango oyo tozali kobika na yango. Na eleko ya malili oyo, masakoli oyo ezali kokokisama liboso na miso na biso mpenza.

Pe likambo yango ekosuka kokokisama (nalobi yango liboso), ezali ete mwasi moko akokamba yango. Bomikanisela, nalobaki yango, esili koleka mibu ntuku-misato. Pe_pe ma_makambo nsambo oyo nalobelaki liboso, mitano na yango esili kokokisama. Pe bazali awa mpenza sikawa na moto oyo akokotisa ye. Pe na nzela ya politiki na bino kuna, bokopona yango.

Liloba na Nzambe ekweyaka te. Liloba na Ye ekoki koweya te. Esengeli kokokisama. Ye azali na molongo moko. Molongo yango ezali Liloba na Ye. Nzambe azali pe na nzela ya komonisa Liloba na Ye:”Nakosala eloko moko te, ata moke te, soki Natalisi Yango liboso te na moombo na Ngai, mosakoli na Ngai.” Liboso Asàla likambo moko, Amonisaka Yango na mosakoli na Ye. Pe ntango Amonisi Yango, likambo moko ezali na nzela.

Ba-nkake Nsambo ekopesa Mwasi-na-libala Kondima mpo na konetolama.

• Kondima eyàka na nzela na koyoka.
• Koyoka Liloba na Nzambe
• Liloba na Nzambe eyàka na mosakoli

Ezali bobele na MONGONGO MOKO YA NZAMBE

“Ba-mpate na Ngai bayebi Mongongo na Ngai. Mongongo, na bosolo, ezali Liloba na Ye, ntango Azoloba. “Ba-mpate na Ngai bayebi Mongongo na Ngai. Mongongo na Ngai esili kondimisama epai na bango, ete ezali solo. Yango esili kotatolama ete ezali Mongongo na Ngai.” Sikawa, boye botala, bango bazali baoyo balandaka mongongo mosusu te. Bakosala yango te. “Ba-mpate na Ngai bayebi Mongongo na Ngai, pe bakolanda mopaya moko te.”

Toyebi Mongongo Yango pe tolingaka yango. Biso tozali baoyo balandaka mongongo mosusu te, bobele Mongongo na Ye na nzela ya ba-Bandes.

Oh, Mwasi-Mokonzi ya Nzambe, eloko nini ezozela yo mokolo na mokolo, Likabo likolo na likabo, lipambo likolo na lipamboli, esengo likolo na esengo, emoniseli likolo na emoniseli.

Tika ete totanga na kozonga sima mbala moko lisusu mokolo na Lomingo oyo na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Nkake ya Mongongo na Nzambe mpo na Mwasi-Mokonzi na Ye, wana tokoyoka: Elembo Ya Mibale, oyo eteyamaki mokolo ya 19 mars 1963.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya:

Matai 4:8 / 11:25-26 /24:6
Malak 16:16
Yoane 14:12
2 Batesaloniki 2:3
Baebele 4:12
Emoniseli 2:6 / 6:3-4 / Mokapo 17 / 19:11-16
Yoele 2:25
Amosa 3:6-7

Mokolo ya 23/01/ 2021

Molingami Mwasi na libala ya Wolo ya Peto,

Bokosepela kotanga mokanda ya bolingo oyo euti na Nkolo na biso Yesu  bobele mpo na bino? Bokosepela koyoka Ye kolobela bino eloko nini Ye akanisaka mpo na bino?

 “ Mpo na Ngai, bino bozali lokola Wolo ya Peto; boyengebene na bino ezali boyengebene na NGAI. Bizaleli na bino ezali bizaleli ya nkembo ya NGAI moko.  Lolenge na bino mpenza ezuami na kati na NGAI. Oyo NGAI NAZALI, bino bozali kotalisa yango polele. Oyo NGAI NAZALAKI, ezali komonisama na kati na bino. Libunga ata moko te ezali na kati na bino. Bino botondisami na nkembo, na kati pe na libanda. Longwa ebandeli kino suka, bozali mosala na NGAI, pe misala na NGAI nyonso ezalaka ya kobonga be. Na bosolo, mayele ya seko pe mwango na NGAI MOKO esili kotiama na kati na bino. ”

Moto akoki kososola mosanda na yango ndenge nini? Moto akoki kososola yango ndenge nini? Ata tokoki kosala yango te, tokoki koyamba yango na nzela ya kondima, mpo Nzambe asili koloba yango.

Ye alingaka mpenza biso mingi koleka na lolenge ete Aponaki biso mpo na komonisa biso mabombami na Ye nyonso ya minene.

Biblia ekomamaki liboso na kozalisama ya mokili. Pe Klisto, lokola Mwana-na-mpate, abomamaki liboso na kozalisama ya mokili. Pe bino, Mwasi-na-libala na Ye, nkombo na bino ekomamaki na kati ya Buku na Bomoi ya Mwana-na-mpate liboso na kozalisama ya mokili.

Kasi, mabombami nyonso oyo esilaki kokangama na bilembo na bileko oyo eleki. Tozalaki na bosenga ya Tata Mosikoli moko mpo aya kosenga baoyo ya Ye, kasi ezalaki ata na moto moko te  oyo akokaki kosala yango; moto moko te na Lola, moto moko te na mokili, moto moko te na nse ya mabele. Ezalaka na moto moko te oyo azalaki ata na makoki ya kotala Buku yango.

Na sima, Mwana-na-mpate abelemaki longwa na Kiti-na-bokonzi, azalaki na Makila na nzoto na Ye mobimba. Ezalaki bobele Ye nde azalaki na makoki yango. Kasi mpo ete mwango monene ya Nzambe ekokisama na mobimba, Asengelaki kozala na moto moko oyo Ye akokaki komona ete azali na makoki mpo Ye amonisa mabombami minene na Ye na moto yango, mpo na bato oyo Ye alingaki komonisa bango Yango.

Ye asilaki kopona mwanje na Ye ya nguya mpo na komonisa Yango na ye liboso na kozalisama ya mokili, pe etonga ya bato ya lolenge mosusu oyo Ye abengaki Mwasi-na-libala na Ye. Nkombo ya mwanje na nguya yango ezalaki William Marrion Branham.  Etonga ya bato ya lolenge yango ezali BINO, Mwasi-na-libala na Ye oyo abongisama liboso.

Pe Azuaki Buku, (nkembo!) afungolaki Buku, pe abukaki Bilembo yango; pe atindaki Yango awa na nse, epai ya mwanje na Ye ya nsambo, mpo amonisa Yango na bato na Ye!

Tozali mpenza kozongisa matondi mpo na koyeba ete biso tozali bato na Ye, baoyo mwanje motindami na Ye ya nsambo azali komonisa yango.

Mabombami minene mosusu nini oyo esilaki kobombama longwa kozalisama ya mokili ekomonisamela bison a eleko ya malili oyo?

Na sima, ekomonisama ba-Nkake nsambo oyo ebombama, oyo ekomama pe ata moke te. Ezali solo. Pe nandimi ete, na nzela ya Ba-nkake nsambo yango, ekomonisama na mikolo ya suka mpo na kosangisa Mwasi na libala mpo na kondima ya konetolama.

Mabombami nyonso esilaki komonisama na mwanje motindami na nsambo ya Nzambe. Ezali bobele ye moto akoki komonisa yango na Mwasi na libala na Ye. Na sima libombami ya Nkake Nsambo ezali na kati ya Nsango oyo. Nandimi ete Yango ezali komonisala sikawa mpo na kosangisa Mwasi na libala mpo na kondima ya konetolama.

Kasi nazobanza ete, ntango mabombami yango ekobanda komonisama, Nzambe alobaki: ”Bomba yango. Zela mwa moke. Nakomonisa Yangon a mokolo wana. Kokoma Yango ata moke te, Yoane, mpo ete bakobeta libaku na ntina na yango. Tika yango bongo, bomoni. Kasi, Nakomonisa Yango mokolo wana ntango ekosengela ete esalema.

Tondimi été lelo ezali mokolo yango. Nzambe azalaka na nzela bobele moko mpo na Komonisa Yango na bato : Mosakoli na Ye. Na boye soki bolingi kozua Emoniseli ya Bilembo, Ba-nkake nsambo, pe mabombami nyonso oyo ebombamaki, boya kosangana na biso wana tokoyokaye oyo Nzambe aponaki mpo na komonisa yango, komonisa biso yango, mokolo ya Lomingo, na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, wana tokoyoka liteya oyo Elembo Ya Liboso , eteyamaki mokolo ya 18/03/1963.

Ndeko  Joseph Branham

===============================

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya:

Matai 10:1/ 11:1-14/ 24:6 / 28:19
Yoane 12:23-28
Misala2:38
Batesaloniki3-12
Baebele 4:12
Emoniseli 6:1-2/ 10:1-7/ 12: 7-9/ 13:16/ 19:11-16
Malaki Mokapo ya 3 pe ya 4
Daniele 8:23-25/ 11:21/ 9:25-27

16/01/2021

Balingami Basikolami.

Eleko ya malili oyo ekozala eleko ya nkembo koleka na bomoi na biso. Mokolo moko na moko, Ye akopesa biso Emoniseli ya monene koleka ya nani oyo Ye AZALAKI, nani oyo Ye azali pe SIK’OYO ba-nani oyo BISO TOSILI KOKOMA.

Ye akoyebisa biso lolenge nini Alingaka biso pe azalaki kozela ete eleko na malili oyo ekoma mpo Akoka komonisa biso mwango mobimba ya lisiko na Ye na kati ya Bilembo Nsambo oyo. Ekozala mikolo ya nkembo koleka pe ya motuya koleka oyo mokili eyéba naino te.

Boyoka eloko nini ekosalema na eleko ya malili oyo.

Makambo nyonso oyo Klisto akosala na suka ekomonisama na biso mposo oyo, na kati ya Bilembo Nsambo, soki Nzambe akopesa biso nzela. Bomoni? Malamu. Ekomonisama. Pe ekomonisama. Wana Bilembo ekofungwama pe ekotalisama na biso, na sima tokokoka komona eloko nini mwango monene ya lisiko oyo ezali, pe ntango nà lolenge nini makambo yango ekosalema .

Kondima na biso ekomata kino na misàndà ya likolo koleka wana Akozala kolimbola eloko nini lisiko na biso elingi koloba mpo na biso. Akolobela biso ete tozali na mokanda ya ndangà ya Bomoi na Seko, yango elingi koloba été biso tozali na makambo nyonso oyo Adama nà Eva babungisaki. Tokozala na bokonzi mobimba nyonso lokola nzambe ya moke, mpo ete tozali bana-mibali pe bana-basi na Ye. Tokokonza lokola bakonzi pe banganga-nzambe awa na mokili libela na libela elongo nà Ye.

Tokopambolama mpenza ntango mwanje motindami na biso akolobela biso lolenge nini Nzambe atindaki ye likolo na ngomba  mokolo moko na ntongo ntongo pe atiaki mopanga ya Mokonzi, Liloba na Ye, na loboko na ye, pe yango elongobanaki mpenza na loboko na ye.

Akomonisa biso eloko nini esalemaki na lola ntango Mwana-na-mpate abelemaki pe azuaki Buku na loboko ya mobali na Ye oyo afandaki na kiti-na-bonkozi. Lolenge nini, na sima, Afungolaki Yango, abukaki Bilembo na Yango, pe Atindaki Yango awa na mokili, na mwanje motindami ya nsambo na Ye, mpo amonisa Yango na biso, Mwasi-na-libala na Ye.

Biso tokozala lokola Yoane mokolo wana; nyonso na Lola, nyonso na mokili, nyonso na nsé ya mokili, bikelamu nyonso, bikelamu nyonso mosusu ekoyoka biso koloba, “Amen! Mapamboli, nà nkembo, nà mayele, nà nguya, nà makasi, nà bozwi, ezali ya Ye.”

Sasaipi, tozali kokonza elongo na Klisto, tozali na bokonzi likolo na masumu, na mokili, na mosuni, pe likolo na moyini. Ezali Klisto na kati na biso nde azali kosala oyo alingi kosala na ndenge Ye moko asepeli. Sik’oyo tosili kofanda na bisika ya likolo na kati ya Klisto Yesu, tozali koyoka Ye kolobela biso na nzela ya mwamje motindami monene na Ye.

Ntango ya mapamboli ya ndenge wana ezali koya na eleko ya malili oyo, ntango moko oyo esalema naino na mokili te. Ezali ntango ya Kobuka-mbuma, pe kala mingi te, moko na moko na biso akokoka kofanda na nsé ya nzete ya mowiti ya ye moko mpo na koseka, kosepela pe kobika seko na seko liboso na bozali na Ye, esika etondi na esengo.

Nzambe azali kobongisa Ngomba Mosanto na Ye, Elanga ya Edene na Ye ya sika mpo na Mwasi-na-libala nà Ye nà balandani na ye, mpo na bosepeli ya eleko ya mafuta-na-nzoi ya bilanga nkoto awa na mokili. Lokola Adama nà Eva bazalaki na Elanga ya Edene, BISO, Mwasi-na-libala, tokokokisa mwango nyonso ya Nzambe.

Boya kofanda liboso na bozali ya Molimo Mosanto wana Bokofina Bouton ya Koyoka,  mokolo ya Lomingo na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, ntango tokoyoka mwanje motindami ya nsambo na Ye koteya liteya oyo:  Nzela Na Kati-kati Ya Bileko Nsambo ya Lingomba Nà Bilembo Nsambo , oyo eteyamaki na mpokwa ya mokolo ya 17 mars 1963.

Tokoganga makasi, tokosepela pe tokoloba : « alleluia”.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya:

Balewi: 25:47-55
Yilimia: 32:1-15
Zacharie: 3:8-9 / 4:10
Baloma 8:22-23
Baefese: 1:13-14 / 4:30
Emoniseli: 1:12-18 / Mokapo ya Mitano / 10:1-7 / 11:18

Ekamatami Na:
https://branham.org/articles/1152021_TheEaglesGatheringTogether

09/01/2021

Balingami Bato ya ndenge mosusu,

Biso tozali bato oyo bakeseni na makambo ya mokili ya mikolo oyo. Tosili kokoma bato ya ndenge mosusu, bato ya kokamwa, pe lisusu bato balekisi ndelo na kati ya bandeko mibali pe basi.

Biso tozali bato ya lolenge na bango moko, bonganga-nzambe ya molimo, libota ya bokonzi, baoyo bazali kopesa na Nzambe ba-mbeka ya molimo, nà mbuma ya bibebu na biso, baoyo bazalikopesa nkembo na Nkombo na Ye wana tozoloba ete tondimaka Liloba nyonso oyo Ye alobaki na nzela ya mwanje motindami na Ye ya nsambo. Bazali kobenga biso Bato ya ndenge mosusu: Bato ya ba-Bandes, pe tozalaka mpenza na esengo kobengama MOKO NA BANGO.

Mpo na nini tondimaka na lolenge wana? Mwanje motindami ya nsambo oyo atatolamaki na Nzambe nde moto alobaki na biso ete tosala bongo.

Sikawa, boyoka Liloba moko na moko. Bosimba Yango. Pe_pe soki bozali kotia Yango na ba-bandes, to eloko nini, na boye, botikala semba nà Malakisi ya bande yango. Boloba eloko mosusu te, bobele makambo oyo bande yango elobi. Boloba bobele mpenza makambo oyo bande elobi. Bomoni? Sikawa, ezali na makambo mosusu oyo tokososola mingi likolo na yango sikawa, ntina nini Yango ezali kososolama mabe. Bomoni? Pe boyeba yango malamu mpenza, boloba bobele mpenza makambo oyo bande elobi. Boloba eloko mosusu te. Bomoni? Mpamba te, nazoloba makambo Yango na ngai moko te. Ezali Ye moto azoloba Yango, bomoni. Pe, mbala mingi, mobulu ezalaka, bato bakotelema pe bakoloba, “Ee, Moto Songolo-Pakala alobaki ete Yango elingaki koloba boye nà boye.” Bo_botika Yango bobele ndenge Ezali. Bomoni, ezali lolenge wana nde tolingaka Biblia. Bobele ndenge Biblia elobi Yango, lolenge wana nde tolingaka Yango, bobele_bobele ndenge Wana. Botia ndimbola na bino moko te na Yango. Yango esili kolimbolama, bomoni.

Kopema nini oyo, kimia nino oyo Mwasi-na-libala azali na yango. Yango esilaki komonisama ete ezali na lolenge bobele moko mpo na kozanga kozala na mobulu na makambo oyo moto songolo alobaka mpo na kolimbola Yango. Ezali na lolenge bobele moko mpo na koloba mpenza makambo oyo ba-Bandes elobaka, FINA BOUTON MPO NA KOYOKA, wana esengeli na ndimbola moko te.

Tondimaka Nsango oyo ntango nyonso, kasi sikawa, ezali na eloko moko ya bokesene, mbongwana moko ezali kosalema na kati ya Mwasi-na-libala na Ye. Tozali kofanda na bozali ya Mwana pe tozali kokomela. Ezali lolenge bobele moko mpo Mwqasi-na-libala ekoka komilengela mpo na kobuka mbuma, KOFINA BOUTON YA KOYOKA PE KOTOSA.

Ekosalema bobele ndenge tosilaki koloba. Bato na Nzambe bazali komibongisa na nzela ya Liloba ya Solo oyo euti na motindami ya eleko  oyo. Litondi ya Pantekote ekozala na kati na ye mpo ete Molimo akozongisa bato mpenza na esika oyo bazalaki na ebandeli. Yango ezali : “Yango Elobi Nkolo.”

Yango ezali kosepelisa milimo na biso. Tolingi kotombola mingongo pe koganga. Tosengeli komituna mituna te to kobanza-banza te, to pe kolikia ete tozali na kati ya Mokano mobongi be na Ye; biso tozali na “Yango Elobi Nkolo.” Tozali kolengelama na Liloba ya Solo na nzela ya KOFINA BOUTON YA KOYOKA.

Lisusu koyoka Bileko Nsambo ya Lingomba ezalaki mpenza na ntango oyo ebongi be. Tomonaki masakoli kokokisama mokolo na mokolo.

• Tosili kozua mokonzi moko ya Katoliko pe na ntembe te tokozua mosusu

Lelo oyo, ntango tozali koyoka Nsango oyo, lisakoli oyo esili kokokisama.

Tosili komona lolenge nini makambo ya mokili ezali kosalema kolandana mpenza nà Liloba.

• Lingomba nà Letà, losambo na politiki ezali kosangana.

• Laodikia, “makoki ya bato,” to “boyengebene ya bato.”

• Mabota NYONSO bazali kotelema pe bazali kosenga ete bato nyonso bazala ndenge moko, na bozui misolo pe kobika malamu.

• Mwasi-na-ndumba akobebisa lolenge ya kosalela misolo ya mikolo oyo.

Yango etalisi biso polele ete ntango ya Nzambe ezalaka ntango nyonso na kobonga be.

“ Ntango esili kobelema.” Kalakala, ntango ebelemaki naino te. Na mayele pe nkita ya Nzambe, emoniseli na nguya oyo (ata eyebanaki na mobimba na Nzambe) ekokaki kopesama mpenza te. Na yango tososoli mbala moko likambo moko ete : emoniseli ya Nzambe mpo na eleko moko na moko ekoki koya bobele mpo na eleko yango, pe na ntango elongobani. Botala lisolo ya Isalaele. Emoniseli ya Nzambe mpo na Mose eyaki bobele na ntango oyo elongobani ya lisolo, pe na koleka lisusu, esalemaki mpenza ntango oyo bato bagangaki epai na Nzambe. Yesu, Ye moko, ayaki na litondi ya ntango, Ye oyo azalaki Emoniseli mobimba ya Bonzambe. Pen a eleko oyo (Laodikia) emoniseli ya Nzambe ekoya na ntango na yango oyo elongobani. Ekokweya te to ekoya pe ata moke te liboso na ntango. Bokanisa likambo yango pe bokangama na yango malamu, mpo tozali lelo na ntango ya suka.

Lokola bino, ngai pe napambolamaki mingi mpenza ntango nazalaki koyoka pe kotanga Bileko Nsambo ya Lingomba, koyeba ete ezalaki ntango elongobani ya Nzambe.

Nkolo asili kotia na motema na ngai mpo na biso ete tokoba na buku ya Emoniseli na ntango nyonso ya malili.

• Nalingaki ete tozala na ntango nyonso oyo ya malili, mpo tokoka kozua Buku mobimba oyo ya Emoniseli pe totala Yango na mobimba. “Emononeli ya Patamo”

• Pe Bilembo oyo esengeli kofungwama na ntango ya eleko na lingomba oyo, pe mabombami ya suka nsambo ya Nzambe esengeli ko-…koyebana. Oh, nakolinga kokoba likolo na yango na ntango nyonso oyo ya malili pe kotala Yango na mobimba. “Eleko ya LIngomba ya Efese”

• Ezali suka ya eleko, pe makambo nyonso  ezali kosuka awa na esika moko, yango wana tosengeli kozua ntango nyonso oyo ya malili mpo na kolobela yango, kasi biso…mpo na kozua Buku ya Emoniseli, pe komona lolenge nini nyonso wana  esangani elongo. “Bangondo Zomi, Pe Bayuda Nkoto Nkama na Ntuku Minei na Minei”

• Na sima ntango tokosilisa nà yango, tokotombola oyo wana, pe tokokitisa oyo mosusu boye, pe tokobanda likolo na oyo wana, pe tokolakisa yango na mobimba. Oh, ekozala lokola lola ya moke, boye te? Tokolekisa eleko mobimba ya malili mpo na komona nyonso wana elongo nà Nkolo. “Emoniseli, Mokapo ya Minei, Eteni ya Mibale”

Nazali na motema likolo-likolo mpo na kofanda na eleko ya malili nyonso oyo elongo nà Nkolo wana Akomonisa biso buku ya Emoniseli. Tokomona lolenge nini LIloba ekozala kokokisama pe kotalisama polele na miso na biso. Ekozala ntango moko ya nkembo koleka mpo na Mwasi-na-libala na Ye.

Ekosengela mpo na yango ete Molimo Mosanto àkota na mosala mpo ekoki komonisama bobele na lolenge ya bato balongobani. Ekosengela na moto moko oyo azali na makoki ya lisosoli ya lisakoli. Ekosengela kozala na makoki ya koyoka Nzambe koloba. Ekosengela na malakisi oyo eleki bomoto.

Bino bozali lolenge ya bato yango. Bino bozali na lisosoli ya lisakoli yango. Bino bozali na makoki ya koyoka Nzambe koloba. Bino bondimaka Liloba moko na moko ya malakisi oyo eleki bomoto.

Boya, bosangana zinga-zinga na Liloba na Ye elongo nà biso, mokolo ya Lomingo, na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersnville, mpo na koyoka Nzambe Konguluma malakisi eleki bomoto, wana tokoyoka liteya oyo :  Nzambe Amibombaka Ye moko kati na Komikitisa, Na sima Amimonisaka Ye moko Ndenge Moko, eteyamaki na ntongo ya mokolo ya 17 mars 1963.

Nakolinga ete tobanda na paragraphe ya 94, sima na mosala ya kobulisa. Soki Nkolo alingi, pe soki tokozala naino awa, nakolinga ete toyoka eteni wana ya Nsango na ntango ya mosala ya kobulisa mongombo sima na biso kotonga ndako na biso ya losambo.

Ntango Nkolo atiaki na motema na ngai ete tokoba na eleko ya malili oyo nà buku ya Emoniseli, nakendeki kotala calendrier na ngai mpo na komona ntango nini ekokokana na mikolo yango. Ntango tokoyoka Elembo ya Nsambo, ekozala suka-ya-mposo ya suka ya eleko ya malili nà suka-ya-mposo oyo ekolanda ekozala mokolo ya liboso ya eleko yam oi, NKEMBO!!

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya:

1 Ntango 17:1-8
Isaya 35:8 / 40:1-5 / 53:1 , Malaki Mokapo ya Misato
Matai 11:10, 11:25-26 , Yoane 14:1-6
1 Bakolinti Mokapo ya 13
Emoniseli Mokapo ya 21

30/12/2020

Balingami Bana-ya-ngombe na kati ya Elielo,

Tala, Nakotindela bino Eliya mosakoli liboso na boyei ya mokolo monene pe ya nsomo na Nkolo.

Ye asili kokokisa Liloba na Ye ndenge Alakaki pe atindaki Eliya, mosakoli monene na Ye mpo na kozongisa mitema ya bana epai na ba-tata. Ye nde moto oyo akotelema, nà kobikisama na mapapu na ye (mayangani ya kobikisama) pe Mwasi-na-libala akopumbwa-pumbwa lokola bana-ya-ngombe na kati ya elielo (bakozala kolia bobele bilei oyo ebombamaki). Ye nde moto oyo asengeli kozongisa makambo nyonso, mpo na komonisa mabombami nyonso oyo ebombamaki mpo na kobimisa Mwasi-na-libala.

Tosili kososola mwanje motindami monene oyo, pe nkombo na ye ezali William Marrion Branham, pe biso tozali Mwasi Liloba oyo ye atindamaki mpo na kobimisa.

Ntango ye alobaka, ezalaka mokanda ya bolingo mpo na biso. Ezali Mafuta ya wolo ya Molimo. Esopanaka na kati ya mitema na bino, mpo ezalaka maloba ya moto te, kasi maloba mpenza ya Nkolo na biso Yesu Klisto, ntango Ye alobaka na litoyi ya mosakoli na Ye ya nguya mpo na koloba na Mwasi-na-libala na Ye.

Bato mingi bazali koyeba mpenza te nani oyo ye azali to bazali kososola te litomba nini basengeli kozala na yango mpo na koloba BOBELE makambo oyo ye alobi. Kobakisa to kolongola eloko moko te na Nsango na ye.

Alobaki na biso ete ekozala na bato mingi oyo bakotelema pe bakondima ete bango pe baponamaki mpo na kokamba Mwasi-na-Libala, kasi mwasi oyo aponàmà akopengwisama te, mpo bango bandimaka bobele makambo oyo mosakoli alobi.

Biso tozali kozela ete moto monene wana amonana. Akoki koya na eleko na ngai, akoki koya na eleko ya bilenge koleka, nayebi te. Akoki kozal kati-kati na biso sik’oyo, toyebi te. Molimo Mosanto azali awa mpo na kokamba biso kino na eleko wana, na sima ntango mokambi yango akozua biso na mokumba, akopakolama lisusu na Molimo Mosanto; ye_ye Eliya moto akoya mpenza.

Molimo Mosanto oyo asopamaki pe apesamaki na moko na moko na bison a mokolo ya Pentecote akokamba biso kino na mokambi monene oyo apakolami na Molimo Mosanto, pe YE akozua biso na mokumba…NKEMBO!!

Tozali kobika mikolo ya suka mpenza ya mobu 2020 kasi tozali pe kobika mikolo ya suka mpenza ya mokili pe ya boyei ya Nkolo na biso Yesu, mpo na komema biso na Elambo Monene ya Libala na biso.

Eloko nini tobikelaki pe tomonaki kosalema na mobu oyo, lokola esalema naino te na lisolo ya mokili?

Nzambe azali kosangisa Mwasi-na-libala na Ye. Azali kosangana, longwa na Esti, na Westi, na Nordi pe na Sudi. Ezali ntango ya kosangana, pe yango ezali kosalema sika-sikawa. Azali kosangana mpo na nini? Konetolama. Amen! Nzambe azali kolengela Ye. Iyo, misié. Azali kosangana. Azali kosangana nà eloko nini? Nà Liloba! “Mpo ete likolo nyonso nà nsé ekoleka, kasi Liloba na Ngai ekoleka ata moke te. Ye azali kosangana Ye moko nà YANGO ELOBI NKOLO, ata ebongiseli to moto nani akoloba eloko nini. Azali kosangana Ye moko. Azali komibongisa. Mpo na nini? Azali Mwasi-na-libala. Ezali solo. Pe Azali kosangana Ye moko nà Mobali-na-libala, bomoni, pe Mobali-na-libala azali Liloba. “Na ebandeli ezalaki Liloba, Liloba azalaki elongo na Nzambe, pe Liloba azalaki Nzambe. Pe Liloba alataki nzoto pe afandaki elongo na biso.”

Tokoki komona na nzela ya kotanga Makomi pe koyoka Liloba ete tokomi na suka. Tozali kobika na mikolo ya suka, eleko oyo ekomona Yesu Klisto kozonga na mokili. Basantu oyo bazalaki liboso na biso bazalaki ma mposa makasi ya komona mokolo oyo, bazelaki mokolo oyo, kasi sik’oyo suka-suka esili kokoma, pe biso tozali eteni na Yango.

Mpo na mobu oyo ezali koya, tika ete totika makambo nyonso pembeni pe tomipesa ata mingi koleka pe tomilengela mpenza mpo na boyei na Ye.

• Ezali mokumba na yo ete omilengela. “Mwasi-na-libala azali komilengela Ye moko.” Bilamba ya kolata esili kosombama. Yango esili kolengelama, kasi osengeli komilengela mpo na kolata bilamba yango.

  • Azali koya mpo na Mwasi-na-libala , ye oyo alekisaka ntango na ye te nà mokili to makambo ya mokili. Ye asili kosukolama na Makila ya Mwana-na-mpate. Ye asili kolaka ete bolingo na Ye_na Ye ezali bobele mpo na Ye. Bolingo ya mokili esili kolongwa pe esili kokufa mpo na Ye. “Libala ya Mwana na Mpate esili koya, pe Mwasi-na-libala na Ye asili komilengela Ye moko. ”

Nalingi ete toyoka Mateya oyo ekolanda wana mobu 2020 ezokoma na suka, pe tozali komilengela biso moko mpo na nyonso oyo Ye azali kobomba mpo na bison a mobu oyo ezoya.

Na mpokwa ya mokolo ya Minei, 31 décembre , na ngonga oyo yo moko okopona, toyoka Liteya oyo eteyamaki Liboso ya Mobu ya Sika: Emoniseli Mokapo ya Minei, Eteni ya Liboso, eteyamaki mokolo ya 31 décembre 1960

Na ntongo ya mokolo ya Mitano, 1er Janvier, na ngonga oyo yo moko okopona, tika ete toyoka Liteya ya Mobu ya Sika: Emoniseli Mokapo ya Minei, Eteni ya Mibale, eteyamaki mokolo ya 1 janvier 1961

Mokolo ya Lomingo, 3 janvier, tika ete tosangana na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Liteya: Emoniseli Mokapo ya Minei, Eteni ya Misato, eteyamaki mokolo ya 8 janvier 1961

Ndeko Joseph Branham

Source
https://branham.org/articles/12302020_TheEaglesGatheringTogether

Mokolo ya 26/12/ 2020

Molingami Mwasi-na-libala Liloba Oyo-abongi be,

Mwasi-na-libala atondi mpenza na esengo pe azali kozela na motema likolo wana tozali komilengela mpo na koyoka Nsango oyo ezali libanga ya motò ya bileko ya lingomba, eleko ya suka, Laodikia. Ezali eleko ya nkembo koleka ba-ntango nyonso, nà motindami ya nkembo koleka ba-ntango nyonso, oyo azali kosangisa bato ya nkembo koleka ba-ntango nyonso.

Mokolo lokola oyo tozali kobika na yango esalema naino te, ata moke te. Mokili ezali na makoki ya koyoka Mongongo Na Nzambe bobele ndenge Makomi elobaki na biso liboso na kati ya Liloba na Ye. Emoniseli 10:7, na mikolo ya MONGONGO. Botala malamu, EZALI MINGONGO TE, KASI MONGONGO.

Nzambe alakaki ete akotinda mwanje na nguya moko na eleko na suka oyo mpo na komonisa mabombami nyonso oyo Asilaki kobomba longwa na kozalisama ya mokili. Ye akozala mwanje motindami oyo atatolami lokola moto mosusu te, mpo asilaki koponama mpo na kobimisa Mwasi-na-libala na Ye.

Baike na bato bakoboya ye. Bato mosusu bakoloba ete bokoki kondima te makambo nyonso oyo ye alobaka; bobele ntango alobaka Yango Elobi Nkolo. Mabunga ezali na kati ya nsango na ye. Azali bobele ye moko te, ezali na bato mosusu oyo babengami pe bapakolami mpo na kokamba Mwasi-na-libala pe komonisa solo.

Liloba elobi ete ezali na etonga moko ya bato oyo baponami, baoyo bakondima liloba moko na moko oyo motindami na Nzambe oyo alobaki; mpo ete lotomo na ye mpenza ezalaki “Mema bato bandima YO”.

Bongo, esengeli nde na biso ete tondima bobele ndambo na makambo oyo ye alobaki? Liloba elobi ete “Nakotindela bino Eliya mosakoli, na sima, Nakotindela bino bato mosusu mpo na koyebisa bino eloko nini ezali Liloba pe eloko nini ezali yango te?”

Maloba na ngai ekokweya, kasi Maloba na Nzambe ekoki kokweya te. Tika ete totanga bokonzi nini oyo NZAMBE AKOPESA na mwanje motindami na Ye ya nsambo.

Boye, nani akozala na nguya ya kozanga-kokweya oyo esengeli kozonga na eleko na suka oyo, mpo eleko na suka oyo ekozongela komonisa lisusu Mwasi na Libala ya Liloba ya Peto? Yango elingi koloba ete tokozala mbala moko lisusu na Liloba ndenge epesamaki na kobonga be, pe esosolamaki na kobonga be na mikolo ya Polo. Nakoyebisa bino moto nani akozala na yango. Ekozala mosakoli oyo akotatolama mobimba polele, to pe na koleka, koleka basakoli mosusu, na bileko nyonso, longwa na Enoka kino na mikolo oyo, mpo ete moto yango akozala mpenza na lotomo ya lisakoli ya libanga ya motó, pe Nzambe akotalisa polele nani ye azali. Akozala na bosenga ya koloba mpo na ye moko te, kasi Nzambe akoloba mpo na ye na nzela ya mongongo ya elembo. Amen.

Nkembo!! Alléluia!! Mongongo oyo tozali koyoka ntango tozali KOFINA BOUTON YA KOYOKA, epesami na kobonga be , pe esosolami na kobonga be , PE EZALI KOLOBA MALOBA YA KOZANGA-KOKWEYA. (Webster elobi: Ekoki kozala na libunga te.)

Mwasi-na-libala azali mpenza kopema ntango tozali koyoka Liloba na Nzambe ya Peto. Kobanza-banza te, komituna-mituna te, ntina moko te ya kokende koyoka moto oyo, to kokende koyoka moto oyo kuna; tozali na yango nyonso NA KATI YA MONGONGO OYO EZALI NA BA-BANDE.

Tika ete toluka-luka pe tongengisa koleka makambo na motuya mpo na komona eloko nini Nzambe alobi mpo na mwanje na biso.

• Akoyoka bobele Nzambe
• Akozala na “Yango Elobi Nkolo” pe akoloba mpo na Nzambe
• Akozala monoko na Nzambe
• Akozongisa lisusu baponami ya eleko ya suka
• Akozongisa lisusu bosolo.

Sik’oyo tongengisa lisusu makambo ya motuya wana Azolobela biso, etonga yango mpenza oyo Ye abengaki, baponami pe babongisami mpo na kondima Liloba nyonso; MWASI-NA-LIBALA NA YE.

• Pe baponami oyo bakozala elongo na ye mokolo wana ekozala baoyo bakomonisa Nkolo na bosolo pe bakozala Nzoto na Ye, pe bakozala Mongongo na Ye pe bakosala misala na Ye. Alleluia. Bomoni yango?
• Na mokolo na suka oyo, ekozala lisusu na bato mosusu kati na ekolo, baoyo bakokambama na motindami na bango pe bakozala mongongo ya suka mpo na eleko ya suka.
• Lingomba ezali lisusu “molobeli” ya Nzambe te. Ezali molobeli na yango moko
• Mongongo na Nzambe ekozala na kati na ye. Iyo, ezali na kati na ye, mpo elobami na mokapo ya suka ya Emoniseli eteni ya 17, ete, “Molimo nà mwasi-na-libala balobi, Yaka.”
• Asili kopesa mongongo na mwasi-na-libala.
• Baponami bakoki kopengwisama te.

Oyo nde kopema mpenza, Asili kopesa biso Mongongo na Ye pe tokoki kopengwisama te, tozali MOKO elongo nà Ye.

Sik’oyo, mbano na biso mpo na kotikala sembo nà mosakoli yango pe kondima Liloba moko na moko na nzela ya koyoka Mongongo yango :

• Baoyo bayambi mosakoli yango na nkombo na ye moko bakozua mbano mpenza ya mosala ya mosakoli yango. Pe baoyo bakoyoka ye bakopambolama pe bakokoma eteni ya mwasi-na-libala ya mokolo ya suka oyo elobami mpo na ye na Emoniseli 22:17, ete “Molimo nà mwasi-na-libala balobi, Yaka.”

Soki bolingi kozua mbano yango, boya kosangana nà biso mokolo ya Lomingo oyo na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka liteya oyo: Eleko Ya Lingomba Ya Laodikia, eteyemaki na mpokwa ya mokolo ya 11 décembre 1960, to ndenge nalingaka kobenga yango, Lisolo ya Bomoi na Ngai.

Ndeko Joseph Branham

Malaki 4:1-6
Matai 2:14-15, 17:9-13
Luka 1:14-17
Baloma 11:15-27
Emoniseli 3:14-22

Source
https://branham.org/articles/12242020_TheEaglesGatheringTogether

19 décembre 2020

Balingami Oyo Bazali Kopema,

Tozali na esengo mpo tozali kolia Bilei ya Molimo Mosanto oyo ezangi mokuwa to mbuma na kati na Yango. Ezali Ba-gateaux oyo ekitaki longwa na Likolo, oyo ebengamaka Mana, pe ezipami mobimba na bopolo ya Lola. Tobengaka yango Bilei ya Bande mpo na Mwasi-na-libala ya Bande.

Tozali na Mésa moko oyo etondi na Yango, pe  biso ba-mpate tosengeli bobele koléta pe koléta pe mitungisi na biso nyonso ekosila nye. Tondimaka ete tozali na esika moko pe na boyokani moko pe ezali na makelele moko lokola ya mopepe makasi oyo euti na Lola kino na ba-ndako pe ba-losambo na biso. Yango ezali Mongongo na Nzambe oyo ezali kolobela Mwasi na Ye ya libala oyo aponama.

Ye alobelaki biso, ete Eva apengwaki, Moaba apengwaki, bangondo oyo bazolala bakopengwa, ata pe lingomba ekopengwa, kasi BISO TOKOPENGWA TE, mpo ete biso totikalaki nà Liloba. Tokoki koningana te, tokoningana pe te.

Bileko na Lingomba oyo ezali koleka mpenza na ntango malamu mpo na Mwasi-na-libala. Maloba na Nzambe, oyo elobamaki na nzela ya mosakoli na Ye eleki mibu Tuku-motoba, ezali kokokisama sik’oyo. Ba-visions oyo Daniele amonaki esili koleka mibu Nkoto mibale, ezali kokokisama na eleko na biso. Tokoki kotanga pe komona lisakoli oyo ezali komonisama polele na ba-nsango mokolo na mokolo.

Bakonzi minene ya Visa, Banki ya Amerika, Salesforce nà ba-compagnies mosusu Nkama-mitano ya Bato na Mbongo basili kosangana na Likita mpo na Capitalisme Inclusif elongo nà Vatican. Likita yango, oyo ekambami na Pàpà Francois, ekosala nyonso mpo na kotombola lolenge moko ya capitalism inclusive, mpo na kolendisa bakambi yango ete basalela koleka politiki ya bosembo mpo na kokitisa bokabwani ya bozwi kati na bato.

Baoyo bazali na ba-compagnies yango bazali na misolo koleka milliards nkoto 10 na ndambo ya ba-dollars ya bango moko. Likita mpo na Capitalisme Inclusif esili kosenga boyokani nà Vatican ete yango ekozala “na nsé ya bokambami  ya toli” ya Pàpà Francois.

Biblia elobi na biso na buku ya Daniele 8:

23 Na suka ya bokonzi na bango, ntango bato na masumu bakokoma na suka, mokonzi moko ya nkanda mingi pe ya mayele mabe, akotelema wana.
24 Pe nguya na ye ekozala ya makasi, kasi na nguya na ye moko te:

Pàpà azali sik’oyo kosala boyokani mpo kokembisa nguya na ye nà ba-compagnies minene, ba-organisations, pe bakambi ya mokili; baoyo bazali kokambama na mwasi Moyuda moko na nkombo ya Madame Lynn Forester de Rothschild.

… pe akobebisa makambo na ndenge ya kokamwa, pe akofuluka, akosala makambo ndenge na ndenge, pe akoboma bato na nguya nà basantu.
25 Pe na nzela ya politiki na ye, akofulukisa misala ya makoki na maboko na ye;

Ndeko Branham alobaki  “misala ya maboko” ezali ba-industries.

… pe akozala na lolendo na motema na ye, akobomisa bato mingi oyo bazalaki kofanda na kimia, pe kotelemela mokonzi ya bakonzi; kasi akobebisama, zàngà loboko na moto.

Ndeko Branham alobaki ete likambo ekosalema na kati-kati ya mibu misato na ndambo.

Sik’oyo, ntango akozua misolo nyonso na maboko na ye, “Na ntango wana, akobuka boyokani na ye nà Bayuda,” Ndenge Daniele alobaki awa ete akosala yango, “na kati-kati ya ndambo ya suka ya ba-mposu ntuku-nsambo,” ya Daniele. Na sima, ndeko, ye akosala nini? Akozua mombongo nyonso ya mokili nà nkita nyonso, akosala boyokani nà mokili, mpo ye akozala na bozwi nyonso ya mokili, na mobimba na yango. Pe na ntango wana, basakoli mibale wana bakokota na mosala pe bakobenga bato wana nkoto nkama na ntuku-minei na minei. Na sima, eloko nini ekosalema? Na sima, elembo na nyama, ya Emoniseli 13, ekobanda, mpo ete ye akozala na nkita nyonso, mombongo nyonso, pe makambo nyonso ya mokili. Pe eloko nini ekosalema na sima? Elembo na nyama ekokota na mosala, ete, “Moto moko te akoki koteka to kosomba, bobele ye oyo azali na elembo ya nyama.”

Satana akoki komeka kotungisa yo na eleko oyo, nakoki pe kozua Elembo ya nyama? Totala eloko nini mosakoli na biso alobaki na biso:

Bomoni, mpo ete Moponami asala likambo yango,  ezali mpenza, ekoki kosalema ata moke te . Akokoka kosala yango te, bomoni. Mpamba te, ye akosala nini? Bomoni? “Kasi ezali kotiola Makila ya Boyokani…” Sikawa, bomoni, soki asili koponama pe azali kati na etonga, akoki kosala yango te.  Ekoki kosalema te ete ye asala yango .

Nkombo na Nkolo esanzolama, ekoki KOSALEMA TE ete biso tosala yango, biso tozali “KATI NA ETONGA YANGO!” Tokoki kopema  wana tozali komikanisela konetolama monene oyo Nzambe apesaki mosakoli na biso, lolenge nini akosengela kotelema wana elongo nà biso nyonso mokolo wana, mpo YE akozala na mokumba mpo na biso nyonso. Lolenge nini ye akokende liboso epai na Ye, pe akosambisama na Liloba oyo ye ateyaki biso.

“Ekozala pe bongo na bato nyonso? Polo pe akosambisama?” Alobaki, “Iyo, Polo pe akosambisama, elongo nà etonga oyo ye ateyaki bango.” Nalobaki :Ngai nateyaki Nsango yango moko oyo ye ateyaki.”

Pe ba-millions ya bato wana batombolaki maboko na bango pe balobaki, “Tozali kopema likolo na yango!”

Boya, botombola maboko na bino pe bopema elongo na biso mokolo ya Lomingo na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka liteya:  Bangondo Zomi, Pe Bayuda Nkoto Nkama na Ntuku-minei na Minei , eteyami mokolo ya 11 decembre 1960 na mpokwa.

Ndeko  Joseph Branham

Source
https://branham.org/articles/12182020_TheEaglesGatheringTogether

12 décembre 2020

Molingami Madame Yesu,

Longonya!

Tozali mpenza na esengo mingi mpo ete tosili koponama mpo na kobengama Mwasi-na-libala ya Yesu Klisto. Biso tokozala bisika nyonso oyo Mobali-na-libala na biso akozala. Ata mokolo moko te tokozanga kozala pembeni na Ye. Tokofanda na Kiti-na-bokonzi elongo na Ye. Tokolatisama na motole ya nkembo pe lokumu na Ye.

Tozali kobika mikolo ya minene koleka pe ya esengo koleka na bomoi na biso. Ezali mikolo oyo mokili mobimba ezalaki kokimela pe kozela. Yesu azali koya mpo na konétola Mwasi-na-libala na Ye oyo aponàmà.

Mobali-na-libala azali pe na esengo mingi. Azali kobongisa pe kotalela mokolo yango longwa ebandeli na ntango. Babiangami na Ye basili kozua pe kondimba mbéla na Ye. Asili kobongisa féti moko ya monene mpo na biso, ntéke mpenza, nà mesa moko ya molai koleka kilometre moko.

Ye moko akozala elongo na biso, pe akozala Nzambe na biso. Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na biso. Kufa ekozala lisusu te, bolozi pe te, kolela pe te, pe mpasi ata moko te ekozala kuna: mpo makambo ya liboso esili koleka pe tokokanisa yango lisusu te.

Ye pe asili kotongela biso ndako moko ya sika mpo tofanda na kati na yango. Mboka mosanto, Yelusaleme ya sika, oyo ezali kokita longwa na Ye kuna na likolo, esili kobongisama lokola mwasi-na-libala oyo amibongisi mpo na mobali na ye.

Mpo makambo ya liboso esili koleka. O kitoko mingi. Bilaka kitoko nyonso ya Nzambe ekokokisama. Ekosila nyonso nye. Mbongwana ekosalema mobimba. Mwana-na-mpate nà Mwasi-na-libala na Ye bakokoma na kobonga be nyonso ya Nzambe mpo na libela.

Pe nkombo nini mwasi azuaka ntango abalani na mobali? Azuaka NKOMBO NA YE. Ekozala NKOMBO NA YE nde ekopesamela biso.

Oh, Oyo ezali mafuta-na-nzoi likolo na libanga mpo na biso, pe tozali koléta yango mpenza ntango toyokaka Mikanda ya Bolingo na Ye moko na moko. Tozali bobele kokoba kogengisa makambo na motuya oyo tozoyoka.

Azolobela biso ete tosili kozua emoniseli ya Bonzambe na Ye oyo eleki nyonso. Azali moto ya mibale ya trinité te, kasi azali Nzambe Ye moko oyo alati nzoto pe azali kofanda elongo na biso.

Ngai nazali Ekuke, Ngai nazali Nzela. Ngai nazali Solo, Ngai nazali Pole. Ngai nazali Alifa nà Omega. Ngai nazali Moto-ya-liboso pe Moto-ya-suka. Ngai nazali Tata. Ngai nazali Mwana. Ngai nazali Molimo Mosanto. NGAI NAZALI bozali ya bomoi mpo na Libela.

Na sima, Ye alobi na biso ete, na nzela ya mokano ya Bonzambe, Ayebaki liboso ete biso tokozala Mwasi-na-libala na Ye. Aponaki BISO; biso toponaki Ye te. Abengaki BISO; biso toyaki na biso moko te. Akufaki mpo na BISO. Asukolaki BISO na Makila na Ye moko. Afutaki ntalo mpo na BISO. Biso tozali bato na Ye pe bobele Ye moko. Ye azali Mokonzi na biso pe biso tozali bokonzi na Ye, libula na Ye ya seko. Biso tomipesi mobimba na Ye  pe Ye andimi kozua mokumba yango.

Mwasi-na-libala na Ye azali kozela na mposa makasi mpenza mpo na koyoka mokanda na biso ya bolingo mokolo ya Lomingo na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, ntango Akoteya biso liteya oyo –  Eleko ya Lingomba ya Filadefia , yango eteyamaki mokolo ya  10 décembre 1960 . Akomonisa biso mbala moko lisusu ete tozali Mwasi Liloba yango ya solo oyo akoningana te, kasi oyo atikalaki pe andimaki Liloba nyonso.

Ndeko Joseph Branham
(Madame  Yesu)

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya oyo “Eleko ya Lingomba ya Filadefia”.

Matai 1:1-2, 1:17-23, 16:13-18
Yoane 5:19, 10:5, 10:7, 10:27
Misala 15:13-14
Baloma 2:29
Baefese 2:19-20
Emoniseli 2:13, 2:17, 3:7-12, 3:15, 7:9-17, 21:1-2

Source
https://branham.org/articles/12112020_TheEaglesGatheringTogether

5 décembre 2020

Molingami Litondi ya Nzambe,

Mwasi-na-libala azali kolekisa mpenza ntango ya malamu koleka wana tozali koyekola likambo monene oyo na Buku ya Emoniseli. Nzambe azali komonisa Liloba na Ye epai na Mwasi-na-libala na Ye na lolenge oyo esalema naino te liboso.

Tomoni ete Nzambe azalaka ntango nyonso na etonga moko ya moke oyo etikalaka nà Liloba na Ye na bileko nyonso. Ntango Satana abandaki kokotisa misala oyo ekomaki malakisi, ezalaka ntango nyonso na bato moke mpenza baoyo bapengwisamaka te, kasi batikalaka nà Liloba yango.

Ntango Satana abandaki ata kokoma na nguya mingi koleka pe bato babandaki kokumbamela ye, Mwasi oyo aponàmà aninganaki te. Bango basilaki kopakolama mpenza, na lolenge ete bango moko bapesaki ata bomoi na bango pe batikalaki nà Liloba.

Wana tozali koyoka Mongongo na Ye kolobela biso, Akebisi biso na lolenge nini molimo yango ezali kokosa pe kopengwisa. Lolenge nini emekaka ntango nyonso kokotisa eloko mosusu na esika ya Liloba ya ebandeli. Emekaka ntango nyonso kokotisa lolenge mosusu ya kosala to kokamba makambo na esika ya kokambama oyo Tata asili kotatola.

Alobi na biso ete minzoto nsambo ezali batindami nsambo na Ye; pe Ye asimbi bango na Loboko na Ye. Bango bayaka na nguya pe bokonzi na bango moko te, kasi na nguya pe bokonzi na Nzambe oyo Ye alatisaki bango na nzela ya Molimo Mosanto. Bango bazali Liloba mpo na eleko na bango.

Lelo oyo, biso tozali komona Yesu Klisto komimonisa Ye moko na nzela ya Molimo na Ye na kati ya mwanje motindami na biso. Mwanje oyo, kokokana na Liloba, agengisaki mokili na nkembo na ye. Lolenge moko oyo Mose azalaki mpo na bana ya Israel, ye azalaki na emoniseli mpo na eleko na biso. Tomoni Nkolo komitalisa polele Ye moko nà ye pe kopesa ye nguya na Ye mpo na kokamba Mwasi-na-libala na Ye.

Sikawa Akebisi biso mbala moko lisusu lolenge nini tosengeli kozala na bokebi mpo na kotikala nà monzoto na Ye, motindami pe mokambi na Ye mpo na eleko na biso. Molimo yango ekomeka mbala moko lisusu kokotisa lolenge mosusu, pe kokambama ndenge na ndenge. Alobisi na biso ete tobosana te ete ekozala mpenza pene-pene na lolenge ya kopengwisa ata baponami SOKO nde bakokoka. Kasi ekoki kosalema TE, mpo biso tokotikala nà Liloba lokola biso TOZALI LILOBA pe tokoki kopengwisama te.

Ekoki mpenza te lolenge oyo Ye moko asili kosangana nà Lingomba mobimba, ndenge tomonaki ntango oyo Ye atelemi kati-kati na bitemeli-na-mwinda nsambo ya wolo. Ata lotomo ya basali mitano na Baefese ya minei (ba-ntoma, basakoli, balakisi, ba-evangelistes, bakengeli) ekokaki te. Na bosolo, na eleko moko na moko, lingomba etàngwaka, pe ezalaka bobele bandimi te, kasi etonga ya bakambi_babateli-mpate bazalaka na libunga ndenge moko na ba-mpate.

Alobi na biso polele ete  na eleko moko na moko lingomba nà basali batàngwaka. Bakendeke pembeni ya Liloba ya ebandeli. Babandaka kokotisa makanisi, mabanzo pe kokambama na bango moko epai na bato. Na ntango wana, Nzambe asengeli kosala nini?

Na ntango wana nde Nzambe Ye moko akotaka na mosala lokola Mobateli-mpate Mokonzi na kati ya misala ya bato nsambo oyo mpo na kokamba bato pe kozongisa bango na solo pe nguya mobimba ya solo yango.

Nkembo…Mobateli-mpate MOkonzi Ye moko ASILI KOKOTA NA MOSALA YA mwanje ya nsambo NA YE, mpo na kokamba pe kozongisa biso na solo pe nguya mobimba ya Liloba.

Asili kopesa  nguya ya kokamba ya ndenge mosusu na bato oyo Ye Moko asili kopona, kokokana na toli ya mokano na Ye moko.

Tokoki mpenza kozala na kimia mpo na koyeba ete Nzambe aponaki MOTINDAMI NA BISO kokokana na toli ya Mokano na Ye moko mpo na kokamba biso epai na Ye.

Tika ete tobéta nsété mbala moko lisusu nà Liloba. Soki ezalaki maloba na ngai, to maloba na yo, elingaki kozala na ntina MOKO TE, kasi oyo ezali MALOBA NA YE, na bongo ezali Liloba na bomoi ya Nzambe, pe TOSENGELI KOLANDA YANGO.

Ntango okoyoka moto moko koloba ete:”Bozali kolobela motindami mingi koleka,” bango bazali mpenza na Emoniseli ya Nsango ya ntango na suka te.

Soki yo olobi : Ngai nandimaka Nsango oyo; ye azali mpenza motindami ya eleko ya nsambo ya lingomba pe akokisi Makomi nyonso oyo elobamaki mpo na ye. Soki olingi mpenza kozala na litondi ya Nzambe na bomoi na yo, boye, nabondeli ete Nzambe apesa yo emoniseli ya maloba oyo.

Kasi Ye azali motindami na Ye pe ye oyo akozala na litondi ya Nzambe akolanda motindami wana motindami azali kolanda Nkolo na Liloba na Ye.

Ezali motindami ye moko nde azali kozongela kolobela pe kokamba biso mpo na kolanda ye ndenge ye azolanda Klisto. Ezali moto te nde azali kozua nkembo, to pe tosambelaka moto te, kasi tozomona pe tozondima ete ezali moto mosusu te bobele Yesu Klisto oyo azali kobika pe komimonisa Ye moko na Mwasi-na-libala na Ye na nzela ya mwanje motindami na Ye, oyo Ye aponaki mpo na kokamba Mwasi-na-libala na Ye.

Mpo na biso, kotikala nà Liloba pe kolanda motindami na Ye ndenge Asili kotinda biso ete tosala, ezali bobele KOFINA BOUTON YA KOYOKA PE KOTIKALA NA MONGONGO YA NZAMBE OYO EZALI NA BA-BANDES.

Boya pe botondisama na litondi na Nzambe, wana tokoyoka elongo moto oyo Ye aponaki, kokokana na toli na Ye mpo na kokamba biso, akoteya Liteya oyo :  Eleko ya Lingomba ya Salàde, oyo eteyamaki mokolo ya 9 décembre 1960, na ngonga ya 14h00, ngonga Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya oyo : “Eleko ya Lingomba ya Salàde.”
Emoniseli 3:1-6

Source
https://branham.org/articles/1242020_TheEaglesGatheringTogether

28 novembre 2020

Balingami Batongi-ndako,

Tata na biso oyo azali na Likolo, Nkombo na Yo ebulisama. Bokonzi na Yo éya, Mokano na Yo ésalema, awa na nsé lokola esalemaka na Likolo. Tosengi ete Ozala elongo na biso, Tata, pe opambola biso, pe osunga biso mpo tozala batongi-ndako ya mayele na eleko oyo ya kili-kili monene oyo ezali kati na bato.

Oh, tolingaka mpenza lolenge Nzambe asalaka makambo na ntango. Ezalaka ntango nyonso na KOBONGA BE. Azalaka na ntango moko pe eleko moko mpo na makambo nyonso. Sàa na Ye esalaka mbala nyonso na ntango ebongi be. Ye akozala sima na ntango ata na seconde moko te. Makambo nyonso ekosalema mpenza bobele na lolenge pe ntango oyo Nzambe asilaki koloba yango.

Ntina mpo na ntango oyo mpenza ezali ete biso…Molimo Mosanto atiaki na motema na ngai likebisi na kondimisama mpenza, ete, “Lingomba na mikolo oyo esengeli koyoka Liteya oyo.” Mpamba te, nandimi ete oyo ezali Mateya ya motuya koleka ya Biblia, mpo ezali komonisa Klisto na kati ya Lingomba na Ye na ntango oyo.

Tokoki mpenza kondimisama lelo ete Liteya moko na moko oyo tozali koyoka ezali na kati ya Mokano mobongi be na Ye, na kati ya ntango mobongi be na Ye. Nandimi te ete ezali kosalema kaka na mpwasa boye, to na mokano na moto, lolenge oyo tozali koyoka Bileko Nsambo ya Lingomba na mikolo oyo.

Na mobu 1960, Molimo Mosanto amonisaki na mwanje motindami ya nsambo na Ye ete ezalaki ntango mpo akebisa Mwasi-na-libala na Ye, pe ateya bango Emoniseli ya Bileko Nsambo na Lingomba.

Ezalaki pe mbala ya liboso na lisolo ya mboka na biso ete mo-katoliko moko aponamaki mpo na kozala Mokonzi ya mboka Etats-Unis.

Alobaki na biso ete tomikanisela lisakoli oyo Nkolo apesaki ye na mobu 1933; lolenge nini bakopesa nzela mpo na basi kosala maponami, pe ntango bakosala yango, bakopona moto ya mabe. John F. Kennedy alongaki maponami na mingongo koleka mwa moke Mokonzi ya ba-Republicain oyo akomaki na suka, Richard M. Nixon. Etalisamaki polele ete maponami yango esalemaki na libebi ya ba-machines ya maponami oyo ezalaki kobongola maponami.

Sikawa, sima na mobu 60 mpenza, Nkolo azali kokamba biso mpo na koyoka lisusu Bileko Nsambo na Lingomba na ntango mpenza oyo Mokonzi ya mibale ya katoliko asili koponama na mboka Etats-Unis. Ezali pe mbala ya liboso na lisolo ya mboka ete mwasi moko asili koponama lokola Mokonzi-Molandi. Maponami oyo ezali pe koboyama na Donald J. Trump, Mokonzi ya ba-Republicain oyo akomi na nsuka, na ntina ete ezali libebi.

Alobaki na biso lolenge nini Constantin asalaki Likita ya Nicée mpo na KOSANGISA lingomba nà letà elongo pe komomisa yango eloko moko. Na makanisi na ye, alingaki kokomisa bokonzi na ye makasi, na lolenge moko to mosusu, alendisa yango pe asangisa yango nyonso mibale, mpo ye akoka kokoma mokambi ya monene koleka na mokili. Malakisi ya ba-Nikolaiti nà makambo ya bapagano esanganaki, pe esalaki ete yango ébota ebongiseli ya lingomba ya liboso.

Ezalaki na bato pene na nkoto moko na nkama mitano oyo babéngamaki nà ba-episkopo oyo bayanganaki na likita yango, kasi na nzela ya libebi bakonzaki bango pe baponaki ete lingomba étiama na nsé na bokonzi ya ba-pàpà nà ba-episkopo.

Alobaki na biso lolenge nini Akaba, na ebandeli, asalelaki mayele mabe wana mpo na koyeisa bokonzi na ye makasi pe kobatela yango na kimia, na nzela ya kobalana nà mwasi yango Yezabele. Ezalaki mayele mabe ya politiki mpo na KOSANGISA bato pe koyeisa bokonzi na ye makasi.

Pe bango basambelaki dalagona oyo apesaki nguya na ye na nyama, wana azalaki koloba ete : Nani akokani na nyama? Pe nani akoki kobundisa ye?

Biso tokebisamaki na kati ya Liloba ete ezali bobele na moto moko oyo azali mpenza na nguya ya kosala likambo yango, pe ezali pàpà.

Alobaki:

“Tomibongisa biso moko, pe tosangana.”

Mokonzi oyo aponami Biden azongelaki maloba ya Pàpà Jean Paul II ntango alendisaki ba-Americains koloba ete “babanga te.” Alobaki lisusu maloba ya loyembo ya ba-katoliko na lisukulu na ye ya liboso lokola mokonzi-oyo-aponami, Biden azali komona ete kondima na ye nde ezali nzela ya kobikisa, pe kokamba.

Mposo moko liboso ya Mokolo ya Maponami, ntango azalaki na mboka Georgie, azongelaki, na mobimba na yango, maloba ya mikolo oyo mpenza ya pàpà, ete, “Fratelli Tutti.” Yango elingi koloba: “Tozali biso nyonso na masuwa moko.”

Na eteni moko ya zulunale, mopanzi-nsango moko alobaki:

Likolo na nyonso, maloba oyo Biden aponaki mpo na koloba ezali kotalisa ete akoki mpenza kokanisa lolenge nini kondima na ye moko ya Mo-katoliko esengeli kokamba lolenge ya komona na ye mpo na kokamba ekolo oyo ezali na ba-Katoliko nà ebele lisusu koleka oyo bazali ba-Katoliko te.

Ntango ya makambo ya Nzambe ezali ya KOBONGA BE. Tozali komona ete makambo ya mikolo oyo ezali kotalisama polele na lisakoli. Makomi ezali kokokisama. Mokonzi ya Mo-katoliko nà Mokonzi-Molandi na ye ya mwasi BAZALI KOSANGISA lingomba nà letà mpo na koyeisa bokonzi na bango makasi lokola Akaba nà Constantin. Makambo yango ezali kosalema mpenza ndenge mosakoli alobelaki biso.

Kasi Nzambe azalaki elongo na bango te. Nzambe azalaki wapi? Azalaki elongo nà basantu na ndako moko ya moke, to na lidusu moko ya ngomba,

Nkolo asanzolama. Mwasi-na-libala azali kosala nini? Afandi na bisika ya Likolo kati na Klisto Yesu, wana azali koyoka Bilei ya Ba-mpate.

Boya tosangana elongo mpo tozala eteni ya Makomi oyo ezali kokokisama, wana tokoyoka Mongongo na Nzambe kolobela biso mokolo na Lomingo na 14h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka liteya oyo: Eleko na Lingomba ya Twatila, eteyamaki mokolo ya 8 décembre 1960.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya: “Eleko na Lingomba ya Twatila”

Emoniseli 2:18-29, 13:1-4, 13:6-8, 13:14

Mokolo  ya 14 novembre 2020

Molingami Moko Kati na Bango,

Tozali mpenza na esengo pe tozali kozongisa matondi mpo na koloba na mokili ete Klisto azali Nganga-Nzambe na biso, Nganga-Nzambe Mokonzi na biso. Tozali na Nganga-Nzambe Mokonzi moko, MESA MOKO esika oyo tozali kolia. MESA MOKO esika oyo basantu ya Nzambe baliaka bilei oyo ebombamaki. Esika oyo tofandaka pe toyokaka Mongongo na Nzambe kolobela biso pe koyebisa biso ete tozali balingami na Ye.

Tozali mpenza etonga na bato oyo bazali na makoki ya koyoka bobele makambo oyo Molimo alobi. Etonga ya bato oyo basili mpenza kozua emoniseli mpo na eleko na biso, baoyo bazali na Molimo na Nzambe pe babotami na Nzambe, baoyo babatisami na Molimo na Ye na kati na nzoto ya Nkolo Yesu Klisto, baoyo batondisami na Molimo Mosanto.

Ndenge nini moto akoyeba, na ntembe moko te, ete azali na Molimo Mosanto?

Etaliseli mpenza  ya solo ezali KOYOKA makambo oyo Molimo alobi. Molimo alobaka, Molimo alakisaka, Molimo azali Liloba ya ntango. Ezali Yango Elobi Nkolo.

Tika ete toyoka wana Nzambe azali koloba pe kozongela mpo na baoyo bayokaki nzala pe bakendeki. Na ntango oyo azali kozongisa bango na BOLINGO na bango ya LIBOSO, Azali  koloba pe kolobela lisusu Mwasi na Libala na Ye ete Nalingaka yo, mpo otikalaki na Liloba na Ngai, Mongongo na Ngai, mosakoli na Ngai.

Yesu (na nzela ya Molimo), na eleko MOKO NA MOKO, alobaka Ye Moko na MOTO BOBELE MOKO mpo na oyo etali Liloba mpo na eleko wana. MOTINDAMI bobele MOKO MPO NA ELEKO MOKO NA MOKO AZUAKA MAKAMBO OYO Molimo asengeli koloba na eleko wana, pe MOTINDAMI MOKO yango nde azali motindami mpo na lingomba ya solo. Ye alobaka mpo na Nzambe na nzela ya emoniseli mpo na “mangomba”, oyo ya solo pe oyo ya lokuta. Na ntango wana nde Nsango epanzanaka epai na bato nyonso. Kasi, ata yango epanzanaka mpo na baoyo nyonso bakoyamba nsango, nsango yango  ekoyambama  moko moko bobele na etonga moko mpenza ya bato na lolenge moko boye. Moko na moko na bato ya  etonga yango azali moto oyo azali na makoki ya  koyoka makambo oyo Molimo azali koloba na nzela ya motindami. Baoyo bakoyoka bakozua emoniseli ya bango moko mpenza te, pe etonga na bato bakozua emoniseli ya BATO NYONSO TE, KASI MOTO MOKO NA MOKO AKOYOKA PE AKOZUA MAKAMBO OYO MOTINDAMI ASILAKI KOZUA EPAI NA NZAMBE.

Mwanje motindami ya nsambo na biso azali koloba mpo na Nzambe na nzela ya emoniseli. Na ntango wana, tozali koyoka moto moko moko makambo oyo Molimo azali koloba  na nzela ya motindami yango. Na boye, na nzela ya emoniseli, tozali koyoka pe kozua makambo oyo motindami asilaki kozua epai na Nzambe.  Ezali na nzela BOBELE MOKO mpo na koyeba malamu ete bozali kozua Liloba oyo ebongi be, moninga na ngai, FINA BOUTON YA KOYOKA..

Alobaki na biso ete, longwa na motindami yango, pole epanzanaka na nzela ya lotomo ya bato mosusu oyo balakisamaki na bosembo mpenza; kasi akebisi biso koloba ete baoyo nyonso bakendeke bayekolaka te ntango nyonso ete esengeli mpenza koloba BOBELE makambo oyo mosakoli asilaki koloba. Bazali kobakisa awa, to bazali kolongola makambo kuna, pe kala mingi te nsango ekozala lisusu peto te. Akebisaki bango ndenge basengelaki kozala na bokebi mpo na koyoka  mongongo MOKO.

Mpo Molimo azali bobele na mongongo moko, oyo ezali Mongongo na Nzambe. Polo akebisaki bango mpo na koloba makambo oyo ye alobaki, Petelo pe alobaki ndenge moko. Akebisaki bango ete ATA YE (POLO) akokaki kobongola liloba moko te na makambo oyo asilaki kopesa na nzela ya emoniseli.  Oh, ezali mpenza na motuya mpo na koyoka mongongo na Nzambe na nzela ya batindami na Ye, pe na sima, koloba makambo oyo epesamaki na bango mpo na koloba na mangomba.

Azali kolobela biso ete ezali mpenza na motuya mpo na biso ete toyoka Mongongo na Nzambe  NA NZELA YA MOTINDAMI NA YE. Soki mosakoli akebisaki biso ete likambo oyo ezali  NA MOTUYA MPENZA mpo na koyoka Mongongo Yango, boye mpo na nini batei bazali koboya koyokisa Mongongo yango na mangomba na bango?

Polo akebisaki pe bango, bobongola LILOBA MOKO TE, ata esika nalobaki:

• Kasi mpo na bamosusu, ngai nalobi, ezali Nkolo te.
• Sala nyonso oyo ekoki mpo na kokomela ngai noki.
• Zua Malako pe memela ngai ye, mpo nasengeli na ye.
• Ntango okoya, memela ngao monkoto oyo natikaki epai na Carpus kuna na Troas, pe mikanda, koleka mpenza ba-buku.
• Alexandre, mosali-bibende, asalelaki ngai mabe mingi. Nkolo akozongisela ye makambo oyo ye asalaki.

Bongo, ndenge nini bato bakoki kolobela biso mabe mpo tozoloba:”Tondimaka Liloba moko na moko oyo mosakoli alobaki?” Tosengeli kosala makambo mpenza lokola Biblia, pe MOSAKOLI NA YE ALOBELAKI BISO:

Bobakisa eloko moko te. Bolongola te, bokotisa makanisi na bino moko te kati na Yango. Boloba bobele makambo oyo elobami na ba-bandes oyo. Bosala bobele mpenza makambo oyo Nkolo Nzambe asili kotinda bino kosala. Bobakisa eloko na Yango te. (65-0718m – Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda na Mokano na Nzambe)

Soki moto moko atuni yo:” Ozali moko na bato oyo bandimaka LILOBA MOKO NA MOKO oyo mosakoli alobaki, pe olobaka,”Fina Bouton” ntango nyonso? Eyano na biso ezali mpenza na pete pe na mpasi moko te :”Iyo, moninga ngai, nazali mpenza na esengo  mpo na koloba ete nazali Moko na Bango.”

Balingami Ba-moko na Bango, tika ete tosangana mokolo na Lomingo na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Emoniseli ya Nzambe koloba na nzela ya mosakoli na Ye, wana Akomonisa biso:  Eleko ya Lingomba ya Sumuluna eteyamaki mokolo ya 6 decembre 1960.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya oyo “Eleko ya Lingomba ya Sumuluna”.

Emoniseli 2:8-11

Source
https://branham.org/articles/11132020_TheEaglesGatheringTogether

11 novembre 2020

Baoyo Bazali Balingami ya Tata,

Ezali mpenza kitoko mingi pe ezali kotondisa mitema na biso na esengo, boye te?

Tolingaka mpenza koyoka mikanda na Ye ya bolingo oyo Alobelaka biso mokolo na mokolo, wana Azali kolobela biso ete tozali bolingo ya bomoi na Ye. Alobelaka biso mpenza makanisi pe ba-sekele ya motema na Ye oyo Abombaki mpo na Ye moko na ntango nyonso eleki. Lokola mobali alobelaka mwasi na ye ya bolingo makambo oyo azalaka na yango na motema na ye mpo na mwasi na ye, pe mpo na ye moko kaka, Tata pe azali kolobela bolingo monene oyo Azalaka na yango mpo na moko na moko na biso, pe biso kaka.

Azali mpenza na esengo mingi ete suka-suka Azali na Mwasi-na-libala na Ye oyo Alukaki ntango molai pe azelaki mingi. Ye oyo Akoki koloba pe  komonisa makambo nyonso oyo Asilaki kobomba na motema na Ye. Azelaki mpenza mpo na kozua Ye, MWASI-NA-LIBALA NA YE OYO ABONGI BE, mpo amonana pe akokakola ata Liloba moko te. Akondima pe akokangama na Liloba nyonso oyo Alobelaka Ye.

Azali na bosenga ya moto moko te mpo na kolimbola Mikanda ya bolingo na Ye mpo na Ye-mwasi, mpo esengeli na ndimbola moko te. Azali na ntina na yango ata moke te, mpo ezali Mobali na ye Moko nde azali kolobela Ye mbala moko na mokanda moko na moko.

Ntango ba-mbua ya zamba bayaki pe bamekaki kopesa ye ndimbola oyo ekeseni, Ye-mwasi akangamaki nà mikanda ya ebandeli bobele ndenge Elobamaki na Ye.

Ee, balobaka, “Nakolobela yo, Ndeko Branham, yo ozali na ndimbola ya malamu te.” Biblia elobaki ete, “Lisakoli esengeli  na ndimbola ya moto moko te.” Mpo na nini? Mpo na nini esengeli na ndimbola ya moto moko te? Mpo na nini? “Liloba na Nkolo eyaki na basakoli.”  Ezali kolimbolama na mosakoli. Ekoki kozala na ndimbola ya moto moko te. Basakoli basili kolimbola Yango mpo na bino. Yango wana, esili kokomama bobele Wana. Lolenge wana nde esengeli kozala. (62-0401 – Mayele Ezali kotelemela Kondima)

Lolenge wana nde esengeli kozala mpo na Ye-mwasi. Mosakoli na Ye alimbolaka pe alobelaka Ye-mwasi na mokanda moko na moko. Ye-mwasi asepelaka mpenza mobimba pe apemaka nye.

Ntango tokobeta mabolongo na biso na mpokwa oyo, tofungola mitema na biso epai na Mobali na biso pe tolobela Ye boni-boni tolingaka Ye mpo na Liloba moko na moko oyo Alobelaka biso na moko na moko na mikanda ya bolingo na Ye. Lolenge nini tozali kopema likolo na LILOBA NYONSO, ELAKA NYONSO oyo Apesaki biso. Bolobela Ye ete tozali na esengo mingi, na matondi mingi, pe topambolami mingi mpo na kozala Mwasi-na-libala na Ye. Tozali komibongisa biso moko na nzela ya koyoka pe kondima Liloba nyonso oyo Alobelaka biso.

Ndeko Joseph Branham

Source
https://branham.org/articles/11112020_TheEaglesGatheringTogether

Mokolo ya 7 novembre 2020

Molingami Etonga Moke,

Eloko ya liboso oyo Mwasi-na-libala asalaka, ezali ya kotombola mongongo epai na Tata, kosanjola Ye, kokumbamela Ye pe kozongisela Ye matondi mpo na nyonso oyo Ye asili kosala. Na sima, tosengeli kofanda na kimia liboso na Ye mpo na koyoka Mongongo na Ye kolobela biso na nzela ya mwanje motindami na ye ya nsambo ndenge Abandi komonisa biso Liloba na Ye.

Mitema na biso ebandi kopunja-punja na kati na biso, tozotelema pe koganga:“Nkembo! Alleluia! Nkolo àsanjolama!” Na mitema na biso, tobandi kobina, kopumbwa pe kopota mbangu bisika nyonso, wana tozali kolekisa ntango ya malamu mpenza lokola Ndeko Yoane kuna na esanga ya Patamo. Eloko oyo ezosalema na biso, ezali ete tosili  kokota KATI NA MOLIMO.

Nsinga ya mwinda na biso ekoti mpenza na kati ya Molimo Mosanto, pe na nzela ya nsinga yango, tozali kobenda Bomoi na Nzambe ntango AZALI KOPESA BISO EMONISELI LIKOLO NA EMONISELI. Ezali Liloba na nguya mobimba. Molimo Moko oyo ezalaki na kati ya Yesu (Liloba) ezali sikawa lisusu na kati na biso na eleko oyo ya suka. Ezali Liloba kati na mosala, na nguya koleka pe monene koleka mpenza, na kati ya Mwasi-na-libala-Liloba ya solo.

Kobanga te, etonga moke. Nyonso oyo Ngai nazali, yo ozali mokitani na yango. Nguya na ngai nyonso ezali ya yo. Nguya-nyonso ya Ngai ezali ya yo wana Natelemi na kati na bino. Nayaki mpo na komema kobanga pe kokweya  te, kasi bolingo, mpiko pe makoki. Nguya nyonso oyo epesamelaki Ngai, ezali mpo bino bosalela yango. Bino, boloba Liloba  pe Ngai nakokokisa yango. Yango ezali boyokani na Ngai pe ekokweya ata moke te.”

Tozali kobanga eloko moko te, mpo Liloba na Ye ekoki kokweya ata moke te. Nguya  na Ye nyonso ezali mpo na biso. Nguya-nyonso na Ye ezali ya biso. Tosengeli koloba bobele Liloba na Ye, pe Ye akokokisa yango.

Kasi Ye akebisaki biso ete tosengeli kofungola miso mpenza na eleko na biso oyo, mpo ete ndenge molimo yango esalaki makambo na eleko wana ya liboso, ezali kokoba kozala lisusu na bomoi. Ba-mapasa yango, ba-nzete yango nyonso mibale ezali kokola elongo, ezali kolia bilei yango moko, ezali komela mai ya mbula yango moko, pe ezali kosepela na moi yango moko. Kasi yango mibale euti na mimboto EKESENI. Tokoyeba kokesenisa yango ndenge nini? Nzete bobele Moko ya solo ekozala MPO na Liloba na Nzambe, pe ekondima Yango  bobele ndenge oyo Nzambe apesaki Yango, ekolinga Yango, pe ekotosa Yango.

Ba-mosusu bakozala ba-ntoma oyo ya lokuta, ba-nyama na yauli ya nkanza, oyo Polo alobelaki. “Sima na ngai kokende, bakomeka koya pe bakobanda koloba ete bazali na emoniseli ndenge moko; kasi mposa ya mitema na bango ezali mpo na kosunga bino te, kasi mpo na kobebisa bino.”

Ayebisaki biso ete,

“Soki moto moko amikaniseli ete azali mosakoli, to moto na molimo, tika ayeba ete makambo oyo nakomeli bino ezali mitindo ya Nkolo.”

Tondimi pe toyebi ete Nsango Oyo ezali mitindo ya Nzambe mpo na eleko na biso. Tokobongola Liloba MOKO te, kasi tokondima BOBELE makambo oyo Nzambe alobaki na nzela ya mosakoli na Ye na kati ya ba-Bandes.

Basakoli ya lokuta mingi bakomonana, botala malamu pe bokomona ete bakobanda kozongela koloba ntango nyonso ete  bokobunga soki bondimeli bango te nà makambo balobaka ; kasi ntango MOSAKOLI OYO YA ELEKO YA SUKA akokota na mosala, soki azali mpenza mosakoli yango, akobanda koganga:”Bozonga na Liloba, soki te bokobunga.” Akotonga likolo na emoniseli to ndimbola na ye moko te, kasi likolo na Liloba. Amen, pe Amen!

Mwasi-na-libala asengeli kozonga na Liloba, kozongela Bolingo na ye ya Liboso, Mongongo na Nzambe mpo na eleko na biso, yango ezali na ba-bandes. Ezali mokanda ya bolingo mpo na Mwasi-na-libala na Ye. YANGO ELOBI NKOLO.

Oyo ntango mosusu ya nkembo oyo Mwasi-na-libala akozala na yango mokolo na Lomingo, na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, wana tokokota na Molimo mpo na koyoka Mongongo na Nzambe mpo na eleko na biso koteya biso emoniseli ya  Eleko na Lingomba ya Efese , oyo eteyamaki mokolo ya 5 décembre 1960.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya “ Eleko na Lingomba ya Efese eteyami mokolo ya 5 décembre 1960”.

Misala 20:27-30
Emoniseli 2:1-7

Lien
https://branham.org/articles/1162020_TheEaglesGatheringTogether

An Independent Church of the WORD,