21-0613 MOKONZI ABWAKAMI

Nsango: 60-0515m MOKONZI ABWAKAMI

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Baninga na ngai balingami,baoyo nalingi kati na sango malamu, bana oyo naboti mpo ya Nzambe,

Nazali na matondi ete tozali koyoka Mobateli na biso. Tozali ba mpate oyo ye azali kobatela. Tozali lingomba ya Ye. Ba bande oyo etiamaki mpe ebombamaki mpo na biso. Tozali baninga ya motindami na ye, mwanje ya 7, mpe baoyo ya Ye ya bolingo na Sango Malamu.Tozali bana na Ye oy’aboteli Nzambe.

Mokolo moko Etinda oyo engengaki liboso na biso mpe toyokaki Yesu Klisto lolenge moko lobi loleki, lelo mpe libela. Epesaki kimia na koleta na biso, mpe tozali na nzala na yango lisusu koleka. Etinda oyo, Liloba ya Ye, Mongongo ya Ye, ezali Nkolo Yesu Klisto. Ezali nyos’oyo tozali na yango bosenga, nyos’oyo tolingi, nyos’oyo tozali nayango.

Soko Emoniseli moko ekokaki kopesamela biso oy’ekeseni na Liloba likomami, tokoki koyamba yango te, mpo ete yango nde penza Satana asalaki epai na Ewa. Azalaki na Liloba, kasi azalaki kolukaluka pole ya sika, mpe Satana amonaki kati nayango ete ye Ewa azwaki yango. Tolingi soko moke te kobakisa eloko soko nini na Liloba, to kolongola eloko moko longwa na Liloba te; kasi kaka kotika yango ndeng’ezali. Kotikala kaka na Liloba, mpo ete eloko nyos’ekeseni ezali kozanga kondima. Esengeli TOTIKALA NA MOSALA YA BANDE.

“Natikala te koteya eloko moko, na bomoi na ngai, oyo nayokela yango soni. Na kolongola bande ata moko te soko liteya moko te oyo etiami na ba bande. Nazali kotikala na oyo Molimo Mosanto Azali koloba. Yango nde nazali kobika na yango mpe nakokufa na yango”. Ezali te ete nameka koloba mpo na ngai moko sikoyo. Kasi nazali kaka komeka kopesa bino elembeteli ya makamb’oyo ezali kosalema, mpo ete bokoka komona mpe kosolola. Ezali ete bato balingi kokambama na bato.

Ba bande ezali oyo Molimo Mosanto azali koloba ete Akamba Mwasi na Libala. Tozali kobika na liloba nyoso mpe tokokufa na liloba nyoso mpo ete ezali OYO ELOBI NKOLO YAWE. Tokotelema elongo na Liloba ya Nzambe ata soko ekozwa eloko nyos’oyo tozali na yango na bomoi na biso; tokotikala na Liloba.

Bande nyos’oyo tozali koyoka ezali komema biso penepene na Ye mpe ezali komonisa Liloba na Ye lisusu na koleka. Ezali kaka oyo tozali na yango bosenga mpo ya mokolo yango. Tolingi Mwana ya Kisi kokamba biso te; tolingi nzela oyo Nzambe Abongisi: Mosakoli na Ye.

Libondeli na biso ezali,”O Nzambe sunga biso ete tokakola Liloba ata mbala moko te. Tika ete totikala alima na Liloba yango mpe kobika yango. Etali biso te soko nini ezali koya to nini ezali kokende, oyo moto ata nani akoloba to akosala, tika ete biso totikala na Liloba ya yo.”

Bitumba ezali koya makasi mokolo na mokolo. Satana azali na kanza ndenge atikala kozala liboso te. Ayebi ete ntango na ye ekomi na suka, mikolo na ye ezali ya kotanga sasaipi. Azali na mokili na nse ya bokonzi na ye. Boye azali kobundisa Mwasi ya Libala.

Mbala mosusu bitumba bileki makasi. Tokomi na suka mpe tolembi kino tobandi kolela boye:

Nazali kokufa na posa ya kozonga ndako, mpe nalingi komona Yesu,
Nalingi koyoka ngengele kitoko wana kobeta uta na libongo ya kimia;
Ekongengela nzela na ngai mpe ekolimwisa kobanga nyoso;
Nkolo, tika ete totala na ngambo mosusu ya ezipelo ya ntango.

Tata ayebaki ete tokozala na mitungisi mpe tokolemba, kaka lokola mosakoli na Ye.
Na bongo na nta tongo yoko Alamukisaki mosakoli na Ye, koyikisa ye mpiko. Atikaki ye kotala mpe kokende na Ngambo mosusu ya Ezipelo ya Ntango.

Na mbisa Azongisaki ye koyebisa biso ndenge makambo yango ekozala. Zuwa ezalaki kuna te. Kolemba ezalaki te. Kufa to malali ezalaki kuna te. Liwa likoki konunisa yo lisusu te. Ezalaki koleka bobongi kwa.

Na bongo Mwasi na Libala amatisaki ye likolo, mpe atiaki ye likolo na esika monene etombwi mpe bagangaki na bolobaka ete:

“Toyebi tokozonga elongo moko na yo, na mabelé mokolo moko”. Balobaki, “Yesu akoya, mpe y’okosambisama kokokana na Liloba oteyaki biso. Na bongo soko okondimama na ntango yango, mpe toyebi okondimama,” mpe balobaki, “bongo okolakisa biso epai na Ye lokola mbano ya mosala na yo.”

Na bongo wana, ekozonga Mwasi na Libala na mabele, tokozonga elongo na Ye, mosakoli ya Nzambe, mpe AKOLAKISA BISO EPAI NA YE LOKOLA LIBONZA YA MOSALA MWA YE. Na ntina wana esengeli na biso ete totikala na mosala ya bande.

Nakanisi ezali na Litomba kokotisa awa oyo toyokaki mosakoli koloba esili koleka mwa poso mike:

“Ba bande oyo ezali kokende kaka…Nazali kosolola na losambo na ngai, ndeko. Nazali na mokumba te na oyo Nzambe apesi yo ete oleisa; Nazali na mokumba ya motindo ya Biloko oyo nazali koleisa bat’oyo. Oy’ezali kaka mpo na Eyanganelo oyo. Bomoni? Sik’oyo, soko bato balingi koyoka ba bande, etali kaka bango. Kasi Nazali kosolola na bat’oyo Nzambe Apesi na ngai.

Nde tina tokotikala na biso na ba bande. Nde tina tozali koloba ete William Marrion Branham azali mobateli na biso. Nde tina tokolobaka ete tozali Eyanganelo ya ye. Tozali oyo Nzambe apesi ye. Iyo, tozali MOKO NA BANGO, KEMBO.

Sok’olingi kozala moko ya bailingomba na ye, FINA PLAY. Sok’okolinga koyoka ba bande na biso elongo, tobengi yo ete omibakisa na biso Mokolo ya Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, wan’ekoyangana biso elongo na bandimi mosusu zingazinga na mokili mpe koyoka: MOKONZI ABWAKAMI 60-0515M.
Ndeko Joseph Branham

Boyoka oyo: Nazalaki na mabondeli mpo ya koyeba soko Tata akokaki kolinga biso toyoka bande nini na mokolo mokoya. Nayokaki na motema na ngai lokola ete Azalaki kokamba ngai ete toyoka, “ Malakisi likolo ya Kotiama ya Mwana na ebonga ya bokonzi”. Nabandaki Ko bondela mpe koluka mokano na Ye. Wan’esilisaki ngai kobondela, natelemaki, nafungolaki Biblia na ngai na pwasa mpe nabandaki kotanga, ezalaki Bagalatia 4: 1-7. Tata akokisaki mpe ayanolaki mabondeli na ngai mbala moko lisusu.

Ngai mpe basali ya VGR tokozwa mwa ntango ya bopemi na poso 3 ezali kolanda. Wan’ekozala biso na bopemi, nakozala kaka kotindela bino mokanda mokuse kondimisa mpo na liteya oyo tokozala koyoka.

Nazali kosenga bino bokanisa ngai mpe basali ya VGR na mabondeli na bino.

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya

1 Samwele Mokapo ya 8
Santu Malako16: 15-18