Pasika 2024

Molingami Mwasi ya Libala ya Klisto,

Kalvari esengeláki èkanisama mokolo nyoso. Mpe toyokaki makambo mingi na ntina na yango, totángá mingi mpenzá na ntina na yango. Batéi batéyá likoló na yango.útá ebandeli ya ntango. Bayembi bayembá likoló na yango, kati na bileko. Basakoli balobaki yango libosó, mbula nkóto minei libosó kútu ekóma. Mpe basakoli ya lelo oyo batalisaka na nsima ntango nini ekómáki. Ezali mpenza mokolo ya litómbá koleka! Ezali moko ya mikolo ya litómba koleka oyo Nzambe atánísá ndèle na mabelé.

Koyangana ya godi nini oyo longwá na mokili mobimba Mwasi ya libala akozala na yango na nsuka ya póso oyo ya Pasika. Tokokanga bikuke ya biso mpe tokokanga mokili ya libándá kokanga.Tokokanga ba masíni na biso nyoso na ntina ete makanisi ma biso mábendama te, mpe koloba na Ye kati ya mokolo mobimba. Tokotombola mingóngó na biso epai na Ye kati na boyokani, na likanisi moko, na lobánzo moko, kokúmisa Ye, kosanzola Ye, koyebisa Ye Boniboni tolingi Ye.

Tokoyoka Mongóngó na Ye koloba na mitema na biso lokola tozali kobonzela Ye bomoi ya biso lisusu. Eloko moko te ekozala na litómbá koleka epai na biso lokola ezali biso komiléngele mpo na Boyéi na Ye ya noki. Mwasi ya libala azali komibongisa lokola naino libosó Soki moké te.

Nalingi ete biso nyoso tosangana mpo na manáka maye:

MOKOLO MWA MINEI

Ezalaki Mokolo mwa Minei na mpókwa nde Nkolo Yesu azuaki Elambo ya nsuka elongo na bayekoli na Ye, kati na ekaniseli ya Elekeli libosó ya Esóde ya bana ya Yisalaele. Libakú lilamu nini oyo tozali na yango kozala na Elambo elongo na Nkolo kati na ba ndako ya biso, libosó ya nsuka ya mpóso na biso ebónzámelí, mpe kosenga Ye álimbisa biso na masumu na biso mpe kopesa biso nyoso tozali na yango bosenga kati ya mobembo.

Sala yango, Nkolo. Bikisa mobéli. Bóndisá oyo alembí. Pesa esengo na monyókolami. Pesa kimia na oyo alembi mpe biléi epai na ye Oyo azali na nzala, bimeli na ye oyo azali na mposa, esengo na oyo atóndí na mawa, nguya epai na lingomba. Nkolo, memá Yesu Kati na biso na mpokwa oyo, lokola tobelémi kozua Elámbo kotalisa nzóto ya Ye etútámákí. Tobóndeli, Nkolo, ete Átámbolela biso na loléngé moko ya kokámwa…

Pambola basusu, Nkolo, zíngázíngá na mokili mobimba, baoyo bazali kozila na esengo boyéi ya Nkolo, na mínda mibongisamí, mpe bilekelo ya mílinga nyoso péto, mpe Pole ya Nsango Malamu kongenga kati na bisika ya molilí.

Tika ete tóbanda biso banso na 6:00 nsima ya nzángá na ntango ya mboka ya bino, koyoka Elámbo 62-0204 mpe na nsima mosakoli akomema biso kati na Elámbo ya godi mpe na Molúlú ya Kosukolana Makaká oyo ekozala koyemba na app ya Lifeline na Angelé to na nkótá isúsu na bofináká na ekanganeli ezali na nsé awa.

Kolanda Liteya, tokoyangana elongo na mabóta ya biso kati na ba ndako ya biso, mpe kolia Elámbo ya Nkolo.

MOKOLO MWA MITANO

Tika ete tokende na libondeli elongo na mabóta na biso na 9:00 ya ntóngó, mpe na nsima lisusu na 12:00 nsima ya nzángá, kobianga Nkolo kozala na biso mpe kotondisa ba ndako na biso na Molimo Mosanto lokola tozali komíbonzela epai na Ye.

Tika ete makanisi ma biso mázonga na mokolo wana na Kalvari, esili koleka mbula nkóto mibale, mpe komona Mobikisi na biso kokakema likoló na ekulúsu, mpe bongo komipesa biso mpeza motindo yango ntango nyoso kosala yango ekosepelisaka Tata:

Mpe mokolo oyo, na bozaláká na litombá koleka, moko ya mikolo minene koleka, tika ete tótala na biloko misato bikeseni mokolo yango elingaki koloba epai na biso. Tokokaki kozua mokamá na yango, kasi na ntóngó oyo, Naponi bobele biloko misáto ya motuya biye tolingi kotala yango, mpo na mwa ntango ikolanda, oyo Kalvari elingaki koloba epai na biso. Mpe Nabondeli ete ekweisa mosumuki nyoso oyo azali awa na eleko beébé; ekosala ete mobúlami nyoso ákwéa na mabóngó na Ye; oyo ekosala ete mobeli nyoso átombola kondima na Ye epai ya Nzambe, mpe kolongwa, abíkí; mosumuki nyoso, abikisami, mozóngi nsima nyoso ázonga, mpe ámíyóka nsóni; mpe mobúlami nyoso ásepela, mpe kozua etemelo ya sika mpe elikia ya sika.

Na nsima na 12:30 nsima ya nzángá, tika ete tokangana elongo kati na ba ndako na biso koyoka, Mokolo Wana Na Kalvari 60-0925

Na nsima Tika ete  tókangana elongo kati na libondeli kati na ekaniseli ya bobakisami na ekulúsu ya Nkolo na biso.

MOKOLO YA PÓSO

Tika ete mbala moko lisusu tósangana banso kati na libondeli na 9:00 ya ntóngó mpe 12:00 nsima ya nzángá, mpe tólengele mitema na biso mpo ya makambo manéne Akosala mpo ya biso na kati na biso.

Nakoki koyoka Ye koloba: “ Satana, yaka awa!” Azali Mokonzi sikawa. Asemboli loboko, Azui fungóla wana ya kufa mpe akangi yango pembeni na Ye, Atingamisi yango na lokéto na Ye Moko. “Nalingi koyebisa yo. Osakaní ntango molai mingi. Nazali mobotami ya ngondo Mwana ya Nzambe na bomoi Makilá ma Ngai mazali naino ya mobésu likolo na ekulúsu mpe nyongo efutámi mobimba! Ozali lisusu na makoki te. Olongólamí makoki manso. Pesa Ngai mafungola wana!” .

Na nsima na 12:30 nsima ya nzángá, tokoya biso nyoso elongo koyoka LILOBA: Bokundami 57-0420.

MOKOLO MONENE nini oyo ekozala mpo ya Mwasi na Ye ya  libala zingázingá ya mokili mobimba.

Na nsima Tika ete tókangana elongo kati na mabondeli na 3:00 nsima ya nzángá.

MOKOLO MWA LOMINGO

Tika ete libosó tólamuka na ntá ntóngó lokola esalaki Ndeko Branham na ntóngó oyo moninga na ye mwa ndeke ya tólo motáné, alamúsáki ye na 5:00 ya ntóngó. Tika bobele totónda Nkolo mpo na kosekwisa Yesu longwá na bakúfi.

Na ngonga ya Mitano na ntóngó oyo, moninga na ngai moké na tólo na ye motáné apumbwaki na lininísa mpe alamúsaki ngai. Ezalaki lokola nde mwa tólo na ye elingaki kopasuka elobaki ye ete : “Asekwi.”

Na 9:00 ya ntóngó mpe 12:00 nsima ya nzángá, tika ete tókangana lisusu kati na monyolólo na biso ya mabondeli, kobondela ba moko mpo na basusu mpe komilengele koyoka Mongóngó ya Nzambe.

Na 12:30 nsima ya nzángá, tokoya elongo koyoka Liteya ya biso ya Pasika. Elembo Ya Solo Ya Pasika 61-0402    .

Na 3:00 nsima ya nzángá, tika ete tósangana mbala moko lisusu kati ya libondeli, kotonda Ye mpo ya NSUKA YA PÓSO YA KÁFÚKAFU APESI BISO ELONGO NA YE MPE ELONGO NA MWASI NA YE YA LIBALA ZÍNGÁZÍNGÁ YA MOKILI MOBIMBA.

Epai na Bandeko na ngai mibali mpe basi na ngámbo ya bibale binéne, lokola na mbula elekí, Nalingi kobianga bino kosangana elongó na biso na ntango ya Jeffersonville, mpo na ntango inso ya mabondeli likoló na Manáka maye. Namoni atá ko bongo ete koyóka bande mokolo mwa Minei, mwa Mitano mpe mwa Póso nsima ya nzángá na ntango ya Jeffersonville ekozala kpókósó mingi mpo ya ebelé kati na bino, na bongo Nabondeli bino bomiyoka ba nsómi koyoka Mateya mango na ntango ekobonga mpo ya bino. Nzókande, ata ko bongo Nakolinga ete biso banso tókangana elongo na mokolo mwa Lomingo na 12:30 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyoka Liteya ya biso ya mokolo mwa Lomingo elongo.

Nakolinga mpe kobianga bino mpe bana na bino ete bózala kati na misalá ya botongi ya creation, journaling, mpe mimekano mia YF, oyo libota na bino mobimba bakoki kosepela na yango elongo. Tokanisi ete bokolinga yango lokola nyoso ezuí mobóko na yango likoló na LILOBA tokozala koyóka nsuka ya póso oyo.

Mpo ya manáka ya nsuka ya mpóso, mayebisi likoló ya komilengela mpo ya molúlú ya Elámbo, bisaleli bikosengelama na yango mpo ya misala ya botongi ya creation, Mimekano ya Pasika, mpe mayebisi masúsu, bótala bikanganeli bizali na nse awa.

Tika ete tókanga ba telefóne ya biso mpo na nsuka ya mpóso ya Pasika, longola sé kozua bilílí, koyoka Eteni ya Liloba ya mosakoli mpo ya Mokolo, mpe koyoka bande longwá na app ya the Table, app ya Lifeline, to ekanganeli ekoki kosalemela mpo ya kozua Liteya.

Ezali lokumu lonéne mpo na Ngai kobianga bino mpe libota na bino bóya elongo na Mwasi ya libala ya mokili mobimba mpo ya nsuka ya póso etóndi na MABONDELI, MASANZOLI MPE KOBIKISAMA NA MALALI. Nandimi yango mpenza ete nsuka ya póso eye ekobóngola bomoi na bino mpo ya libela.

Ndeko Joseph Branham

Boyóki Losambo (Audio Service)

MOKOLO MWA MINEI 6:00 nsima ya nzángá ( ntango ya mboka na mboka)

62-0204 Elámbo (Elámbo ya godi mpe Molúlú ya Kosukolana makaká)

Ngonga 1 na minúti 55


MOKOLO MWA MITANO  12:30 nsima y’a nzángá (ntango ya mboka na mboka)

60-0925

Mokolo Wana Na Kalvari

Ngonga 1 na minúti 42


MOKOLO MWA PÓSO 12:30 nsima ya nzángá (ntango ya mboka na mboka)

57-0420
Bokundami

Ngonga 1 na minúti 4


MOKOLO MWA LOMINGO 12:30 nsima ya nzángá (Ntango ya Jeffersonville)

61-0402
Elembo Ya Solo Ya Pasika

Ngonga 2 na minúti 10