24-0407 Mabulu Matobwani

NSANGO: 64-0726E Mabulu Matobwani

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Bameli Útá Na Etóko,

 Mwasi ya libala akozala ndenge moko lisusu te nsima ya nsuka ya mpóso ya Pasika ya Káfúkafu oyo Nkolo apesaki biso.  Tokangamaki na kati elongo na Ye, kozala na boyokani mpe kosambela Ye nsuka ya mpóso mobimba.  Bozali na ye etondisaki bandako na biso mpe mangomba na biso.

 Tozalaki na nsé ya bozili na etingia monene ya ndenge wana. Toyebaki oyo ezalaki Mokano ya Nkolo mpo na biso.  Nzambe azalaki komilengela kosala likambo moko.  Tokangaki mokili mpe biloko nyonso na yango ya kobenda bokébi.  Tosanganaki útá na mokili mobimba na lobánzo moko.  Tozalaki kofanda elongo na bisika ya likoló, komilengela lokola Azalaki kosolola NA BISO na nzela.

 Mitema na biso mizalaki kogánga: “Nkolo, sala ete nazala mingi lokola Yo.  Bongisa ngai mpo na boyei na Yo noki.  Pesa ngai Emoniseli koleka.  Molimo Mosanto na Yo átondisa nsinga nyonso ya bomoto na ngai.”

 Lokola losambo moko na moko lobandáki, tolobaki na kati na biso mpenza:“Ekoki kozala nde boni?  Nayoká Mateya maye bomoi na ngai mobimba, kasi sikawa nyonso emonani lokola nde ya sika, lokola nde nayokaki yango naino liboso te.  Azalaki komónisa Liloba na Ye na mitema mpe milimo na biso lokola liboso naino te.

 Emoniseli eleki na nguya eyaki lisusu na mitema na biso… Ezali Ye…YE.  Ezali Molimo Mosanto Ye moko KOLOBA NA BISO MBALA MOKO MPENZA.

 Ngai te!  Ye!  Ezali nde Ye!  Naúti kaka koyebisa bino, Azwi kaka nzoto na ngai.  Azwi kaka lolémo na ngai, azwi miso na ngai, mpo ayebaki ete nakopesa yango epai na Ye, yango wana Ayei bobele mpe asalaki ete nasala yango.  Na bongo, ezali ngai te!  Ezali Ye!  Mpe ngai te kuna libanda elongo na bino, ezali Ye libanda kuna elongo na bino.  Ye nde Lisekwa mpe Bomoi.  Oo, Nzambe, Nzambe;  bóndima yango.  Oo, bato: Bondima Ye.  Bóndima Ye.  Azali awa.

 Apesi biso Emoniseli tóyéba BA BANDE nde Mongóngó ya Nzambe koloba na biso lelo.  Ezali Maloba na Ye, Mongóngó na Ye…MONGÓNGÓ NA YE, etíámákí na bande mpe EBOMBAMAKI mpo tokoka ko YOKA YE koloba na biso Maloba ya bomoyi ya Seko.  Nde nzela na Ye epesami mpo na Mwasi na Ye ya Libala.

 Ezali Mai ya mpío, peto, Etóko kopunjuapunjua, mpe kopunjuapunjua. Na koleka emeláki biso, nakoleka togángáki: “Mosusu Nkolo, MOSUSU.  Tondisa kopo na ngai Nkolo, tondisa yango Nkolo”.  Mpe Asalaki yango!  Na koleka tomeli, NA KOLEKA APESI BISO.

 Na nsima, Satana alobámáki ete alóngami na nguya ya Nsango Malamu.  Na nzela ya Nzambe ya Lola Oyo abongisaki mpe atindaki mwanje na Ye koteya Nsango Malamu epai na biso.  Na nzela ya Nzambe Oyo akomáki Liloba mpe atindaki Mwanje na Ye Oyo azalaki wana kondimisa Liloba na Ye.  “Bóbima na kati ya bato, na Nkombo ya Yesu Klisto”.

 Zábolo ASENGELAKI KO tíka mobeli nyoso, moto ya mpasi nyoso.  Sikawa nguya ya Nzambe etemisi biso lisusu na bokolongono ya nzoto mpe makasi.

 Na nsima, útá na bozindó ya motema na biso tolobaki ete:

 Nandimi sikawa Yesu Klisto, lokola Mwana ya Nzambe oyo asekwi, Azali Mobikisi na ngai, Azali Mokonzi na ngai, Azali Mobikisi ya nzoto na ngai.  Nabikisami na nzoto sikawa.  Nabikisami.  Nakobika mpo na Ye Oyo akufaki mpo na ngai.  Nakotelema longwá awa na bomoi ya sika, kokende liboso kosala makokí na ngai nyonso  Ye Oyo…mpo na Ye Oyo asekwaki mpo na ngai.  Aleluya!”

 Oyo nde Mai ya Etóko  tomelaka útá na yango mokolo na mokolo.  Ezali liziba sé moko liútí mbala moko na Lola oyo ezali kosopana ntango nyonso.  Limíkokí.  Ntango nyonso mpio mpe pɛto.  Lizangi kotiola soko moké te.  Ezali Mai ya bomoi mazali kobongwana ntango nyonso, komonisa eloko ya sika epai ya Mwasi ya libala ntango nyonso.

 Ezali kopunjuapunjua ntango nyoso. Tosengeli te kobenda yango na ebéndeli, kopusa  yango na mopepe, kobalusa yango, to komibakisa na yango.  Ezali liziba ya Nzambe ya Mai ya bomoi, mpe tokoki kobánza te komela eloko mosusu.

 Toyoki lelo, “Mai na biso nde mai ya malamu koleka okoki komela.  Totii yango na nzela ya matámbé ma biso 7 ya bokongoli.  Na nsima, tobakisi minaná nyonso oyo TOKONGOLAKI lisusu na mai oyo tokanisi osengeli koloba otóndisami na mái.”

 Nkembo na Nzambe, tosengeli te kozua libakú to komítúna nini tozali komela to nini ebakisami to ekongólámí.  NYOSO tozali na yango bosenga ezali kati na Mai na biso.  Nyonso tosengeli kosala ezali KOFINA PLAY mpe komela lokola Ezali kozólola.

 Libóndi nini boye komela Mai oyo.  Tokolinga kokende bakilometele na bakilometele na nzela na biso kaka komela útá na Yango, kasi tosengeli te.  Tomemaka Yango bisika nyoso tokendaka.  Na bandako na biso, na mangómbá na biso, na mosala, kotambwisa mítuka na biso, kokende kotambola…TO MELAKA, MPE TO MELAKA, MPE TO MELAKA.

 Oo, mokili, yaka komela na Liziba oyo Nzambe apesi.  Ezali esika sé moko oyo osengeli komitungisa te mpe koloba, “Nabondeli Molimo Mosanto abatela ngai ete namela eloko moko te oyo nasengeli te komela.”  EZALI NYOSO LILOBA PETO LINDIMISAMI KOSOPANA LONGWA NA MAZIBA YA LIKOLÓ.

 Esika mosusu ezali te mpo na Mwasi na Ye ya libala komɛla!

 Yaka Komela elongo na biso na Etóko na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Mabulu Matobwani 64-0726E.

 Ndeko.  Joseph Branham

 Makomi ya kotánga liboso ya koyoka Liteya:

 Njembo 36:9

 Yilimia 2:12-13

 St. Yoane 3:16

 Emoniseli Mokapo ya 13