24-0414 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé

Nsango: 64-0802 EZALELO EKOYA YA MOBALI YA LIBALA YA LOLA MPE MWASI YA LIBALA YA MOKILI

BranhamTabernacle.org

Molingami Múngwa Ya Mabelé,

 Oo, molingami Mwasi ya libala, ntango  nini oyo tozali na yango, kofanda elongo na bisika ya Likoló, libosó ya Liloba, kokémba, koyeba tozali banani, toúti wapi, mpe tozali kokende wapi.

 Koyeba, útá na bozindó ya mitema na biso, tozali SIKAWA bana mibali mpe bana basi ya Nzambe.  EZALI Te tokozala, tozali SIKAWA.  Tozali biteni ya makanisi ya Nzambe.

 Ntango Satana abundisaka biso, mpe amekaka kotalisa biso mabunga na biso, makambo na biso ya kala, mpe kokwea na biso ya mokolo na mokolo;  ntango ameki kobuka biso na nsé kati na makanisi mpe molimo na biso na nkutá na ye, tokaniselaka kaka ye mpe toyebisaka ye, “Nzambe, útá kozalisama ya mokili, amonaki ngai liboso; ezali solo Satana, NGAI, mpe Atindaki Yesu kosikola NGAI.”  OZUÍ!

 “SikawaSatana, tika ngai, mpo Makila ya Mwana na Ye ezali koloba mpo na NGAI.  Nakoki kosúmuka te.  Mabungá na ngai, iyo, ebelé ya mabungá na ngai, ekoki kútu komónama na Nzambe te.  Eloko kaka moko Ayokaka ezali mongóngó na NGAI kosambela mpe kosanzola Ye, mpe eloko sé moko azali komona ezali etáliseli na NGAI.”

Etaliseli na biso ezali koyanganisa biso útá na ebimelo ya ntango mpe elimwelo ya ntango, na likoló mpe na ngelé, kosangisa biso na nsé ya Liloba  Apesaki mpo na Mwasi na Ye ya libala likoló ya bande.  Ezali eloko sé moko oyo Akomemia;  mpo Ezali Nzela na Ye epesamaki.

 Nini nde Akoyebisa mpe Akomónisa biso nsima?  Toyoká Ye koloba na nzela ya mosakoli na Ye mbala mingi mpenza mpe koyebisa biso na ntina ya lolenge ezalelo na biso ya sika ekozala, kasi mbala oyo ekozala lokola nde toyokaki naino eloko moko te na ntina na Yango liboso.

Nzambe Motongi  abongisaki oyo mpo na Molingami na Ye.  Bomoni?  Oo, esika nini oyo esengeli kozala, ntango, Lolenge ya Bonzambe, Nzambe Motongi abongisaki yango mpo ya Eténi ya Bonzambe oyo ebongisamáki libosó na Motindo ya Bonzambe, na nzela ya Nzambe ya Bonzambe Oyo—Oyo azali Mobandisi ya Bomoi ya Bonzambe! Engumba yango ekoúlana nde na nini? Bokanisa naino yango!

 Tokoki mpenza te komipekisa.  Kosepela mpe bozili na biso ezali tii na sóngé.  Mitema na biso mizali kobeta noki noki mpo na koyoka Nzambe koloba mbala moko na biso mpe koyebisa biso ete azali sikawa kosala mpe kobongisa Ezalelo na biso ya sika mpo ete tokoka kobika Seko na Sekó  elongo na Ye.

 Nini mosusu tokoyoka, mpe nini ekomonisama na biso Mokolo mwa Lomingo, wana ezali Ye koyebisa biso nyoso na ntina ya Kobongisama libosó, Etáliseli, Lotómo, Mokolo ya Mwambe, Ngomba Mosanto, Piramidi, mpe Kobiangama ya Bule?

Tokoki nde kozinga makanisi na biso zingázingá na makambo mazali kosalema sikawa mpenza?  Nzambe azali koyanganisa Mwasi na Ye ya Libala útá na mokili mobimba mpo ákoka koyebisa biso Ezalelo na biso ya sika ekoúlana na nini. Akoyebisa biso tii na mwa makambo nyonso ya mikemike. Ntango ya nkembo nini oyo tokozala na yango.

 Epai mosusu, bitumba na biso bikómá naino makasi boye libosó te.  Satana azali kotúta biso lokola libosó naino te.  Bitumba na ye bimónaní te lokola nde bizali kokita to kolongwa.

 Kasi NKEMBO na Nzambe, KONDIMA na biso kati na Liloba na Ye ematá naino boye libosó te.  KONDIMA na biso na boyebáká tozali banani etiamí lóngo na bozindó ya bomoto na biso, na motindo ete tokoki koningisama te.

Tozali na ELOKO TE ya kobanga;  ELOKO TE ya komitungisa mpo na yango.  Tata azali na mokumba na biso mobimba.  Azali kokamba mpe kotambolisa LITÁMBÉ NA BISO MOKO NA MOKO. Asimbi biso na motema ya Litándú na Ye.  Satana azali kaka mobángisi oyo nsuka na ye ebelemi, mpe ayebi yango.  Ye nde azali kobanga, ayebi ete azali na likambo na Mwasi Liloba Lilobámí ya Nzambe mpe alongami mbala nyonso.

TOZALI LILOBA.  Tozalaki kati na Ye útá ebandeli.  Tokozala yango mokolo mosusu te, TOZALI YANGO SIKAWA.  Soko tozali Liloba, na bongo tokoki KOLOBA LILOBA, SOKO KAKA TONDIMI….MPE TONDIMI.

 Ozali to mondimi (LILOBA) to ozali mobeti ntembe (LILOBA TE).  Ezali na singa moko te na nzoto na biso oyo ezangi kondima Liloba ata moko.  Nde yango!  Toútí kaka kotalisa na Satana: tozali Liloba.  Tokoki kozala loposo ya nsé ya likaká, KASI TOZALI NAINO  KAKA ETENI YA NZOTO!!!

Na bongo ntango mobúki lokuta wana ayei nsima ya moko na biso, Mwasi ya libala ayei elongo longwa na mokili mobimba mpe to BETI YE MPE TOBETI YE na Liloba.

  Ntango malali mayei likoló na moko na biso, tosanganaka elongo mpe to TOBETAKA YE!  Ntango moko na biso amiyókí ete akómí na nsé mpe akití tosalaka nini biso banso? KOBETA YE!

Tozali kokende Ndako, Mwasi ya libala.  Ntango ekoki.  Mwasi ya libala amibongisi.  Tozali na kati ya BWATO. Akangi ekuke mpe tobatelami na kati.  Tokoki koyoka mozíki mpo ya Mwasi ya libala kotambola na elekelo kosangisama elongo na Mobali ya libala.

Tokozala na bosepeli ya makwéla ma biso mpo na bilánga 1000, nsima tokokende elongo moko na mosusu mpe Ye na Ezalelo na biso ekoya.

Bozanga yango te, baninga.  Ezali bobele na nzela moko epesami mpe endimisami na Nzambe: Ba BANDE.  Ezali Likonzí ya Móto koloba mpe kokamba Mwasi na Ye ya Libala.

Eloko sé eloko ekosala yo, tia Mongóngó wana liboso na yo mpe libota na yo Lomingo loye. Kondima eyaka na nzela ya koyoka, koyoka Liloba, mpe Liloba liyaka epai ya mosakoli.  Molimo Mosanto azali Mosakoli mpo na mokolo na biso koloba na Mwasi na Ye ya libala na nzela ya ba Bande.

Otómbelamí boyei bolamu komibakisa na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola eteni ya Mwasi ya libala bakosangana elongo, koyoka, banso na ntango moko, Nzambe koloba na nzela ya mwanje na Ye ya nguya mpe koyebisa biso manso na ntina ya: Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé 64-0802.

Ndeko Joseph Branham