24-0421 Kondimisa Liloba Na Ye

NSANGO: 64-0816 Kondimisa Liloba Na Ye

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Lingomba- Mwasi ya Libala,

 Mwana ya moto ayei mpe amimonisi kati na mosuni ya moto epai ya Mwasi na Ye ya libala.  Alobaki Yango, tondimi Yango, mpe Akokisi Yango.  Tozali Lingomba- Mwasi na Ye ya Libala oyo tomibongisi na boyókáká mpe bondimáká Liloba nyonso libimákí na monoko na Ye.

 Ekozala na Lisekwa ya bakufi.  Akokokisa yango.  Ekozala na Konetolama ya Lingomba.  Akokokisa yango.  Ekozala na Bokonzi moko ya bilánga nkóto.  Akokokisa yango.  Ekozala na Likoló ya sika mpe nsé ya sika.  Akokokisa yango, mpo ete Liloba na Ye lilobaki bongo.

 Biso nde tokozala kuna.  Akokokisa yango.  Biso nde tosili kokóma eteni ya Liloba oyo.  Abongisaki BISO libosó mpo na kozala Kuna.  Ekozala na Konetolama na boyebi  na Ye makambo liboso mpe eloko moko te ekopekisa yango, tokozala kuna!

 Satana amekaki bandá kala mpo bato bábete ntembe kaka na Liloba moko oyo lilobámákí.  Bino nde bósála bongo te.  Bóndima kaka Liloba moko na moko.  Osengeli kondima Liloba nyoso mpo ózala Kuna.  Ezali liloba ya mosakoli te, Ezali Liloba ya Nzambe oyo litiámákí mpe libómbamákí likoló na ba Bande.

 Nganga-nzambe monene, episkópo, kadinali, mobateli?  “Nzambe!  Liloba nyonso likobimaka na monɔkɔ ya Nzambe.”  Toyebí boni ete ezali Liloba ya Nzambe?  Alobi bongo, nsima Akokísí Yango.  Akokisaka Liloba na Ye.

 Osengeli kondima Liloba nyoso likobimaka na monoko ya Nzambe.  Akokisaki Yango ete ezali Liloba na Ye likoló na ba Bande.  Asili kotálisa ete William Marrion Branham azali mwanje na Ye ya Nsambo motindami;  Mongóngó ya Nzambe mpo ya mokolo na biso.  Baoyo banso bandimi Etindá mpe motindami te bakokufa.

 Sikawa , nazali kaka koloba na bayóki oyo te.  Oyo etiámí na bande, bomoni, mpe Ekendaka na mokili mobimba. Bosósólí, bato ya mokili, ete Liloba moko, Liloba moko, lisakola moko te, libóké ya masakola te, Liloba moko, nde nyoso Ewa azangaki kondima.

Azali Liloba, mpe tozalaki eteni ya Liloba na Ye.  Yango nde ntina tozali awa, kondimisa esika na biso kati na bomoi. Kondima Liloba nyonso.  Kotikala na Liloba.  Kotálisa Mwasi ya Libala na Liloba moko na moko lizalí likoló ya bande.

 Na mokolo na biso, Mwana ya moto amónisámi.  Akangísí Lingomba na Motó;  asangísí libala ya Mwasi ya libala.  Kobianga ya Mobali ya libala eyei.  Mwana na moto ayei na mosuni ya moto kosangisa bango mibale elongo.  Ye nde Liloba.  Tozali Liloba na Ye, mpe bango mibale basangani elongo.

Ekosengela na bomónisami ya emóniseli ya Mwana ya moto… Moyangeli ya lingomba te…Yesu Klisto, akokita na mosuni ya moto kati na biso, mpe akosala Liloba na Ye mpenza solo ete ekosangisa Lingomba mpe Ye lokola moko,  Mwasi ya Libala, mpe na nsima kokende Ndako na Lipati ya Libala.  Amen.

Bomonisami ya Liloba ekosangisa Mwasi ya libala.  Ezali komonisa Mwana ya moto lisusu, bato ya teoloji ya lingomba te.  Mwana ya moto!  Liloba mpe Lingomba bakómi moko.  Nyoso esaláki Mwana ya moto ezalaki Liloba.  Biso, Mwasi na Ye ya Libala, tokosala eloko yango moko.

Tosangani na Molimo Mosanto, Liloba na Ye, Mongóngó na Ye, mpe tozali komilengela kokende na Lipati ya Libala.  Liloba lisangisí biso, mpe nyoso mibale bakomi MOKO.

Tolobi BA BANDE, BA BANDE, BA BANDE.  Esengeli koyoka ba Bande na bandako na bino, na mangomba na bino.  Tolobáméli mabe mpo na kotia litómbá mingi likoló ya koyoka ba Bande.  Mpo na nini tolobí bongo?  Nani azali koloba na BISO likoló ya ba Bande?

Sikawa, bókanisa, ezalaki Yesu te kosolola na Abalayama kuna, oyo akokaki kososola makanisi na motema ya Sala nsima na Ye.  Yango ezalaki Yesu te, Abotamaki naino te.  Kasi ezalaki Moto moko kati na mosuni ya moto, oyo Abalayama abiangaki “Elohim, Mozui monene ya Nguya Nyonso.”

 Soko ondimí ete Mwana ya moto Amonisami kati na mokolo na biso;  Nzambe koloba na nzela ya mbɛbu ya moto, ndenge nini moto akokaki te komona litómbá ya kotia Mongóngó wana lokola MONGÓNGÓ YA LITOMBÁ KOLEKA OSENGELI KOYOKA?

 Nazali koloba mabe te na basusu  baoyo bamonaka te mpe bandimaka te oyo tondimí;  bazali bandeko na biso mibali mpe basi, kasi NASEPELI MINGI KOLEKA, NATÓNDI KOTÓNDA, NANDIMISAMI KOLEKA ete oyo nde nzela epesami na Nzambe epai na Mwasi na Ye ya libala. Nakoki kosala eloko mosusu te.

Mpo na ngai mpe ndako na ngai, Kofina Play nde NZELA BOBELE MOKO.

 Nabiangi mokili mbala moko lisusu koya mpe kosangana elongo na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Kokokisa Liloba Na Ye 64-0816.

 Ndeko.  Joseph Branham

 Makomi ya kotanga liboso ya losambo:

 St. Matai 24:24

 St. Malako 5:21-43 / 16:15

 St. Luka 17:30 / 24:49

 St. Yoane 1:1 / 5:19 / 14:12

 Baloma 4:20-22

 I Batesaloniki 5:21

 Baebele 4:12-16 / 6:4-6 /13:8

 I Mikonzi 10:1-3

 Yoele 2:28

 Yisaya 9:6

 Malaki 4