22-0925 Kondimisa Liloba Na Ye

NSANGO: 64-0816 Kondimisa Liloba Na Ye

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mongwa ya Mokili,

Bobele na ntango emonani lokola ete Ekokaki kokóma malamu koleka te, Apesi biso bande mosusu etóndi na Bimoniseli. Tozali na bilembeteli longwa na boyebami liboso. Ntina wana tozali koya longwa na monyele mpe eloli, likolo mpe ngelé, koyoka Liloba na bomoi limonisami.

Ntango Nzambe akelaki mokili, tozalaki na makanisi na Ye. Ntango mofundi na biso akóbaka kotalisa biso mosapi mpe koyebisa Tata: “basalaki boye, basalaki boye, basalaki boye,” Makila na Nkolo na biso mazipaka biso. Ntango tozali kobondela, Nzambe amónaka biso te, Ayokaka bobele mongóngó na biso na nzela na Makila na Yesu.

Satana akokoka te kotungisa; to, akokoka komeka, kasi akokoka te kozua Moklisto oyo abotami mbala ya mibale. Zambi, Nzambe, longwa na bozalisi na mokili, amonaki ye, mpe atindaki Yesu kosikola ye, mpe Makila malobaka mpo na ye. Akosumuka ndenge nini wana ekoki na yango komónana, kútu na Nzambe te? Akosala kutu te…Eloko bobele moko ayokaka ezali mongongo na yo. Amonaka elembeteli na yo. Amen! Ezali solo. Bomoni?

Mosakoli na Nzambe ayebisaki biso biloko oyo. Ezalaki ye te kosolola; azali bobele kobimisa makanisi na Nzambe, mabongi na Ye ya biloko bisengeli koya. Azali kosalela monoko na ye kosangela yango na nzela wana. Mpe esilaki ye koloba yango, esengeli makokisama. “Lola mpe mabelé ikoleka, kasi Liloba na Ngai likokwea soki moke te.”

Akokisaki Liloba na Ye epai na biso lisusu mpe lisusu na lisusu. Akokisaki nde epai na biso te ete Azali: Mwana na Moto akomaki mosuni kati na biso? Akokisaki nde epai na biso te ete: Mosakoli na biso akokisi Likomi moko na moko elobamaki na ntina naye? Akokisaki nde epai na biso te ete: Tozali Mwasi na Ye ya libala? Akokisaki nde epai na biso te ete: Tozali na ndanga ya solo ya Molimo Mosanto? 

Tozali kotungisama ko mpo na nini? Akokisi epai na biso, soko totelemi elongo na Ye, Akotelema elongo na biso. Liloba na Ye likoki kokwea te.

Nyoso baoyo bandimi Etinda oyo mpe motindami ya eleko oyo bakobikisama. Baoyo nyoso bandimi Etinda oyo mpe motindami te, bakokufa elongo na mokili. 

Yoka na bokebi lingomba. Ebele monene basosoli mabe, to bazali te na Emoniseli ya Liloba. Bazali koyoka ete totiaka motema mingi likolo na moto. Soko ya solo mpenza ondimaka ete Ndeko Branham azali mosakoli na Nzambe, na bongo fungola motema mpe bomoto na yo mpe yoká oyo Yango Elobi Nkolo elobaka. 

Nini nde ekoyeisa Mwasi na libala elongo? Nini nde ekosangisa Mwasi na libala kozala Moko elongo na Nzambe? 

“Na mokolo wana Mwana na moto akomimonisa.” Nini? Kokanganisa Lingomba na Motó, kosangisa, libala ya Mwasi na libala. Ebiangeli ya Mobali na libala ekoya alimá kati na oyo, ntango Mwana na moto akokita mpe koya kati na mosuni na moto kosangisa bango mibale elongo. Lingomba lisengeli kozala Liloba, Azali Liloba, mpe bango mibale basangani elongo, mpe, kosala yango, ekosengela na komonisama ya emoniseli ya Mwana na moto.

Ekosengela na komonisama ya emoniseli ya Mwana na moto. Likanisi na yo te, lisosoli na yo te, makanisi na yo te soki kotea na yo te. Mwana na moto akosangisa Mwasi na libala na Mobali na libala, mpe Ezali kosalema SASAIPI MPENZA.

Tozali sasaipi na Molúlú elongo na Mobali na libala mpe ekoumela te tokolongwa mpo na Lipati na libala mpe bokundoli ya Lipati ya libala na biso. 

Liloba mpe Lingomba bakomi moko. Nyoso oyo Mwana na moto asalaki, Azalaki Liloba, Lingomba likosalaka eloko yango moko.

Tokokoka bobele kobika na Liloba nyoso likobimaka na Monoko na Nzambe! Nzambe akokisaki ete mosakoli na biso azali Monoko na Nzambe mpo na lelo. Toyebi boni ete ezali Liloba na Nzambe? Alobaka bongo, na nsima Akokisaki Yango na nzela na Liloba na Ye. 

Tozali Lingomba-Mwasi na libala abelemisami kati na mikolo ya nsuka. Abiangami kobima longwa na bamosusu nyoso; ndeke ya matónó-matónó oyo ezwi matónó na nzela ya Makila na Ye. 

Tata, mitema na biso ezali kopumbwa, mpe motema na ngai ezali kotuta, ntango nakanisaka yango mpe koyeba ete Maloba na Yo mazali solo, moko na Yango te ekokwea. 

Oyo ezali nzela moko kaka ya Nzambe epesami lelo. Ezali nzela bobele moko ya kozanga kobongola Liloba moko. Bokanisa, Molimo Mosanto akoki koya mpe kopakola moto moko, mpe ata ko bongo ezali libanda na Mokano na Nzambe. TOSENGELI TOTIKALA NA LILOBA LINDIMISAMI NA EBANDELI. 

Soko okolinga kotikala na Liloba yango mpe koyoka Mongóngó na Nzambe elongo na biso, Nabiangi yo ete oya komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima na nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Kokokisa Liloba Na Ye 64-0816.

Opusami te komibakisa na biso to kútu koyoka bande yango moko na ntango moko elongo na biso, kasi Nabondeli yo, yoka mosakoli na Nzambe. 

Ndeko Joseph Branham 

Makomi ya kotanga liboso ya losambo: 

St. Matai 24:24

Malako 5: 21-43 /16:15

Luka 17:30/ 24: 49

Yoane 1:1 / 5:19 / 14:12

Baloma 4: 20-22

I Batesaloniki 5:21

Baebele 4: 12-16 / 6:4-6 / 13: 8

I Mikonzi 10: 1-3

Yoele 2: 28

Yisaya 9: 6

Malaki 4