22-0918 Ezalelo Ekoya Ya Mobali Ya Libala Ya Likoló Mpe Mwasi Ya Libala Ya Mabelé

Nsango: 64-0802 EZALELO EKOYA YA MOBALI YA LIBALA YA LOLA MPE MWASI YA LIBALA YA MOKILI

BranhamTabernacle.org

Balingami Baninga epai Na Mosakoli,

Motema na ngai ezali kopunjwapunjwa, na kosepela ntango Nazali kokanisa na ntina na biso koyangana elongo mokolo mwa Lomingo loye koyoka Mongóngó na Nzambe kosolola na biso. Ezali na esengo monene mingi te na bomoi na ngai koleka kozala na bozali ya Molimo Mosanto mpe koyoka Ye kosolola na Mwasi na Ye ya libala, mbebu na litói.

Ezali na eloko mosusu te kati na mokili oyo ememelaka ngai nsai mpe kimia, bobele Liloba na Ye. Ntango Nayoki kaka: “Mbote baninga,” Napusani bobele na nsima, Namisemboli mpe Nameli longwa na Etóko wana lokola ezali kosolola na ngai Maloba ya Bomoi na Seko. Kokanisa, Nzambe atindaki ye epai na NGAI MPE BINO, mpe tozali BANINGA na mosakoli mpe motindami Nzambe.

Alingi biso mingi mpenza na motindo ete Atindaki mosakoli na Ye koyebisa biso nyoso na ntina na Ezalelo na biso ekoya. Asepelaki mpenza koyebisa biso mpo na Yango, kino na bonene ya bozindó koleka ndenge eyebisamaki na Yoane. Amonisaki na biso, Ezali mboka na lolenge ya matúmu manei te, kasi mboka na lolenge piramídi, epai wapi Mwana mpate akozala na sóngé mpe Pole na mokili.

Atikaki biso koyeba balabala ikosalama na wolo mpe ndako tokobika na kati ikozala wolo engengisami. Azali kotia mwa eloko moko na moko kaka kokokana na motema na biso, bobele oyo tokokaki kosepela na yango. Atikaki eloko moko te ezangi kosalema. Motongi ya Bonzambe ayemaki Yango bobele mpo na biso, Balingami na Ye.

Banzete na Bomoi ikozala kuna, mpe ikobota mitindo zomi na mibale ya mbuma. Bikuke na mboka ikokangama na butu te, mpamba te butu ezali kuna te, Akozala Pole na biso.

Nani akozala kuna? 

Banani nde babimaki likolo na mabelé na sika elongo na Noa mosakoli? Baoyo bakotaki elongo na ye kati na bwato. Ezali solo? Baoyo wana nde babimaki likolo na yango. Bomoni? Baoyo bakotaki elongo na Noa, na nzela na etinda na ye, bazalaki baoyo babimaki likolo na mabelé na sika nsima na libatisa na yango na mai.

Azali koloba na ntina na BISO baninga na ngai! Tozali kati na Bwato na biso mpo na lelo; Liloba na Ye, Etinda oyo, elongo na Noa na biso mosakoli. Mpe kuna na ngambo na Mokili wana, Mboka yango epai wapi Mwana mpate azali Pole, akoyeba BISO. Tozali bato na ye, mayaka na ye likolo na motole. Toyei longwa na Monyele mpe Eloli, na Mboka oyo etongami na matúmu manei. Mboka yango Abalayama azalaki koluka.

Lokola Nazali komona Liloba komindimisa, Nayebi, na elilingi ya ntembe ata ndambo te, mayaka ya motole na ngai bakongengisa nyoso kati na mokili, na mokolo yango.

Tokokoka nde kútu kobanda kobanza…Mosakoli na Nzambe alobaki, AYEBAKI, mosika na elilingi nyoso ya ntembe, ete TOzali mayaka ya motole na ye, mpe tokongengisa nyoso kati na mokili na mokolo wana. Aleluya…Nkembo…Nkombo na Nkolo esanzolama.

Baninga, soko tokanisi ete ezali bikamwa sasaipi, kofanda elongo longwa na nzonganzonga na mokili, koyoka mpe koleisama likolo na Liloba na Ye kati na ba bande oyo, ekozala ndenge nini ntango tobiki kati na Mboka elongo na Ye!

Mosakoli na Nzambe akozala mozalani na biso na ekuke ekolanda. Tokolia longwa na banzete wana elongo na ye, mpe tokotambola na balabala wana elongo. Tokomata na ba balabala wana ya wolo na etóko, komela longwa na etóko, kotambola kati na ba paladiso na Nzambe, elongo na Banje kozipa mabelé, koyemba ba nzembo.

Oo, mokolo nini oyo ekozala! Ebongi na nyoso. Nzela ezali komonana mabaku-mabaku, ntango mosusu ezali kokóma mpasi, kasi, oo, ekozala moke mingi ntango Nakomona Ye, moké mingi. Ekozala nini ba nkombo mabe mpe makambo balobaki, ekozala nini ntango Nakomona Ye kati na Mboka kitoko yango, Mboka kitoko yango na Nzambe?

Baninga, Nakoki kozila te komona, mpe kozala kati na Mboka wana. Nazali kotalela na motema molai kozala kuna elongo na Nkolo mpe Mobikisi na biso, mosakoli na Ye, mpe elongo na moko na moko na bino.

Nakangami na Mboka kitoko wana
Nkolo na ngai abongisaki mpo na Baoyo na Ye;
Epai wapi Basikolami na bikeke nyoso
Koyemba “Nkembo!” zingazinga na Kiti ya Bokonzi Mpembe.
Ntango mosusu Nazalaka lokola na malali mpo na mposa ya Lola,
Mpe nkembo na yango Nakolembetela kuna;
Esengo nini yango ekozala ntango ekomona ngai Mobikisi na ngai,
Na kati na mboka yango kitoko ya wolo!

Nazali kobianga mokili koya komibakisa na biso, baninga na mosakoli, lokola tozali koyangana zingazinga na Kiti na Ye ya Bokonzi koyoka Mongóngó na Nzambe kosolola na biso na 12:00 nsima na nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Ye kosolola na biso nyoso na ntina na: Ezalelo Ekoya ya Mobali na Libala na Likolo mpe Mwasi na libala ya Mabelé 64-0802. Nakoki kopesa bino elaka, ekozala Mokolo monene mingi na bomoi na bino.

Ndeko Joseph Branham

St. Matai 19:28

St. Yoane 14: 1-3

Baefese 1: 10

2 Petelo 2: 5-6/ Mokapo na 3

Emoniseli 2: 7 /6:14 /21: 1-14

Lewitiko 23: 36

Yisaya     Mokapo ya 4 /28: 10 / 65: 17-25

Malaki 3: 6