22-0911 Mabulu Matobwani

NSANGO: 64-0726E Mabulu Matobwani

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Bameli mai ya Etóko,

Tobakámi te, tozali eteni ya mbuma ya ebandeli ya Liloba. Molimo Mosanto Ye moko, akembisaki, andimisaki, amimonisaki Ye mpenza epai na biso. Toyambi Yango na mobimba na Yango, kati na nguya na bondimisami na yango mpe Emoniseli na oyo ezali Yango, mpe tokómaki eteni na Yango. Ezali koleka bomoi mpo na biso.

Molimo Mosanto Ye moko asololaki na kati na esalelo ya komikitisa ebongi te mpe alobaki: “Tala lingenda na Ngai, Liloba na Ngai, zua Yango mpe kende mpe mema Etinda.” Azuaki Liloba na ye mpe apapaki biso, kosala biso Mwasi na Ye na Libala.

Etungisaki ba nganganzambe komona bato kolongwa na mangomba na bango mpe kokende koyoka ba bande. Balobaki: “Soko moko na bino akei na masangá yango, okotiama libanda, tokotia yo libanda na ebongiseli na biso”.

Eyano na bango: Bokoki na bino kobengana biso, tokokende ata bongo! Tozali na mobembo elongo na Nkolo Yesu, Libanga na biso litutamaki, tozali kolia Bilei ya banje, Mana mabombamaki longwa na likolo, mpe komela longwa na Libanga. Totungisamá soki moke te soko tozali komela nini, ezali eloko mosusu te kasi LILOBA MPETO.

Tozalaka ntango nyoso na kolamukisa oyo ezali kokóbá. Etóko na biso ezali kopunjwapunjwa, mpe lisusu na lisusu, mpe lisusu na lisusu. Ezali na nsuka te na Yango. Tozuaka mai malamu, ya mpio ntango nyoso tofinaka Play. Totalelaka Yango mpe tozali kobika likolo na Yango. Eloko bobele moko osengeli kosala ezali kende kuna mpe mela.

Tobikaka na Liziba yango ya kopunjuapunjua mokolo na mokolo! Tozali na lotómo te ya kobenda, kotimola, kobenda na ebendeli ya masini, to soko eloko nini; bobele kosangana na nzela na Ye epesami, mpamba. Bokoki kozua bibongiseli na bino esalemi na bato lokola bolingi, mabulu na bino ya mai ma kala mazangi kotiola; mpo na biso, toyaka na Etóko na Ye ya mpeto. Ezali esengo na biso. Ezali Pole na biso mpe makasi na biso.

  Azali mai na ngai. Azali bomoi na ngai. Azali Mobikisi na nzoto na ngai. Azali Mobikisi na  molimo na ngai. Azali Mokonzi na ngai. Nyoso Nazali na yango bosenga ezuami kati na Ye.  Mpo na nini Nakosepela Nakende na eloko mosusu?

 Mpo na biso ezali na esika mosusu ya kokende te kasi mbala moko kokende na Etóko epesami  na Nzambe. Kotungisama soki moke te soko tokomela nini. Tokotia soki moke te ekongoleli ya  kala ya kotoboka oyo ekoki kobimisa bosoto ya monene, kasi mai ya bosoto ezali kotikala.  TOZUAKA NA BISO KAKA MAI MPETO YA ETÓKO EZALI NA MINGWA MPE  BILOKO NYOSO TOZALI NA YANGO BOSENGA.

Alendisaki biso: Bana mike na ngai, botungisama lisusu te, bozali na ndanga mpenza ya Molimo Mosanto. Botalisi Ngai ete bondimaka Liloba moko na moko. Boyambaki Yango. BOZALI YA NGAI. TOZALI MOKO. MOBALI MPE MWASI.

Nazali koya mpo na bino nsima ya mwa ntango, na kobweta liso. Nazali kobongisela bino ezalelo ya sika. Bokolinga esimbeli na Ngai ya bosukisi. Nayebi ezali mpasi likolo na bino sasaipi, mpe bozali na mimekano mpe bitumba mingi mpe mikumba na bino izali na bozitó. Kasi bobosana te, bozali na eloko ya kotungisama na yango te, Napesaki bino Liloba na Ngai. Bozali Liloba na Ngai. Nasilaki kosala nyoso mpo na bino. Boloba Liloba mpe bobete ntembe te. Bozali na Kondima na bino, kobakisa mosakoli na Ngai apesaki bino Kondima na ye.

Nakolinga ete omibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyoka 64-0726E MABULU MATOBWANI, mpe komela longwa na Etóko lokola ezali kopunjwisa Liloba Mpeto lizali na bosenga ya bikongoleli te.

Ndeko Joseph Branham

Njembo 36: 9

Yilimia 2:12-13

Mosanto Yoane 3: 16

Emoniseli Mokapo ya 13