22-0904 Koyeba Mokolo Na Bino Pe Nsango Na Yango

NSANGO: 64-0726M Koyeba Mokolo Na Bino Pe Nsango Na Yango

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami bapapami,

Nalingi ete moto nyoso ayeba mpo na nini tozali na esengo mingi!!

Toyambaki Liloba na Nkolo. Liloba limonisami lilobamaki na mosakoli na Nzambe ya Malaki 4. Tozali Mwasi na Libala ya Yesu Klisto. Tozali Baoyo batikalaki sembo na Mongóngo na Ye endimisami.Tozali baoyo Apesaki Mayaka ya motuya monene, Emoniseli ya solo ya Etinda na Ye mpe motindami na Ye.

Nzambe akamataki Liloba ya mosakoli na Ye mpe apapáki Mwasi na Libala oyo andimaka litónó moko na moko mpe ebiangeli moko na moko. Apapáki biso, lokola Alakáki ete Akokaki kosala. Tozali Ba mpate na Nzambe, mpe toyokaka bobele Mongóngó na Nzambe! “Ba mpate na ngai bayokaka Mongóngó na Ngai,” ezali biso Kofina Play.

 Totongami longwa na ekólo mobimba; longwa na New York, longwa na Massachusetts, na Boston, Maine, Tennesse, Georgia, Alabama, mpe nzonganzonga na ekólo mobimba. Longwa na Afrika kino Mexico, Pótó kino Australia, tozali koyangana elongo, na nse ya Etinda moko, Mongóngó moko, mpe ezali kosangisa Mwasi na libala mpo ya Konetolama.

Mosakoli na biso, motindami na Nzambe, Mwana na Moto komimonisa kati na mosuni, azali kogánga: “Satana, longwa na nzela na ngai, Nazali na Etinda ya Mokonzi. Nazali Motindami na Mokonzi. NAzali na Liloba lindimisami mpo na lelo. Nabongisamaki kobimisa mpe kokamba Mwasi na Ye ya libala.”

 “Nazali kobenda bato babima, kopapa bango longwa na biloko oyo. Kobenda bango bábima, kotalisa na nzela ya Makomi, ete Nzambe azali kotelema awa; elongo na bokokisami ya Likonzi na Móto.”

 Nzambe ayebaki ete ezalaki na bato likolo na mabelé oyo abongisaki liboso mpo na Bomoi. Ayebaki ete ezalaki ntango ya kotinda motindami na Ye kobianga Mwasi na Ye na Libala kobima, boye Asalaki yango. Biso nde baoyo toyebaki Yango. Tozali baoyo Ayebaki tokokaki kondima Liloba moko na moko.

 Abalayama ayebaki ete Nzambe azalaki kosolola na ye longwa na mosuni ya moto. Ayebaki elembo na Ye mpe abiangaki Ye N-K-O-L-O, Elohim, mpe Apambolamaki na Yawe. Toyebaki yango bobele lokola ezalaki na mokolo wana, ekozala mpe bongo na ntango mwana na moto azali komimonisa, Elohim kosolola kati na mosuni ya moto.

 Tozali eteni na Ye, mpe Mwana na Ye, mpe to kotikala elongo na Ye mpo na libela. Ezali te na nzela na ebiangeli na biso to kopona na biso, kasi na nzela ya kopona na Ye. Tozalaki na eloko ya kosala na yango te. Ye nde aponaki biso liboso ya kozalisama na mokili.

Ata oteya ndenge nini, ósala ata nini, ekokemba te, ekomonisama te, ekondimisama te; bobele na nzela na Ye Oyo alobaki: “Nazali Pole na mokili,” Liloba. Na bongo ekosengela ete ngu—ngu—nguya moko eya, Molimo Mosanto Ye moko kokembisa to kondimisa, to kokokisa, to kokómisa na komónisama ete oyo elobaki Ye liboso ekokokisama na mokolo oyo. Pole ya mpokwa ebimisi yango. Oyo ntango nini! 

 Amonaki biso kati na emononeli wana tolekaki liboso na ye. Tozalaki na esika yango moko Mwasi na libala Azalaki na yango na ebandeli, Alifa na Omega. Azalaki kotala boko kobima na molongo, mpe azalaki komeka kobenda Ye ázonga, kasi biso nde tozalaki kogánga makasi ete: “Tozali kopema likolo na yango.”

Botala, “Lokola Yane na Yambele mpe batemelaki Mose,” ekozala mpe na bamosusu na bango bakoya alimá. Sasaipi, ezali te, azali te kosolola na ntina ya ba Metodisiti, ba Batisiti, awa; bazali libanda na elili. Bomoni? “Kasi Yane na Yambele batemelaki Mose na Alona, na bongo mpe bango; mibali na makanisi mapengwi mpo na oyo etali Solo,” bapengolami na bindimeli mpe malakisi ya lingomba, na esika ya Biblia.

 Boni esengeli na biso mpenza kokeba kotikala na Liloba ya solo lindimisami mpo na mokolo na biso. Tosengeli ntango nyoso kokundola mpe koyeba Nani ndeLiloba liyaka epai na ye.  Nani azali bobele ye moko molimboli ya bonzambe ya Liloba? Nani nde azali Liloba mpo na mokolo na biso?

Molimo na Nzambe, oyo azali Liloba na Nzambe, “Liloba na Ngai ezaliMolimo mpe Bomoi,” ekotia Mwasi na Libala na esika na ye. Mpamba te ayebi esika na ye kati na Liloba, na mbisa Azali kati na Klisto, ekotia Ye na esika na Ye.

 Obiangami koya koyoka Mongóngó se moko mondimisami ya Nzambe mpo na mokolo na biso, mpe koyeba esika na yo kati na Liloba mpe kotiama na esika na yo wana tozali koyoka Elohim kosolola kati na mosakoli na Ye mpe komemela biso Liteya:Koyeba Mokolo na Yo Mpe Etinda Na Yango 64-0726M, na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham 

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya:

Hosea: Mokapo  6

Ejekiele: Mokapo  37

Malaki 3:1 / 4:5-6

II Timote:3: 1-9

Emoniseli: Mokapo ya11  Nzambe, kela kati na ngai kolamukisa. Tika ete nazala kolamukisa. Tika ete moko na moko na biso azala kolamukisa, kolamukisa kati na ngai. Sala ete, Nkolo, nazala na nzala, sala ete Nazala na mposa. Kela kati na ngai, Nkolo, ete oyo esengelami na yango kati na ngai. Tika ete longwa na ngonga oyo, nazala wa Yo; mosali oyo amikabi na koleka, mosali malamu mingi, oyo apambolami na Yo mingi; na makoki mingi, na komikitisa mingi, na boboto mingi, oyo alingi kosala mingi,; oyo azali mingi Koluka makambo oyo ezali malamu, mpe na bobosanaka