24-0324 Koyeba Mokolo Na Bino Pe Nsango Na Yango

NSANGO: 64-0726M Koyeba Mokolo Na Bino Pe Nsango Na Yango

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami ya motuya mpe ya bolingo,

 Boni ezali bikamwa koyeba ete tozali Mwasi na Ye ya libala ya motúya mpe ya bolingo.  Tosalemi longwá na mokili mobimba, komiyanganisa elongo zingázingá ya Liloba na Ye, koyokaka Mongóngó ya Nzambe koleisa bomoto na biso.

 Tondimi Yango na mobimba na yango, mpe na nguya ya kondimisama mpe Emoniseli na Yango.  Tokómí eteni na Yango.  Ezali eloko oyo ezali kati na biso.  Ezali mingi koleka bomoi mpo na biso.

 Toyebi: Motindami na Ye Mwanje ya Nsambo.

 Toyebi: Etindá ya Pole ya Mpókwa.

 Toyebi: Tozali banani.

 Nzambe azwi Liloba ya mosakoli na Ye mpe akáti kobimisa biso.  Apapí biso na nzela ya Malaki 4, lokola alakaki ete Akosala.  Tondimi Liloba moko na moko na mitema na biso nyonso.

 Ezali na kolamukisa monene ezali kosalema kati na bato.  Bango mpe bazali koyeba litómbá ya koyoka Mongóngó wana.  Bazali na mposa ya kozonga mpe koyokisa ba bande na mangomba na bango.

 Eyebisamelí bango na nzela ya Molimo Mosanto, ete oyo ezali Nzela Nzambe apesi mpo na lelo.  Bayebi oyo ezali Mongóngó basengeli koyoka.  Ezali Bilei ya zambe bibómbamáki mpo ya bobongi be ya Mwasi na Ye ya libala.

 Liloba lilakáki Yango.  Bande isapí Yango.  Bazali kondima Yango.

Esalaki nini?  Etungisaki banganga-nzambe, komona bato kotika mangomba mpe kokende.  Alobaki, “Soko moko kati na bino ekei na likita na Ye, akolongolama na Bondeko.  Tokobimisa yo mbala moko na ebongiseli.”

 Ekokí kondimama te, kasi ekómi eloko yango moko lelo.  Bakobwaka yo libanda na mangomba na bango soko olobi: “Nabondeli yo, tiela biso ba bande.”  Tokokaki ndèle kobánza ete yango nde ékabola bato?  Koyokisa Mongóngó ya Nzambe kati na mangomba na biso?

 Lingomba libosani basakoli na bango.  Bazali “lisusu na bosenga na bango te,” elobí bango.   Kasi Nzambe ayebi ete Asengeli kozala na bango;  Apapaka bato na Ye na nzela ya Liloba na Ye.  Kasi Ezali makambo ya kala mingi mpo na bango lelo oyo.

Tokotikala na mosakoli na biso.  Tondimi Ezali Mongóngó mozali kobianga Mwasi na Ye ya Libala.  Epai na biso, ezali na yango kaka na eloko moko te ya litómbá koleka KOFINA PLAY.

 Oo, bampate ya Nzambe, boyoka Mongóngó ya Nzambe!  “Bampate na ngai bayokaka Mongóngó na Ngai.”

 Boya koyoka mpe koyeba Mongóngó wana elongo na biso, mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá., ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka, Koyeba Mokolo na Yo Mpe Etindá Na Yango 64-0726M.

 Ndeko.  Joseph Branham