24-0317 Kobima Na Moláko

Nsango: 64-0719E Kobima Na Moláko

BranhamTabernacle.org

Balingami Basoda Baklisto,

 Bokanisa yango! Ezali nsuka ya ntango, Aleluya! Tozali awa. Mokolo monene ya Boyéi ya Nkolo mpo ya Mwasi na Ye ya libala ebelemi. Tozali komiyanganisa elongo útá na mokili mobimba, na bobongísámáká be na boyóki Mongóngó ya Nzambe. Tozali kotalela mpe kozila ete balingami na biso bámónana…ezali na yango kaka mokolo sé mokolo sikawa.

 Eloko bobele moko topesámáki lotómo kosala ezali “kotikala na Liloba”. Nyoso tomónaka ezali Yesu, mpe azali Liloba likómí mosuni. Yango nde Emóniseli mpo na mokolo ya biso. Yango nde Moláko ya Nzambe mpo ya Mwasi na Ye ya libala.

 Etindá eye, Mongóngó moye, bande iye, nde nyoso tozali na yango bosenga mpo ya Konetolama. Tosengeli na eloko mosusu te. Tobiangámákí kobima, tokabwaní na nyoso longólá sé Mongóngó wana.

Tondimísamí Mongóngó wana nde nzela epésami na Nzambe mpo ya lelo.

Bókanisa yango, Apesaki biso mosakoli monene koleka ya ntango nyoso. Ye oyo Likonzi ya móto  Ye moko azali na elílí na ye elongó mpo Ákoka koyebisa mokili: “oyo nde mwanje na ngai ya nguya. Azali Mongóngó na Ngai epai na bino. Oyo elobí ye na mabelé Nakoyóka yango na Likoló. Moko te azali lokola ye”. 

“Natieli ye motema mpe ye kaka, mabombami ma ngai manso Nabombaki longwa na bozalisi ya mokili. Ye nde oyo Nabongísáki kobianga BINO kobima na mokili oyo koya epai na Ngai. Ye nde Naponaki kokamba, kotámbwisa, mpe kotálisa bino nzela. Nalobeli bino, Boyóka ye, mpámba te ezali ye koloba te, EZALI NGAI, NAZALI YA MONENE!”

 Nabongísákí mpe Nabiangákí mibali ya ngúya kosangela mpe koyebisa mokili: “Lelo oyo, makomí ya Malaki 4, Emóniseli 10:7, mpe Luka 17:30 makokisámi libosó na míso ma bino. Mwanje na Ye ya nguya akómí, lokola elobaki Makomi. Nzambe Azali awa kati na biso, komimónisa kati na mosuni ya moto lokola Alobáki Akosala.”

 Ezali Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo mpe libela. Tobiangamí kotalisa bino epai na ye, mwanje ya Nzambe. Ye nde Molimo Mosanto aponáki kokamba mpe kobianga Mwasi na Ye ya libala kobima. Kobéndana maloba te, koswana te, kobunda to kosilika te soko nani nde akozala nganga monene; nani akozala oyo, oyo kuna, to mosusu. BOTIKALA NA MONGÓNGÓ WANA. Zambi ezali na Mongóngó ya Nzambe sé moko mondimisami mpe nkombo na ye ezali William Marrion Branham.

Tosengeli tózala na bokébi kotikala na Mongóngó yango, lokola ezali na ebelé balingí kotangola bino na nzela. Mimeseno mia bango mizali kobatela Mongóngó wana mosika longwá na kati na bato. Akómí mopaya epai na mingi mpenza na bango. Mongóngó mwa bango mozuí esika ya Mongóngó wana, kino ntango Nzambe, na nzela ya ba bande, atámbolélí bango, Azali mopaya.

Bozali bonéne bozalí elongó na biso. Moto sé moto oyo asimbamaka na Molimo akoki koloba ete Mongóngó wana nde Mongóngó ya Nzambe. Ezali Moláko ya Nzambe mpo ya lelo.

 Moto na moto oyo abéti tólo ete azali Mwasi ya libala ya Klisto asengeli ákána soko Azali kati ya Moláko nini. Basengeli bámítúna motuna moye mua petee: Na Mongóngó nini nde Mwasi ya libala nyoso akoki koloba “AMEN” na yango?

 Soko ya solo ozali Mwasi ya libala ya Klisto, na Emóniseli ya soló ya Liloba mpo na lelo, eyano ezali bobele moko: Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande. Ezali solo ete Satana amekaka kosimba-simba yango na nzela mingi mpenza ikeseni, kasi ezali na eyano mosusu te mpo ya Mwasi ya libala. Ezali na yango kaka petee.

Biso banso toyebi ete Satana azali kosalela eyano yango mpo ya kokabola biso. Kasi Liloba liyebisi biso Mwasi ya libala asengeli ÁSANGISAMA…TOZALI, na nzela ya MONGÓNGÓ SÉ MOKO MOZALI KOSANGISA BISO.

 Bóya kosangisama na biso, zambi ngonga elekí koleka.

“Nalingí kobima na moláko. Ata ésenga ngai nini, Nakozua ekulúsu ya ngai mpe Nakomema yango mokolo nyoso. Nakobima na moláko. Ézala nini bato bakoloba na ntina na ngai, Nalingi kolanda Ye libándá na moláko. Namilengeli kokende.”

 Soko olingi kozala kati ya Moláko ya Nzambe mpo ya lelo, OSENGÉLÍ KONDIMA ete Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande nde Mongóngó ya litoómbá koleka osengeli koyoka.

Yaka komibakisa na eténi ya Mwasi ya libala Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Mongóngó Nzambe aponaki kokamba Mwasi na Ye ya libala, lokola azali komemela biso Liteya, Kobima Na Moláko 64-0719E

 Ezali te “moláko moko boye”; ezali” MOLÁKO.”

 Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya losambo:

Baebele 13:10-14
Matai 17:4-8