24-0310 LIPATI YA MINDULE

Nsango: 64-0719M LIPATI YA MINDULE

BranhamTabernacle.org

Balingami Bana Ya Pole,

 Boniboni tozali na botóndi tozali kotambola kati na Pole na Ye.  Kozala eteni ya Pole wana, toyebámi kati na Pole na Ye.  Kobiangama mpe koponama na Ye.  Tozali Mwasi ya libala ya Klisto, oyo toyebami elongoó na Ye.  Bango mibale bazali sikawa Moko.

 Nakokaki kokoma yango mingi koleka soko moké te.  Tokoki koloba yango mingi koleka soko moké te.  Etíndá oyo elingi koloba NYOSO epai na biso.  Koyeba ete tozali na Emoniseli ya solo ya Liloba na Ye eleki eloko nyonso tokokaki kotia na maloba.

 Kozala kobika na mokolo oyo mpe kozala eteni ya oyo ezali kosalema, ezali lokumu monene koleka Nzambe akokaki kopesa biso.  Monene bobele lokola ezalaki na bofándáká na makita na Eyanganelo ya Branham, komona mpe koyoka mwanje ya Nzambe komema Mateya maye, ezali kútu MONENE KOLEKA kozala kobika na mokolo oyo, mpe ntango oyo, mpe kozala bokokisami ya Liloba yango.

 Nzambe, kati ya Manáka ma Ye manene, abongisaki Nzela ete tókoka koyanganisama útá na mokili mobimba, koyokaka Mongóngó ya Nzambe banso na ntango moko, kobongisama bé na Liloba na Ye.  Kozila koyoka na segɔnde sé segónde motindami na biso mwanje ya nsambo koloba:

“Talá Mwana-Mpate ya Nzambe molongoli ya lisumu ya mokili!”

 Eloko ya ndenge wana ezalaki naino te útá ebandeli ya ntango.  Bosilisi ya Mwango monene koleka ya Nzambe ezali kosalema, SIKAWA MPENZA, mpe tozali eteni na Yango.  Mokolo monene ya Nkolo ekómi pene.

 Mabombami manso mamónisami epai ya Mwasi-libala na nzelá ya motindami mwanje ya nsambo ya Nzambe.  Bilembo, Bileko, Nkáké, Kondima ya Konetolama, Bobéndami ya Misato…NYOSO elobamaki mpe ezali likolo na ba bande mpo Mwasi ya libala ayoka yango mbala na mbala, mpe EZALI KOBONGISA BISO.

 Molimo Mosanto azongi kati na Lingómbá lisusu;  Klisto, Ye moko, amonisami kati na mosuni ya moto, na ntango ya mpokwa lokola Alakáki.

Bóyóka na bokéngi sikawa Mwasi ya libala, bósímba Yango.

 Tobiangami kobima na nzela ya Liloba;  Klisto Ye moko abiangaki biso kobima.  Amimonisaki polele epai na biso;  Baebele 13:8, Luka 17:30, Malaki 4, Baebele 4:12, Makomi manso maye malakákí Ye.

 Ezali Yesu, Mwana ya Nzambe, Oyo amimonisaki epai na biso na nzela ya Makomi mabongísámákí liboso mpo na mokolo oyo, KOBIKA LISUSU.

Mpe kondima Yango, nde elembetele ya Molimo Mosanto.

Nzambe atindaki mosakoli na Ye kobianga Mwasi na Ye ya Libala kobima.  Liloba liyebisi biso mosakoli azali Liloba ya Nzambe ya bomoi, limónísámí.  Nde elembo ya nsuka mokili mokozua;  Yawe koloba na lolenge ya moto.

Moto kati ya mosuni ya moto, lokola mosakoli, nzokande Ezalaki Elohim kososola likanisi lizalákí kati na motema ya Sala, nsima na Ye.  Mpe Yesu alobaki, “Lokola ezalaki na mikolo ya Lota, ekozala mpe bongo na koya ya nsuka ya mokili, ntango Mwana ya moto,” Mwana ya Nzambe te, “ntango Mwana ya moto akozala komónisa.  ”

 Mwasi ya libala ayebi ete longola sé soko ozali ntango nyonso kati na Liloba, okoyeba te Azali nani.  Bayebi ntina ya kobatela Mongóngó wana liboso na bango mikolo nyonso na Bofináká Play.

 Sikawa Mwasi ya libala asengeli kolongwa na nzela, mpe komata, mpo ete basakoli mibale ya Nzambe na Emoniseli bakoka komónana na mosala koyúla Kelelo ya Nsambo. Koyebisa bango Klisto.

 Boya kozala eteni ya lisakoli kokokisama  Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville, lokola mosakoli ya Nzambe azali komema Liteya , Lipati Ya Mindúle 64-0719M, mpe azali koloba na Tata mpe alobi,

Ekoki kozala na basusu libanda kati na bikólo, na mokili mobimba, ete ata bande oyo ekokuta bango kati na bandako na bango to na mangomba na bango.  Tolingaki kobondela , Nkolo, ete ntango losambo lozali kokende liboso, na —na…to bande ezali koyókisama, to etemelo ata nini tokoki kozala na yango, to —to lolenge, tika ete Nzambe monene ya Lola ákumisa bosembo oyo ya mitema na biso  na ntongo  oyo,, mpe ábíkisa bato ya boséngá. Ápesa bango oyo bazali na yango bosengá.

 Ndeko.  Joseph Branham

 Makomi ya kotánga liboso ya koyoka Liteya:

 Lewitiko 16

 Lewitiko 23:23-27

 Yisaya 18:1-3

 Yisaya 27:12-13

 Emoniseli 10:1-7

 Emoniseli 9:13-14

 Emoniseli 17:8