22-0821 LIPATI YA MINDULE

Nsango: 64-0719M LIPATI YA MINDULE

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala Mofini Play,

Mokolo ya Lomingo moko na moko tozali koyangana mpe koyoka Lotómo monene ya koleka na bomoi kati na lisoló ya mokili. Tozali na ntango na nkembo na koleka nyoso awa ezali biso kokutana elongo koyoka Mongóngó na Nzambe! Ezali Yesu Klisto Mwana na Nzambe, komimonisa na nzela ya Makomi, kokómisa Likomi oyo ebongisamaki na mokolo oyo, lokola ezalaki na mokolo na Ye, mpe na mikolo mosusu nyoso, NA BOMOI. Mpe kondima Yango, ezeli elembeteli ya Molimo Mosanto.

Elembeteli ya solo ya kozala na Molimo Mosanto ezali bobele te kokende na losambo mokolo nyoso ya Lomingo; Ezali ete ondima ete “NazaliYe,” Liloba mpo ya mokolo na yo. Liloba mpo na lelo ezali nini? Mosakoli na Nzambe azali Liloba mpo na lelo mpe asengeli kozongisa bato na Liloba , na ntina ete Mwasi na libala ayeba Mobali na Ye, koyeba Moninga na Ye, Liloba limonisami.

Bomoi na Ye moko, misala na Ye moko emonisaka mpe endimisaka Liloba ya mokolo oyo.

Ezali Molimo Mosanto kozonga kati na Lingomba lisusu; Klisto, Ye moko, amonisami kati na mosuni ya moto, na ntango ya mpokwa, kaka lokola Alakaki Akosala. Nayebi yango esalaka lokola kokangama na mongóngó na bango mwa moké, kasi bosengeli kotanga kati kati na milongó mpe komona, yango esalaka ete elili éya.

Tozali momboto ya bokonzi ya Abalayama, Mwasi na Libala.Elembo ya nsuka Abalayama atikalá komona liboso ete elembo ya elaka éya ezalaki nini? Nzambe, kati na lolenge ya ekelamu moto, oyo akokaki kososola makanisi na bato. Moto moko, Zomi na mibale te, moto moko.

Nayebi ete Bato mingi batemeli yango, kasi Nayebi ezali oyo. Nayebi yango. Ezali te mpo ete Nazali koloba ete bazali koloba ezali yango; zambi Nazuaki yango kouta na ngai moko te. Likanisi na nga—ngai ezali ya ngai moko te. Oyo ndele Ayebisaki ngai, Soko ezali libunga, na bongo ezali libunga. Kasi Nazali kosolola yango na ngai moko te, Nazali kosolola na nzela ya oyo moto mosusu alobaki. Moto mosusu yango azali Nzambe oyo Alobaki na biso mpe asalaki makambo oyo nyoso Asalaki, mpe emonanaki, bomoni, na bongo Nayebi ezali solo.

Tozali koyoka makanisi mpenza na Nzambe; makanisi ya moto te, kasi ya Nzambe. Mosakoli na biso azali momonisi ya Liloba likomamaki.

Tososolaka ete koyoka ba bande kati na ba ndako na bino to kati na mangomba na bino ezali mpo ya moto nyoso te, kasi mpo ya biso, Ezali BOBELE NZELA MOKO. Tolingaka koyoka Mongongó na Nzambe kosolola na biso mbala moko. Tolingi ndimbola moko te to bomanyoli te; ezali Nzambe kosolola na biso mbebu na litói.

Mokolo ya Lomingo oyo tokozala koyoka Nzambe kosolola na biso boni Amonisaki mosakoli na Ye biso koleka liboso na ye kuna na ngambo mosusu. Boni Mwasi yango na Libala azalaki kotala alimá epai na ye, kosolola na ye, mpe tozalaki kotelema elongo na ye. Tozalaki kotambola na bobongi be Liboso na Nkolo.

Na nsima Nzambe Asololi kati na mosakoli na Ye mpe asakoli mbala moko lisusu mpe alobi:

Ekoki kozala na ba mosusu libanda kuna na bikólo, zingazinga na mokili, baoyo kútu bande oyo ekoki kokutana na bango kati na ba ndako na bango to na biyanganelo na bango. Tokokaki kobondela, Nkolo, ete na tango losambo lozali kokóba, na—na…to bande ezali koyokisama, to ezala na lolenge ata nini tokoki komizua kati na yango, to—to motindo, tika ete Nzambe monene na Lola akoka kopesa mbano na bosembo oyo ya mitema na biso na ntongo oyo, mpe abikisa baoyo na bosenga, kopesa bango oyo bazali na yango bosenga.

Soko Ozali koyoka ba bande mpe ondimaka ete Ezali Mongóngó na Nzambe mpo ya mokolo na biso, na bongo ezala ata nini okoki kozala na yango bosenga, Nzambe akozala kosolola kati na motindami na Ye mpe koloba: “Pesa bango eloko se eloko tozali na yango bosenga.”

Yango ekokoka kokóma bobele na nzela ya BO FINAKA PLAY moninga na ngai.

Soko okolinga koyoka Nzambe kosolola mpe kolimbola Liloba na Ye moko, komimonisa Ye moko kati na mosuni ya moto, mpe koyamba ezala ata nini ozali na yango bosenga, yaka komibakisa na biso na 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville, wana ezali biso koyoka Nzambe kosolola na biso lokola tozali koyoka: Lipati Na Mindule 64-0719M

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya Katanga liboso ya koyoka Liteya:

Lewitiko 16

Lewitiko 23: 23-27

Yisaya 18:1-3

Yisaya 27:12-13

Emoniseli 10: 1-7

Emoniseli 9: 13-14

Emoniseli 17:8