22-0814 MOSALA MOBONGI

Nsango: 64-0705 MOSALA MOBONGI

BranhamTabernacle.org

Molingami Mosala Mobongi,

Nakoki kokomela bino boni lelo Nazanga kokundollela bino oyo mobateli na biso alobaki na ntina ya moko na moko na biso mokolo mwa Lomingo loleki?

Kasi koyeba ete esika se esika Nakoki kokende…Nazali te na –na ebólo moko likolo ya mabelé, oyo Nayebi, oyo bakangani na ngai lokola ébolo ya bato oyo. Tika—tika Nzambe asala ete tozanga kokabwana, ete, kati na Bokonzi bozali koya, tika ete tozala kuna; libondeli na ngai.

Ezali te na ebólo moko likolo na mabelé oyo bakangani na mosakoli ya Nzambe, mpe Etinda asololaki likolo ya ba bande, lokola biso. Mpe mpo ete tosalaka bongo, tokozanga kokabwana na Bokonzi wana ya sika elongo na ye mpe Nkolo na biso Yesu Klisto. Ekómaka na yango kaka malamu mingi te koleka yango!

Oyo ezali mikolo minene ya koleka na bomoi na biso. Tosepeli mpenza mobimba kozala ligbóma mpo ya Klisto mpe Etinda na Ye ya ntango ya nsuka. Kobiangama elémá mpo ete tondimaka liloba moko na moko likolo ya ba bande wana mpe tolobaka: FINA PLAY.

Tozali kati na Lingomba se Moko mpe bobele Moko. Tomibakisi na Yango te, tobotamaki nde kati na Yango. Mpóso nyoso toyaka elongo longwa na zingazinga ya mokili mobimba mpe tozali kosala bolingo na Klisto mpe koloba: “Oo, boni Nalingi Yo ‘Yesus!’”

Tokoki kozala elemá epai ya mokili, kasi Tata apesaki biso Emoniseli ya Ye moko na mokolo ya biso, Nzambe na loposo likolo na yango, mpe Ebendaki biso, Mwasi na Ye ya Libala, epai na Ye.

Tolingi na biso kaka boni Ezali petee, kasi bobele na ntango yango moko, bobele boni Ezali na bozindo. Kasi osengeli kozala na Emoniseli mpo ya komona Yango, mpe TOZALI NA YANGO.

Amibombaki Ye moko kati na ezipelo, kati na Lingomba na Ye, azali komimonisa Ye moko na nzela ya kondima na yo mpe kondima ya ngai, elongo, koya elongo, kosala bomoko ya Nzambe. Nakoki kosala eloko te soki na yo te; okoki kosala eloko te soki na ngai te; soki mpe te moko na biso akokoka kosala eloko te libanda na Nzambe. Boye, elongo ezali kosala lisanga, likangisi. Nzambe atindaki ngai na ntina; ndima yango; mpe kuna ekómaka. Ezali kaka yango, bomoni, andimisamaki mpenza mpenza.

Tozali lokola mibali na mobembo na nzela ya Emau na mokolo wana. Toyokaka Ye kosolola na biso makambo nyoso kati ya mokolo. Na mbisa tobiangi Ye na kati na ba ndako na biso mpo tokoka kokangama na kati elongo na Ye moko kaka. Na nsima Asalaka eloko moko oyo bobele Ye nde Akokoka kosala, kobuka Lipa ya Bomoi na Seko. Na mbala moko toyebaki Ye. Na nsima tolobi, mitema na biso mipelaki na móto te kati na biso wana ezalaki Ye kosolola na biso na molai na nzela.

Mpóso moko na moko toyanganaka na kozila na etingia, wana tozali komituna: “Akoyebisa biso mpe Akomonisa biso nini na mpóso oyo”. Tokokabwelana biteni ya maloba ya mosakoli likolo na yango kati na mpóso mobimba. “Oyokaki Ye ntango alobaki”:

“Ezuaki ngai mbula nkoto minei kosala Mosala Mobongi ya ngai; kasi sasaipi Nazalaki pene na mbula nkoto mibale kosala Mosala Mobongi mosusu, Bino, Mwasi na Ngai ya Libala. Nasalaki yango na lolenge na Ye loyebi kobongwana te, nzela yango moko Nasalaki Mosala Mobongi ya liboso, Liloba na Ngai. Yango nde nzela Nasalaka Misala mia Ngai Mibongi, mpamba te okokoka bobele kozala Mosala Mobongi ntango ezali Liloba libongi be.

Ndeko na ngai mobali, bokanisa mabe ten a oyo, kasi bokanisa monuti moko. Soko Azuaki longwa na Ye, bozalisi ya ebandeli, kosalela Ye Mwasi ya Libala mpo na Ye. Asalaki bozalisi mosusu soki moke te. Azuaki eteni ya bozalisi ya ebandeli. Na nsima, soko Azalaki Liloba, Mwasi ya Libala asengeli kozala nini? Ekosengela kozala Liloba ya ebandeli, Nzambe ya Bomoi kati na Liloba.

Bobeta lisolo na ntina na Yubile ya bolei. Tozali eteni ya bozalisi ya ebandeli. Tozali eteni ya Liloba ya ebandeli. Nzambe azali kobika kati na biso. Tozali Mosala mwa Ye Mobongi. Tozali libóké ya bato oyo ekangani na mosakoli na Ye. Toyebi kokabwana te na mosakoli na Ye mpe na Nkolo Yesu Klisto. Tozali MOKO elongo na Ye.

Soko yo mpe okolinga ete motema na yo mozala kopela na móto na kati na yo lokola ezali kosala kati na biso, yaka  komibakisa na biso Lomingo loye na 12:00 P.M., ntango ya Jeffersonville, lokola eteni ya Mwasi na Libala azali koya elongo mpe kobianga Ye kati na ba ndako na biso, mpe kati na mangomba na biso, wana ezali biso koyoka Nzambe kosolola mpe komonisa biso Maloba ya Bomoi ya Seko, lokola Azali komemela biso Liteya: Mosala Mobongi 64-0705

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya losambo:

Yisaya 53: 1-12

Malaki3:6

St.Matai 24:24

St. Malako 9:7

St. Yoane12:24/ 14:19