24-0303 MOSALA MOBONGI

Nsango: 64-0705 MOSALA MOBONGI

BranhamTabernacle.org

Balingami Libota Mosala mobongí,

 Boniboni Mateya maye ma nsúka mazalaki bobongi be epai na Mwasi ya libala ya Klisto.  Nzambe, komizipola liboso na biso, komimonisa polele Ye moko.  Mokili mokoki komona Yango te, kasi epai na biso, Mwasi na Ye ya libala, Ezali nyoso oyo tokoki komona.

 Topasoli na kati ya ezipelo mpe tomoni Ye na miso polele.  Nzambe, nsima ya mposo ya bato.  Liloba likómi mosuni, mpenza lokola alakaki na Luka 17 mpe Malaki 4. Amibombi na kati ya ezipelo ya moto, kati ya mosakoli na Ye mpe na kati ya Lingomba na Ye.

 Tozali bato ya esengo mingi koleka na mokili ntango toyoki Nzambe koloba na nzela ya mwanje na Ye motindami mpe koyebisa biso,

 Nazali na botondi mingi mpo na bino.  Nazali na nsai mingi kozala elongó na bino.  Nazali na nsai mingi kozala moko na bino.  Nzambe ázala na bino.  Akosala yango.  Akotika bino soko moké te.  Akosundola bino soko moké te.  Akotika bino te.  Bosili koleka kati ya ezipelo sikawa.

Tokomi bato ndéngé epai na moto nyonso, ata na kati ya milongó na biso moko, kasi tozali na lipambú mingi, na botondi mingi, mpo na Emoniseli Apésí biso ya Liloba na Ye mpo na lelo.  Kozala magbómá mpo na Klisto mpe Liloba na Ye limonisámí.

 Totíí kondima na biso na kondima ya mosakoli na Ye, mpe tosangani elongo, kosala LISANGÁ monene ya Nzambe.  Akoki kosala eloko te soki na biso te;  tokoki kosala eloko te soki na mosakoli wana te;  tokoki mpe kosala eloko te soki na Nzambe te.  Na boye elongó, TOSALI LISANGÁ, Ekanganeli;  Nzambe, mosakoli na Ye, Mwasi na Ye ya libala.  Tokómi Mosala na Ye mobongí.

 Ezwaki Ye bilanga nkoto minei mpo na kosala Mosala mobongí na Ye ya liboso.

 Sikawa, ezwaki Ye bilánga nkoto mibale mpo na kosala Mosala mobongí na Ye mosusu, BISO, Mwasi na Ye ya Libala, libota monene Mosala na Ye mobongí, Adama ya Mibale mpe Ewa ya Mibale.  Tomílengéli sikawa mpo na elanga, Bokonzi ya mbula nkóto.  Abongisi biso lisusu mpe tomilengeli sikawa.

 Tozali Mwasi Liloba na Ye oyo Abongí be, eteni ya Bokeli na Ye ya EBANDELI.

 Mobímbí, nkásá, mpe Ezipelo, izali sikawa koyangana kati ya Mombóto, pene mpo na lisekwa, mpe pene mpo na bobúki mbuma.  Alifa akómí Oméga.  Mombóto moye mokótaki, mosili koleka na matámbé manso mpe mokómi Mombóto lisusu.

Mombóto, oyo  ekweaki na elanga ya Edene, mpe ekufaki kuna, ezongi.  Longwá na mombóto wana ezangi kobonga be ekufaki kuna, ezongi na Momboto mobongí be, Adama ya Mibale.

Tokomi sikawa Adama ya Mibale, Mwasi ya Libala ya solo, Mombóto, mobongí na Liloba ya ebandeli lisusu. Tosengeli kozala na Liloba nyoso mpo na kozala Mombóto.  Tokoki kozala na ndambo ya Mombóto te;  tokoki kokóla te, tosengeli kozala Mombóto mobimba.

 Etikali kaka eloko moko, ntango ya kobúka yango oyo.  Totelí mpenza kotela.  Tomilengeli mpo na Boyei.  Ezali ntango ya bobúki mbuma.  Mombóto mozóngi na lolenge na yango ya ebandeli.  Libota Mosala mobongí liyei lisusu, Klisto mpe Mwasi na Ye ya libala.

 Koyikisa mosakoli na Ye mpiko mpe Mwasi na Ye ya Libala, Nkolo apesaki mwanje na Ye emononeli monene.  Apesaki ye komóna galasísi ya BISO, Mwasi na Ye ya libala.  Wana elekákí biso pembeni na ye, alobaki, tozalaki na kotala na miso bilengé basi miké balingami.  Alobaki ete biso banso totálákí ye alimá wana elekaki biso.

 Na nsuka, basusu babimaki na molongó, mpe bazalaki komeka na makasi na bango nyonso mpo na kozonga na molongó.  Na nsima amonaki likambo moko ya litómbá mingi, bazalaki kotala libanda esika mosusu, kotala ye te.  Bazalaki kotala lingomba wana libimakí mpe likendeki kokóta kati na libebí.

 Boni natondi na lipambú mpe na botondi koloba ete, BISO te, baoyo ya liboso, tobimaki ata moke te na litámbé soko ete tolongolaki miso ma biso na ye.

Bongo, Mosala mobongí mpe Mwana ya Nzambe, Mosala mobongí mpe Mwasi ya Libala, mpe Ezali eteni na Ye, oyo esengeli kozala kokokisama ya Liloba.  Liloba lisili kokokisama, mpe tobelemi mpo na Boyei ya Nkolo.

Boni tozali na botondi koyeba, tozali Libota na Ye Mosala mobongí, Mwasi na Ye ya Libala ya solo.  Liloba lisili kokokisama, mpe tobelemí mpo na Boyei ya Nkolo.

 Nabiangi bino boya komibakisa na biso Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá., ntango ya Jeffersonville, koyoka Liloba elongo na biso, mpe kokóma eteni ya Libota Mosala mobongí ya Nzambe, lokola tozali koyoka mosakoli komemela biso Liteya: Mosala mobongí 64-0705.

 Ndeko.  Joseph Branham

 Makomi ma kotánga liboso ya losambo:

 Yisaya 53:1-12

 Malaki 3:6

 St. Matai 24:24

 St. Malako 9:7

 St. Yoane 12:24 / 14:19