24-0225 Moto Ndenge

Nsango: 64-0614E Moto Ndenge

BranhamTabernacle.org

Baninga balingami,

 Ezali 12:00 nsima ya nzángá na Jeffersonville, ngonga ya 7:00 nsima ya nzángá na Afrika, ngonga ya 10:00 ya ntóngó  na etúká ya Arizona;  Mwasi ya libala ayangani elongó útá na mokili mobimba.  Tozilaki mpóso mobimba mpo na ntango oyo.  Tozali na nse ya bozili na etíngia monene, kozila Nzambe áloba na biso na nzela ya mbɛbu ya moto na nzela ya mwanje na Ye ya nsambo, motindami na Ye ya nguya.  Tozali kobóndela, “Nkolo bongisa ngai, pakola ngai, mpe pesa ngai Emoniseli koleka ya Liloba na Yo.”

 Tosepeli, mpo toyebi solo mpenza, ete mosakoli, mpe bobele mosakoli nde, azali na Maloba ya Bomoi mpo na ngonga oyo.  Tokoki kozala na makoki ya kolimbola Yango nyonso te, kasi toyebi ete tondimi Liloba nyonso mpe tozali kopema likolo na Yango.

 Toyebi, kaka lokola Nkolo asalaki na Mose, Nzambe azali kobelema kokumisa mosakoli na Ye liboso na biso.  Na ntango wana, Aningisaki kaka ngómbá.  Mbala oyo, Azali koningisa lola mpe mabelé.

 Ntango  ekómi.  Mitema na biso mizali kobéta noki-noki kati na biso.  Toyoki Loyembo ya Ekólo na biso kobanda kobeta.  Na boyokani, Mwasi ya libala útá na mokili mobimba atelemi na makolo mpe abandi koyemba, NDIMA KAKA, makambo manso makoki, Ndima kaka. Nzambe azali kobelema koloba na biso.

 Toyokaka boye: “Mbote baninga.”

 Mitema na biso misepelaka kaka koyoka maloba maye 3 ya pete.  Mosakoli aúti kaka kobianga ngai moninga na ye.  Na nsima, ayebisi biso, .

 Nazangi bino nyoso.  Na—Etáli ngai te nákende wapi, Na—Na…ezali te, ezali bino te.  Nazali na baninga, bisika nyonso na mokili mobimba, kasi ezali —ezali te —ezali bino nyoso te.  Ezali na eloko moko na ntina na mwa libóké oyo kaka…nayebi te.  Nakanisaka mpo na bango…Nazali na —libóké moko te na mabelé, oyo nayebi, ekangami na ngai lokola libóké oyo.  Ézala—ézala ete Nzambe Ásála ete tókabwana te ete, na Bokonzi bokoyá, tózala kuna elongo;  libondeli na ngai.

 Emoniseli nini monene oyo Nzambe akomónisa biso lelo?  Tokoyoka nini?  Mbala mosusu toyokaki Yango mbala mingi, mingi liboso, kasi lelo ekokesene, mpe lokola mokolo mosusu liboso te.

 Ezali Nini?  Bilei ya Mondimi.  Lipa litandámi útá na Lola oyo tokosala na yango lipati.  Lipa litandámi lizali kaka mpo na biso, Mwasi na Ye ya Libala.  Ezali Nkembo ya Shekinah likolo ya Lipa liango litandámi nde ezali kobatela biso tobéba te.

 Bato ya libanda batalaka biso mpe batunaka, “Bino bato oyo bozali kosala nini?  Bozali kaka koyoka ba bande?  Bino bato oyo bozali mpenza Bato ndéngé.”

 Nkembo!!  Tozali na esengo mingi, mpe tozali na botondi mingi na Nkolo kozala Bato ndéngé;  magbómá mpo na Ye mpe Liloba na Ye lindimísámí.  Tosepelaka koyebisa mokili, “IYO, NA NDIMI LOTÓMO YA BANDE.  NA NDIMAKA KOFINA PLAY.  NA NDIMI EZALI MONGÓNGÓ YA LITÓMBÁ KOLEKA BOKOKI KOYOKA..  IYO, NA NDIMAKA KOZONGISA BA BANDE NA ETÉYELO.”

 Ntango ezipelo ya mimeseno elongolami, okoki komona ete Nzambe azali naino kaka Nzambe ya Liloba na Ye.  Azali naino kaka kobatela Liloba na Ye.  Azali—Azali Nzambe, Mokomi ya Liloba na Ye.

 Ata moto mosusu nani ásala nini, to áloba nini, tondimaka Yango, mpe na nsima tosalaka likolo na yango.  Soko osali Yango te, boye ondimi Yango te.  Ozali nsima ya ezipelo te.  Ezipelo wana ezali ya moto moko.  Etindá yango ezali moko.

 Nalikíí mpe natii motema ete—ete bozalaki na bososoli ya molimo ya eloko nini Nzambe wana azalaki komeka kopesa na Lingómba na bozangáka koyebisa yango polélé.  Bomóni?  Ezali eloko, ntango mosusu, tosengeli koloba makambo na lolenge ete ekoki kokóndisa, ekoki komema basusu kobima, basusu kolongwa, mpe basusu ko—ko —kobánza likolo na yango.  Kasi esalemaka na ntina.  Esengeli ésalema ndenge wana.

 Liloba limónisamelaki mosakoli ya Nzambe.  Ezali na libóké ya bato te, Bafalisai te, to Basadukai te, to lingomba moko boye to ekángá moko te.  Ezali MOSAKOLI!  Nzambe Azali na moto moko.  Azwaki te makanisi mibale to misato makeseni.  Azwaki moto moko.  Azali na Liloba, mpe ye kaka.

 Na nsima, ekoki kozala ete bamosusu bakoloba ete, “Olingi koloba ete Nzambe akosala likambo ya ndenge wana na nko?”  Asalaki yango mpenza, Azali kosala yango naino.

 Lokola balobaki eleki mbula nkámá na nkámá, tozali koyoka likambo yango moko lelo oyo: “Kasi ezali na bato mosusu awa oyo Nzambe abiangi.”  Ezali solo.  Mpe ntango nyonso balandi mpe bakei libosó, Amen, kasi ntango moko ameki kotelema mpe kozwa esika ya Nzambe oyo Nzambe apesaki mosakoli na biso, oyo Akanaki liboso mpe abongisaki na mosala wana, tosengeli kotikala na Liloba lindimisami , Mongóngó  ya Nzambe mpo na mokolo na biso.

 Boyeba, kufa, kotikala mosika na Yango sikawa.  Esengeli okota na Yango na nzela ya ezipelo oyo, soki te okokóta te.  Lolengé nini Nzambe akokaki koyokela bango mawa, kasi bókanisa ezalaki nini, ete Nzambe azali komonisa oyo ezalaki nsima ya ezipelo wana.  Botala oyo ezalaki nsima ya ezipelo, Liloba!  Ezipaki nini?  Liloba!  Ezalaki nini?  Ezali na kati ya sandúku.  Ezalaki Liloba oyo ezipelo yango ebombaki.  Bomoni?  Mpe Yesu azalaki Liloba yango, mpe Azali Liloba yango, mpe ezipelo ya mosuni na Ye ebombaki Yango.

 Epai na biso, ezali bomónisami!  Ezali lisusu liloba ya monoko te, ezali likambo mpenza!  Amen!

 Toyebi epai na basusu tozali Bato ndéngé, mpe tokoki koyokama lokola elémá  epai na mokili, kasi ezali kobenda bato banso epai na Ye.

 Yaka mpe kótisámá bó nsinga ya botongi kati ya Liloba elongo na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka mosakoli koyebisa mokili lolenge nini tozali Bato Ndéngé 64-0614E.  Tozali na lipambú mingi mpe na botondi mingi koloba ete tozali yango.

 Ndeko.  Joseph Branham

 Makomi ya kotánga liboso ya koyoka Liteya:

 I Bakolinti 1:18-25

 II Bakolinti 12:11