24-0218 Kozipolama Ya Nzambe

NSANGO: 64-0614M Kozipolama Ya Nzambe

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libala Nsima Ya Ezipelo, .

 Mpo na nini nakobaka koyebisa bino mbala na mbala, “KOFINA PLAY ezali likambo ya litómbá mingi oyo bokokí kosala”?  Mpo na nini nazali kokoba koyebisa babáteli, “Bózongisa Ndeko Branham na bitéyelo na bino”?

 Ezali na yango kaka petee.  Na boyókáká Mongóngó ya motindami mwanje ya nsambo likoló ya bande, ezali kozala koyoka LILOBA YA BOMOI.

 Liboso ya bato, Nzambe azipáki lisusu mpe andimisaki Mose, na ezipelo , na bomizipáká na Móto yango moko, Likonzí ya Móto yango moko likitákí.  Longwá —longwá wana…Longwá na bango, boye bakokaki koyoka kaka Liloba ya Nzambe.  Bosimbí yango?  Kaka Liloba, bayokaki Mongóngó na Ye.  Mpo, Mose azalaki, epai na bango, Liloba ya bomoi.

 Bosili boyóká Motéi mpenza ya ntango!  Mongóngó oyo tozali koyoka likoló ya bande ezali Mongóngó ya Liloba ya Bomoi mpo na mokolo na biso.  Ekoki na yango kaka te kozala monene koleka Yango.

Na mikolo ya Mose, kaka bana ya Yisalaele oyo bazalaki kati na moláko nde bakokaki koyoka Mongóngó na Ye.  Kasi lelo, Nzambe alingaki MOKILI eyoka Mongóngó na Ye, YANGO WANA  ASALAKI ETE ÉTIAMA LIKOLO YA BANDE, ete Mwasi na Ye ya Libala ayoka Mongóngó ya Liloba ya Bomoi.

 Nzambe amizipaki kati ya mosakoli na Ye, koloba Maloba na Ye epai na bango.  Yango nde  Asalaki.  Mose azalaki Liloba wana ya bomoi epai ya bato, ezipámáki na Likonzí ya Móto.

 Soko ozali na Emoniseli na yango te mpo na mokolo na biso, okoki kozala Mwasi ya libala ya Yesu Klisto te.  Soko ozali na yango , boye OZALI Mwasi ya libala ya Yesu Klisto mpe okosengela koloba, “ezali na eloko moko te ya litómbá koleka koyoka ba bande, mpo Ezali Mongóngó ya Nzambe koloba na yo mbɛbu na litoi.”

 Mingi balukaka kobangisa bato mpe balobaka ete tozali kotia lokúmu mingi likolo ya mosakoli;  tozali kosambela ye.  Baninga na ngai, Ye nde alobaki makambo maye, ngai te.  Nazali kaka kozongela Liloba.

 Lokola esalemáki na eleko moko na moko, Bonzambe ezipamaki kati na mosuni ya moto.  Botala, Asalaki.  Basakoli bazalaki Bonzambe, ezipámí.  Bazalaki Liloba ya Nzambe (ezali bongo?) ezipami kati na mosuni ya moto.  Na bongo , bayebaki kútu ata Mose na biso te, bomoni, Yesu.

Tozali kosambela moto te, kasi Nzambe, Oyo azipami mpe azali komimonisa na nzela ya mosakoli. Mpo na kososola mpe kondima yango, osengeli kosala oyo.

 Bozali lisusu nsima ya ezipelo wana te, Bana miké, Nzambe ayei na miso na bino polele.

 Tozali lisusu nsima ya ezipelo wana te, tokoki komona Ezali Nzambe komimonisa polele.  Emónisámí ete koyoka Mongóngó wana likolo ya ba bande ezali Nzambe koloba na Mwasi na Ye ya libala.  Tondimi Ezali Nzela na Ye epesami mpo na lelo.

 Tokoki koloba kaka AMEN na Mongóngó wana, mosusu te.  Mongóngó wana, ekoteya, kolakisa mpe ekomónisa biso nyoso esengeli na biso koyeba.  Mongóngó wana ekotálisa biso Nkolo na biso Yesu Klisto.  Mongóngó wana ezali nyoso tolingi mpe nyoso tosengeli na yango.

Tozali na botondi mpo na bótano ya lotómo Nzambe azali kosalela kotálisa bato na Mongóngó wana;  epai na babáteli baoyo basímbí emónoneli  mpe bazali na emóniseli ete koyoka ba bande kati na mangómbá na bango ezali likambo monéne koleka bakoki kosala mpo ya bato na bango.

Tobiangi bino boya koyoka elongo na biso Mongóngó wana ya nguya Liloba ya Bomoi Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka yango komonisa: Kozipolama Ya Nzambe 64-0614M.

 Ndeko.  Joseph Branham,