22-0731 Kozipolama Ya Nzambe

NSANGO: 64-0614M Kozipolama Ya Nzambe

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Liloba Likomami,

Mposo moko na moko ezali koya monene na koleka mpe monene na koleka. Mokolo mwa Lomingo, tozalaki na libaku malamu ya kotala, mpe kokana, TOMONAKI NINI? Tomonaki nde motei moko, TE! Tomonaki nde mobateli na biso, TE! Ntango totalaki koleka ezipelo ya mosuni ya moto tomonaki Yesu Klisto komimonisa mpe komitalisa Ye mpenza.

Wana ezalaki biso koyoka ba bande lokola ezalaki kokita, Ekómaki polele mpe polele, soko ozali na matoi ma koyoka mpe miso ma komona. Tomoni sasaipi Nzambe polele. Ezipelo epasuki, mpe tomoni Nzambe kotelema polele liboso na biso, Likonzi ya Móto komimonisa Ye moko polele na miso.

Ebeti boko na kufa miso, kasi epai na biso, Emonisi Solo. Nzambe akómisi mosakoli na Ye na nkembo liboso na biso, kaka lolenge Asalaki na Mose.

Bozali lisusu nsima ya ezipelo wana te, bana mike, Nzambe ayei polele-polele na miso na bino.

Ezali nini? Bonzambe ezipami kati na mosuni ya moto. Nzambe, kati na Lolenge ya moto, komibomba longwa na miso na bango. Bakokoka bobele komona moto mpe koloba mosakoli ya Nzambe asalaka mabunga, ye moko kútu alobaki bongo, komeka kolakisa bato ete mabunga mazali likolo na ba bande. Kasi epai na biso, Mwasi na Libala na Ye oyo abongisamaki liboso, tozali komona mpe koyoka Nzambe kasi mabunga te.

Moko amonaki moto, mosusu amonaki Nzambe. Bomoni? Mpe ezalaki Nzambe oyo azipamaki kati na moto, kosala bango nyoso mibale solo, kasi kondima na yo kati na oyo ozali komona te.

Mpo na biso, tokondima mpe kolanda mabunga ya mosakoli ya Nzambe oyo andimisami, soko nde libunga lioko lizalaki, liboso na biso kozua mpe kondima Oyo Elobi Nkolo ya bango.

Mose asengelaki te kobeta Libanga mbala ya mibale. Molimo yango moko ekokaki koloba na mokolo wana: “Bomoni, Mose asalaka mabunga.” Kasi ata ko bongo mai mabimaki, mpe soko omelaki te longwa na oyo babiangaki mabunga ya Mose, mbele okufaki. Ezali mpe bongo lelo. Mingi koleka oyo etali bifundeli.

Mose azalaki na Liloba. Sasaipi bokanisa, nsima ya Liloba komonisama, Mose azalaki Mose lisusu. Bomoni? Kasi ntango Liloba wana ezalaki kati na ye mpo ya kopesama, azalaki Nzambe; malamu, azalaki lisusu Mose te.

Ndeko Branham azalaki na Liloba. Nsima ya Liloba komonisama, Ndeko Branham azalaki Ndeko Branham lisusu, Kasi na ntango Liloba yango ezalaki kati na ye mpo ya kopesamela bato likolo na bande, azalaki Nzambe; azalaki Ndeko Branham te. Oyo eyekoli biso, oyo ezali likolo ya ba bande ezali Maloba ya Nzambe, mpe miko mabunga te kati ya Maloba ma Nzambe.

Tondimaka Yango kaka te, kasi tobikaka Yango. Ntango bamosusu nyoso na bango bazali kotangwa na Yango, tozali koumela na Yango! Tondimaka Yango! EZALA ata nani asala to aloba nini, tondimaka Yango mpe tozali kobika kokokana na Yango. Soko osalaka yango te, na bongo ondimaka Yango te.

Na bongo Nalobi boye, kati na Nkombo na Yesu Klisto: Bakisa eloko moko te, longola te, tia makanisi na yo moko kati na Yango te, loba bobele oyo elobami likolo na ba bande wana, sala mpenza kaka oyo Nkolo Nzambe apesaki motindo kosala; bakisa na Yango te!

Fina Play mpe ndima LILOBA MOKO NA MOKO lokola Nzambe apesaki biso motindo ete tosala. Ezali Nzambe kosolola mbebu na litoi na Mwasi na Ye ya Libala.

Nzambe azipami lisusu mpe andimisaki Mose, na nzela ya ezipelo, na bomizipaka na Móto yango moko, Likonzi ya Móto yango moko ekitaki. Longwa—longwa nde…Longwa na bango, ete bakokaki bobele koyoka Liloba ya Nzambe. Bozui yango? Kaka Liloba, bayokaki Mongóngó na Ye. Mpamba te, Mose azalaki, epai na bango, Liloba ya bomoi.

Nzambe abongolaka te, mpe akokoka te kobongola, manáka ma Ye. Azali Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo mpe libela. Na bongo mpo na biso, mosakoli na Ye andimisami, William Marrion Branham azali Mongongo ya Nzambe epai na biso, mpe Liloba ya Bomoi mpo ya mokolo na biso.

Sasaipi ezali bobele Liloba likomami te mpo na biso, ezali bosolo. Tozali kati na Ye. Sasaipi tozali kosepela. Sasaipi tozali kolembetela Ye. Sasaipi tozali komona Ye, Liloba, komimonisa Ye moko. Ebombami, libanda kuna, mpo ete (mpo na nini?) Ebombami kati na mosuni ya moto. Bomoni?

Ata ezala nini, bamonaka Yango te. Mpo ya nini? Etindamelaki bango te.

Zambi ozali komona Yango, omilengeli nde koyoka Ye koyebisa yo mbala moko lisusu OZALI NANAI? Ntango Atalaka na nse longwa na bitando ya Nkembo mpe amonaka yo, Amonaki nani?

·      Nazali komona Liloba limonisami. Oyo Alobaki ete Akosala na mikolo oyo ya nsuka, Nazali komona yango kokola. Namoni bana kolia Lipa wana ya Shekinah koya longwa na bokembisami ya Liloba wana, oyo bandimi Yango. Amen!

·      Na bongo tokomi eteni na Ye, lokola ozali ezipelo oyo ezali kozipa Ye. Ozali eteni na YE, ntango nyoso Klisto Azali na kati na yo, lokola Klisto Azalaki eteni ya Nzambe. Mpo ete Nzambe Azalaki kati na Ye, Asalaki Ye Nzambe. Mpe lokola Klisto Azali kati na yo, elikia ya Nkembo, okomi eteni ya Klisto.

·      “Bino,” Elobami: “bozali mikanda mikomami,” to, “bozali Liloba, oyo ekomamaki, emonisami,” Eloko moko ekoki kobakisama na Yango te. Okoki koloba te ete: “Nazali mokanda mokomami,” mpe kobika ndenge mosusu ya eloko moko boye kasi bobele  yango esilaki oyo kokoma, mpamba te eloko moko ekoki kobakisama te  to kolongolama. 

Lokumu na Nkombo na Nkolo Yesu Klisto. AZALI KOMONA BISO. TOZALI KOMONA YE. Tozali Liloba na Ye limonisami lelo.

Yaka komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima na nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola Nzambe azali kotelema liboso na biso; Likonzi ya Móto lizipami kati na mosuni ya moto, mpe kosolola na biso Liloba oyo esengeli na biso kobika na yango kati mokolo oyo. Ezali Nkembo ya Shekinah kokembisa biso. Lipa ya banganganzambe mpo ya mondimi.

Kozipolama ya Nzambe 64-0614 M

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya:

Matai 24: 24

St. Luka 17: 28-29

St. Yoane 14:14

1 Bakolinti 12: 13

2 Bakolinti 3:6 -2 Bakolinti 4:3

Bafilipi 2: 1-8

1 Timote 3:16

Baebele 13: 8

Emoniseli 10: 7 & 19: 13

Esode mikapo ya 19 & 20

Yoele 2: 28

Malaki 4: 5