22-0807 Moto Ndenge

Nsango: 64-0614E Moto Edenge

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya Libala Nkembo ya Shekinah,

Boni mitema mpe bomoto na biso imatisamaki na bisika ya likolo ya sika wana toyanganaki elongo longwa na mokili mobimba, na boyokaka Mongongo ya Nzambe kosolola kati ya motindami na Ye mpe kondimisa biso mbala moko lisusu, tozali banani.

Amizipi Ye moko lelo, kati na Mbeki ya mabele, na Shekinah. Libanda ezali komonana lokola ebólo ya batuntuki, mposo ya kala ya banyama, kasi kati ebombi Nkembo ya Shekinah.

Nkembo na Nzambe! Kati na biso ebombi Nkembo ya Shekinah. Tokei nsima ya ezipelo mpe tokoki komona Klisto polele.

Lelo, Nzambe azali kosala kati ya moto te, Azali kosala na nzela ya moto. Azalaki kosala kati ya Moto moko ntango wana, Yesu. Sasaipi, Azali kosala na nzela ya moto oyo Aponaki mpo na ntina oyo. Nzambe, na lolenge ya moto; Amibongoli longwa na lolenge ya Nzambe, kino na lolenge ya moto.

Nzambe Ye moko amonanaki kati na lolenge ya ekelamu ya moto, epai ya momboto ya nzoto ya Abalayama, liboso ya libebi, mpe Yesu alobaki ekozala eloko yango moko epai ya Momboto oyo ya bokonzi liboso Mwana alakami azonga.

Nzambe amonanaki mbala moko lisusu kati na lolenge ya ekelamu ya moto, lokola Alakaki ete Akosala. Ezali Nzambe amibombi nsima ya ezipelo ya mosuni ebiangami William Marrion Branham. Bobele okende nsima ya ezipelo yango mpe omona Nzambe, mpe moto te, soko boye te ozangi manaka mobimba ya Nzambe.

Boko bato bazali koloba: “Bozali kokómisa Ndeko Branham nzambe.” Malamu, tokanisi ete ezali lokola kotambola malamu. Toyebi ete bazali kaka komeka koloba na biso mabe. Toyebi ete tosalaki bongo te. Kasi toyebi mpe ete basosolaki yango te, zambi bazali na ngambo mosusu ya mposo, bakotaki nsima ya ezipelo te.

Tokoki koloba polele ete: “Boye, yango ezali mpenza mosika mingi na Liloba ya Nzambe te boye te?” Tolingi kaka koyebisa bango ete toyebi ete tobungi te. Toyebi esika totelemi. Toyebi lolenge nini ya longo totii mpe lolenge nini ya mopepe ezali kopepa biso. Toyebi ndenge nini ya bibendé ya kokota na mosusu ya biso ezali, mpe motó ya biso ya koyamba ebendé yango ezali nini. Mpe toyebi lolenge nini tozali kotelema.

Ntango Nzambe amiminisaki kati na mokili, Azalaki komibomba nsima ya ezipelo, nsima ya loposo ya Moto moko abiangamaki Yesu. Azipamaki mpe azalaki komibomba nsima ya loposo ya moto moko abiangamaki Mose, mpe bazalaki banzambe, Ba Nzambe te; kasi bazalaki Nzambe, Nzambe moko kaka kobongola ezipelo, kosala eloko yango moko ntango nyoso, komema Liloba oyo.

Tokotisami kati na Liloba, Etinda mpe mosakoli ya ngonga oyo, mpe ezali kobenda biso na kati mpe komema biso na Ndako na biso ya Lola. Tozali bato ndenge epai na mokili, kasi Nzambe atindelaki biso Motó ya koyamba ebendé oyo azali kobenda Mwasi na Ye ya Libala kobima kati na mobulungano oyo, kati na Bozali ya Nzambe. Tozali ebendé ekotisami na motó na yango Liloba.

Nzambe, na loposo likolo na Yango! Ekoki koyokana lokola bolemá, epai na mokili, kasi ezali kobenda bato nyoso epai na Ye.

Etinda oyo ezali Mana mauti na Lola, Bilei ya bandimi oyo ezali bobele mpo na biso, mpe Ezali kobenda Mwasi na Ye ya Libala epai na Ye. Nkembo ya Shekinah, likolo na Lipa ya banganganzambe, ebateli Yango na kozanga kobeba.

Nzambe apesi nzela mpo na lelo, Etinda oyo mpe motindami na Ye; Nzambe azipami na loposo likolo na yango. Sasaipi ezali Nzambe komibomba kati na biso, Mwasi na Ye ya Libala, oyo akoki kolia bobele Mongongo mpeto ya Nzambe oyo endimisamaki na nzela ya Likonzi ya Móto.

Totemeli lotómo na misala mitano te, Nzambe ayebi tozali bongo te, Nzambe abiangaki bango kosalela Ye. Bazali kolanda mpe kosala lolenge Molimo Mosanto azali kokamba bango. Tozali bobele kosala kaka lokola Molimo Mosanto azali kokamba biso kosala mpe Azali kokamba mpe kotambolisa biso kotikala na ba bande kaka.

Na bongo, sasaipi boyoka Liloba moko na moko. Bosimba Yango. Mpe—mpe soko bozali kozwa yango likolo ya ba bande, to eloko nini, na bongo botikala bobele na malakisi wana ya bande. Boloba eloko mosusu te soki kaka te oyo bande wana elobi. Boloba kaka mpenza mpenza oyo bande elobi.

Mpo na biso, NZELA BOBELE MOKO YA KOYOKA: “LILOBA MOKO NA MOKO,” “MOSUSU TE KASI OYO BA BANDE ELOBAKA,” “MPENZA MPENZA OYO BA BANDE ELOBAKA,” EZALI KOFINA PLAY MPE KOYOKA BA BANDE.

Na bongo tozali kobianga yo koya koyoka kaka oyo ba bande elobaka mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpe okóma Moto Ndenge elongo na biso wana tozali koyoka Liteya: Moto Ndenge 64-0614E

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya:

I Bakolinti 1: 18-25

II Bakolinti 12: 11