24-0211 Bobongola Miso Epai Na Yesu

Nsango: 63-1229E Bobongola Miso Epai Na Yesu

BranhamTabernacle.org

Molingami Mombóto Motówisámí,

 Okoki bobele nde kokanisa boniboni ekokaki kozala bikamwa kofanda na nsé mpe koyoka mwanje ya nsambo motindami ya Nzambe koyebisa yo boniboni azangaki te koyebisa yo toli nyoso ya Nzambe? Kokende na bolaí bonene ya likambo na ntina ya Bobéndami ya Misato, mpe kotalisa yo lolenge nini endimisami sikawa?

Boniboni Nzambe Alobaki bisendé bíkelama; bobele lokola elobaki Ye ete mpate ékelama mpo na Abalayama. Boniboni Mongóngó yango moko moyebisaki ye áloba na ndeko mwasi moké ya komisókisa abiangamaki Hattie, oyo aútaki kaka koloba eloko esengelaki, mpe koyebisa ye ete Mongóngó yango moko mokelaki biséndé molobaki kopesa ye ézala eloko nini elingaki ye mpe komona soko ekómaki bobele na ntango wana te.

 Boniboni mokolo moko ezalaki ye na bokila na zamba elongo na baninga na ye, ekumbaki ekasi eyaki oyo ekokaki kopusa ye kolongwa.

 Kasi Boniboni Nzambe Alobaki na ye, mbebu na litói, mpe alobaki: “Nakelaki likoló mpe mabelé. Natilimisaki mipepe mikasi likolo ya Mbú.”

 Boniboni apumbwaki mpe alongolaki ekoti na ye wana Mongóngó  yango molobaki na ye: “ Loba kaka na ekúmbákí, mpe ekosila. Nyoso ekoloba yo nde ekokóma.”

 Atíkálá kobete Mongóngó wana ntembe te, kasi alobaki mpe asolóláki boye: “Ekúmbaki, tiká. Mpe, yo mói, bimá bó esengeli mpo na mikolo minei, kino ekosila biso kobima awa.”

 Koloba kaka bongo, mbula ya mabángá,  mbula mpembé mpe nyoso etélemaki. Boni bobele na mwa ntango mói ya molungé mongengaki na mokongo na ye. Mipepe mibongwanaki mpe mapata, lokola eloko moko ya libombami, komata na mipepe, mpe mói mongengaki nsima ya mwa minúti.

 Nambisa akoyebisa yo boni kútu mbula 16 liboso emonisama, Nzambe Amonisaki ye ete ezalaki na ebímbá na ebombelo ya mwasi epai ya loboko ya mwasi ya Ndeko Mwasi Branham, mpe mpo ya nini etiámaki wana. Boniboni babondelaki mpe babondelaki ete Nzambe álongola yango.

Bongo, basosolaki ete ezalaki kaka Nzambe kotia kondima na bango na emekeli.

 Na nsima liboso kaka élongolama na lipasó, azalaki koloba na Nzambe mpe koyebisa Ye boni azalaki mwasi malamu mingi epai na ye.

Boni atikálá Soki moké te kolelalela na ntina na ye kozanga kozala na ndako. Boni azalaki ntango nyoso na makambo manso mabelemi mpo na ye wana elingaki ye kokende bokila, komipemisa mpe koloba na Nkolo.

 Na bongo ayokáki eloko moko kati na eteni ya ndako. Lokola atómbolaki miso, Mongóngó yango molobaki: “Telema,” mpe moyebisaki ye: “Eloko ata nini ekoloba yo, ekozala sé bongo.”

 Azilaki bobele monúti moko, nsima alobaki: “Libosó ete loboko ya mónganga lómama ye, Lobóko ya Nzambe lokosila kolongola ebímbá, mpe ekozuama kútu te.”

 Ndambo ya ntáká moko ya sekónde libosó loboko ya mónganga lómama ye, abikisamaki. Boni mónganga ayebisaki ye: “Nalingi koyebisa yo solo, Mama Branham, ete  ebímbá yango ezali wana te. Ozali na ebímbá moko te.”

 Boni Liloba ya Nkolo libongí be!

 Koyoka ye koyebisa yo ete ntembe ezali lisusu te na makanisi na ye, ayebi oyo Bobendami ya Misato ezali, mpe ayebi oyo esálaka. Mpo na komona na ye, ekozala eloko oyo ekobanda Kondima ya Konetolama, mpo ya bolongwi.

 Mpo na biso kaka kozala na bokóndé mpe kimia, lokola ngonga ekokóma noki epai wapi Nzambe akosala makambo manéne mpo na biso.

Wana ntango yango ekómi, wana kokámolama ekokita na nsé, na bongo tokomóna oyo emónaki biso mpo na ntango moké, komonisama na litóndi na nguya na yango.

 Tokozala na lipamboli yango monene Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville. Nalingi kobianga yo kozala eteni elongo na biso lokola tozali koyoka: Bóbóngola Miso Epai Na Yesu 63-1229E.

Tokozala te koyangana elongó koyoka moto; bato batóndi ebelé na balabála, mpe nyoso bazali na lolaká  lolengé sé moko. Tokozala te kotalela mpe koyoka kaka motéi moko boye, to mobateli, tokozala kotálela mpe koyoka Yesu.

Tokosangisama elongo zingázingá ya mokili mobimba koyoka Moto Yango, Moto na Nzambe yango, Yesu wana ya Nasalète ya mosuni, Ye Nzambe, koloba na Mwasi na Ye ya libala.

Osengeli komituna, ozali kotala nini lelo? Omónaka nini ntango otálaka? Okoki bobele komona Ye lokola ozali kotala Ye na nzela ya Liloba.

 Oyo ezalaki Ye ntango atambolaki kati na Galilai, nde eloko yango moko ezali Ye na Jeffersonville na mpokwa oyo, eloko yango moko ezali Ye na Eyanganelo ya Branham. Olukaka komona nini, mobandisi moko, moto moko ya ebongiseli? Okomona yango kati na Yesu soki moké te. Olukaka nde komóna bonganga moko monéne? Okomona yango kati na Yesu soki moké te. Te. Okomona Yesu ko boni?

Na nzela ya Liloba ya Nzambe limonisami, mpo ete Azalaki Liloba limónisámi ya Nzambe. Oyo ezalaki Ye ndèle, Azali yango na mpokwa oyo, mpe Akozala libela.

 Tala epai na Yesu sikawa mpe biká;

Etiami kati na Liloba na Ye, Aleluya!

Ezali kaka ete to “táli mpe tobiki.”

Ndeko Joseph Branham

 Makomi ya kotanga kati ya bomíléngeli koyoka liteya:

Mituya 21:5-19

Yisaya 45:22

Jekalia 12:10

St. Yoane 14: 12