22-1030 Moto Oyo Azali Kokima Longwa Na Bozali Na Nkolo

Nsango: 65-0217 Moto Oyo Azali Kokima Longwa Na Bozali Na Nkolo

BranhamTabernacle.org

Balingami ba Mpate na Nkolo,

Boni mitema na biso ezali kokufa na mposa mpo na mokolo oyo mpóso na mpóso ntango tokoki kosangana elongó longwá na mokili mobimba koyoka Mongóngó na Nzambe koloba na biso Liloba na Bomoi na Seko. Ezali na eloko mosusu te ekosepelisa bomoto na biso mpe kosilisa mpósa na biso kasi Mongóngó na Nzambe.

Oyebisaki biso, Tata, ete elanga monene ya kobuka ezali mpembe, ekémbí, mpe mbuma ebelemi mpo na ntango monene ya kobetama. Mbuma ezali kolala sikawa kati na Bozali ya Mwana mpe kokemba mpo na Bokonzi ya Nzambe.

Totelemi, Tata, na kondimisama na biso na oyo toyebi ezali Solo; Mongóngó na Yo likolo na bande ezali Mongóngó SE MOKO oyo ekobongisa biso be, Mwasi na libala na Yo. 

Ezali mpasi lokola tozali kososolama mabe na bandeko na biso mibali mpe basi. Tobondelaka mpe tosengaka bango bakima te longwá na Bozali na Ye, kasi bakima kati na Bozali na Ye.

Toyebi ezali na bato ebele bapakolámi Oponáki bango mpe Otiaki bango kotala bitongá na Yo, baoyo balingi Etinda oyo na mitema na bango nyoso, kasi Tata, bakweaka kozanga akotia Mongóngó na Yo endimisami likolo na bande liboso na bango. Bakweaka na kozanga koyebisa bango ete oyo ezali Etinda ya moto moko mpe ete Oponaki moto yango kokamba Mwasi na Yo ya libala. Bakweaka na kozanga koyebisa bango ete Mongóngó na Yo ezali Mongóngó SE MOKO ekosangisa mpe kobongisa be Mwasi na libala na Yo.

Nasengeli “kogánga kotemela yango.” Kogánga kotemela eloko nyoso, mpe moto nyoso, oyo atémeli koyokisa ba bande na Yo kati na mangomba na bango. Kogánga Kotemela mosala na bango, kogánga kotemela lingomba na bango, kogánga kotemela basakoli na bango, kogánga kotemela batei na bango, kogánga kotemela banganganzambe na bango. Nasengeli kogánga kotemela eloko mobimba!

“Nalobi, Nayei komibakisa na bino baninga. Boyebi, Nandimi Nakoyebisa bino eloko Nakosala. Nazali bobele na mwa eloko awa Nandimi ete Nakokoki kosala yango…koyeisa biso nyoso elongo, mpe kosala oyo, oyo kuna, to mosusu.”

Nasengeli kogánga kotemela yango, lokola kaka liloba na Yo, oyo elobamaki na mosakoli na Yo, ekoki koyeisa BISO ELONGO.

Bakokoka koteya boni? Bazangi bango nyoso kondimana te kati na bango mpe bazali komona makambo makeseni moko na mosusu, longola se eloko moko, bango nyoso bazali koyokana likolo na…KOZANGA KOYOKISA BATO BA BANDE NA MANGOMBA NA BANGO. Ekoki nde kozala boni, Tata?

Oyebisaki biso ete esengeli na biso kozala na ETEMELO MOKO, yango nde Liloba na Yo. Olobaki na biso Liloba na Yo eyaka, BOBELE epai na mosakoli na Yo. Oyebisaki biso ete BOBELE ye nde akoki kolimbola Liloba na Yo. Oyebisaki biso ete motei nyoso, moilingomba nyoso, moto nyoso akokoka BOBELE KOLOBA OYO ALOBAKI. Mongongó na ye nde MONGONGO BOBELE moko endimisamaki na nzela na Likonzi ya Moto na Yo lokola Yango Elobi Nkolo.

Nazali koloba te ete bazali lokuta to basengelaki koteya te. To Nazali koloba te ete Nkolo azali elongo na bango te, to bapakolami te soko babiangami te koteya, kasi Nasengeli Nágánga kotemela bango ntango bakoyebisa bato na bango te ete koyoka ba bande ezali eloko moko ya litomba koleka bakoki kosala.

Kobongola litónó to ebiangeli moko ezali kufa. Opesaki nzela mpo na Mwasi na libala na Yo ayoka Yango Elobi Nkolo na matói na bango moko. Bakokoka nde te koteya bato na bango boni ete ezali Etinda ya litomba koleka esengeli na bango koyoka? Ezali Etinda bobele moko oyo Nakoki koloba AMEN na Liloba moko na moko, lokola ezali Liloba ya moto te, to ndimbola ya moto ya Liloba na Yo, ezali Liloba Peto na Yo.

Olobaki ete Etinda na motindami bazali eloko moko. Mosakoli na Yo alobaki Yango mpe Olingaki kokokisa Yango. Liloba na Yo lilobami na mosakoli na Yo ezali na bosenga na ndimbola TE lokola ezali Mwana na Moto koloba mbala moko na Mwasi na Ye ya libala.

Nasengeli kobondela bato, bozonga na bolingo na bino ya liboso. Bozonga na oyo boyebi ezali YANGO ELOBI NKOLO. Soko bozalaki kotatabana kozanga koyeba bókende nzela nini to bósala nini, boya, bomata na masuwa elongo na biso na mpokwa oyo. Tozali kokita na Niniwe, kogánga. Tozali na lotómo liboso na Nzambe, ezali Etinda oyo likolo na bande.

Tondimi ete koya na Nkolo ebelemi, mpe Akozala na Mwasi na libala, mpe tozali komilengele. Tolingi eloko moko te kasi Liloba Peto ya Nzambe lilobami na mosakoli na Ye. Tozali kokende na Nkembo, yaka kokota na masuwa na biso.

Soko ondimaka ete Etinda oyo ezali Solo, mpe ebongi kobika mpo na yango, ebongi kokufa mpo na yango, yaka komibakisa na biso mokolo ya Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Liteya oyo tondimi ezali na litómbá monene mpe ezali ya noki-noki mpo na biso koyóka: Moto Oyo Azali Kokima Longwa Na Bozali Na Nkolo 65-0217

Bozali ba mpate na ngai. Ezali boni? Bozali ba mpate na Nkolo oyo apesi ngai Naleisa.

Ndeko Joseph Branham.

Makomi ya kotanga

Yona 1:1-3

Malachi 4

St Yoane 14:12

Luke 17:30