22-1106 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE

Nsango: 65-0218 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Liloba Moseka,

Tozali awa. Tokómi. Ntango ebelemi. Ezipelo esili kokabwana na Mombóto. Toúmeli kati na Bozali ya Mwana, kokémba. Tokotikala kati na Bozali wana kino mwa libóké na biso ekokóma na bokémbi epai na Klisto, kino tokokóma lipa likolo na mesa na Ye. Matondi ezónga epai na Nzambe!

Etinda oyo endimisaki Malaki 4, endimisaki Luka 17:30, endimisaki Baebele 13:8, endimisaki Yoane 14: 12, endimisaki Emoniseli mokapo na 10, bofungolami ya Bilembo Nsambo, mabombami na Nzambe, momboto na nyoka, libala mpe koboma libala mpe mabombami mosusu oyo nyoso ebombamaki na nse na makonzí mpo na mbula nyoso oyo.

Tozali baseka epai na Liloba. Tokokoka te mpe tokosimba eloko mosusu te. Na Liteya moko na moko toyokaka, ezali mobesu mpe ya sika; Máná ma sika maúti kaka kokwea longwa na Lola.

Kasi Akebisaki biso ete na ntango na nsuka ekozala na milimo mibale mikozala pene mpenza, ekozimbisa ata baponami mpenza, soko ekokoka. Na bongo, tosengeli kozala na bokengi kotala molimo yango lokola ekomonana lokola ete ezali Mwasi na libala ye moko.

Botala, bomoni boni ezali penepene. Matai alobaki: Mosanto Matai 24: 24, elobi, ete: “Milimo mibale na mikolo na nsuka,” molimo na lingomba ya bato na lingomba  mpe Molimo na Mawasi na libala ya bato na Mwasi na libala, “mikozala pene mpenza elongo kino ekokaki kozimbisa Baponami mpenza soko ékokoka.” Nde bongo ezali penepene.

Alobaki Molimo na bato ya lingomba mpe Molimo na bato ya Mwasi na libala bakozala mpenza pene mókó na mosusu. Yango elingaki koloba ete molimo na bato ya lingomba ekolinga koloba ete bandimaka Etinda ya ngonga kozala PENE-PENE BONGO.

Ekozala te ba Metodisiti, Batisiti, Presibiteria, to bato na Kitelá; bazali mosika mingi na Liloba mpe baboyaka ata Etinda. Moko te kati na bango azali na molimo pene mpenza na Mwasi na libala.

Satana amekaki, mpe alongaki mpenza, kozala na bozímbisi. Ata longwa na ebandeli, alobaki kaka: “Ya solo,” nde koyebisa Ewa ete ásalela mabanza na ye, mpe asengelaki koyoka ye mpe Liloba kaka te. Ezali na eloko bobele moko apesamaki motindo kosala: tikalá na Liloba.

Makambo:

Soko ozali na motuna, esengeli eyano ézala. Yango nde mosakoli ayebisaki biso. Eyano esengeli koúta na Liloba. Liloba eyaka se epai na mosakoli. Mosakoli nde kaka molimboli moko ya Liloba. Soko mobali moko to mwasi moko apesi yo eyano, ekosengela kozala oyo mosakoli asili alobáki. Esengeli te kozala ndimbola na ye, likanisi to lisosoli. Basengeli batelema na yango likolo ya moboko ya Liloba lilobami na mosakoli na Nzambe andimisami. Ezali liloba na mosakoli te bakísá, ezali kaka oyo mosakoli alobaki.

Ezali sasaipi na biteyelo mibale ya makanisi.

1: Okosengela kondima liloba moko na moko likolo na ba bande lokola ezali Mateya ya litomba koleka oyo osengeli koyoka.

2: Osengeli te kondima Liloba moko na moko likolo na ba bande mpe batei bazali sasaipi na mateya ya litomba monene osengeli koyoka.

Ezali na mbóngwana-mbongwana mingi, mingi na likanisi ya mibale: Molimo Mosanto akokamba ngai to mobateli na ngai koyebisa biso nini ezali to nini ezali te Liloba. Tozali na bosengá ya mingi koleka oyo Ndeko Branham alobaki likolo na bande. Esengeli ózala na batei  kolimbola to komanyola Liloba. Soko na batei te okokoka kozala Mwasi na Libala te.

Ezali na kotemelana mosusu mingi, kasi ekokoka soki moké te kotanga yango nyoso. Kasi mbóngwáná-mbongwa moko ezali te soko kotemelana na oyo ya liboso. Ezali kaka, NDIMA LILOBA MOKO NA MOKO.

Lokola bandimi kati na Etinda oyo ya ntango na nsuka, esengeli ómituna mituna miye:

1: Ondimaka nde ete oyo mosakoli alobaki likolo na ba bande ezali Etemelo na yo, to ondimaka ete ezali Molimo Mosanto na nzela na yo to na mobateli na yo?

2: Ondimaka ete lotómo na misala mitano ezali na mateya ya litomba koleka esengeli Mwasi na libala áyoka, to ezali nde Etinda likolo na ba bande?

Soko mobateli na yo, motei, molakisi, mopalanganisi na Nsango malamu to mosakoli azali te koyebisa yo ete koyoka ba bande ezali MATEYA YA LITOMBA KOLEKA osengeli koyoka, azali YA LOKUTA, MPE MOLIMO MOSAKOLI AKEBISAKI BISO ETE EKOYA.

Soko alobaka ete EZALI Mateya ya litomba koleka okoki koyoka, kasi azali naino koboya koyokisa bato ba bande na lingomba na ye, EZALI NA ELOKO MOKO MABE. Soko solo mpenza andimaka ete koyoka ba bande ezali eloko ya litomba koleka okoki kosala, na bongo akoyokisa ba bande LIBOSO, na nsima akoki koteya soko ayoki akambami.

Ndakisa petee:

Soko Nayebisaki yo ete komela mai mpeto nde eloko bobele moko osengeli kosala mpo na bokolongónó na yo, mpe ezali na mai bobele MOKO mapesami ndingisa mpe makokisami lokola mai ma bomeli…kasi ntango oyei na ndako na ngai mpo na bilei ya mpokwa, Napesi yo mai mango te maye malingisami. Nayebisi yo: “okoki komela mai yango na ndako na yo kasi soko oyei na ndako na ngai, okosengela komela oyo Nakopesa yo.”

Soko mai mango nde ELOKO ELEKI MALAMU Nakoki kopesa yo mpo na bokolongónó na yo, oyo ekopesa yo bomoi, na bongo eloko ya liboso Nakopesa yo ntango okóti na ndako na ngai ezali mai yango mpeto ya bomeli.

Nazali nde na libunga na bolobaká ete: “KOYOKISA BATO BA BANDE NA MANGOMBA NA BINO, ezali eloko epusi malamu bokoki kosala mpo na bato na bino Ezali Yango Elobi Nkolo.”

To, bazali nde na libunga na bolobaká: “Ezali mabe koyokisa ba bande kati na losambo, Ndeko Branham alobá soki moke te koyokisa ba bande kati na lingomba. Toyebisaka bato bayoka ba bande na ba ndako na bango, na mituka na bango, ntango nyoso, KASI na losambo basengeli koyoka NGAI.”

Molimo nini nde ezali kokamba yo? Olobaka nde ete: “Oyo elobami likolo na ba bande ezali etemelo na ngai mpe eloko ya litomba eleki Nakoki koyoka”? To, olobaka nde ete: “Ba bande ekoki te. Ezali etemelo na ngai te mpe ezali te eloko ya litomba mingi koyoka, batei nde bazali yango”? 

Sikawa nde ntango ya Momboto, to ntango ya Mwasi na libala. Bizipelo bisili kokufa. Bizipelo bikaóki. Ntango ya Liloba Moseka, asimbami te. Ezali moseka, bokanisa, ntango ya Liloba moseka.

Yaka koyoka Maná ma sika maúti kokwea longwa na Likoló mokolo mwa Lomingo loye na 12:00, nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: 65-0218 MOMBOTO EZALI MOSANGOLI NA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE.

Ndeko Joseph Branham