23-0430 Eleko Na Lingomba Ya Efese

Nsango: 60-1205 Eleko Na Lingomba Ya Efese

BranhamTabernacle.org

Molingami Wolo Peto etúlámi,

Boni natóndi na matondi kosangana na moko moko na bino, kokota na Molimo mpe koyoka Nzambe kosolola na biso, mbebu la litoi. Ezali kaka na suka te na oyo Azali komonisa biso. Mitema na biso mitóndi na esengo. Bomoto na biso ezali kopunjwa-punjwa. Moto akososola boni oyo tozali koyoka?

Koyoka kaka oyo Nkolo Ye Moko Azali koyebisa biso: “Bozali Lingomba na Ngai ya solo, Mwasi na Ngai ya libala. Epai na Ngai, bokokani na wolo PETO. Boyengebene na bino ezali boyengebene na Ngai. Misala na bino mizali misala na Ngai ya nkembo. Oyo NAZALI, bozali kotalisa yango. Oyo NAZALI NA YANGO, bozali komonisa yango.

Epai na Ngai, miko mazali te kati na bino, bozali na nkembo na kati mpe na libanda. Longwa na ebandeli kino na nsuka, bozali mosala na Ngai…mpe misala na Ngai nyoso mibongi be.

Bokozala na kosambisama soko moke te, zambi lisumu likoki kotangemela bino te. Ata liboso na kozalisama na mabelé, ntina na Ngai ezalaki kokabola Bomoi na Seko na Ngai elongo na BINO.

Moto akoki nde kosimba maloba oyo boni? Makanisi ma biso makoki nde kososola boni oyo ezali kosalema? Oyo ezali komonisama? Bokanisa yango, tozali na bosenga te ya kogánga kati na motema na biso mpe koloba: “Oh, yango ekokaki kozala kala kuna na eleko ya liboso ntango ba ntoma babimaki liboso.” Ezali TE na bonsenga mpe na biso kotala nsima, mpo na Ye, oyo abongwanaka soki moke te na eutelo to na ba nzela na Ye, azali kati na biso SIKAWA, koloba na biso mpe koyebisa biso Azali motindo moko lobi, lelo mpe libela. Oyo ezali ntango MONENE KOLEKA kati na lisolo ya ntango kozala kobika.

Tobetami mpe topetolami, totondisami na minyoko mitikaki Klisto na nsima. Totangami lokola ba mpate mpo na ebomelo. Tobomami mokolo mobimba. Tonyokwaka mingi, kasi kati na yango nyoso, tolemwaka te, soko mpe te ete tosalaka basusu konyokwa. Epai na Ye, tozali wolo peto ebetami, egumbami te, ebukani te, ebebisami te. kasi esalami lokola eloko moko ya bonzénga mpe esengo mpo la libela na nzela ya bitumba mpe mimekano ya bomoi oyo.

Azali sikawa kokebisi bamosusu nyoso: “Bozonga na Bolingo na bino ya Liboso”. Boni basengeli kokéba lokola bokoki kobongola te LILOBA MOKO, ata kutu litono to liutá te. Yango ezalaki mayele mabe ma ebandeli ya Satana kuna na Elanga ya Edene. Bobele liloba moko libakisami, bobele liloba moko lilongolami, nsima ekomi motemeli-Liloba. 

Na eleko oyo ya nsuka akebisaka biso ekozala na basakoli ya lokuta ebele komonana, koyebisa bato ete soko bandimi bango te mpe oyo balobaka, boko bunga. 

Ezali na NZELA KAKA MOKO kondimisama ete ELOKO TE ebakisamaki, eloko te elongolamaki, eloko te ebongolamaki…na boyokaka MONGONGO YA NZAMBE peto…. KOFINA PLAY.

Matondi Nkolo mpo na lotomo, lolakisami sembo, oyo kaka te loyebisaka ba mpate na bango litomba ya boyokaka Liteya mokolo na mokolo na ba ndako na bango, kasi na bozalaká batángi sembo, kotia Etinda oyo, Mongongó Moye, Ba Bande oyo, liboso mpe na koleka liboso ya bato kati na mangomba na bango.

Na bolobaka makambo maye, nasosolami mabe mpe nafundami kokabola mangomba mpe koyebisa bato ete bakende na losambo te. Ezali na yango kaka solo te. LILOBA lizali kobimisa bato na mangomba maye mazali kotia ba bande LIBOSO te kati na biyanganelo na bango. Bazali na Nzala ya koyoka Liloba utá na Mosakoli ya Nzambe. Bayokaka ete Ezali Etinda mpe Mongongo ya koleka balingaka koyoka. Bayokaka ete Ezali Mokano mwa Nzambe mobongi be koyokisa ba bande kati na lingomba na bango.

Nalobaka ntango nyoso na bato: “BOKENDE NA LOSAMBO”. Ntango batunaka: “Oyokaka ete batei bakoki naino koteya?” “Iyo.” Nalobá soki moke te to nakanisa te ete bakokaki kokende te. Nayebisaka kaka batei, balakisi, babateli: “Bosala oyo Nzambe Abiangi bino kosala, KASI NASENGI BINO, botiya Mongóngó mpenza ya Nzambe likolo na Bande Liboso, LOTOMO NA YO TE”.

Yango nde EMONIELI NA NGAI. Basengeli kosala lokola BAYOKAKA BAKAMBAMI KOSALA. Nazali na makoki ya koteya mpe kolakisa oyo nayokaka. Soko balingi koloba ete Ndeko Branham aloba soki moke te Kofina Play kati na Losambo, Mongóngó mpenza ya Nzambe babetaka ntólo ete bazali kolanda, etali bango. 

Molimo Mosanto azali, mpe azalaki ntango nyoso, kokamba Mwasi na Ye ya libala. Tondimaka Azali koyebiso Biso: “BOFINA PLAY, BOTIKALA ELONGO NA MOSAKOLI, MONGONGO NA NGAI, MOLIMO MOSANTO NA NGAI.” 

Na boye, tozali na móndengé na yango, bongo, lokola Eliya mosakoli liboso na oyo. Mpe soko ozali mwana na Nzambe, okotikala elongo na mosakoli ya Biblia oyo. Ezali Liloba.Botala ngonga, eleko.

Nani nde mosakoli ya Biblia, Liloba, Molimo Mosanto!

Molimo Mosanto azali mosakoli ya ngonga oyo; Azali kondimisa Liloba na Ye, kokokisa Yango. Molimo Mosanto azalaki mosakoli ya ngonga ya Mika. Molimo Mosanto, oyo akomáki Liloba, ayaka mpe akokisaka Liloba

Molimo Mosanto ya ngonga oyo azali kokamba biso na nzela ya mosakoli na Ye, lokola Asalaki eleko moko na moko. Nzambe abóngolaka pologalámi na Ye soki moké te.

Na ntina yango, bobiangami koya komibakisa na biso kati na oyo toyoki ezali pologalámi ya Nzambe na boyókáká Molimo Mosanto koloba na nzela ya mosakoli na Ye, mpe kokamba biso lokola Azali komemela biso Liteya: Eleko Na Lingomba Ya Efese 60-1205, na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati na bolengeli koyoka Liteya.

Misala 20: 27-30

Emoniseli 2: 1-7