26-0621 KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

Nsango: 65-0822m KLISTO AMONISAMI KATI NA LILOBA YA YE MOKO

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Mokonzi,

Na bongo Mwasi ya libála lelo azuámí longwá na nzóto ya Klisto, oyo ezali kobíka mpe kosála mpeza bobele lokóla elobákí Ye ete Ekosála mpo ya lelo oyo, Mwasi ya libála, Mwasi ya Mokonzi; Mokonzi mpe Mwasi ya Mokonzi.

Ntango Yesu akómákí Liloba wana mobimba, nde tozalákí NDÉLE eténi na Ye. Ezali na zábolo te, nguya te, eloko ata moko te ekokoka ndéle kolongola yango na bisó. Yango nde likonzí epai wapi bomoto botingámí.

Kolamukisa ya lolengé nini oyo Mwasi ya libála azali kozua na Litéya moko na moko tozali koyóka. Ezali koleka maloba mokúfi akokí kobimisa. Ezali te na elílíngi ata moké ya ntembe, Nzambe aponákí bisó mpe apésákí bisó Emóniseli ya SÓLÓ ya Liloba na Ye mpo ya lelo. Na ntina wana, toyébí tozali ba nani, Mokonzi Mwasi na Ye.

Mongóngó ya Nzambe koloba na Mwasi na Ye ya libála likoló ya ba bánde ezali kobongisa be Mwasi na Ye ya libála. Ezali na lotómo mosúsu te, mongóngó mosúsu te; Ezali na elóko moko te oyo ekokí kobongisa be Mwasi na Ye ya libála kasi Nzambe Ye moko koloba na nzela ya bibebú ya moto mbala moko alimá na Mwasi na Ye ya libála. Basúsu bakokí kolinga kozua eloko mosúsu na esiká wana, kasi Mwasi na Ye ya libála a Kondimana na eloko mosúsu ata nini te kasi MONGÓNGÓ na Ye, mokandá na Ye ya bolingo epai ya Mwasi na Ye ya libála; mpámbate ba Mpate na Ye Balingí koyóka sé Mongóngó na Ye.

Bato balobí ete tozali kopésa motúya mingi likoló ya mosakoli. Ezali nde likambo ya kokámwa ete bato bazangí Kondima ete Tatá monéne ya Likoló Ye moko atiéláki mpenza mwanje na Ye motéma na motindo ete Atiákí litómbá ya ndéngé wana likolo ya eténi moko na moko na ntina na ye; loléngé alátákí, lolengé asálákí makambo, ezaleli na ye, mitíndo na ye ya kobíka makambo.

Alátisákí kútu ye na motindo ya bilambá alátákí; loléngé na ye, mposá na ye, likambo moko na moko káka lokola asengélákí kozala, aponamákí mpenza na loléngé lobongákí be na Nzambe Ye moko mpo ya bisó…e bongó óloba ete tozali kopésa lokúmu mingi na mosakoli.

Epai na bisó, Mongóngó likoló ya ba bánde ezali Liloba ya moto te, sokí te Elobámí na moto, soko ete ememámí na moto, soko nde Émónísámí na moto. Ezali Liloba ya Nzambe emónísámí na Nzambe Ye moko, Molimboli ya Ye moko, Klisto komímónisa Ye moko kati na Liloba na Ye Moko.

Bókó bakokí koyóka, kasi bayébí mobimba te. Okokí koyebisa bango, kotálisa bango kasi bakokí na bango káka komóna te. Tolingi bango, tozali kobóndela mpo na bango, kasi oyo Nzambe Amónísí bisó ezali Bobongi be na Ye.

Bótála mamá na momekano monéne mpo ya kokabwana monéne kati ya Mwasi ya libála ya Klisto lelo baoyo balobí ete bazali na Emóniseli ya sóló ya Etíndá monéne oyo ya ntango ya nsúka.

Ndimbolá ya emekeli Monéne: Motúná sé moko ya mokáno, ya likambo, to elóko oyo na Lombángu ezali komónisa lolengé, motíndo, to etémelo ya eloko moko (to moto moko).

Tiká ya libosó Náloba mbala moko lisúsu, Nandimaka botéi ya sóló bobiángámí na Nzambe. Ezali na boséngá, mpe na esíká, mpo ya mosálá moko na moko. Makomi malobí ete mosálá ya mibáli oyo ezali mpo ya bobongi be ya babúlami, kasi Elobí te ete moko na moko kati ya bótáno ya botéi ekobongisa be babulami.

Ndeko Branham polélé-polélé ayébisi bisó ete kati na eleko moko na moko batéi bakendeke libándá na molongó, na bongo BAkokákí nde kobongisa be Mwasi ya libála boni?

Ezali na ebelé na ebelé ya batéi, balakisi, bantómá mpe basakoli baoyo batéyá ete bandimí Etíndá oyo ya ntango ya nsúka mpe ete Ndeko Branham azalaki Mongóngó ya Emóniseli 10:7, baoyo sikawa balobí ete ezali lokutá, azali mozímbisi, bísó nde binzambe-nzambe.

Baoyo bazalaki batéi bapésamélákí limemia na biyanganelo minéne baoyo batámbólá mokili mobimba mpe batéyá. Batalámákí lokola bakambi minéne kati ya bó5 ya botéi, kotéyáká kati ya makita mpe kati ya masámbo na Amerika mobimba. Bazalaki na mosálá monéne na míso ya bato, mpe babiláki mpe bandimaki bango kozala bato minéne ya Nzambe.

Na nsima ezali na batéi lelo baoyo bayébání lokóla batéi ya sóló kati ya bó5 ya botéi baoyo balobí ete bandimí Etíndá oyo na bozóngéláká ndambo ya maloba na Yango mpe na botéyáká Yango, kasi balobí mpe ete Etíndá oyo ezali Etémelo te. Mikolo ya Etíndá ya moto moko misílí koleka. Bó5 ya botéi nde bosengeli sikawa kobongisa be Mwasi na libála, mpe ezali libúngá koyókisa ba bánde kati ya losámbo, kozóngela mwa biténi ya maloba.

Toyébí ekozala na bapakolami ya lokutá na ntango ya nsúka; mosakoli akebisaki bisó ete tokuka Koyéba bango. Botéi na bango ekopakolama. Bakozala na Molimó Mosanto, na bongo bakozóngela maloba ya Etíndá ya ngonga oyo. Bakozala PENE MPENZA ete ekozimbisa ata Baponami mpenza soko nde ekokákí.

Oyo wana ezali bibongiseli te. Bakokaki te kobanda kozímbisa baponami. Na bongo, esengélí ézala kútu pene koleka wana. Oyo elingí koloba te ete Motéi NYOSO abúngí nzela, ezali Yango te. Ezali na bato minéne ya Nzambe baoyo bazali kotéya mpe kolakisa sóló, kasi ezali na eloko moko oyo mondimi moko na moko asengélí koyeba mpe komítúna:

Motéi oyo ozali kolanda akokí nde kosála libúngá?
Okokí nde Kondima amen na Liloba moko na moko azali kotéya?
Ondimí ete Liloba moko na moko azali kotéya ezali Yango Elobí Nkoló?
Ezali nde ete mongóngó na ye nde Mongóngó ya litómbá osengélí koyóka?
Akokí nde kotéya eloko ya libúngá?
Akokí nde kobúnga nzelá ata nsima ya kotéya Etindá mpo ya mbúla 30? Akokí nde kokwéa? Akokí nde koyebisa yo mabúngá?
Akokí nde kozímbisama?

Sikawa mítúná mitúná yango moko na ntina na Mongóngó ya Nzambe okokí koyóka likoló ya ba bánde.

Etíndá likoló ya ba bánde ekokí nde kosála libúngá: TE
Okoki nde Kondima mpe koloba AMEN na Liloba moko na moko lilobí ye? EE
Ekokí nde kokwéa? TE
Akokí nde kotéya mabúngá? TE
Ekokí nde koyébisa yo mabúngá? TE
Okoki nde kotingamisa Sékó na Sékó na yo likoló na Liloba moko na moko ozali koyóka…EE!!!
Ezali nde Mongóngó ya Nzambe: EE

Mpo ya nini Nazali koloba makambo oyo? Komónisa polélé ete bato NYOSO bakokí, mpe bazali kosála mabúngá, kasi MONGÓNGÓ YA NZAMBE likoló ya ba bánde ekokí kosála libúngá te. Nde ntina Ezali MONGÓNGÓ elekí na motúya OSENGÉLÍ KOYÓKA. Nde ntina esengéli na batéi báyókisa ba bánde na masámbo na bango. Ezali NZELA EBONGÍ BE YA NZAMBE EPÉSÁMÍ Afungólí mpo ya Mwasi na Ye ya libála.

Ya sóló, Nandimí okokí koyóka basúsu, kasi Mongóngó bobélé moko OSENGELÍ KOYÓKA mpe Kondima Liloba nyoso nde Mongóngó likoló ya ba bánde. Mongóngó wana nde BOBÉLÉ MOKO tokoki koloba AMEN na Liloba nyoso.

Nde mobeko ya Nzambe, osengélí Kondima Liloba nyoso, mpe Liloba ozali koyóka likoló ya ba bánde nde LILOBA SÉ MOKO endimisamákí na Likonzí ya Móto ete ezali sóló. Nzambe alobákí ete William Marrion Branham nde molimboli BOBÉLÉ MOKO ya bonzambe ya Liloba na Ye, mpámbate Ezali Liloba na ye te, Ezali Liloba ya Nzambe.

Bóngólá te litónó to mokonza ata moko. Moto moko te abongi be bongo. Bobélé Liloba ya Nzambe nde ebongí be bongo. Ata ntango tososóli te oyo tozali koyóka, tosengeli kaka Kondima ete yango nde Mongóngó mondimísámí ya Nzambe epai na Mwasi na Ye ya libála.

Ya sóló, Molimó Mosanto azali kokamba bato ya Nzambe.
Ya sóló, Molimó Mosanto abiángí bango kozala babáteli mpe batéyi mpe balakisi; Ezali solo, kasi babongí be te. Kasi Nzambe Afungóli nzela ete okokí koyóka LILOBA LIBONGÍ BE ntango sé ntango boyangání.

Na bato, na batéi, Balingí eloko mosúsu na esiká na yango lelo. Okokí nde kokanisa moto moko ásálela motéi moko oyo bazali kosálela Ndeko Branham?…”Nakopesa yo minúti 30 mpe bongo osengelí kotelemisa, Nazali na litéya Nasengélí komema. Bokokí koyóka ba bánde ntango sé ntango. Nayebí nini eyánganelo oyo bazali na yango boséngá oyo ekokani mpo ya lelo.” Mingi bakokí kutu te koyókisa ata eténi ya bánde, mpe balobí ezali libúngá koyókisa Mongóngó ya Nzambe kati na masámbo ya bango.

Moto moko akokí nde kobánza kati na makanisi na ye malamu motéi moko ámílukela bilonga, elonga ata ya ndéngé nini kobóya koyókisa bato Mongóngó ya Nzambe kati ya losámbo na ye zambí andimí ete asengélí kotéya? Balobaka yango, kasi bandimí te ete ezali Mongongo ya Nzambe, soko bongo te bakokaki soko moké te komílukela ekimelo kozánga koyókisa ba bánde.

Boni nde moto ábeta tólo koloba ete andimi oyo ezali Mongóngó ya Nzambe mpe álinga te koyókisa yango kati na losámbo na ye? Boni nde bato baoyo babétí tólo ete bandimí ete ezali Mongóngó ya Nzambe koloba mpe bázánga kopésa motíndo epai ya babáteli na bango ete báyókisa ba bánde kati na masámbo ya bango? Zambí bazali na molimó yango moko.

Zalá Nikodeme te mpe koloba, “Namóní yango mpe Nandimí yango. Ezali Mwana ya Moto komímónisa kati ya mosuni ya moto. Ezali Yango Elobí Nkoló. Ezali Etíndá Ebongí Be. Ezali Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bánde, kasi Nakoki na ngai kaka te kokitisa botéi na ngai mpe Náloba ete Mongóngó wana nde oyo eleki na litómbá mingi mpo ya lingómba na ngai koyóka.

Bandeko mibali mpe basi, ekokí kozala ete ozángi Kondimana na ngai kaka mpenza likoló na oyo. Nasengi yo te óndimana na ngai. Eloko sé moko, simbá yango bobélé na motéma na yo. Oyo oyebísí ngai; Nakonfima yango. Soko batéi balobí na masámbo na bango ete bandimaka te koyókisa ba bánde kati ya masámbo ya bango, ezali malamu, ndeko na ngai. Léísá bango oyo nyoso osepelí koléisa bango.

Nazali komeka manso na ngai Kotíkala alimá na Liloba, zambí ba Mpate balingí eloko mosúsu te kasi Biléi ya ba mpate mpe tondimi Mongóngó likoló ya ba bánde nde Biléi ya bisó ya ba Mpate. Nde oyo tobíkaka na yango: Liloba nyoso likobimaka na…Ezali káka te Liloba sikawa mpe nsima moké; kasi Liloba nyoso libimí na monoko ya Nzambe lilobámí likoló ya ba bánde; nde oyo tozali kobíka na yango.

Nzambe álimbisa ngai mpe ólimbisa ngai soko Nabétisí yo libakú to Nalobákí eloko moko ya libúngá. Oyo ezali na yango bobélé oyo tondimí mpe tomóní ezali Sóló tozali kobíka na yango. Nzambe Apésí bisó NZELA EBONGÍ BE koyóka Mongóngó na Ye mpe tolingi yango.

Lokolo ntango nyoso, Nabiángí moto nyoso oyo alingí komíbakisa na bisó koyóka Mongóngó wana na ntango yango moko, áya komíbakisa na bisó na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, wapi to kosangana lokola Lisangá Moko koyóka:65-0822M Klisto Amónísámí Kati Na Liloba Na Ye Moko.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotánga libosó ya boyóki Litéya:

Esode 4: 10-12
Yisaya 53: 1-5
Yilimia 1: 4-9
Malaki 4:5
St. Luka 17:30
St. Yoane 1:1 /1:14/ 7:1-3 /14:12 / 15:24 / 16:13
Bagalatia 1:8
2 Timote 3:16-17
Baebele 1:1-3/ 4:12 / 13:8
2 Petelo 1:20-21
Emóniseli 1:1-3 / 10:1-7 / 22:18-19