23-0406 Elambo

Nsango: 57-0418 Elambo

BranhamTabernacle.org

Molingami Nzete Mwasi na libala Ezongisami,

Mbula mobimba, Nazali kotala liboso na nsuka ya mpóso ntango nakoki kokanga mokili nyoso mpenza, kokanga bisaleli na ngai nyoso, kobondele kati na mokolo mobimba, koyoka Mongóngó na Ye koloba na motema na ngai, kozala na Boyokani elongo na Ye, mpe kopesa bomoi na ngai lisusu mobimba na Mosala na Ye. MOKOLO NYOSO esengelaki kozala mokolo ya Pasika mpo na biso, kasi nsuka ya mpóso oyo ezali mpenza godi, libaku lisanto; mpe ntango-etiami pembeni mpo na Mwasi na libala koya elongo mpe Kosambela. Nasali KOSEPELA MPENZA na ntina na yango baninga na ngai. Nakoki kaka te kozila komikanga na kati elongo na Nzambe na esika ya nkuku, kuna kati na Molimo, kotala Elongi na Ye; komibakisa na Mwasi na libala ya Klisto na mokili mobimba, kofanda na bisika na Likolo. Masanzoli na Nkombo na Nkolo! Esengelaki mpenza solo kozala nsuka ya mpóso ya kozila na etingia na bomoi na biso.

Oh, totelema kaka monuti moke lisusu awa. “Na bisika na Likolo.” Sikawa, kaka libanda te esika ata wapi, kasi na bisika na Likolo. Toyangani na “Likolo,” elingi koloba etemelo ya mondimi. Yango, soko nazali kati na mabondeli, ozali kati na mabondeli, to lingomba lizali kati na manbondeli, mpe tobelemi mpo na Liteya, mpe toyangani biso moko elongo lokola basanto, tobiangami kobima, tobatisami na Molimo Mosanto, totondi na mapamboli ma Nzambe, babiangami, baponami, tofandi elongo na bisika na Likolo sikawa, tozali bato na Likolo, kati na bomoto na biso. Milimo na biso ememi biso kati na mokilo ya Likolo. Oh, ndeko! Nde yango, mokili ya Likolo! Oh, nini ekokaki kokóma na mpokwa oyo, nini ekokaki kokóma na mpokwa oyo soko tolingaki kozala kofanda awa na mokili ya Likolo, mpe Molimo Mosanto kotambola likolo na motema moko na moko oyo ebongwani mpe ekomi ekelamu ya sika kati na Klisto Yesu? Masumu manso na nse ya Makila, na losambo lobongi be, na maboko ma biso likolo apai na Nzambe mpe mitema na biso mitombwi, kofanda na bisika ya Likolo kati na Klisto Yesu, kosambela elongo na bisika ya Likolo.

Bosila kofanda kati na moko? Oh, nafandaki wana kino nakokaki kolela mpo na esengo mpe koloba, “Nzambe, tika ngai soki moke te kolongwa awa.” Kaka bisika na Likolo kati na Klisto Yesu!

Kopambola biso na nini? Lobika na nzoto na Bonzambe, na boyebi liboso, emoniseli, bimononeli, nguya, minoko, ndimbola, bwanya, boyebi, mapamboli nyoso na Likolo, mpe esengo ezangi maloba mpe litondi na Nkembo, motema nyoso motondi na Molimo, kotambola elongo, kofanda elongo kati na bisika ya Likolo, likanisi moko mabe te kati na biso, likaya moko libendami te, elamba moko mokuse te, oyo moko te, oyo kuna to mosusu, likanisi moko mabe te, moto moko te azali na eloko ata nini kotemelana, bato nyoso koloba kati na bolingo mpe boyokani, bato nyoso na lobanzo moko na esika moko, “na pwasa longwa na Likolo lokito loyaki lokola mopepe makasi.” Nde yango, “Apamboli biso na mapamboli nyoso na molimo.”

Nkolo Yesu yamba losambo na biso apai na Yo na nsuka ya mposo oyo ya Pasika. Tika ete tokota na bisika ya Likolo kati na Klisto Yesu; tika tomikotisa na Esika eleki Bule. Likanisi moko mabe te, likanisi moko libanda te, kasi na lobanzo moko, na Esika moko; nsima tika ete ezala na lokito longwa na Likolo lokola lokito ya mopepe makasi kati na moko na moko ya be ndako na biso. “Yaka Nkolo Yesu”, tobelemi komona Yo miso na miso. 

Mpo Mwasi na Libala asili kozongisama na nzela ya Pole na Etinda ya ntango na mpokwa ya mokolo na biso; na nzela ya Etinda ya Malaki 4. Totondi Yo Nkolo mpo na komonisama mobimba ya Klisto kati na Lingomba na Ye, lingomba litongami na maboko te, kasi kominisama mobimba ya Klisto Amonisami kati na moto moko, mosakoli na Yo, na bilembo mpe bikamwiseli binene, mpe amonisi Liloba mobimba na Nzambe lisusu. Mpe sikawa Ezali kobika kati na Mwasi na libalia na Yo na mokili mobimba. Matondi apai na Yo mpo nakotika biso tobika komona Pole monene oyo ya mpokwa, kokokana na lisakoli.

Mpe Pole ya mpokwa ebimaka mope na nini? Pole ya mpokwa ezali mpo nan nini? Kozongisa. Whew! Boyambi yango? [Eyanganelo elobi, “Amen.”—Mok.] Pole ya mpokwa ezali mpe na ntina yango moko Pole ya ntongo ezalaki, kozongisa oyo ekatamaki na Bileko ya Molili, na nzela na Loma. Nzambe akozongisa, na bongegisaká Pole ya mpokwa (nini?), kozongisa Liloba mobimba ya Nzambe lisusu, kominisama mobimba ya Klisto lisusu kati na Lingomba na Ye. Eloko nyoso esalaki Ye, kaka mpeza Asalaki, elingaki kozala lisusu kati na Pole na mpokwa. Bomini oyo nalingi koloba? Oh, ezali bikamwa te? [“Amen.”] Mpe koyeba ete tozali kobika kaka awa komona yango sikawa, Pole na mpokwa, engebene mpenza na lisakoli.

Mwasi na libala ya solo atelemaka te na Kolongisama, atako Ayebaka ete masumu ma Ye mazali lokola nde Asala yango soki moke te; Atelemaka te na Kobulisama, atako apetolama mpe atiamá pembeni mpe na mosala; Atelemaka te na Pentekoste te, atako azuá libatisa ya Molimo Mosanto; kasi Akendeke liboso na LILOBA MPO NA MOKOLO NA BISO: Malaki 4, Liloba Yango moko likomi mosuni lisusu kati ma moto. Oyo, “Nakozongisa elobi Nkolo,” ekoyeisa Kondima ya Konetolama epai na Mwasi na libala. Mpe Liloba wana limonisami likoki BOBELE koya na boyokaká ba Bande, lokumu na Nkombo na Ye ya bikamwa.

Moko na bango, Martin Luther, abandaki kongengisa Pole. Ezalaki Pole moke, kaka makasi moke mpenza, ya kolongisama.

Na nsima, Wesley ayaki, makasi koleka, kobulisama. 

Nsima Wesley, oyo ya makasi koleka ye ayaki, Pentekoste, libatisa ya Molimo Mosanto, kati na mosakoli mosusu monene. Bomoni?

Kasi na mikolo ya nsuka, ya Malaki 4, Eliya asengeli koya na Liloba yango moko. “Liloba ya Nkolo liyaki epai na mosakoli.” Kati na Pole ya mpokwa, esengeli eya, kozongisa mpe koyeisa yango lisusu. Nini? “Kozongisa mitema ya bana epai na kondima ya Nzambe.” Pole ya minei!

 Boya koyangana zinga zinga na Liloba, na ba ndako na bino, ntango ya suka ya poso ya Pasika mpe tika ete Tosambela Nkolo. Bokanga ba telephone ya bino longola se kokanga bilili, koyoka Eteni Ya Liloba Ya Bande Mpo Na Mokolo, mpe koyoka bande longwa na Table app, Lifeline app, to kozua ekanganeli na yango.

Nakolingo mpo na biso nyoso ete tosangana mpo na manáka maye:

MOKOLO MWA MINEI

Ezalaki mokolo mwa Minei na mpokwa nde Nkolo Yesu Asalaki Elambo ya Nsuka elongo na bayekoli na ye, kati na ekaniseli ya Elekeli liboso na kobima ya bana na Yisalaele. Libaku nini malamu oyo tozali na yango kosala elambo elongo na Nkolo kati ba ndako na biso, liboso na nsuka ya mposo na biso mosanto, mpe kotuna Ye Alimbisa biso na masumu na biso, mpe Apesa biso nyoso tozali na yango bosenga kati na mobembo na biso.

Nzambe, tala mitema na biso sikawa. Makila mazali nde kuna, Nkolo? Soko mazali te, tobondeli ete—ete Opakola yango sikawa kaka, kolongola masumu na biso mpe kozipa yango, mpe makolongwa na biso, Nkolo, masumu ya mokili oyo, ete tokoka kozala basanto mpe babongi epai na Tata sikawa lokola toyei kozua nzo—nzoto mpe Makila mosopamaki ma Mwana Mpate na biso, Mwana na Nzambe, Mobikisi na biso.

Tika ete tobanda na 6:00 Nsima ya nzanga na ntango na bino ya mboka na mboka, mpe toyoka Elambo 57-0418. 

Nsima na Liteya, tokoyangana na mabota na biso kati na ba ndako na biso mpe tokozua Elambo ya Nkolo.

Ekoumela te tokozua ekanganeli mpo na kozua bande mpe molulu ya Elambo, to, ekozuama na Voice Radio. 

MOKOLO MWA MITANO

Tika ete tokende na libondeli elonga na mabota na biso na 9:00 na ntongo, na nsima lisusu na 12:00 nsima ya nzanga, kobianga Nkolo Azala elongo na biso mpe Atondisa ba ndako na biso na Molimo Mosanto lokola tozali komibonzela biso mpenza epai na Ye. 

Tika eta makanisi ma biso mazonga na mokolo wana na Kalvari, eleki mbula 2000, mpe tomona Nkolo na biso kokakesama na ekulusu, na nsima tomipesa motindo moko kosala ntango nyonso oyo ekosepelisaka Tata:

Sikawa tokuti ete etalisaki Ye mpenza mpenza. Moyemi sikawa Azalaki na Liloba kati na Mosala mobongi lisusu, mobiangami Mwana na Ye, Nzambe, Emanuele. Bokanisa kaka, ete Moto amipesaki mpenza kino Nzambe Amitalisaki na kati kuna, kati na nzoto wana, mpe Akomaki, Ye na Nzambe bakomaki Moko. “Ngai mpe Tata na Ngai tozali Moko. Tata na Ngai afandi kati na Ngai. Nasalaka oyo ntango nyoso esepelisaka Tata.”

Boni soko moklisto lelo akokaki kozala na litatoli lokola yango? Olingaki kozala Mosala mobongi be awa mpenza na Yuma, na balabala. Soko ozali mwasi asukwi kuna nsima na esukwelo, okozala naino kaka Mosala mobongi epai na Nzambe, ntango okoki koloba: “nasalaka ntango nyoso yango ekosepelisaka Nzambe,” mpe mokili mobimba mokoki komona mo—mosala na Yesu Klisto kotalisama kati na yo.

Nsima na 12:30 nsima na nzanga, tika ete toya elongo na ba ndako na biso koyoka, Bobongi Be 57-0419.

Nsima tika ete toya elongo kati na libondeli na 3:00 nsima na nzanga, kati na ekaniseli ya bobakami na ekulusu na Nkolo na biso.

MOKOLO MWA MPOSO

Tika ete mbala moko lisusu tosangana kati libondeli na 9:00 na ntongo, mpe na 12:00 nsima na nzanga, mpe kolengela mitema na biso mpo na makambo manene Akosala mpo na biso na kati na biso.

Nkolo! Bolimbisi, Nkolo! Oh, nakoki koyemba mingi koleka. Nakoki koteya mingi koleka. Nakoki konganga mingi koleka. Nakoki kolela mingi koleka. Kasi nakoki kobondela mingi koleka soki moke te. E Nzambe, tala ngai mpe meka ngai.

Nazalaki kaka koloba eumeli mingi te, na ntina na maziba ya bozindo, boni boni makotalisaka minzoto; tia bozindo ya Molimo na Yo kati na biso, Nkolo, lokola Dawidi mosakoli alobaki, “Kamba ngai pembeni na mai ma kimia,” mai ma miulá te. Mai ma kimya, kamba ngai kuna, Nkolo. Zalisa ngai kimia.

Nsima na 12:30 nsima na nzanga, tokoya biso nyoso elongo koyoka Liloba: Bokundami 57-0420.

Mokolo ya MOKANDA YA BOLINGO nini oyo ekozala mpo na Mwasi na Ye ya libala na mokili mobimba.

Nsima tika tokutana elongo lisusu kati na libondeli na 3:00 nsima na nzanga.

MOKOLO MWA LOMINGO

Mokolo mobongi be nini oyo koyoka mpe kosangana na Kozongisama ya Nzete Mwasi na libala. Tika liboso tolamuka ntongo makasi lokola Ndeko Branham asalaki na ntongo wana moninga na ye muke, ndeke ya toló motane, alamusaki ye na 5:00 na ntongo. Tika ete totonda kaka Nkolo mpo na kosekwisa Yesu longwa na bakufi:

Na ngonga ya mitano na ntongo oyo, moninga na ngai moke na toló motane apumbwaki na lininisa mpe alamusaki ngai. Eyokanaki lokola nde nwa motema mwa ye molingaki kopasuka, koloba, “Asekwi.”

Na 9:00 na ntongo, tika ete toya elongo mbala moko lisusu kati na monololo na biso ya libondeli, kobondela moko mpo na mosusu mpe komibongisa koyoka Mongongo na Nzambe.

Na 12:30 nsima ya nzanga, tokoya elongo koyoka Liteya na biso ya Pasika: Kozongisama Ya Nzete Mwasi Na Libala 62-0422.

Nsima ya losambo, tika ete mbala moko lisusu tosangana kati na libomdeli kotónda Ye mpo na NSUKA YA MPOSO YA BIKAMWA APESAKI BISO ELONGO NA YE MPE ELONGO NA MWASI NA YE YA LIBALA NA MOKILI MOBIMBA.

Apai na ba ndeko na ngai basi mpe mibali na ngambo ya bibale minene, lokola na mbula eleki, nalingaki kobianga bino bosangana elongo na biso mpo na milulu miye na ntango ya Jeffersonville, mpo na ntango nyoso ya libondeli likolo na manaka oyo mpe mpo na bande ekoyokama mokolo mwa Lomingo nsima ya nzángá. Namoni, ata bongo, ete koyoka ba bande mokolo mwa Minei, mokola mwa Mitano, mpe mokolo mwa Mposo nsima ya nzanga na ntango ya Jeffersonville ekozala kpókósó mingi mpo na ebele na bino, na bongo na sengi na bino bomiyoka nsómi koyoka Mateya wana na ntango se ntango ya mokolo oyo ebongi na bino. Nzokande, nalingaki mpo na biso nyoso toya elongo mokolo mwa Lomingo na 12:30 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, koyoka Liteya na biso ya mokolo mwa Lomingo elongo.

Nalingaki lisusu kobianga bino mpe bana na bino bozala kati na mosala mwa Boyemi mozuami na nkasa mpe bolakisi, mpe mimekano ya YF, oyo libota na bino mobimba likoki kosepela na yango elongo. Tokanisi bokolinga yango lokola nyoso ezali likolo na LILOBA tokozala koyoka na nsuka ya mposo oyo. 

Mpo na manaka ya nsuka ya mposo, liyebisi mpo na bolengeli ya losambo ya Elambo, bisaleli bisengelami na yango mpo na boyemi, mimekano mia Pasika, mpe liyebisi mosusu, bomona bikanganeli aw ana nse. 

Ezali lokumu monene mpo ngai kobianga yo mpe libota na yo koya elongo na Mwasi na libala na mokili mobimba mpe na nsuka ya mposo etondi na LOSAMBO, LOKUMU MPE LOBIKO NA NZOTO. Nandimi yango mpenza yango ete ezali nsuka ya mposo oyo ekobongola bomoi na yo mpo na libela.

Ndeko Joseph Branham

______________________________________________________________________________

Manaka ma Boyoki

Awa na nse ezali na mateya mpo na nsuka ya mposo ya Pasika. Elambo ya mokolo mwa Minei/Molulu ya Bosukwana Makolo ezali kati na bikanganelo.

MOKOLO MWA MINEI -6:00 nsima na nzanga (ntango ya mboka na bino)

(ETENI YA BANDE) + Elambo 57-0418

MOKOLO MWA MITANO – 12:30 nsima na nzanga (ntango ya mboka na bino)

Bobongi Be 57-0419

MOKOLO MWA MPOSO – 12:30 nsima na nzanga (ntango ya mboka na bino)

Bokundami 57-0420

MOKOLO MWA LOMINGO – 12:30 nsima na nzanga (ntango ya Jeffersonville)

Kozongisama ya Nzete Mwasi Na Libala 62-0422