23-0319 Kopona Mwasi Na Libala

Nsango: 65-0429e Kopona Mwasi Na Libala

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Moko likolo na Milió,

Nazalaki kozila yo mpo na ntango molai. Ozali molingami na ngai ya motema, mpe nalingi yo mingi mpenza. Lokola nalakaki yo, nazalaki kobongisela yo Ezalelo ya sika epai wapi tokobika elongo kati na Seko na Seko. Nasalaki eloko nyoso mpenza lokola olingaka yango.

Nakoki sasaipi kotala yo mpe komona, ozali mpenza elili na Ngai. Ozali na lolenge na Ngai moko na moko, mosuni na Ngai, mikwa na Ngai, Molimo na Ngai yango moko, eloko moko na moko yango moko ya Ngai, kaka yango mpenza. Okómi moko elongo na Ngai.

Natindaki mwanje na Ngai ya nguya na mabelé kobianga yo kobima na Edene ya Satana. Natindaki ye mpo akoka kolimbola makanisi na Ngai, misala na Ngai, mpe koyebisa yo na ntina na makambo makoya. Nasalelaki monoko na ye mpe mongongo kobimisa yango. Nsima na ye koloba yango, nakokisaki yango, mpamba te Likolo mpe mabelé ikoleka, nde Liloba na Ngai epai na yo likokweya soki moke te.

Nayebaki ntango oyokaki Ngai koloba, kosalela mongongo ya mwanje na ngai, olingaki koyeba na bozindo ya motema na yo, ezalaki ye te, ezalaki Ngai koloba na yo. Ezalaki Ngai kotindela yo mokanda ya bolingo, koyebisa yo, naponaki yo kozala Mwasi na Ngai molingami ya motema.

Na miso na Ngai, moko te azali lokola yo. Moko te akokoka kozua esika na yo. Otikalaki na solo mpe sembo epai na Ngai Ntango natalaka yo, motema na Ngai mongengaka na esengo.

Ntango nayebisaki yo, zala na bokengi wa motema, oyo ozali koyoka, ekozala na bapakolami ebele kosalela Maloba na Ngai, kasi bazali lokuta. Ososolaki ekebiseli na Ngai mpe otikalaki na solo mpe sembo na Mongóngó na Ngai.

Nazalaki mpenza na lipambu ntango obondelaki kino nsuka na ntina na lingomba ozali kokota na yango na boyokani. Nayebisaki yo kopona lolenge lobongi, mpe napesaki yo ndakisa ya oyo lingomba libongi be ezali. Okanisaki ntango nalobaki ete bamemaka milimo bango nyoso, mpe oponaki lingomba libongi be.

Nalobaki kútu na yo ókeba nani nde mobateli na yo azali. Boye okoki kaka kobanza boni motema na Ngai mopumbwaki na esengo ntango namonaki yo kotikala na mobateli natindaki komema yo epai na Ngai. Oyebaki ete ezalaki Molimo Mosanto na Ngai kobika kati na mosakoli na Ngai kokamba yo epai na Ngai.

Nakanisi mokolo ozalaki na nsai mingi, mpe osepelaki mingi, ntango nabiangaki mwanje na Ngai na esika ya likolo koleka mpo nakokaki kotalisa ye yo koleka na galasisi. Tozalaki kotelema wana kotala yo wana elekaki yo na litambe ya mapinga ya Baklisto liboso na Biso.

Alingaki motindo bino nyoso bolataki molato ya ekoló epai wapi boútaki; Suiss, Alemanyi, mpe kouta na mokili mobimba. Moko na moko na nsuki na bino molai oyo ebongisamaki malamu mpenza. Bilamba na bino ya nse bikitaki mpenza. Nazalaki mpenza na lipambu mpe nasepelaki mingi kotalisa bino nyoso epai na ye, boye akokaki kozonga mpe koyikisa bino mpiko mpe koyebisa bino ete amonaki bino kuna.

Liso moko na moko lizalaki likolo na Biso. Ntango bókó bilengé basi na nsuka ya molongó, babandaki kotala-tala bipai bisusu, agángaki: “Bósala bongo te! Bobima na litambe te!”

Ntango nayebisaki bino ete nazalaki kobomba bilei mpo na bino kolia, boyebaki mpenza nazalaki koloba mpo na nini. Bolingaki kozala Moseka Mwasi Liloba peto na Ngai. Nakangá bino ata mbala moko te kofina liso na moto mosusu. Ezalaki ntango nyoso Ngai, Liloba na Ngai. Esalaki Ngai nsai mingi.

Naponaki bino, Bino, kozala Mwasi na Ngai ya libala. Nazali mpenza na bolingo na bino, kaka lokola bozali na bolingo na Ngai. Bolemba motema te, boyika mpiko, bozala na nsai, bosepela, mokolo mozali kobelema noki ntango nakozala koya mpo na bino. Ntango ya bikamwa nini oyo tokozala na yango.

Epai na bino baoyo botikali, BOBONGOLA MITEMA, mabelé mazali kobukana. Mokolo moko Los Angeles ekolala na libumu ya mai manene, kaka lokola nayebisaki bino ekozala. Kándá na Ngai ezali kopela na nse na yango. Nakobatela etánda ya zèlo wana mpo na ntango molai lisusu te. Bokoselumwa kati na mbu na bozindó ya kilometele moko na ndambo, kino na Mbu ya Salton. Ekozala mabe koleka mokolo ya nsuka ya Pompeii.

Nakopetola mabelé oyo na móto noki. Nakoboma eloko nyoso likolo na yango mpe na nse na yango. Bomoni oyo ezali kosalema nzinganzinga na mokili, kaka lokola nayebisaki bino. Bozali komona Mwasi na Ngai ya libala kosangana nzinganzinga na mokili, kaka lokola nayebisaki bino.

Ntango yango oyo, Ekeke yango oyo. Bomilengela.

Ngonga ya kandá na Ye ezali likolo na mabelé. Bokima wana ntango ya kokima ezali, boya epai na Klisto.

___________________________________________________________

Bopesami mbela koya komibakisa na biso, eteni ya Mwasi na Ye ya libala, lokola tozali komibongisa mpo na koya na Ye, na boyokáká Mongóngó ya Nzqmbe koloba na biso mpe komemela biso Liteya: Kopona Mwasi Na Libala 65-0429E na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Genese 24: 12-14

Yisaya 53: 2

Emoniseli 21: 9