22-0130 ELEMBO YA LIBOSO

Nsango: 63-0318 ELEMBO YA LIBOSO

BranhamTabernacle.org

Molingami Mokonzi Mwasi ya Lola,

Ngai, Mokonzi na bino, nakongulumisela bino nkake Mokolo na Lomingo, bozali Mwasi na ngai ya Libala. Nabongisaki bino liboso. Nasikolaki bino. Nalongisaki bino mpe natiaki nkombo na bino na Buku ya bomoi ya Mwana na Mpate liboso ya kobandisama na mokili. Bozali Mokonzi Mwasi na ngai oyo nalingi wa motema.

Nazilaki bino mpe kozila lisusu mpo ete nakoka kozongisela bino oyo nyoso Adamu na ngai ya liboso abungisaki. Boyokani na ye nyoso mpe makoki na ye na bomoi. Napesaki ye bokonzi mpe boyangeli etombwaki mobimba ya mabele. Azalaki nzambe ya mabele ndenge moko ngai nazali mokonzi ya molongo.

Natiaki mabele oyo na nse na bokonzi ya ye moko. Akokaki kosolola, akokaki kopesa nkombo, akokaki kotelemisa mokili, akokaki kosala eloko nyoso alingaki kosala. Kasi abungisaki yango nyoso.

Sasaipi, lokola nalakaki bino kati na Liloba na Ngai, nazongiseli BINO nyoso oyo ye abungisaki. Esikolami. Makoki nyoso ya bozali na oyo nyoso ebungaki na nzela na Adamu ezali sasaipi ya BINO. Mokanda ya makoki ya kozala na bomoi na nseko, yango elingi koloba ete sik’oyo BINO bozali ba nkolo ya oyo nyoso Adamu abungisaki.

Nakomaki tata Mosikoli. Nasengaki oyo ezalaki ya ngai. Natalaki buku na ngai ya lisiko longwa na Loboko ya Tata na ngai, nabukaki bilembo longwa na buku mpe nakitisaki yango na nse epai na motindami na ngai mwanje ya sambo komonisa bino yango. Akozongisela bino kondima ya Biblia ya ebandeli mpe akomonisa bino makambo na ngai manso mabombami.

Nakokisi mpe nandimisi makambo nyos’oyo epai na bino na nzela ya Adamu na ngai ya liboso oyo azongisami mobimba ; mwanje na ngai ya sambo mosakoli motindami. Akokaki koloba mpe ko kela bisende, kozongisa bomoi epai ya mbisi, koyangela mipepe mpe kopesa  bikumbaki motindo ete bizonga epai wapi biutaki. Akokaki kosolola mpe kosekwisa bakufi. Nalingisaki kutu elili na ngai kozwama na ye elongo kolakisa mokili, oyo azali Adamu na ngai ya liboso oyo azongisami, boyoka ye. Sasaipi BINO, Mwasi Mokonzi na ngai, bozali na nyos’oyo Adamu abungisaki.

Bokanisa, motindami na ngai mwanje ya sambo akozala na mabele na ntango ya koya na ngai. Akotalisa BINO epai na NGAI. Kelelo yango ya suka ekoyula mpe bakufi kati na Klisto bakosekwa. Baoyo bazali na bomoi mpe batikali bakonetwa elongo na bango, kokutana na NGAI kati na mipepe na ntango yango moko mwanje na ngai ya sambo azali kopesa Etinda na ye. Elembo ya suka efungolami. Kelelo yango ya suka ekoyula ; nakoya mpo na kosenga bozwi na ngai, BINO, mpe bongo nakozwa BINO na Lipati na BISO ya Libala.

Mwasi Mokonzi na ngai molingami, boya koyoka NGAI kosolola na BINO mpe komonisa BINO nyos’oyo bozali na yango bosenga. Nabombaki Bilei oyo mpo na BINO mpo BINO bokoka kozala Mwasi Mokonzi na NGAI. Nakozala kosolola na BINO na ngonga ya 12 :00., ntango ya Jeffersonville, epai wapi Nakongulumesela BINO nkake Elembo ya Liboso 63-0318.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati na kolengele boyoki ya Liteya :

St. Matayi 10 :1 / 11 :1-14 /24 :6 /28 :19

St. Yoane 12 :23-28

Misala 2 :32

2 Batesaloniki 2 :3-12

Baebele 4 :12

Emoniseli 6 :1-2 / 10 :1-7 / 12 :7-9 / 13 :16 / 19 :11-16

Malaki Mikapo ya 3 mpe ya 4

Danyele 8 :23-25 / 11 :21 / 9 :25-27