22-0123 NTAKA KATIKATI NA BILEKO 7 YA LINGOMBA MPE BILEMBO 7

Nsango: 63-0317e NTAKA KATIKATI NA BILEKO 7 YA LINGOMBA MPE BILEMBO 7

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala oyo azali koganga mpe kosepela,

Tozali kati na Liloba mpe tozali na ntango monene ya koleka na bomoi na biso. Malakisi, komibonzela, mpe emoniseli.Ezali na eloko moko te eleki koyoka Mongongo na Nzambe kati na bande.

Etinda oyo ezali nyoso mpo na biso. Ezali kopesa biso kimia kosepela ya motema mobimba. Eloko moko kaka oyo ekoki kosilisa mposa ya bomoto na biso ezali koyoka Nzambe kosolola na biso na nzela ya mosakoli na Ye.

Mokolo na mokolo azli kopesa biso emoniseli ya koleka ya Ye moko mpe ya biso moko. Kondimisama ya bozindo ete, na bo « finaka play, » tozalo koyoka Loloba na Ye mpe tozali kosala kaka oyo asengaki biso kosala. Tozali ba mpate na Ye, mpe mpate akoki komikamba te ; esengeli azala na mokambi. Mpe Molimo Mosanto azali kokamba biso epai na Ye moko, Mongongo na Ye koloba Maloba eyebi kokwea te likolo na bande.

Tozali koyoka Mateya oyo elongo kaka na libaku te, Aponaki biso koyoka yango bongo. « Matambe ya bayengebene ezali kotambolisama na Nkolo. » Ezali na ntina moko. Tokoki komipekisa te. Etinda likolo na bande nde nyos’oyo Mwasi na Libala azali na yango bosenga. Na boyokaka yango, ezali kopesa biso loboko makasi ya kondima kotingama mpe kondima Liloba moko na moko.

Mpo na nini tozali kondima ete ezali na litomba monene mpo na oyo nyoso bazali komibenga « Mwasi na Libala ya Nzambe » koyoka ba bande ?

Liloba yango moko ezali koyebisa biso polele ete Biblia ekomamaki na basakoli. Ezalaki makanisi na bango te, soko mabanza na bango te, kasi Molimo Mosanto azalaki kokamba bango kokoma Biblia. Biblia mpe ezali koyebisa biso ete Nkolo Yawe  akosala ELOKO TE bobele ete ayebisa mwango na Ye pai ya  basakoli na Ye. Ba mosusu bakoki koloba yango mpe kotatola yango, kasi bakoki kaka koloba oyo mosakoli na Nzambe asili koloba.

Soko bondimi ete William Marrion Branham azali mwanze na 7 motindami na Nzambe oyo andimisami, na bongo oyo alobaki likolo na BANDE ezali maloba ya ye te, kasi makanisi ya Nzambe penza ebimisami polele. Seko na seko na bino bozali kotia yango likolo na moboko oyo ezali Liloba alobaki likolo na ba bande, lokola bozali kondima ete yango ezali OYO ELOBI NKOLO. Ekoki kobakisama te soko kolongolama likolo na yango te, soko kutu ezali na bosenga ya ndimbola te ; ezali Mwana na Moto kosolola na nzela ya moto aponaki kokokisa Liloba na Ye.

Mwasi na Libala ya solo ayebi ntina ya koyoka ba bande. Mpo na bis oba bande ezali oyo eleki monene mpe ntomo mosusu nyoso ezali ya moke. Esengeli moto na moto amituna motuna soko seko na seko na ye ezali na Liloba nyoso mosakoli na Nzambe alobaki lokola moboko. Soko nandimi ete ezali Mongongo na Nzambe koloba mpe kobenga Mwasi na Ye ya Libala, na bongo ezali na eloko te koleka KOFINA PLAY, lokola nakosambisama na Liloba moko na moko oyo MOSAKOLI NA NZAMBE ALOBAKI…ezali te na nzela ya oyo moto songolo pakala alobaki ete mosakoli na Nzambe nde alobaki.

Soko ondimi ete ozali na bosenga ya eloko mosusu koleka ba bande, na bongo mpo na yo ntina ya kotia litomba mingi likolo na koyoka ba bande ezali te, kasi litomba na yo mingi ekozala likolo na ntomo ya koteya. Okoki kozala na eloko ya monene kaka moko.

Lokola tokozala koyoka bande Mokolo na Lomingo oyo, Nzambe Ye moko akosolola mpe akoyebisa biso ete tozali ba nkolo ya mokanda ya libula ya Bomoi na seko. Tozali na nyos’oyo Adamu na Ewa babungisaki. Ekomemelamela biso na nzela ya emoniseli, mpe longwa na Loboko na Nzambe na nzela ya kondimisama.

Na mbisa akoyebisa biso eloko nini ezalaki koleka na Lola. Ndenge nini Yesu ye moko akamataki mokanda, afungolaki elembo, mpe bongo atindaki yango epai na mosakoli oyo Aponaki mpe Ayebisaki ye kopesa yango epai na Mwasi na Ye ya Libala…osi oyoka koganga !!!! Nyoso likolo na mabele mpe kati na Lola ekoyoka biso ko ganga mpe kobeta tangwa wana ezali biso komona nkombo na biso ikomami na Buku ya Bomoi ya Mwana na Mpate.

Mpe Akamataki Buku, (kembo !) afungolaki Buku, mpe akangolaki bilembo na yango ; mpe akitisaki yango na mabele, epai na mwanje ya sambo, komonisa yango epai na bato na Ye ! Bokomi esika yango. Oo, Oo ! Nini nde ekomaki ? Koganga, kobeta milolo, ba aleluya, oyo apakolami, nguya, kembo, kotalisama !

Mpe mpaka na Yoane, oyo azalaki kotelema wana, ndeko na biso, oyo azalaki kolela ! « Mpo nini », alobaki, « nyoso na Lola, nyoso awa na mabele, mpe nyoso na nse na mai monene, eyokaki ngai kobelela ete, ‘Amen ! Amen ! Mapamboli, lokumu, mpe nguya, mpe makasi, ezala epai na Ye oyo azali na bomoi libela na libela.’ »

Bokoki koyoka emoniseli monene oyo wapi? KAKA LIKOLO NA BA BANDE. Ezali penza likambo monene mpo na Mwasi na Libala ntango bazali koyoka Nzambe Ye moko kosolola na nzela ya bibebu ya moto mpe koyebisa bango, « BOZALI MWASI NA NGAI YA LIBALA MOLINGAMI YA MOTEMA. »

Boya kofanda na bozali ya Molimo Mosanto na bo Finaka Play, Mokolo na Lomingo na ntango ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, wan’ekoyoka biso mwanje na Ye ya sambo motindami komema : Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo 63-0317E

Tokozala koganga mpe kosepela mpe koloba aleluya.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati na bolengeli koyoka Liteya :

Lewitiko 25 :47-55

Yilimia 32 :1-15

Jekalia 3 :8-9 / 4 :10

Baloma 8 : 22-23

Baefese 1 :13-14 / 4 :30

Emoniseli 1 :12-18 / Mokapo ya 5 / 10 :1-7/ 11 :18