22-0116 NZAMBE AMIBOMBAKA KATI NA KOMIKITISA MPE AMIMONISAKA NA MOTINDO MOKO

Nsango: 63-0317m NZAMBE AMIBOMBAKA KATI NA KOMIKITISA MPE AMIMONISAKA NA MOTINDO MOKO

BranhamTabernacle.org

Balingami Etonga Moke ya Elia,

Tozali bato oyo tokeseni, bato ndenge mpe oyo tokoki kososolama na mokili te, mpe epai na bandimi mingi, mpe ata ko bongo tozali libota na banganga kati na molimo, ekolo ya bokonzi, tozali kopesaka mbeka na molimo epai na Nzambe, na mbuma ya bibebu na biso kopesa kembo na Nkombo na Ye. Tolingi toyebisa mokili ete tozali na esengo koleka, tozali na matondi mingi, mpe topesami lokumu mingi kozala moko na bango.

Totekisi mayaka nab iso mosusu nyoso, lokola Apesi biso mayaka ya motuya monene, Emoniseli ya Ye moko. Tozali komona Liloba na Nzambe penza komonisama. Elaka penza ya mikolo ya suka, Pole penza ya ntango ya mpokwa oyo esengelaki ebima.

Emonisami na bozindo na mitema nab iso été Mongongo oyo tozali koyoka likolo na bande ezali Mwana na moto komimonisa Ye moko. Mongongo yango eyebisaki biso ete: Botikala awa, botia miso likolo na Bilei oyo ebombami oyo nati yango mpo na bino likolo na ba bande. Soko bokozala na motuna ata ya ndenge nini, bozongela ba bande oyo. Ekoki kutu kozala lokola mwa kpokoso mpo na bino, kasi bofungola bande lisusu mpe boyoka na bokengi. Soko bozali Mwasi na Libala, Molimo Mosanto Akomonisa bino yango. Bokanisa, ba bande oyo ezali na bosenga ya ndimbola te. Boloba kaka oyo ezali likolo na bande. Nazali mobateli na bino mpe bino bozali etonga moke na ngai, botikala na malakisi ya ba bande.

Nayebi ete mingi bazali kososola te oyo ezali biso kosala na boyokaka Liteya moko biso nyoso na mbala moko, kasi yango ezali malamu, bazali ata ko bongo bandeko na biso basi mpe mibali mpe tolingi bango mpe esengeli na biso te kolobela bango mabe. Moto na moto asengeli kosala oyo ayoki été akambami na Nkolo kosala. Nzambe azali kosala mpe kokamba biso moto na moto.

Mosakoli ayebisaki biso été esengeli tomeka eloko nyoso na Liloba, mpe kopima yango na Liloba, kaka ndenge ye asalaki. Liloba mpo na lelo, mpe ezalaka ntango nyoso, Biblia. Biblia eyebisi biso na mikolo ya suka Akomonisa mabombami mpe sekele nyoso kati na Biblia na Ye polele na nzela ya mosakoli na Yeo yo Akotinda. Ye moko akosolola na nzela ya mosakoli yango mpe akomimonisa kati na mosuni kaka ndenge asalaki epai na Abalayama. Liloba na ye ekozala liloba ya moto te, kasi Maloba penza ya Nzambe Ye moko. Ekozala OYO ELOBI NKOLO, na bongo Biblia mpe Mongongo yango ekozala eloko nse moko.

Ezali na bozindo kobenga bozindo na kati na mitema na biso mpo ya koyoka Mongongo yango oyo endimisami. Tolingaka koyoka Mongongo na Nzambe mbala moko kouta na mosakoli na Ye aponami. Bolingo ezali penza na mitema na biso koyoka Mongongo yango mpe kozala kaka pepele na boyebaka ete tokoki kobeta ntembe ata na eloko moko te oyo tozali koyoka, tozali kaka na lotomo ya kondima LILOBA MOKO NA MOKO.

Ezali na esika mosusu te wapi tokoki kosala yango. Ezali te ete moko moko akoyebisa biso eloko moko ya lokuta soko ete akobungisa biso, lokola bango mpe bazali na Molimo Mosanto, kasi toyebi ete bakoki na nko te kolobela biso likambo ya lokuta. Kasi wana ekoyoka biso Mongongo ya Nzambe endimisami na likolo ya bande, ata soko tososoli oyo elobami te, Papa Nzambe alobaki ete esengeli kaka toloba AMEN, TONDIMI LILOBA MOKO NA MOKO. Tokoka te kosala yango na mongongo mosusu at aya motindo nini.

Topesameli motindo na Mongongo yango ko:

Boyoka ngai te; kasi boyoka oyo elobi ngai. Oyo elobi ngai ezali EtindaBozala na bokebi boko te likolo na motindami ; botala Etinda. Bobatela miso na bino likolo na motindami te, kasi Etinda. Oyo yango elobi, nde eloko ya kotia miso likolo na yango.

Oyo elobaki ye EZALI Etinda ya ntango. Esengeli tobatela miso na biso likolo na Etinda ; nde eloko ya kotia miso na biso likolo na yango.

Ezali komonisa biso makambo koleka liboso. Liteya moko na moko tozali koyoka ezali koyokana lokola nde toyoka nano kutu te. Ata ko toyoka yango mbala nkama na nkama liboso, tokoki kolimbola yango te, ezali nde lokola touti koyoka yango mpo na mbala ya liboso mpe azali kopesa biso emoniseli koleka mpe koleka lisusu.

Tokoki kaka te kokanisa ete ezala na moto moko oyo alingi te koyoka Mateya oyo elongo na biso. Ezali na bo moko mpe lisanga ya ndenge ya kokamwa elongo na Mwasi na Libala mpe Liloba na Ye. Tozali na kosepela na mitema kimia ndenge nano ekomela biso te na ntango mosusu na bomoi na biso.

Mbala moko lisusu tozali kozila na mposa monene. Ezali nde lokola ete Bilembo ebandi nde kofungolama sikoyo. Akomonisa biso makambo oyo nano tomona liboso te, mpe komema Pole na biloko oyo toyoka mbala na mbala liboso ; kasi sik’oyo, tokomona yango polele.

Toyebi ete biloko nyos’oyo tozali na yango bosenga mpe ye Konetolama na Yeo yo ebelemi, ezali Mongongo yango likolo na ba bande.

Nzambe atindaki mosakoli na Ye na nzela ya emoniseli kokende sima na lisobe kuna na Arizona epai wapi amemamaki na likolo na banje sambo, mpe bongo azongisamaki na Jeffersonville kofungola mabombami ya Bilembo Sambo epai na Mwasi na Libala.

Boya koyoka elongo na biso wana Nzambe azali kosolola na biso mbebu na litoi Mokolo na Lomingo oyo na 10 :00 na ntongo, ntango ya Jeffersonville, mpe tokoyoka : Nzambe Amibombaka Kati na Komikitisa Mpe Amimonisaka na Motindo Moko 63-0317M.

Tokobanda Liteya na molongo ya 94 sima ya molulu ya kobulisama ya losambo.

Ndeko Joseph Branham

1 Ntango 17 :1-8

Yisaya 35 : 8 / 40 :1-5/ 53 :1

Malaki Mokapo ya 3

St. Matayi 11 : 10, 11 :25-26

St. Yoane 14 : 1-6

1 Bakolinti Mokapo ya 13

Emoniseli Mokapo ya 21