22-0109 Oyo Ezali Nde Elembo Ya Suka Mobali?

Nsango: 62-1230e Oyo Ezali Nde Elembo Ya Suka Mobali?

BranhamTabernacle.org

Balingami Tempelo ya Nzambe,

Etinda oyo ezali na nguya ezangi suka. Ebongi be yango moko. Ezali Liloba ya suka likolo na makambo nyoso. Ezali na eloko mosusu te mpo na Mwasi na Libala kasi Mongongo wana oyo etiamaki likolo na bande. Ezali Etinda na Nzambe ya ntango. Ezali Etemelo na biso.

Tozali na mobembo na biso na Mokili ya Elaka, wana ezali biso kokambama na Molimo Mosanto, Likonzi na Moto. Bilei na biso ya Molimo ebombamaki mpo ya kosunga biso kati na mombembo na biso. Nyos’oyo tozali na yango bosenga epesamaki.

Dawidi alengelaki biloko ebele liboso na kufa na ye, nyoso oyo esengelamaki na yango mpo ya kotonga Ndako na Nkolo. Apesaki motindo ete esengeli eleka na malamu, na lokumu mpe na nkembo kati na bikolo binso.

Na bongo asololaki na Salomona, mpe apesaki ye nyoso oyo alengelaki mpo na botongi ya Tempelo ya Nkolo. Apesaki ye etandelo ya ekotelo ya litongi mpe na ndako na yango, mpe na bibombelo ya mosolo, na biteni ya ndako na likolo, biteni ya katikati, mpe na esika ya ebonga na ngolu.

Apesaki ye etandelo ya nyoso azalaki na yango na nzela ya Molimo, na biteni ya ndako na Nkolo. Biteni na ndako nyoso zingazinga, bibombelo na mosolo ya ndako na Nzambe, mpe bibombelo ya biloko binso bibonzamaki.

Bisika ya mosala ya ba nganganzambe mpe na balewi, mpe mpo na Mosala nyoso ya mosala na ndako ya Nkolo. Apesaki mpe ye bisaleli nyoso ya  mosala na ndako ya Nkolo. Wolo mpe Palata mpo ya bisaleli ya muziki mpo ya mosala ya ndenge na ndenge. Bozito ya wolo mpe palata mpo na bitemelo ya miinda ya motindo na motindo. Wolo mpe palata mpo ya mesa moko na moko mpo na lipa, esika ya kotingamisela misuni, nzungu, kopo mpe saani.

Mpo na etumbelo ya mpaka, wolo ya konangwa ya bozito; mpe wolo mpo na ebongiseli ya likalo mpo na ba keluba, oyo na mapapu masembolami libanda, mpe bazali kozipa sanduku na kondimana ya Nkolo.

Nyoso ebongisamaki mpe ebombamaki mpo na litongi. Eloko ezangaki te. Esengeli alanda mpenza etandelo mpo ya kotonga Tempelo na Nkolo.

Kasi na mokolo na biso, Nzambe azali kotonga Tempelo mosusu, Mwasi na Ye ya Libala. Tempelo oyo ekobebisama te, kasi ekobika na Ye elongo seko na seko. Abongisaki mpe abombaki biloko nyos’oyo esengelami na yango mpo ya kotonga Tempelo na Ye ya sika.

Bonzambe, Momboto na nyoka, Poso tuku sambo ya Daniele, Bileko sambo ya Lingomba, Bilembo sambo, Kososola Mokolo nay o, Kobala mpe koboma Libala, Kozipolama ya Nzambe, Elembo, Etemelo, Bapakolami, Bilei ya Molimo, Klisto azali Libombami, mpe nkama na nkama ya ba mosusu oyo esengeli elandema penza na molongo.

Abombaki biloko nyos’oyo tozali na yango bosenga, kasi esengeli tolanda etandelo na bokengi penza, na kobongolaka litono moko te soko moto ya likambo moko te.

Sasaipi, oyo nde nazali koloba na ntongo oyo, ezali kobomba Bilei. Kobomba Bilei, mpo ete bozala na eloko ya kolia, mpo ete bozala na eloko ya kosala na yango lipati. Bozwa yango kati na ba bande. Bafanda na pio ya eteni na ndako na bino, ntango mosusu wana ekozala ngai mosika mpo na ntango molai, bokozala kokoba kokanisa ete makambo oyo ezali solo. Bofanda na eteni na bino na ndako mpe boyoka. Bomoni? Mpe oyo ezali Bilei, kobomba na kati, na ndako ya ebombelo.

Alobaki ete Eyanganelo ezalaki mingi lokola ndako epai na ye koleka bipai bisusu binso. Ezalaki esika oyo Bilei bibombamaki.

Libanda na makita epai wapi nakendaka, bokoyoka ngai soko moke te koteya mateya oyo. Te nalakaki bino yango, kozonga na Eyanganelo oyo. Kaka awa nde nateyaka Mateya na ngai, longwa na esika oyo. Nazali na misato to minei na koleka awa oyo Nkolo apesi ngai, nazali na makomi likolo na yango, oyo nakomeka soko moke te koteya yango esika mosusu soko wapi, kasi kaka awa. Awa nde Liloba na Nzambe ebandaki kobima. Mpe kino Nzambe akobongola yango, nazali kotikala kaka awa mpe komema yango longwa na esika oyo. Ezali solo.

Mosakoli na Nkolo asololaki mpe alobaki ete ezali na ebolo ya bato oyo bandimi ye, mpe bazali na nzala mpe bakangani na liloba moko na moko oyo ye alobaki. Bino nde etonga ya bato yango. Bozali eyanganelo na ye. Bino nde etonga moke na ye.

Nazalaki na kati na mabondeli mpe nayokaki Nkolo kokamba biso kolanda Mateya oyo atindaki mosakoli na Ye kobomba ebele ebele kati na ndako na ebombelo na Ye kotonga Mwasi na Ye ya Libala..

Tokokoba kolanda mosakoli na Ye wana ezali biso koyoka: Oyo Ezali Nde Elembo ya Suka, Mobali? 62-1230E. Nasepeli kotindela bino mbela ete boya komibakisa na biso Mokolo ya Lomingo na 10:00 AM, ntango ya Jeffersonville, koyoka Bilei oyo ebongisamaki mpe ebombamaki oyo ekotonga bino kati na Tempelo ya Nkolo.

“Ntango ezali lisusu te.”Soko ezali bongo, tika ete tomibongisa biso penza, kokutana na Nzambe na biso. Biloko ebele etiami na kati sasaipi. Tika ete tosalela yango sikoyo.

Ndeko Joseph Branham