22-0102 Etemelo

Nsango: 62-1230M ETEMELO

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala ya Etinda ya moto moko,

Mokanda ya Bolingo ya ndenge nini oyo mbula oyo ezalaki mpo na Mwasi na Libala. Ayanganisaki biso longwa na zingazinga na mokili mobimba na nzela ya eloko moko kaka oyo ekoki koyeisa Mwasi na Ye ya Libala elongo, Etinda ya eleko, Mongongo ya Nzambe penza kobenga Mwasi ya Libala kobima.

Mpe sikawa nandimi ete abelemi kokoma na esika ya suka ya tombwa na ngambo, koyeisa kondima oyo ekonetola Lingomba na kembo. Mpe Mpe Azali komisembola kati na Mateya.

Emoniseli ya Etinda oyo ekiti sasaipi na bozindo ya mitema na biso lokola longo. Bikela na biso ezali penzapenza elongo na Liloba. Toyebi ete malakisi na biso ebongi be na Liloba elongo, tozali kobakisa eloko moko na yango te soko kolongola eloko moko longwa na yango te. Mpo na biso ezali eloko mosusu te bobole Liloba likolo na bande.

Azalaki kobongisa biso mpo na tombwa ya suka na bopesaka biso kondima oyo tozali na yango bosenga mpo ya Konetolama. Kondima yango ezali kati na biso SIKAWA. Bomoi ya Klisto ezali penza komonana na motindo ya kokoma mosuni, na kati na biso, ndenge ezalaki kati na Klisto.

Tokoki komona bomoi na Ye. « Misala mizali ngai kosala bokosala yango mpe lokola, ye oyo akondima. » Ezali te oyo amizalisi mondimi ya nkombo kaka, soko oyo abanzi ete andimi, kasi « Oyo akondima. » « Oyo akondima ngai, misala mizali ngai kosala akosala yango lokola. » Mpo na nini ? Atiami lokola longo kati na libanga yango moko. Libanga ezalaki nini ? Liloba, ntango nyoso. Otiami bo longo kuna. Ezali monzoto ya epai ya likolo mpo na ntang’obungi na mbu.

Tozindi mpenza kati na Libanga yango. Tondimisami na yango. Tondimi ete yango ezali. Tozwaka liloba ya moto mosusu te. Totikalaka na Oyo Elobi Nkolo. Tokomi na Etemelo na biso.

Tozali na kosepela mobimba mpe mitema ikiti. Tozali lisusu ko wayawaya te ndenge ezalaki na mikolo ya basambisi, mpe na ebele monene lelo epai wapi moto na moto azali kosala oyo emonani malamu na miso na ye moko, epai wapi moto nyoso azalaki na etemelo ya ye moko mpe asalaki kaka oyo alingaki kosala. Nzambe abongolaka mobeko na Ye te, Akoka kosala bongo te mpe atikala Nzambe. Soko Nzambe atikala koloba eloko moko to kosala eloko moko, esengeli Asala yango ntango nyoso.

Nzambe atindaka basakoli ntango nyoso kokamba baton a Ye. Atindelaki biso mwanje na Ye ya 7 mosakoli; Mwana na Moto komimonisa kati na mosuni ya moto, kobenga Mwasi ya Libala kobima mpe kokamba ye. Ba bande ezali Mongongo ya Nzambe. YANGO NDE ETEMELO NA BISO. 

Amataki kuna. Ayebaki. Mpe nalingi yango, ndenge ayaki. Akomaki epai na etemelo na ye, esika na ye ya kotingama.

Nzambe azali kobenga Mwasi na Libala na Ye elongo. Akobongola manaka na Ye te. Akotinda te ebolo ya bato mpo na koyanganisa Mwasi na Ye ya Libala. Mwasi na Ye ya Libala akoyangana kaka zingazinga ya Liloba mpeto, yango nde mongongo ya Nzambe oyo ezali likolo na ba bande. Ezali Lotomo ya solo ya Nzambe mpo na lelo.

Ezali na nzela malamu te ya kobanda mbula ya sika koleka koya elongo mpe koyoka etingamelo na biso, Etemelo na biso, kosolola na biso. Nalingi kotindela moko na moko na bino ebiangeli koya mpe koyoka elongo na biso Mokolo na Lomingo na ngonga ya 10:00 na ntongo, ntango ya Jeffersonville, koyoka Liteya: Etemelo 62-1230M.

Soko bokoki komibakisa na biso te, nayikisi bino mpiko ete bomiponela Liteya ya kolanda na ba ndako na bino, to boyikisa mobateli na bino mpiko ete apona Liteya moko na ndenge ete bino mpe bofanda elongo na nse ya kopakolama monene ya koleka, mpe boyoka Etemelo ya Mwasi na Libala oyo endimisami.

Ndeko Joseph Branham