22-0306 LEMBO YA MOTOBA

Nsango: 63-0323 LEMBO YA MOTOBA

BranhamTabernacle.org

Balingami ba Mpate ya Nzambe,

Eloko monene nini nde ekokaki kozala, tokokaki kozala bato ya libaku malamu mingi ya koleka lisusu, soko te bobele kozala na liboso na biso Mokonzi na bakonzi, Nkolo na ba nkolo?

Bokanisa yango kaka. Bozali ya Mokonzi na bakonzi, Nkolo na ba nkolo, elongo na biso. Amonisaki biso ete TOSILI TOKOMI. Tozali awa! Emoniseli apesaki biso euti na Nzambe. Ezali Solo. Tozali Mwasi na Libala na Ye Mpate oyo aponami.

Tozali koyoka mikanda na Ye ya bolingo poso na poso koyebisi biso: “Ba Mpate na ngai balingami ya motema, Na tindaki ebyangeli na Ngai ya ba mPate. Ntaba bakoyebi yango te, kasi bino bososolaki yango. Botikalaki sembo, mpo ba Mpate na Ngai bayebi Ngai mpe bakolanda mopaya te. Esengeli ezala Mongongo na Ngai KAKA oyo endimisami na elembo ya molimo.”

Bolekisaka ntango na kolinga makambo ya mpamba te soko kutu kotala mosusu; botikalaki sembo na Mongongo na Ngai. Bino nde Baoyo Nazalaki kozila. Nayebi ete bosekami mpe bososolami mabe, kasi nayebisaki bino ete nakozonga pona bino soko bino BOTIKALI ELONGA NA LILOBA NA NGAI, mpe bosali yango. SASAIPI NAZALI KOYA MPONA BINO lokola nalakaki bino ete Nakosala yango. Liloba oyo bozalaki kosopela mai ezali koya komema bino na Ndako na Biso ya Sika.

Bamosusu bakoki kozala na emoniseli te oyo biso tozali no yango mpe bazali koloba ete tozali komemia bato; to kosambela moto kasi Nkolo na biso te. Boni bakufi miso. Soko yango ezali solo bongo, boye Mwasi na Libalo ya Klisto na ngambo kuna na ezipelo ya ntango bazalaki mpe na miko.

Ntango mosakoli amonaki Mwasi na Libala koya mbangu epai na ye mpe koloba, “ndeko na biso ya motuya”, bayambaki ye mpe batiaki ye na Esika ya Likolo. Nini… Mwasi na Libala ya Klisto ezalaki kotalisa limemia ya bato epai na mosakoli na botiaka ye na Esika na Likolo? Bozali nde koloba ete esengelaki basala yango te?

Na bongo sima na yango, Mwasi na Libala ye mobimba ezalaki kotelema wana na bilamba ya bango milai pembe mpe babandaki koganga, “Soko okendeki na Sango malamu te, mbele biso tozali aw ate.” Soko ye akendeki te mbele bakokaki kozala kuna te?

Na bongo Mongongo kouta na likolo elobaki ete tokosambisama kokokana na LILOBA oyo ateyaki biso, mpe bongo akotalisa biso epai ne ye. 

Mongongo elobaki te ete tokosambisama na oyo moto mosusu alobaki to oyo moto moko boye alimbolaki koloba ete ye alobaki, kasi oyo ye alobaki. Na mbisa ye akotalisa biso epai na Ye.

Tika na zwa bosomi mpe na solola na ntina na ndambo ya Mwasi na Libala oyo azali na Emoniseli ndenge moko na ngai, mpe naloba ndege tozali koyoka. Soko toko SAMBISAMA, mpe SEKO NA SEKO na biso ezali kotelema likolo na Liloba Nzambe asololaki na nzela ya mosakoli na Ye, na bongo tozali na motindo ya koyoka BOBELE Liloba longwa na Mongongo na Nzambe na mokolo na biso. Tokokoka te, mpe tokotelemisa te Seko na Seko na biso likolo na oyo moto songola pakala ezali kolimbola, to koloba, kasi oyo YE ALOBAKI. TOKOKI KOYOKA KAKA MONGONGO NA NZAMBE, and William Marrion Branham nde kaka azali MONGONGO YANGO NA ZAMBE…NZAMBE ALOBAKI BONGO. 

Nabetisi bino libaku na bolobaka bongo, bolimbisa ngai, kasi, nayokaki ete yango ebetmi ntembe, kasi, Nazalai Mongongo na Nzambe mpo na bino.

Boye tozali na esengo mpe na matondi epai na Nkolo ete tozali kaka kosala eloko oyo Mwasi na Libala azalaki kosala na ngambo mosusu. Nkembo nyoso, Lokumu mpe Masanzoli ezali kokende epai na MOKO MPE BOBELE MOKO NKOLO YESU KLISTO. Lokola mosakoli ya Emoniseli 22:9 ayebisaki biso, bosambela Nzambe…TOZALI KOSALA YANGO mpe tolingi Ye mingi nakoleka.

Ntango eleki. Makomi mazali kokokisama na lombangu koleka ndege tokoki kotanga makambo nyoso oyo ezali kokoma. Azali koya mpo na Mwasi na Ye ya Libala na noki. Mokili ezali koyangana. Mwasi na Libala azali koyangana. Ematelo ezali kobongisama mpo na Konetolama.

Totondi Nkolo mpo na mibali oyo babengami na Nzambe oyo bazali koteya Liloba, kasi basali, botiya Mongongo yango oyo bino mpe bato na bino bokosambisama na nzela na yango libosi. Boyangana kati na biyanganelo na bino mpe boyoka Mongongo ya Nzambe bobele moko oyo endimisami koloba. Bofina Play. 

Tozali kobianga bino nyoso baoyo bakolinga koya na Masua mpe kobikisama elongo na biso awa ezali biso koyangana mpe koyoka Mongongo na Nzambe kosolola Maloba oyo tokosambisama na yango, na nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpe koyoka Elembo Ya Motoba 63-0323.

Ezali Bilei ya ba Mpate mpo na ba Mpate ya Nzambe. Eloko ebakisami te, eloko elongolami te mpe eloko elimbolami te, kaka BILEI YA BA MPATE mpeto ezangi kobebisama.

Ndeko Joseph Branham

Esode 10:21-23

Yisaya 13:6-11

Danyele 12:1-3

Matai 24:1-30

Matai 27:45

St. Yoane 10:27

Emoniseli 6

Emoniseli 11:3-6