22-0227 ELEMBO YA MITANO

Nsango: 63-0322 ELEMBO YA MITANO

BranhamTabernacle.org

Molingami Nzoto Moko Monene ya Klisto,

Eloko nini ezali kokoma lelo? Liloba na Nzambe ezali kokokisama. Mikolo Mwasi na Libala azalaki kozila mpo na ntango molai ezali sasaipi komonana liboso na miso na biso mpenza. Mikolo oyo mosakoli na biso akebisaki biso mpo na yango ete ezali koya, yango oyo ekomi.

Elembo efungwani. Ezali nini ? Libombami efungolami. Bomoni ? Mpe ntango libombami lifungolami, kelelo eyuli. Ekoyebisa mpo na etumba. Bolozi bokokwea, mpe eleko moko ya lingomba efungolami.

  • Russia
  • Etumba
  • Komunisimi
  • Pitoló
  • Malozi

Ntango Russia akiti kuna mpo ya kozwa Pitoló wana, bokeba.

Russia, Komunisimi, ekokonza eloko moko te. Liloba na Nzambe liyebi kokwea te. Lomanisimi nde ekokonza mokili.

Mwanje na kobebisa azali kosimba loboko na Russia, elongo na ba bombi ya atomiki ; kino Lingomba likoya elongo, mpe lokola nzoto Moko Monene ya Klisto. “Nakoki kosala eloko moko te kino ekosila yo kokende mosika.” Oo, soko yango ezali elikia epambolami te !

Lingomba, Mwasi na Ye ya Libala, azali koya elongo kouta na mokili mobimba lokola Nzoto Moko Monene ya Klisto, koyoka Nzambe kosolola mpe kozipola Liloba na Ye. Tozali komona Liloba kokokisama kati na mokili zinga-zinga na biso, kasi tozali mpe komona Liloba kokokisama mpe komonisama na kati na biso.

Tozali kozwa kolamukisa na nzela ya Emoniseli lokola liboso te wana masakoli maye mazali kokokisama.Mokili mozali kati na kolenga mpe kobanga. Bazali kozila, kotala, mpe kotungisama, nini ekokoma sima ? Eloko nini ekokoma lobi ? Oyo nyoso elingi koloba nini ? Russia akolonga nde nyoso ? Makambo ya nkita ndenge nini ?

Na ntango yango moko, Mwasi na Libala azali kati na KIMIA. TOZALI KOPEMA, totondi na Molimo Mosanto, koyoka Ye kosolola na nzila na mwanje na Ye monene ezali Ye koyebisa biso : Bobanga eloko moko te etonga moke na ngai, bozali moponami na ngai wa bolingo ya motema. Bozali :

Oyo aponami liboso na bozalisi na mokili. Amen ! Mpe bazali sembo na Liloba. Amen! Whew! Nalingi oyo wana. “Babiangami, baponami liboso ya kozalisama na mokili.” Mpe sima, sembo na Liloba, na nzela ya kopona na bango, banso balamukisami na vinyo mpe Mafuta ya sika, kaka kokoba mobembo, koya kokutana na ye. Bayebi ete Nkake ekobimisela biso eloko, ekoumela noki noki.

Ayebi ete tozali sembo na Liloba na Ye. Tosali yango na kopona na biso moko. Sasaipi tozali kaka kokoba mobembo, na boyebaka ete Nkake ikobimisela biso eloko noki noki, mpe Akoya mpe Akomema biso na Ndako nab iso ya sika.

Ezali kutu na mingi oyo Alingi biso toyeba. Eloko moko ezali kopela kati na motema na ye alingi koyebisa biso. Alingi kozila molai telokola ayebi ete ekopesa biso Kolamukisa. Na ngolu na Nzambe, Atikaki mosakoli na Ye komona biso, bato na ye, kuna nan gambo mosusu elongo na ye. Alobaki, “Ntango namonaki bino, bolataki bino nyoso BILAMBA YA PEMBE.”

Toyanganisamaki na ye elongo. Tozwaki ye mpe totiaki ye likolo na eloko moko monene likoló. Tolobaki na ye, ” na mabelé, ozalaki mokambi na biso. “

Ezalaki na milioni na milioni na biso kopota mbangu likolo epai na ye mpe koyamba ye mpe kobenga ye “ndeko “. Nyoso na mbala moko Mongongo longwa na likolo elobaki, ” Baoyo bazali bandimi na yo oyo okambaki. Okosambisama kokokana na oyo oyebisaki bango. “

Mosakoli asololaki polele mpe alobaki, ” Soko baoyo ya Paulo bakoti, baoyo ya ngai mpe bakokota, mpo ete nateyaki mpenza kaka Liloba yango moko. ” Mpe biso nyoso togangaki makasi NYOSO NA MBALA MOKO, NA MONGONGO MOKO :

Tozali kopema likolo na yango ! 

Lokumu na Nkombo na Nkolo, tozali kopema likolo na Liloba moko na moko Alobaki na nzila ya mosakoli na Ye. Tokosambisama na Liloba yango. Tozalaki bato ya mosakoli. Azalaki mokambi na biso oyo azali kokamba biso epai na Klisto. Tolataki bilamba ya pembe. Tozalaki kopema te likolo yao yo moto mosusu alobaki ete ye alobaki, to oyo moto moko alobaki ete elingaki koloba, tozalaki kopema likolo ya Liloba moko na moko ye alobaki.

Mokolo mpe ntango nini oyo kozala kobika kati na yango, Mwasi na Libala. Soko boyoki nsango na zoloná lelo, bokoyeba eloko ekomaki lobi. Bofina Play, mpe bokoyeba eloko nini ekokoma lobi, mpe mokolo mokolanda, mpe mokolo mokolanda, mpe mokolo mokolanda.

Boya koyangana elongo na Nzoto Moko Monene ya Klisto na nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tokoyoka : Elembo ya Mitano 63-0322. Na kotungisama te, na kolikia te, kasi NA BOYEBAKA etebozali koyoka OYO ELOBI NKOLO mpeto longwa na Mongongo na Nzambe mpo na mokolo na biso.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya :

Danyele 9 :20-27

Misala 15 :13-14

Baloma 11 :25-26

Emoniseli 6 :9-11 / 11 : 7-8 /22 :8-9