22-0220 ELEMBO YA MINEI

Nsango: 63-0321 ELEMBO YA MINEI

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya Libala oyo Alamukisami,

Ntango mokolo ya Etinda eyaki, tozalaki biso nyoso na lobanzo loko, na esika yoko, longwa na bipai nyoso ya mokili, wana na pwasa makelele mabimaki longwa na Likolo pelamoko Mopepe na Lokito monene. “Mbote, baninga. Tika ete totelema sasaipi kaka mpo na ntango moke mpo na libondeli”. Molimo Mosanto atondisaki ndako na biso mpe biyanganelo nab iso nyoso epai wapi tozalaki kofanda, na bozali na Ye.

Na bongo nguya ya Emoniseli ya Liloba ebandaki kopesa biso kolamukisa ya esengo, kolamukisa ya kosepelisama; kosepelisama ete Endimisami, Ekokisami, ete tozali Mwasi na Libala na Yesu Klisto ya motema oyo aponami.

Tozali kozila na na etingia monene nkake Nsambo yango ete ikoka konguluma mpo na biso na mingongo na yango, mpo ete toyebi sasaipi, na ntembe soko moke te, ete biso tozali etonga na bato oyo bayambi Liloba na Nzambe. Tosili kopapama mpe kokatama na yango. Tokoki kokanga Likolo, tokoki kokanga oyo, to kosala oyo kuna, nyo’oyo tolingi kosala. Monguna akobomama na Liloba oyo ezali kobima na monoko na biso, mpo ete Ezali na mopotu koleka mopanga mopeli na ngambo nyoso mibale. Tokoki kutu kobenga makiasi na kiasi na kiasi ya nzinzi soko tozali na bosenga na yango. Nyos’oyo BISO TOLOBI, ekosalema, mpo ete ezali Liloba na Nzambe kobima na monoko na Nzambe.

Tokozala na bokonzi mobimba, oyo eleki likolo koyangela mabele, mpo ete tozali nzambe moke. Nzambe azali Nzambe ya molongo mobimba, bisika binso, kasi biso tokozala na mokili na nse ya bokonzi na biso mpenza. Tokoki kosolola, tokoki kopesa nkombo, tokoki koloba, tokoki kotelemisa bozalisi, tokoki kosala eloko nyos’oyo tolingi; ezali libula nab iso oyo ezongisami.

Satana alobi,” Kasi bakweisami!” Kasi Ye azali koganga koloba ete, “BAKWEISAMI TE. Bayamboli masumu na bango mpe batelemi liboso na ngai balongisami mobimba. Nakoki kutu kokanisa yango lisusu soko moke te. Bazali mpenza-mpenza mwana na Ngai.”

Oyo wana ezali likanisi na biso te, soko te ete ezali Liloba na biso, kasi ezali LILOBA NA YE, ELAKA NA YE, mpo ete Nzambe abongolaka mwango na Ye soko nzila na Ye ya kosala makambo te. Asalelaka ntango nyoso moto, mpe Ye Azali koyebisa biso ete tozali Mwasi na Ye ya Libala oyo Azongisami mpe Atalisami mobimba oyo azali kotikala na Liloba na Ye.

Tozalaki na eloko moko mosusu te kasi Liloba na Ye ya Ebandeli. Tobandani te, soko totali ata eloko moko mosusu te, kasi totikali na Mongongo na Nzambe, Liloba Nzoto oyo ekomi mosuni, Likonzi na Moto oyo endimisami, Mwana na Moto, Oyo Elobi Nkolo. Tozali Ngondo Mwasi Liloba na Ye.

Osili koyoka kolamukisama na nzila ya Emoniseli. Lokola ndeko na biso ya mwasi kuna na Liziba, tokokaki te koumela butu mobimba soko koumela kino na mpokwa elandaki, tozali na Yango sasaipi mpenza. Tozali momboto na Ye. Pole wana ebetaki likolo na biso mpe eloko moko epasukaki mpo na Bomoi ya sika. Sikawa tozali nan zila koyebisa moto nyoso, “Tokomi. Mitungisi nyoso esuki, Nzambe Ye moko azali koloba na biso azali kosolola na biso na Liteya moko na moko tozali koyoka, koyebisa biso: ‘Bino nde nazalaki kozila. Sik’oyo nakomema bino na bosepeli ya libala na biso. Natongeli bino Ndako kitoko kaka ndenge bolingi eloko moko na moko. Tokolekisa seko-na seko.”

Mpo na biso, Solo ya Liloba ya Nzambe Lilakami ekokisami mpe emonisami. Kati na Yoane 14:12, Yoele 2:28, Timote ya Mibale 3, Malaki 4, Emoniseli 10. Totondi sasaipi na Mafuta mpe tolamukisami.

Bokolinga nde kozwa Kolamukisama yango moko? Bokoki, kasi ezali kaka na esika moko mpo ya kozwa Yango. Lokola ntango Yesu azalaki na lipati ya libala mpe bazangaki vinyo. Bazalaki solo komela vinyo mpe ezalaki kopesa bango kolamukisa, kasi VINYO YA MALAMU KOLEKA eutaki mbala moko kouta epai na Yesu ye moko.

Boya komela Vinyo ya Malamu Koleka mpe kozwa Kolamukisa ya Malamu koleka na nzila ya Emoniseli elongo na biso Mokolo na Lomingo na nzanga, ntango ya Jeffersonville, wana ekoyoka biso: Elembo ya Minei 63-0321.

Bomilengela kolangwa likolo na Vinyo ya Molimo Mosanto.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati na bolengeli koyoka Liteya “Elembo ya Minei” 63-0321.

St. Matai 4

St. Luka 24:49

St. Yoane 6:63

Misala 2:38

Emoniseli 2:18-23, 6:7-8, 10:1-7, 12:13, 13:1-14, 16: 12-16, 19:15-17

Genese 1:1

Njembo 16:8-11

II Samwele 6:14

Yilimia 32

Yoele 2:28

Amosa3:7

Malaki 4