23-0813 ELEMBO YA MINEI

Nsango: 63-0321 ELEMBO YA MINEI

BranhamTabernacle.org

Balingami Ba Mpongo Miké,

Mongóngó ya Nzambe ezali komema biso na misándá totikalá kozala liboso soki moke te, mpe komonisa Liloba na Ye. Tokotisi bikomú na biso miké kati na Mapapu ma Ye ma nguya wana ezali Ye komema biso kati na etando. Tozali kosémbola mapapu na bopumbwáká na bisika ya likolo koleka bitando nyoso ya mapata. Tokoki komona mosika kati na seko na seko. Ezali nde na mobimba na yango Emoniseli ya sika epai na biso. Na koleka Amemaka biso likolo, Ekómaka polele koleka. Togángaka: NAMONI YANGO…NAMONI YANGO.

Azui sikawa Mapapu ma Ye ma nguya, aninganisi yango makasi, mpe alobi na biso: “BOPUMBWA BAOYO MIKÉ NA NGAI, BOPUMBWA.” Liboso tozalaki na nsómo makasi. Monguná azalaki kotondisa makanisi na biso na ntembe mingi. Nakoka te, nakoka kaka te. Nsima toyokaki Ye kozongisela biso na kogánga mpe konguluma ya nkaké: “BOKOKI, BOZALI BAPONGO NA NGAI MIKÉ. BOBANDA KAKA KOBETA MAPAPU MABINO!!”

Nsima, na pwasa mapapu ma biso maké mabandaki kobeta mango mpenza. Nakoleka eyoki biso Liloba na Ye kondimisa biso tozali banani, mpe eloko ya kosala, mapapu mabiso makomi makasi koleka. Bobeta, bobeta, bebeta….Bófina Play, Bofina Play, Bofina Play…bongo na pwasa, tozali kopumbwa. Tozali ba Mpongo.

Ntango mwa nsómo ebandi kokota na makanisi mabiso, tobwaki bobele miso nzinga nzinga mpe tobandi koyoka Mongóngó na Ye. Ye wana, kopumbwa mpenza pembeni na biso kosimba biso soko tobandi kokweya. Tomoni ete tozali na eloko ya kobanga te, Tata Mpongo azali wana mpenza elongo na biso. Azali kotala litambe moko na moko tozali kotia. Akotika te eloko moko ékomela biso. 

Bosómi mpe endimiseli ya bongo lokola toyoká naino liboso te. Azali kokoba koyebisa biso, bozali ba mpongo mike na Ngai. Bozali kotosa mpe kosala mpenza oyo Nayebisaki bino bosala na nzela ya botikaláká elongo na Mongóngó na Ngai Natikelaki bino.

Ayebi ntango Ayebisaka biso eloko ata nini likolo na ba bande, tokokende kosala yango, mpo ete toyebi Ezali Liloba na Ye. Akotelema bobele nsima na Yango.  Ata soko ekomami kati na Biblia te, Akotelema nsima na Yango, ata bongo. 

Toyebi, soko ezali libanda na Yango, Akomonisa Yango epai na mosakoli na Ye. Tomoni ete mabombami nyoso ya Nzambe ezebisami epai na mosakoli na Ye, mpe ye kaka, boye eloko se eloko tolingi koyeba, Ezali likolo na bande.

Osili oyoka nguya ya Emoniseli oyo ememaka kolamukisama. Tolingaka koganga yango na mingóngó na biso nyoso. Tolingaka mokili eyeba ete, Nazali Mpongo Ya Bande!

Makanisi ya Nzambe makómaki bozalisi ntango elobamáki, na nzela ya Liloba moko. Ezali ntango Atalisaka yango epai na—epai na bino lokola likanisi, likanisi na Ye, mpe emonisameli bino. Nsima, ezali naino likanisi kino bokoloba yango.

Emonisameli biso. Nkembo. Sasaipi tolingi koloba Yango. Tozali Mwasi na Yesu Klisto. Ayebaki ngai, abongisaki ngai liboso ya bozalisi ya mokili. Nazali Liloba na Ye ya bomoi likómí mosuni. Ayebisaki ngai SENGA mpe okozua. Beta, ekofungwama. Ézala nini tozali na yango bosenga, TÓLOBA YANGO.

Oyo ezali Eleko ya Mpongo mpe tozali biso nyoso ba Mpongo na Ye. Totíkálá naino kozala na esengo te to kosepela koleka na bomoi na biso. Nsómo te, mitungisi te.

Nabiangi bino boya kopumbwa na misandá ya sika elongo na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola mpongo ya nguya ya Nzambe azali kogánga epai na biso mpe komonisa Elembo Ya Minei 63-0321

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga na bomilengeli mpo ya boyoki liteya Elembo Ya Minei 63-0321.

St. Matai 4

St. Luka 24:49

St. Yoane 6:63

Misala 2:38

Emoniseli 2:18-23, 6:7-8, 10:1-7, 12:13, 13:1-14, 16:12-16, 19:15-17

Genese 1:1

Njembo 16:8-11

II Samwele 6:14

Yilimia 32

Yoele 2:28

Amosa 3:7

Malaki 4