23-0806 ELEMBO YA MISATO

Nsango: 63-0320 ELEMBO YA MISATO

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi Na Libala Oyo Alamukisami,

Bomilengela, Lomingo loye bokozua kolamukisa ya koleka na nzela ya Emoniseli koleka lolenge bozuá liboso kati na bomoi na bino. Bokozala kaka kolánga likolo ya Liloba. Ekozala malamu koleka, mpe saa…mpe kútu polélé koleka ntango Alobaki Yango. Mpe ezali bobele na nzela moko yakozua yango, bosengeli Kofina Play!

Bozua ba bande, boyoka yango na bokengi. Zambi, bokozua yango likolo na bande, mpamba te bazalaki koyokisa ba bande yango kala, mpe ezali mpenza malamu mpe saa. Na bongo, bokozua yango polele kuna.

Mwanje na Nzambe motindami ya nsambo autaki koloba nini? Ye oyo Nzambe aponaki komonisa mabombami manso ya Biblia epai na ye; ye oyo Aponaki kopesa emoniseli ya Bilembo Nsambo, Nkake, mpe Liloba na ye nyoso. Mwanje oyo Aponaki kobianga Mwasi na Ye ya libala kobima. Ye oyo Aponaki kozala Mongóngó na Ye na mikolo ya nsuka.

Totanga bobele eteni na liloba yango mbala moko lisusu mpe na kondimisama ete tososoli oyo autaki koloba na biso tósala.

“Bokozua Yango likolo na”, WAPI? 

“Bokozua Yango polélé”, WAPI?

Bosili koyeba boni ezali na litomba Kofina Play mpe koyoka ba bande. NKEMBO!! Oyo ezali liloba na ngai te, oyo ezali LILOBA YA NZAMBE koyebisa Mwasi na Ye ya libala, BOZUA YANGO KUNA…LIKOLO YA BA BANDE. Batei, botika ngai nye.

Boni moto ata nani oyo abetaka tólo ete andimí Eindá oyo áloba éte koyoka ba bande ezali eloko ya MONENE KOLEKA te Mwasi na libala akoki kosala? Boni mobateli moko atia lotómo na ye likolo ya oyo ya mosakoli? Ezali kaka te mpo na ko zongela yango…. Nazali kosala yango sikawa kaka mpe lokola, kasi koyokisa etonga na ye Mongóngó wana mpo bakoka “KOZUA YANGO POLELE WANA”. 

Lotómo monene koleka kati na mokili ezali Lotómo Ya Bande. Ezali na eloko monene te koleka Kofina Play. Ezali na mongóngó bobele moko mobongisamaki na Nzambe kozala Yango Elobi Nkolo epai na Mwasi na Ye ya libala, Mongóngó likolo ya ba bande. 

Botika na zala polele mbala moko lisusu. Natemeli motei moko te koteya, soko ete nayokaka ete motei moko akoki koteya te to kolakisa te. Kasi mpo na ngai mpe lotómo na ngai, nabiangami koyebisa mokili báyoka Liloba libongwani likómi mosuni, liye litiamaki mpe libombamaki likolo na bande. Na ndimaka ete ezali Mongóngó ya Nzambe, mpe YANGO, mpe YANGO kaka, eyanolaka na mituna na bino nyoso. Ekopesa bino eloko nyoso bosengeli na yango, elongo moko na Kondima ya Konetolama, mpo ete Ezali YANGO ELOBI NKOLO.

Mwasi na libala asengeli na Liloba na ngai te, nazali bobele kozongela Liloba lokola batei basusu banso. Bozongelaka mpe bolobaka boni ezali na litomba koyoka lotómo na bino mpe ebiangeli na bino, Nkolo akumisama. Nazali koyebisa bato ete lotómo YA LITOMBA KOLEKA EZALI MONGÓNGÓ NA NZAMBE LIKOLO YA BANDE. Ezali na eloko monene koleka te. Basenegeli kozala na eloko mosusu te.

Nazali koloba makambo oyo te mpo bato bazala na molimo mabe to na motindo mabe epai na motei ata nani to lotómo ata nini, mosika na ngai Nzambe. Nalingi bango. Bazali bandeko na ngai mibali. Nzambe atiaki ebiangeli likolo na bomoi na bango. Nakomeka nde koloba mabe kotemela bapakolami na Nzambe, KASI napusami koloba mpe kosolola ete ebele batii litomba monene likolo na lotómo ya bango mpe batii yango te na Mongóngó na Nzambe oyo ezali likolo na bande lokola MONGÓNGÓ YA LITOMBA KOLEKA Mwasi na libala akoki koyoka.

Nalobaki bobele ete, “Bozongisa Ndeko Branham na biteyelo na bino,” mpe ebele kati na batei bazuaki likolo na bango mpenza meko yakoyebisa bato ete Ndeko Branham alobá yango soki moke te likolo ya bande, mpe BA biangami kozua Liloba mpo kopesa Yango epai na bato; kosala bikimelo KOBOYA KOYOKISA BA BANDE NA MANGOMBA NA BANGO. Balobaka ete ezali mabe soko mobateli ayokisi ba bande kati na lingomba na ye, kolobela bato mabe na bolobáká ete soko bazali bobele koyoka ba bande kati na mangomba na bango, mpe lotómo ya botei te, bazali Mwasi na libala te.

Nayoká bikimelo mingi mpenza basalelaka mpe koyebisa bato. Balinga kaka te koyebisa bato na bango: “BA BANDE NDE ELOKO YA LITOMBA KOLEKA BOSENGELI KOYOKA”. Soko basali yango, mbele bato balingaki kotuna… “Na bongo mpo na nini oyokisaka ba bande te kati na lingomba na biso soko ezali eloko ya litomba koleka?” 

Ye nde oyo tokoyoka Lomingo loye; 

Nzambe amimonisi Ye moko, kati na Moto mpe alobaki nani azalaki nsima na Ye; mpe oyo Sala azalaki koseka kati na hema. Mpe Makomi manso maye, ya Malaki, mpe bongo na bongo, malobamaki liboso kati na mikolo ya nsuka. Baebele 4 elobaki, ntango “Liloba” lizongi. Malaki 4 elobaki ekozonga na nzela ya moto.

Liloba yango lizongi na nzela ya moto mpe tozali na Mongóngó na Ye motiami likolo na Bande mpe tokoyoka yango MOKOLO NYOSO YA LOMINGO.

Nazali na esengo koyebisa ete mbala moko lisusu, Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, tokozala koyoka Liloba libongwani likomi mosuni mpe litiami likolo ya bande. Epesaka biso Emoniseli likolo na: Elembo Ya Misato 63-0320.

Ntango nini oyo tokozala na yango, Mwasi na libala. Esengo nini oyo ekotondisa mitema na biso. Kimia nini oyo ekolendisa bomoto na biso, lokola tokoyoka oyo Nzambe Ye moko alobaki na Satana: “Tika bango nye. Soko omami moko na bango, Etonga moke na ngai oyo batondi na Mafuta ma Ye mpe Vinyo ya Liloba peto, púsá bango na makasi te koloba ‘Malia Losako’ ata nini, to boko ya bindimeli na yo. Batela maboko mayo mosika na bango. Bayebi wapi bazali kokende, zambi bapakolami na Mafuta ma Ngai mpe bazali na Vinyo ya esengo, zambi bayebi Liloba na ngai ya eleka. ‘Nakosekwisa bango lisusu.’ Kosala bango mabe te! Komeka te kokende kobulunganisa bango… tángwá na yo kaka na bango.”

Tozali na eloko ya kobanga te. Tozali na Liloba. TOZALI LILOBA. Totelemaki te na eloko ata nini. Tozali bana Mibali mpe bana Basi ya Nzambe. Satana, pesa nzela, NYOSO ezali ya biso. Nzambe Alobaki Bongo. Ekomami!

Ndeko Joseph Branham

Makomi

St. Matai 25:3-4

St. Yowane 1:1, 1:14, 14:12, 17:17

Misala Mokapo Ya 2

Moko Timote 3:16

Baebele 4:12, 13:8

Moko Yowane 5:7

Lewitiko 8:12

Yilimia Mokapo Ya 32

Yoele 2:28

Jekalia 4:12